1 Corinthians 12 (BOLCB2)

1 Bandeko, nakosepela ete bozala na boyebi na tina na makambo oyo etali makabo ya Molimo. 2 Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu Bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te. 3 Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe, akoki koloba : « Tika ete Yesu alakelama mabe ! » Mpe moto moko te akoki koloba : « Yesu azali Nkolo, » soki akambami na Molimo Mosantu te. 4 Makabo ezali ya ndenge na ndenge, kasi Molimo azali kaka moko. 5 Misala ezali ya ndenge na ndenge, kasi Nkolo azali kaka moko. 6 Ezali na lolenge ebele ya kosalela Nkolo, kasi Nzambe azali kaka moko ; mpe ezali Ye nde asalaka nyonso kati na bato nyonso. 7 Nzokande, Molimo amimonisaka epai na moko na moko mpo na bolamu ya bato nyonso. 8 Epai na moko, Molimo apesi liloba ya bwanya ; epai na mosusu, liloba ya boyebi ; 9 epai na mosusu kondima ; epai na mosusu, likabo ya kobikisa babeli ; 10 epai na mosusu, nguya ya kosala bikamwa ; epai na mosusu, likabo ya kosakola ; epai na mosusu, likabo ya kososola milimo ; epai na mosusu, likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge ; epai na mosusu, likabo ya kolimbola nkota. 11 Ezali Molimo kaka moko nde asalaka misala wana nyonso mpe akabolaka yango epai na moko na moko, ndenge Ye moko alingi. 12 Nzoto ezali kaka moko, kasi ezali na biteni ebele ; mpe atako motango na yango ezali ebele, kasi ezali kosala kaka nzoto moko. Ezali mpe bongo mpo na Klisto. 13 Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko : ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko. 14 Nzoto ezali na eteni moko te, kasi ezali na biteni ebele. 15 Soki lokolo elobi : « Lokola nazali loboko te, nazali kati na nzoto te ; » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo ? 16 Soki mpe litoyi elobi : « Lokola nazali liso te, nazali eteni ya nzoto te ; » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo ? 17 Soki nzoto mobimba ezalaki kaka liso, nzoto yango elingaki koyoka ndenge nini ? Soki nzoto mobimba ezalaki kaka litoyi, nzoto yango elingaki koyoka solo ndenge nini ? 18 Kasi Nzambe atiaki biteni kati na nzoto, mpe amonaki ete ezali malamu mpo na eteni moko na moko kozala na mosala na yango. 19 Soki biteni nyonso ezalaki kaka eteni moko, boni, nzoto elingaki penza kozala nzoto ? 20 Solo, biteni ezali ebele, kasi nzoto ezali kaka moko. 21 Yango wana, liso ekoki te koloba na loboko : « Nazali na posa na yo te ; » moto mpe ekoki te koloba na makolo : « Nazali na posa na bino te. » 22 Nzokande biteni ya nzoto, oyo emonanaka ete ezali na motuya moke, ezalaka na tina makasi ; 23 biteni oyo tozwaka na lokumu moke kati na nzoto, tobatelaka yango makasi ; mpe biteni oyo toyokaka nkele, yango nde tobongisaka na lolenge malamu, 24 wana biteni oyo ebetisaka mabaku te ezalaka na posa ya lolenge malamu yango te. Nzambe abongisa nzoto na lolenge ete basengeli kaka kozwaka na lokumu mingi, biteni oyo emonanaka lokola ezanga lokumu : 25 asalaki bongo mpo ete bokabwani ezala te kati na nzoto, kasi mpo ete biteni na yango esunganaka. 26 Soki eteni moko eyoki pasi, biteni nyonso esengeli koyoka pasi elongo na moko yango ; soki mpe moko kaka nde esepeli, biteni nyonso esengeli kokabola esengo elongo na moko yango. 27 Nzokande bino, bozali nzoto ya Klisto, mpe moko na moko kati na bino azali eteni ya nzoto yango ya Klisto. 28 Mpe kati na Lingomba, Nzambe atiaki : ya liboso, bantoma ; ya mibale, basakoli ; ya misato, balakisi ; mpe na sima, bato oyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, ba-oyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, ba-oyo bazali na likabo ya kosunga bato, ba-oyo bazali na likabo ya kokamba, mpe ba-oyo bazali na likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge. 29 Boni, bango nyonso bazali bantoma ? Bango nyonso bazali basakoli ? Bango nyonso bazali balakisi ? Bango nyonso basalaka bikamwa ? 30 Bango nyonso bazali na likabo ya kobikisa babeli ? Bango nyonso balobaka nkota ya ndenge na ndenge ? Bango nyonso balimbolaka nkota ? 31 Bozala na posa makasi ya kozala na makabo oyo eleki na monene. Mpo na yango, nakolakisa bino nzela oyo eleki malamu.

