1 Chronicles 19 (BOLCB2)
1 Sima na mwa tango, Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, akufaki, mpe mwana na ye ya mobali akitanaki na ye na bokonzi. 2 Davidi amilobelaki : « Nakotalisa bolamu epai ya Anuni, mwana mobali ya Naashi, pamba te tata na ye atalisaki ngai bolamu. »Boye Davidi atindaki bato epai ya Anuni mpo na kobondisa ye na tina na kufa ya tata na ye. Tango basali ya Davidi bakomaki epai ya Anuni, na mokili ya bato ya Amoni, mpo na kobondisa ye, 3 bakambi ya bato ya Amoni balobaki na Anuni : « Okanisi ete ezali mpo na kopesa tata na yo lokumu nde Davidi atindi bato mpo na kobondisa yo ? Bato wana bayei epai na yo mpo na kotala mpe kononga mokili mpo ete babebisa yango. » 4 Boye, Anuni akangaki basali ya Davidi, akataki bango mandefu, akataki bango bilamba kino na likolo ya mipende mpe abenganaki bango. 5 Tango bayebisaki Davidi makambo oyo ekweyelaki bato wana, atindaki bato mosusu mpo na kokende kokutana na bango, pamba te basambwisaki bango makasi. Mokonzi atindelaki bango maloba oyo : « Bovanda na Jeriko kino mandefu na bino ekobota, sima nde bokozonga. » 6 Tango bato ya Amoni bamonaki ete bamilukeli makambo epai ya Davidi, Anuni mpe bato ya Amoni batindaki bakilo ya palata nkoto tuku misato epai ya bato ya Siri ya Mezopotami, ya Maaka mpe ya Tsoba, mpo na kodefa bashar mpe basoda oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda. 7 Badefaki bashar, basoda nkoto tuku misato na mibale oyo babundaka likolo ya bampunda, mpe mokonzi ya Maaka elongo na mampinga na ye. Bongo, bayaki kotonga molako na bango pembeni ya Medeba. Kaka na tango yango, bato ya Amoni basanganaki na engumba na bango mpe babimaki mpo na kobunda. 8 Tango kaka Davidi ayokaki bongo, atindaki Joabi elongo na mampinga nyonso ya basoda ya mpiko. 9 Bato ya Amoni babimaki mpe batandamaki na milongo mpo na bitumba, na ekuke ya engumba na bango ; kasi bakonzi oyo bayaki bazalaki na esika mosusu, kati na zamba. 10 Tango Joabi amonaki ete milongo ya bitumba ezali na liboso mpe na sima na ye, aponaki basoda ya Isalaele, oyo baleki na mpiko mpe atiaki bango na milongo mpo na kobundisa bato ya Siri. 11 Atiaki basoda oyo batikalaki na se ya bokonzi ya ndeko na ye ya mobali, Abishayi ; mpe atandaki bango na milongo ya bitumba mpo na kobundisa bato ya Amoni. 12 Joabi alobaki : « Soki bato ya Siri baleki ngai na makasi, yo okoya kosunga ngai ; kasi soki bato ya Amoni baleki yo na makasi, wana ngai nakosunga yo. 13 Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. » 14 Boye, Joabi mpe basoda oyo bazalaki elongo na ye bapusanaki mpo na kobundisa bato ya Siri ; mpe bato yango ya Siri bakimaki liboso na ye. 15 Tango bato ya Amoni bamonaki bato ya Siri kokima, bango mpe bakimaki liboso ya Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mpe bazongaki na engumba. Bongo, Joabi azongaki na Yelusalemi. 16 Tango bato ya Siri bamonaki ete Isalaele alongi bango, batindaki bantoma kobenga bato mosusu ya Siri oyo bazalaki na ngambo mosusu ya ebale Efrate. Tsofaki, mokonzi ya mampinga ya Adadezeri, azalaki liboso na bango. 17 Tango Davidi azwaki sango yango, asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe akatisaki Yordani ; apusanaki mpe asalaki molongo ya bitumba liboso na bango ya bato ya Siri, mpe bato ya Siri babundisaki ye. 18 Kasi bato ya Siri bakimaki liboso ya Isalaele, mpe Davidi abomaki basoda na bango, nkoto sambo oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda mpe basoda nkoto tuku minei oyo babundaka bitumba na makolo. Davidi abomaki lisusu Tsofaki, mokonzi na bango ya mampinga. 19 Tango bawumbu ya Adadezeri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basalaki kimia elongo na Davidi mpe bakomaki na se ya bokonzi na ye. Boye bato ya Siri balingaki lisusu te kosunga bato ya Amoni.
