Ruth 1 (BOLCB2)

1 Na mikolo oyo bilombe bazalaki koyangela, nzala makasi ezalaki kati na mokili. Mobali moko ya Beteleemi ya Yuda, elongo na mwasi na ye mpe bana na ye mibale ya mibali, bakendeki kovanda na mboka Moabi. 2 Kombo ya mobali yango ezalaki « Elimeleki ; » kombo ya mwasi na ye ezalaki « Naomi ; » mpe bakombo ya bana na ye ya mibali ezalaki « Maaloni » mpe « Kilioni. » Bazalaki bato ya libota ya Efrate mpe bawutaki na Beteleemi ya Yuda. Bakendeki na Moabi mpe bavandaki kuna. 3 Elimeleki, mobali ya Naomi, akufaki ; mpe Naomi atikalaki ye moko elongo na bana na ye mibale ya mibali. 4 Bana na ye mibale ya mibali babalaki basi ya Moabi : ya liboso, kombo na ye ezalaki « Oripa ; » mpe ya mibale, « Rite. » Sima na bango kowumela kuna mibu pene zomi, 5 Maaloni mpe Kilioni bakufaki. Naomi atikalaki ye moko, azangaki bana na ye mibale ya mibali mpe mobali na ye. 6 Tango Naomi ayokaki wuta na Moabi ete Yawe ayaki mpo na kosunga bato na Ye na kopesa bango biloko ya kolia, ye elongo na babokilo na ye ya basi babongamaki mpo na kozonga na Yuda wuta na Moabi. 7 Elongo na babokilo na ye mibale ya basi, Naomi alongwaki na esika oyo azalaki kovanda mpe azwaki nzela mpo na kozonga na mokili ya Yuda. 8 Bongo Naomi alobaki na babokilo na ye mibale ya basi :— Bozonga, moto na moto na ndako ya mama na ye. Tika ete Yawe asalela bino bolamu ndenge bosalaki bolamu epai ya bato oyo bakufaki mpe epai na ngai moko. 9 Tika ete Yawe apesa na moko na moko na bino bopemi kati na ndako ya mobali mosusu.Bongo Naomi apesaki bango beze, mpe balelaki makasi. 10 Sima, balobaki na ye :— Tokokende elongo na yo, epai ya bato na yo. 11 Kasi Naomi azongiselaki bango :— Bana na ngai ya basi, bozonga na bandako na bino. Mpo na nini kolanda ngai ? Boni, nakoki lisusu kobota bana mibali oyo bakoki kozala mibali na bino ? 12 Bana na ngai, bozonga epai na bino ; nakomi mobange makasi, nakokoka lisusu kobala te. Ata soki nakanisi ete nazali nanu na elikya ya kobota, mpe, na butu ya lelo, nasangisi nzoto na mobali, mpe naboti bana mibali, 13 boni, bokokoka penza kozela kino bakokola ? Bokokoba kaka kozanga kobala mpo na bango ? Te, bana na ngai ! Mawa na ngai ezali makasi koleka mawa na bino, pamba te loboko na Yawe eyokisi ngai pasi makasi. 14 Tango bayokaki bongo, balelaki lisusu. Boye Oripa apesaki mama-bokilo na ye beze mpe mbote ya suka. Kasi Rite akangamaki kaka na ye. 15 Naomi alobaki na Rite :— Tala, mbanda na yo azongi epai ya bato na ye mpe epai ya banzambe na ye ; yo mpe zonga elongo na ye. 16 Kasi Rite azongiselaki ye :— Kotindika ngai na makasi te ete natika yo to napengwa na nzela na yo ; pamba te na esika nyonso oyo yo okokende nde ngai mpe nakokende, mpe na esika nyonso oyo yo okovanda nde ngai mpe nakovanda ; bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai. 17 Na esika oyo yo okokufa nde ngai mpe nakokufa, mpe na esika yango nde bakokunda ngai. Tika ete Yawe apesa ngai etumbu ya makasi soki eloko mosusu ekaboli biso longola kaka kufa. 18 Tango Naomi amonaki ete Rite atingami kaka kokende na ye elongo, atikaki kotindika ye na makasi. 19 Yango wana, bango mibale bakendeki kino bakomaki na Beteleemi. Tango bakomaki na Beteleemi, engumba mobimba eyokaki mawa mpo na bango. Mpe basi batunaki :— Oyo Naomi ? 20 Ye alobaki na bango :— Bobenga ngai lisusu Naomi te, kasi Mara ; pamba te Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayokisi ngai mawa mingi. 21 Nazalaki na biloko ebele tango nakendeki, kasi Yawe azongisi ngai maboko pamba. Bongo mpo na nini kobenga ngai lisusu Naomi ? Yawe ayokisi ngai pasi, mpe Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayokisi ngai mawa. 22 Ndenge wana nde Naomi azongaki na Yuda wuta na Moabi, elongo na Rite, moto ya Moabi, bokilo na ye ya mwasi. Bakomaki na Beteleemi, na ebandeli ya tango oyo babukaka bambuma ya orje.

