Revelation 14 (BOLCB2)
1 Bongo namonaki Mpate atelemi na ngomba Siona elongo na bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei. Kombo ya Mpate mpe ya Tata na Ye ezalaki ya kokomama na bambunzu ya bato yango. 2 Nayokaki mongongo moko kowuta na Lola, ezalaki koyokana lokola makelele ya bibale minene mpe lokola lokito ya kake. Ezalaki lokola lokito ya babeti mandanda oyo bazali kobeta mandanda na bango 3 mpe bazali koyemba nzembo ya sika liboso ya Kiti ya Bokonzi, ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bampaka. Moko te akokaki koyekola nzembo yango longola kaka bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei oyo basikolamaki wuta na mokili. 4 Ezali bato oyo bamikomisaki mbindo te na nzela ya basi, pamba te bamibatelaki na kozanga kosangisa banzoto na bango na basi. Balandaka Mpate na bisika nyonso oyo akendaka. Basikolamaki kati na bato mpo ete babonzama lokola bambuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mpate. 5 Lokuta emonanaki te kati na minoko na bango ; bazali bato bazanga pamela. 6 Bongo namonaki anjelu mosusu kopumbwa na likolo makasi. Azalaki na Sango Malamu ya seko na seko ya kosakola na bavandi nyonso ya mokili, na bikolo nyonso, na mabota nyonso, na nkota nyonso mpe na bato nyonso. 7 Azalaki koloba na mongongo makasi : « Botosa Nzambe mpe bopesa Ye nkembo, pamba te tango na Ye ya kosambisa bato ekoki ! Bogumbamela Ye oyo akela likolo mpe mabele, ebale monene mpe bitima ya mayi ! » 8 Anjelu ya mibale alandaki mpe alobaki : « Babiloni monene ekweyi, ekweyi penza ! Emelisaki bikolo nyonso vino ya kanda ya kindumba na yango. » 9 Anjelu ya misato alandaki ba-anjelu wana mibale ya liboso mpe alobaki na mongongo makasi : « Moto nyonso oyo agumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe azwi elembo na yango na mbunzu to na loboko na ye, 10 ye mpe akomela vino ya kanda ya Nzambe, vino oyo basopaki ya peto, kati na kopo ya kanda na Ye. Mpe akonyokwama kati na moto ya sofolo liboso ya ba-anjelu ya bule mpe liboso ya Mpate. 11 Molinga ya pasi na bango ekomata na likolo mpo na libela na libela. Butu mpe moyi, bopemi ekozala te mpo na bato oyo bagumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe mpo na moto nyonso oyo akondima kozwa elembo ya kombo na yango. » 12 Makambo oyo ezali penza kosenga ete basantu, oyo babatelaka mibeko ya Nzambe mpe kondima na bango kati na Yesu, bazala na mpiko. 13 Bongo nayokaki mongongo moko kowuta na Lola mpe koloba na ngai :— Koma : « Kobanda sik’oyo, esengo na bato oyo bakufaka na lisanga na Nkolo ! »Mpe Molimo alobaki :— Iyo, pasi na bango esilaka mpe bazwaka bopemi, pamba te misala na bango elandaka bango. 14 Bongo namonaki lipata moko ya pembe, mpe ekelamu moko lokola mwana na moto evandaki na likolo ya lipata yango. Ezalaki na motole ya wolo na moto na yango mpe na mbeli ya minu makasi na loboko na yango. 15 Bongo anjelu mosusu abimaki na Tempelo mpe alobaki na mongongo makasi na ekelamu oyo evandaki na likolo ya lipata : « Kamata mbeli na yo mpe buka bambuma, pamba te tango ya kobuka bambuma ekoki, mpe ete bambuma ya mokili ekomeli. » 16 Ekelamu oyo evandaki na likolo ya lipata ebwakaki mbeli na yango na mokili, mpe mokili ezwaki lifuti na yango. 17 Anjelu mosusu abimaki na Tempelo ya Lola ; ye mpe azalaki na mbeli ya minu makasi. 18 Sima, anjelu mosusu oyo azalaki mokonzi ya moto alongwaki na etumbelo, mpe alobaki na mongongo makasi epai na ye oyo asimbaki mbeli ya minu makasi : « Kamata mbeli na yo ya minu mpe buka maboke ya bambuma ya vino ya mabele, pamba te bambuma yango ya vino eteli. » 19 Anjelu wana abwakaki mbeli na ye na mabele, abukaki maboke ya bambuma ya vino ya mabele mpe abwakaki yango kati na ekamolelo monene ya kanda ya Nzambe. 20 Bakamolaki bambuma yango na libanda ya engumba kati na ekamolelo, mpe makila ebimaki wuta na ekamolelo yango, etondaki kino kokoma na bosanda ya monoko ya mpunda, mpe epanzanaki na etando ya bakilometele pene nkama misato.