In Other Versions
1 Chronicles 19 in the ANGEFD
1 Chronicles 19 in the ANTPNG2D
1 Chronicles 19 in the AS21
1 Chronicles 19 in the BAGH
1 Chronicles 19 in the BBPNG
1 Chronicles 19 in the BBT1E
1 Chronicles 19 in the BDS
1 Chronicles 19 in the BEV
1 Chronicles 19 in the BHAD
1 Chronicles 19 in the BIB
1 Chronicles 19 in the BLPT
1 Chronicles 19 in the BNT
1 Chronicles 19 in the BNTABOOT
1 Chronicles 19 in the BNTLV
1 Chronicles 19 in the BOATCB
1 Chronicles 19 in the BOATCB2
1 Chronicles 19 in the BOBCV
1 Chronicles 19 in the BOCNT
1 Chronicles 19 in the BOECS
1 Chronicles 19 in the BOGWICC
1 Chronicles 19 in the BOHCB
1 Chronicles 19 in the BOHCV
1 Chronicles 19 in the BOHLNT
1 Chronicles 19 in the BOHNTLTAL
1 Chronicles 19 in the BOICB
1 Chronicles 19 in the BOILNTAP
1 Chronicles 19 in the BOITCV
1 Chronicles 19 in the BOKCV
1 Chronicles 19 in the BOKCV2
1 Chronicles 19 in the BOKHWOG
1 Chronicles 19 in the BOKSSV
1 Chronicles 19 in the BOLCB
1 Chronicles 19 in the BOMCV
1 Chronicles 19 in the BONAV
1 Chronicles 19 in the BONCB
1 Chronicles 19 in the BONLT
1 Chronicles 19 in the BONUT2
1 Chronicles 19 in the BOPLNT
1 Chronicles 19 in the BOSCB
1 Chronicles 19 in the BOSNC
1 Chronicles 19 in the BOTLNT
1 Chronicles 19 in the BOVCB
1 Chronicles 19 in the BOYCB
1 Chronicles 19 in the BPBB
1 Chronicles 19 in the BPH
1 Chronicles 19 in the BSB
1 Chronicles 19 in the CCB
1 Chronicles 19 in the CUV
1 Chronicles 19 in the CUVS
1 Chronicles 19 in the DBT
1 Chronicles 19 in the DGDNT
1 Chronicles 19 in the DHNT
1 Chronicles 19 in the DNT
1 Chronicles 19 in the ELBE
1 Chronicles 19 in the EMTV
1 Chronicles 19 in the ESV
1 Chronicles 19 in the FBV
1 Chronicles 19 in the FEB
1 Chronicles 19 in the GGMNT
1 Chronicles 19 in the GNT
1 Chronicles 19 in the HARY
1 Chronicles 19 in the HNT
1 Chronicles 19 in the IRVA
1 Chronicles 19 in the IRVB
1 Chronicles 19 in the IRVG
1 Chronicles 19 in the IRVH
1 Chronicles 19 in the IRVK
1 Chronicles 19 in the IRVM
1 Chronicles 19 in the IRVM2
1 Chronicles 19 in the IRVO
1 Chronicles 19 in the IRVP
1 Chronicles 19 in the IRVT
1 Chronicles 19 in the IRVT2
1 Chronicles 19 in the IRVU
1 Chronicles 19 in the ISVN
1 Chronicles 19 in the JSNT
1 Chronicles 19 in the KAPI
1 Chronicles 19 in the KBT1ETNIK
1 Chronicles 19 in the KBV
1 Chronicles 19 in the KJV
