Revelation 19 (BOLCB2)
1 Sima na makambo wana, nayokaki lokola makelele ya bato ebele koganga kuna na Lola :« Aleluya !Lobiko, nkembo mpe nguya ezali ya Nzambe na biso, 2 pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ;apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba moneneoyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye,mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. » 3 Bagangaki na mbala ya mibale :« Aleluya !Pamba te molinga kowuta na mwasi ya ndumba moneneezali komata na likolo mpo na libela na libela ! » 4 Bampaka tuku mibale na minei mpe bikelamu minei ya bomoi bafukamaki mpe bagumbamelaki Nzambe oyo avandaka na Kiti ya Bokonzi, mpe bagangaki :« Amen ! Aleluya ! » 5 Bongo mongongo moko ebimaki wuta na Kiti ya Bokonzi mpe elobaki :« Bokumisa Nzambe na biso ;bino bawumbu na Ye nyonso,bino oyo botosaka Ye,mikolo mpe bana mike ! » 6 Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi ; ezalaki koganga :« Aleluya !Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,atalisi bokonzi na Ye. 7 Tika ete tosepela, totonda na esengompe topesa Ye nkembo !Pamba te tango ya feti ya libala ya Mpate ekoki.Mwasi mobandami na Ye ya libala asili komibongisa. 8 Elamba ya lino ya kitoko oyo ezali kongenga epesameli yempo ete alata yango. »Elamba ya lino ya peto ezali misala ya bosembo ya basantu. 9 Bongo anjelu alobaki na ngai : « Koma : ‹ Esengo na bato oyo babengami na feti ya libala ya Mpate ! › »Alobaki lisusu : « Ezali maloba ya solo ya Nzambe. » 10 Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe ! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. » 11 Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali : « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo. 12 Miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela ; mpe na moto na Ye, ezali na mitole ebele. Bakoma kombo moko na nzoto na Ye, kombo oyo Ye moko kaka nde ayebi. 13 Alati nzambala bazindisa na makila ; kombo na Ye ezali : « Liloba na Nzambe. » 14 Mampinga ya Lola ezalaki kolanda Ye na likolo ya bampunda ya pembe ; balataki bilamba ya lino ya kitoko, ya pembe mpe ya peto. 15 Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. 16 Na nzambala mpe na mopende na Ye, bakoma kombo :« Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. » 17 Bongo namonaki anjelu moko atelemi kati na moyi ; azalaki koloba na mongongo makasi epai ya bandeke nyonso oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi : « Boya, bosangana mpo na feti monene ya Nzambe, 18 mpo ete bolia misuni ya bakonzi, ya bakonzi ya mampinga, ya bilombe, ya bampunda elongo na batambolisi na yango mpe ya bato nyonso : bawumbu to bansomi, bato minene to bato pamba. » 19 Bongo namonaki nyama mpe bakonzi ya mokili elongo na mampinga na bango kosangana mpo na kobundisa Motambolisi ya mpunda mpe mampinga na Ye. 20 Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo. 21 Bongo mopanga oyo ebimaki na monoko ya Motambolisi ya mpunda ebomaki bato oyo batikalaki, mpe bandeke nyonso etondaki na kolia misuni ya bibembe na bango.