In Other Versions
Revelation 14 in the ANGEFD
Revelation 14 in the ANTPNG2D
Revelation 14 in the AS21
Revelation 14 in the BAGH
Revelation 14 in the BBPNG
Revelation 14 in the BBT1E
Revelation 14 in the BDS
Revelation 14 in the BEV
Revelation 14 in the BHAD
Revelation 14 in the BIB
Revelation 14 in the BLPT
Revelation 14 in the BNT
Revelation 14 in the BNTABOOT
Revelation 14 in the BNTLV
Revelation 14 in the BOATCB
Revelation 14 in the BOATCB2
Revelation 14 in the BOBCV
Revelation 14 in the BOCNT
Revelation 14 in the BOECS
Revelation 14 in the BOGWICC
Revelation 14 in the BOHCB
Revelation 14 in the BOHCV
Revelation 14 in the BOHLNT
Revelation 14 in the BOHNTLTAL
Revelation 14 in the BOICB
Revelation 14 in the BOILNTAP
Revelation 14 in the BOITCV
Revelation 14 in the BOKCV
Revelation 14 in the BOKCV2
Revelation 14 in the BOKHWOG
Revelation 14 in the BOKSSV
Revelation 14 in the BOLCB
Revelation 14 in the BOMCV
Revelation 14 in the BONAV
Revelation 14 in the BONCB
Revelation 14 in the BONLT
Revelation 14 in the BONUT2
Revelation 14 in the BOPLNT
Revelation 14 in the BOSCB
Revelation 14 in the BOSNC
Revelation 14 in the BOTLNT
Revelation 14 in the BOVCB
Revelation 14 in the BOYCB
Revelation 14 in the BPBB
Revelation 14 in the BPH
Revelation 14 in the BSB
Revelation 14 in the CCB
Revelation 14 in the CUV
Revelation 14 in the CUVS
Revelation 14 in the DBT
Revelation 14 in the DGDNT
Revelation 14 in the DHNT
Revelation 14 in the DNT
Revelation 14 in the ELBE
Revelation 14 in the EMTV
Revelation 14 in the ESV
Revelation 14 in the FBV
Revelation 14 in the FEB
Revelation 14 in the GGMNT
Revelation 14 in the GNT
Revelation 14 in the HARY
Revelation 14 in the HNT
Revelation 14 in the IRVA
Revelation 14 in the IRVB
Revelation 14 in the IRVG
Revelation 14 in the IRVH
Revelation 14 in the IRVK
Revelation 14 in the IRVM
Revelation 14 in the IRVM2
Revelation 14 in the IRVO
Revelation 14 in the IRVP
Revelation 14 in the IRVT
Revelation 14 in the IRVT2
Revelation 14 in the IRVU
Revelation 14 in the ISVN
Revelation 14 in the JSNT
Revelation 14 in the KAPI
Revelation 14 in the KBT1ETNIK
Revelation 14 in the KBV
Revelation 14 in the KJV
Revelation 14 in the KNFD
Revelation 14 in the LBA
Revelation 14 in the LBLA
Revelation 14 in the LNT
Revelation 14 in the LSV
Revelation 14 in the MAAL
Revelation 14 in the MBV
Revelation 14 in the MBV2
Revelation 14 in the MHNT
Revelation 14 in the MKNFD
Revelation 14 in the MNG
Revelation 14 in the MNT
Revelation 14 in the MNT2
Revelation 14 in the MRS1T
Revelation 14 in the NAA
Revelation 14 in the NASB
Revelation 14 in the NBLA
Revelation 14 in the NBS
Revelation 14 in the NBVTP
Revelation 14 in the NET2
Revelation 14 in the NIV11
Revelation 14 in the NNT
Revelation 14 in the NNT2
Revelation 14 in the NNT3
Revelation 14 in the PDDPT
Revelation 14 in the PFNT
Revelation 14 in the RMNT
Revelation 14 in the SBIAS
Revelation 14 in the SBIBS
Revelation 14 in the SBIBS2
Revelation 14 in the SBICS
Revelation 14 in the SBIDS
Revelation 14 in the SBIGS
Revelation 14 in the SBIHS
Revelation 14 in the SBIIS
Revelation 14 in the SBIIS2
Revelation 14 in the SBIIS3
Revelation 14 in the SBIKS
Revelation 14 in the SBIKS2
Revelation 14 in the SBIMS
Revelation 14 in the SBIOS
Revelation 14 in the SBIPS
Revelation 14 in the SBISS
Revelation 14 in the SBITS
Revelation 14 in the SBITS2
Revelation 14 in the SBITS3
Revelation 14 in the SBITS4
Revelation 14 in the SBIUS
Revelation 14 in the SBIVS
Revelation 14 in the SBT
Revelation 14 in the SBT1E
Revelation 14 in the SCHL
Revelation 14 in the SNT
Revelation 14 in the SUSU
Revelation 14 in the SUSU2
Revelation 14 in the SYNO
Revelation 14 in the TBIAOTANT
Revelation 14 in the TBT1E
Revelation 14 in the TBT1E2
Revelation 14 in the TFTIP
Revelation 14 in the TFTU
Revelation 14 in the TGNTATF3T
Revelation 14 in the THAI
Revelation 14 in the TNFD
Revelation 14 in the TNT
Revelation 14 in the TNTIK
Revelation 14 in the TNTIL
Revelation 14 in the TNTIN
Revelation 14 in the TNTIP
Revelation 14 in the TNTIZ
Revelation 14 in the TOMA
Revelation 14 in the TTENT
Revelation 14 in the UBG
Revelation 14 in the UGV
Revelation 14 in the UGV2
Revelation 14 in the UGV3
Revelation 14 in the VBL
Revelation 14 in the VDCC
Revelation 14 in the YALU
Revelation 14 in the YAPE
Revelation 14 in the YBVTP
Revelation 14 in the ZBP