In Other Versions

1 Corinthians 12 in the ANGEFD

1 Corinthians 12 in the ANTPNG2D

1 Corinthians 12 in the AS21

1 Corinthians 12 in the BAGH

1 Corinthians 12 in the BBPNG

1 Corinthians 12 in the BBT1E

1 Corinthians 12 in the BDS

1 Corinthians 12 in the BEV

1 Corinthians 12 in the BHAD

1 Corinthians 12 in the BIB

1 Corinthians 12 in the BLPT

1 Corinthians 12 in the BNT

1 Corinthians 12 in the BNTABOOT

1 Corinthians 12 in the BNTLV

1 Corinthians 12 in the BOATCB

1 Corinthians 12 in the BOATCB2

1 Corinthians 12 in the BOBCV

1 Corinthians 12 in the BOCNT

1 Corinthians 12 in the BOECS

1 Corinthians 12 in the BOGWICC

1 Corinthians 12 in the BOHCB

1 Corinthians 12 in the BOHCV

1 Corinthians 12 in the BOHLNT

1 Corinthians 12 in the BOHNTLTAL

1 Corinthians 12 in the BOICB

1 Corinthians 12 in the BOILNTAP

1 Corinthians 12 in the BOITCV

1 Corinthians 12 in the BOKCV

1 Corinthians 12 in the BOKCV2

1 Corinthians 12 in the BOKHWOG

1 Corinthians 12 in the BOKSSV

1 Corinthians 12 in the BOLCB

1 Corinthians 12 in the BOMCV

1 Corinthians 12 in the BONAV

1 Corinthians 12 in the BONCB

1 Corinthians 12 in the BONLT

1 Corinthians 12 in the BONUT2

1 Corinthians 12 in the BOPLNT

1 Corinthians 12 in the BOSCB

1 Corinthians 12 in the BOSNC

1 Corinthians 12 in the BOTLNT

1 Corinthians 12 in the BOVCB

1 Corinthians 12 in the BOYCB

1 Corinthians 12 in the BPBB

1 Corinthians 12 in the BPH

1 Corinthians 12 in the BSB

1 Corinthians 12 in the CCB

1 Corinthians 12 in the CUV

1 Corinthians 12 in the CUVS

1 Corinthians 12 in the DBT

1 Corinthians 12 in the DGDNT

1 Corinthians 12 in the DHNT

1 Corinthians 12 in the DNT

1 Corinthians 12 in the ELBE

1 Corinthians 12 in the EMTV

1 Corinthians 12 in the ESV

1 Corinthians 12 in the FBV

1 Corinthians 12 in the FEB

1 Corinthians 12 in the GGMNT

1 Corinthians 12 in the GNT

1 Corinthians 12 in the HARY

1 Corinthians 12 in the HNT

1 Corinthians 12 in the IRVA

1 Corinthians 12 in the IRVB

1 Corinthians 12 in the IRVG

1 Corinthians 12 in the IRVH

1 Corinthians 12 in the IRVK

1 Corinthians 12 in the IRVM

1 Corinthians 12 in the IRVM2

1 Corinthians 12 in the IRVO

1 Corinthians 12 in the IRVP

1 Corinthians 12 in the IRVT

1 Corinthians 12 in the IRVT2

1 Corinthians 12 in the IRVU

1 Corinthians 12 in the ISVN

1 Corinthians 12 in the JSNT

1 Corinthians 12 in the KAPI

1 Corinthians 12 in the KBT1ETNIK

1 Corinthians 12 in the KBV

1 Corinthians 12 in the KJV