1 Chronicles 19 in the KNFD
1 Chronicles 19 in the LBA
1 Chronicles 19 in the LBLA
1 Chronicles 19 in the LNT
1 Chronicles 19 in the LSV
1 Chronicles 19 in the MAAL
1 Chronicles 19 in the MBV
1 Chronicles 19 in the MBV2
1 Chronicles 19 in the MHNT
1 Chronicles 19 in the MKNFD
1 Chronicles 19 in the MNG
1 Chronicles 19 in the MNT
1 Chronicles 19 in the MNT2
1 Chronicles 19 in the MRS1T
1 Chronicles 19 in the NAA
1 Chronicles 19 in the NASB
1 Chronicles 19 in the NBLA
1 Chronicles 19 in the NBS
1 Chronicles 19 in the NBVTP
1 Chronicles 19 in the NET2
1 Chronicles 19 in the NIV11
1 Chronicles 19 in the NNT
1 Chronicles 19 in the NNT2
1 Chronicles 19 in the NNT3
1 Chronicles 19 in the PDDPT
1 Chronicles 19 in the PFNT
1 Chronicles 19 in the RMNT
1 Chronicles 19 in the SBIAS
1 Chronicles 19 in the SBIBS
1 Chronicles 19 in the SBIBS2
1 Chronicles 19 in the SBICS
1 Chronicles 19 in the SBIDS
1 Chronicles 19 in the SBIGS
1 Chronicles 19 in the SBIHS
1 Chronicles 19 in the SBIIS
1 Chronicles 19 in the SBIIS2
1 Chronicles 19 in the SBIIS3
1 Chronicles 19 in the SBIKS
1 Chronicles 19 in the SBIKS2
1 Chronicles 19 in the SBIMS
1 Chronicles 19 in the SBIOS
1 Chronicles 19 in the SBIPS
1 Chronicles 19 in the SBISS
1 Chronicles 19 in the SBITS
1 Chronicles 19 in the SBITS2
1 Chronicles 19 in the SBITS3
1 Chronicles 19 in the SBITS4
1 Chronicles 19 in the SBIUS
1 Chronicles 19 in the SBIVS
1 Chronicles 19 in the SBT
1 Chronicles 19 in the SBT1E
1 Chronicles 19 in the SCHL
1 Chronicles 19 in the SNT
1 Chronicles 19 in the SUSU
1 Chronicles 19 in the SUSU2
1 Chronicles 19 in the SYNO
1 Chronicles 19 in the TBIAOTANT
1 Chronicles 19 in the TBT1E
1 Chronicles 19 in the TBT1E2
1 Chronicles 19 in the TFTIP
1 Chronicles 19 in the TFTU
1 Chronicles 19 in the TGNTATF3T
1 Chronicles 19 in the THAI
1 Chronicles 19 in the TNFD
1 Chronicles 19 in the TNT
1 Chronicles 19 in the TNTIK
1 Chronicles 19 in the TNTIL
1 Chronicles 19 in the TNTIN
1 Chronicles 19 in the TNTIP
1 Chronicles 19 in the TNTIZ
1 Chronicles 19 in the TOMA
1 Chronicles 19 in the TTENT
1 Chronicles 19 in the UBG
1 Chronicles 19 in the UGV
1 Chronicles 19 in the UGV2
1 Chronicles 19 in the UGV3
1 Chronicles 19 in the VBL
1 Chronicles 19 in the VDCC
1 Chronicles 19 in the YALU
1 Chronicles 19 in the YAPE
1 Chronicles 19 in the YBVTP
1 Chronicles 19 in the ZBP