In Other Versions
Revelation 19 in the ANGEFD
Revelation 19 in the ANTPNG2D
Revelation 19 in the AS21
Revelation 19 in the BAGH
Revelation 19 in the BBPNG
Revelation 19 in the BBT1E
Revelation 19 in the BDS
Revelation 19 in the BEV
Revelation 19 in the BHAD
Revelation 19 in the BIB
Revelation 19 in the BLPT
Revelation 19 in the BNT
Revelation 19 in the BNTABOOT
Revelation 19 in the BNTLV
Revelation 19 in the BOATCB
Revelation 19 in the BOATCB2
Revelation 19 in the BOBCV
Revelation 19 in the BOCNT
Revelation 19 in the BOECS
Revelation 19 in the BOGWICC
Revelation 19 in the BOHCB
Revelation 19 in the BOHCV
Revelation 19 in the BOHLNT
Revelation 19 in the BOHNTLTAL
Revelation 19 in the BOICB
Revelation 19 in the BOILNTAP
Revelation 19 in the BOITCV
Revelation 19 in the BOKCV
Revelation 19 in the BOKCV2
Revelation 19 in the BOKHWOG
Revelation 19 in the BOKSSV
Revelation 19 in the BOLCB
Revelation 19 in the BOMCV
Revelation 19 in the BONAV
Revelation 19 in the BONCB
Revelation 19 in the BONLT
Revelation 19 in the BONUT2
Revelation 19 in the BOPLNT
Revelation 19 in the BOSCB
Revelation 19 in the BOSNC
Revelation 19 in the BOTLNT
Revelation 19 in the BOVCB
Revelation 19 in the BOYCB
Revelation 19 in the BPBB
Revelation 19 in the BPH
Revelation 19 in the BSB
Revelation 19 in the CCB
Revelation 19 in the CUV
Revelation 19 in the CUVS
Revelation 19 in the DBT
Revelation 19 in the DGDNT
Revelation 19 in the DHNT
Revelation 19 in the DNT
Revelation 19 in the ELBE
Revelation 19 in the EMTV
Revelation 19 in the ESV
Revelation 19 in the FBV
Revelation 19 in the FEB
Revelation 19 in the GGMNT
Revelation 19 in the GNT
Revelation 19 in the HARY
Revelation 19 in the HNT
Revelation 19 in the IRVA
Revelation 19 in the IRVB
Revelation 19 in the IRVG
Revelation 19 in the IRVH
Revelation 19 in the IRVK
Revelation 19 in the IRVM
Revelation 19 in the IRVM2
Revelation 19 in the IRVO
Revelation 19 in the IRVP
Revelation 19 in the IRVT
Revelation 19 in the IRVT2
Revelation 19 in the IRVU
Revelation 19 in the ISVN
Revelation 19 in the JSNT
Revelation 19 in the KAPI
Revelation 19 in the KBT1ETNIK
Revelation 19 in the KBV
Revelation 19 in the KJV
Revelation 19 in the KNFD
Revelation 19 in the LBA
Revelation 19 in the LBLA
Revelation 19 in the LNT
Revelation 19 in the LSV
Revelation 19 in the MAAL
Revelation 19 in the MBV
Revelation 19 in the MBV2
Revelation 19 in the MHNT
Revelation 19 in the MKNFD
Revelation 19 in the MNG
Revelation 19 in the MNT
Revelation 19 in the MNT2
Revelation 19 in the MRS1T
Revelation 19 in the NAA
Revelation 19 in the NASB
Revelation 19 in the NBLA
Revelation 19 in the NBS
Revelation 19 in the NBVTP
Revelation 19 in the NET2
Revelation 19 in the NIV11
Revelation 19 in the NNT
Revelation 19 in the NNT2
Revelation 19 in the NNT3
Revelation 19 in the PDDPT
Revelation 19 in the PFNT
Revelation 19 in the RMNT
Revelation 19 in the SBIAS
Revelation 19 in the SBIBS
Revelation 19 in the SBIBS2
Revelation 19 in the SBICS
Revelation 19 in the SBIDS
Revelation 19 in the SBIGS
Revelation 19 in the SBIHS
Revelation 19 in the SBIIS
Revelation 19 in the SBIIS2
Revelation 19 in the SBIIS3
Revelation 19 in the SBIKS
Revelation 19 in the SBIKS2
Revelation 19 in the SBIMS
Revelation 19 in the SBIOS
Revelation 19 in the SBIPS
Revelation 19 in the SBISS
Revelation 19 in the SBITS
Revelation 19 in the SBITS2
Revelation 19 in the SBITS3
Revelation 19 in the SBITS4
Revelation 19 in the SBIUS
Revelation 19 in the SBIVS
Revelation 19 in the SBT
Revelation 19 in the SBT1E
Revelation 19 in the SCHL
Revelation 19 in the SNT
Revelation 19 in the SUSU
Revelation 19 in the SUSU2
Revelation 19 in the SYNO
Revelation 19 in the TBIAOTANT
Revelation 19 in the TBT1E
Revelation 19 in the TBT1E2
Revelation 19 in the TFTIP
Revelation 19 in the TFTU
Revelation 19 in the TGNTATF3T
Revelation 19 in the THAI
Revelation 19 in the TNFD
Revelation 19 in the TNT
Revelation 19 in the TNTIK
Revelation 19 in the TNTIL
Revelation 19 in the TNTIN
Revelation 19 in the TNTIP
Revelation 19 in the TNTIZ
Revelation 19 in the TOMA
Revelation 19 in the TTENT
Revelation 19 in the UBG
Revelation 19 in the UGV
Revelation 19 in the UGV2
Revelation 19 in the UGV3
Revelation 19 in the VBL
Revelation 19 in the VDCC
Revelation 19 in the YALU
Revelation 19 in the YAPE
Revelation 19 in the YBVTP
Revelation 19 in the ZBP