1 Corinthians 12 in the KNFD

1 Corinthians 12 in the LBA

1 Corinthians 12 in the LBLA

1 Corinthians 12 in the LNT

1 Corinthians 12 in the LSV

1 Corinthians 12 in the MAAL

1 Corinthians 12 in the MBV

1 Corinthians 12 in the MBV2

1 Corinthians 12 in the MHNT

1 Corinthians 12 in the MKNFD

1 Corinthians 12 in the MNG

1 Corinthians 12 in the MNT

1 Corinthians 12 in the MNT2

1 Corinthians 12 in the MRS1T

1 Corinthians 12 in the NAA

1 Corinthians 12 in the NASB

1 Corinthians 12 in the NBLA

1 Corinthians 12 in the NBS

1 Corinthians 12 in the NBVTP

1 Corinthians 12 in the NET2

1 Corinthians 12 in the NIV11

1 Corinthians 12 in the NNT

1 Corinthians 12 in the NNT2

1 Corinthians 12 in the NNT3

1 Corinthians 12 in the PDDPT

1 Corinthians 12 in the PFNT

1 Corinthians 12 in the RMNT

1 Corinthians 12 in the SBIAS

1 Corinthians 12 in the SBIBS

1 Corinthians 12 in the SBIBS2

1 Corinthians 12 in the SBICS

1 Corinthians 12 in the SBIDS

1 Corinthians 12 in the SBIGS

1 Corinthians 12 in the SBIHS

1 Corinthians 12 in the SBIIS

1 Corinthians 12 in the SBIIS2

1 Corinthians 12 in the SBIIS3

1 Corinthians 12 in the SBIKS

1 Corinthians 12 in the SBIKS2

1 Corinthians 12 in the SBIMS

1 Corinthians 12 in the SBIOS

1 Corinthians 12 in the SBIPS

1 Corinthians 12 in the SBISS

1 Corinthians 12 in the SBITS

1 Corinthians 12 in the SBITS2

1 Corinthians 12 in the SBITS3

1 Corinthians 12 in the SBITS4

1 Corinthians 12 in the SBIUS

1 Corinthians 12 in the SBIVS

1 Corinthians 12 in the SBT

1 Corinthians 12 in the SBT1E

1 Corinthians 12 in the SCHL

1 Corinthians 12 in the SNT

1 Corinthians 12 in the SUSU

1 Corinthians 12 in the SUSU2

1 Corinthians 12 in the SYNO

1 Corinthians 12 in the TBIAOTANT

1 Corinthians 12 in the TBT1E

1 Corinthians 12 in the TBT1E2

1 Corinthians 12 in the TFTIP

1 Corinthians 12 in the TFTU

1 Corinthians 12 in the TGNTATF3T

1 Corinthians 12 in the THAI

1 Corinthians 12 in the TNFD

1 Corinthians 12 in the TNT

1 Corinthians 12 in the TNTIK

1 Corinthians 12 in the TNTIL

1 Corinthians 12 in the TNTIN

1 Corinthians 12 in the TNTIP

1 Corinthians 12 in the TNTIZ

1 Corinthians 12 in the TOMA

1 Corinthians 12 in the TTENT

1 Corinthians 12 in the UBG

1 Corinthians 12 in the UGV

1 Corinthians 12 in the UGV2

1 Corinthians 12 in the UGV3

1 Corinthians 12 in the VBL

1 Corinthians 12 in the VDCC

1 Corinthians 12 in the YALU

1 Corinthians 12 in the YAPE

1 Corinthians 12 in the YBVTP

1 Corinthians 12 in the ZBP