In Other Versions

Ruth 1 in the ANGEFD

Ruth 1 in the ANTPNG2D

Ruth 1 in the AS21

Ruth 1 in the BAGH

Ruth 1 in the BBPNG

Ruth 1 in the BBT1E

Ruth 1 in the BDS

Ruth 1 in the BEV

Ruth 1 in the BHAD

Ruth 1 in the BIB

Ruth 1 in the BLPT

Ruth 1 in the BNT

Ruth 1 in the BNTABOOT

Ruth 1 in the BNTLV

Ruth 1 in the BOATCB

Ruth 1 in the BOATCB2

Ruth 1 in the BOBCV

Ruth 1 in the BOCNT

Ruth 1 in the BOECS

Ruth 1 in the BOGWICC

Ruth 1 in the BOHCB

Ruth 1 in the BOHCV

Ruth 1 in the BOHLNT

Ruth 1 in the BOHNTLTAL

Ruth 1 in the BOICB

Ruth 1 in the BOILNTAP

Ruth 1 in the BOITCV

Ruth 1 in the BOKCV

Ruth 1 in the BOKCV2

Ruth 1 in the BOKHWOG

Ruth 1 in the BOKSSV

Ruth 1 in the BOLCB

Ruth 1 in the BOMCV

Ruth 1 in the BONAV

Ruth 1 in the BONCB

Ruth 1 in the BONLT

Ruth 1 in the BONUT2

Ruth 1 in the BOPLNT

Ruth 1 in the BOSCB

Ruth 1 in the BOSNC

Ruth 1 in the BOTLNT

Ruth 1 in the BOVCB

Ruth 1 in the BOYCB

Ruth 1 in the BPBB

Ruth 1 in the BPH

Ruth 1 in the BSB

Ruth 1 in the CCB

Ruth 1 in the CUV

Ruth 1 in the CUVS

Ruth 1 in the DBT

Ruth 1 in the DGDNT

Ruth 1 in the DHNT

Ruth 1 in the DNT

Ruth 1 in the ELBE

Ruth 1 in the EMTV

Ruth 1 in the ESV

Ruth 1 in the FBV

Ruth 1 in the FEB

Ruth 1 in the GGMNT

Ruth 1 in the GNT

Ruth 1 in the HARY

Ruth 1 in the HNT

Ruth 1 in the IRVA

Ruth 1 in the IRVB

Ruth 1 in the IRVG

Ruth 1 in the IRVH

Ruth 1 in the IRVK

Ruth 1 in the IRVM

Ruth 1 in the IRVM2

Ruth 1 in the IRVO

Ruth 1 in the IRVP

Ruth 1 in the IRVT

Ruth 1 in the IRVT2

Ruth 1 in the IRVU

Ruth 1 in the ISVN

Ruth 1 in the JSNT

Ruth 1 in the KAPI

Ruth 1 in the KBT1ETNIK

Ruth 1 in the KBV

Ruth 1 in the KJV

Ruth 1 in the KNFD

Ruth 1 in the LBA

Ruth 1 in the LBLA

Ruth 1 in the LNT

Ruth 1 in the LSV

Ruth 1 in the MAAL

Ruth 1 in the MBV

Ruth 1 in the MBV2

Ruth 1 in the MHNT

Ruth 1 in the MKNFD

Ruth 1 in the MNG

Ruth 1 in the MNT

Ruth 1 in the MNT2

Ruth 1 in the MRS1T

Ruth 1 in the NAA

Ruth 1 in the NASB

Ruth 1 in the NBLA

Ruth 1 in the NBS

Ruth 1 in the NBVTP

Ruth 1 in the NET2

Ruth 1 in the NIV11

Ruth 1 in the NNT

Ruth 1 in the NNT2

Ruth 1 in the NNT3

Ruth 1 in the PDDPT

Ruth 1 in the PFNT

Ruth 1 in the RMNT

Ruth 1 in the SBIAS

Ruth 1 in the SBIBS

Ruth 1 in the SBIBS2

Ruth 1 in the SBICS

Ruth 1 in the SBIDS

Ruth 1 in the SBIGS

Ruth 1 in the SBIHS

Ruth 1 in the SBIIS

Ruth 1 in the SBIIS2

Ruth 1 in the SBIIS3

Ruth 1 in the SBIKS

Ruth 1 in the SBIKS2

Ruth 1 in the SBIMS

Ruth 1 in the SBIOS

Ruth 1 in the SBIPS

Ruth 1 in the SBISS

Ruth 1 in the SBITS

Ruth 1 in the SBITS2

Ruth 1 in the SBITS3

Ruth 1 in the SBITS4

Ruth 1 in the SBIUS

Ruth 1 in the SBIVS

Ruth 1 in the SBT

Ruth 1 in the SBT1E

Ruth 1 in the SCHL

Ruth 1 in the SNT

Ruth 1 in the SUSU

Ruth 1 in the SUSU2

Ruth 1 in the SYNO

Ruth 1 in the TBIAOTANT

Ruth 1 in the TBT1E

Ruth 1 in the TBT1E2

Ruth 1 in the TFTIP

Ruth 1 in the TFTU

Ruth 1 in the TGNTATF3T

Ruth 1 in the THAI

Ruth 1 in the TNFD

Ruth 1 in the TNT

Ruth 1 in the TNTIK

Ruth 1 in the TNTIL

Ruth 1 in the TNTIN

Ruth 1 in the TNTIP

Ruth 1 in the TNTIZ

Ruth 1 in the TOMA

Ruth 1 in the TTENT

Ruth 1 in the UBG

Ruth 1 in the UGV

Ruth 1 in the UGV2

Ruth 1 in the UGV3

Ruth 1 in the VBL

Ruth 1 in the VDCC

Ruth 1 in the YALU

Ruth 1 in the YAPE

Ruth 1 in the YBVTP

Ruth 1 in the ZBP