1 Corinthians 4 (BOLCB2)

1 Boye, tika ete bato bazwa biso lokola basali ya Klisto mpe lokola bakambi oyo bazwi mokumba ya koyebisa mabombami ya Nzambe. 2 Nzokande, eloko oyo basengaka epai ya bakambi, ezali ete bazala sembo. 3 Mpo na ngai, nazali komisambisa na likambo moko te. Yango wana, ezala kosambisa na bino to kosambisa ya esambiselo ya bato, elobelaka ngai eloko moko te. 4 Motema na ngai ezali kosambisa ngai ata na likambo moko te ; nzokande, yango te nde ezali kolongisa ngai. Oyo asambisaka ngai, ezali nde Nkolo. 5 Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe. 6 Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi, mpo na bolamu na bino, mpo ete, na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo : Bolekaka mondelo te ya makambo oyo ekomama ; mpe mpo ete moko te kati na bino atonda na lolendo na kolanda moko mpe koyina mosusu. 7 Boni, nani azali kokesenisa yo na bato mosusu ? Eloko nini ozali na yango, oyo bapesa yo te ? Mpe lokola bapesa yo yango, mpo na nini komikumisa lokola nde bapesaki yo yango te ? 8 Bosili kotondisama na nyonso oyo bozalaka na makanisi ya kozwa ! Bosili penza kokoma bato ya bomengo ! Bobandi kokonza ; bobandi kokonza elongo na biso te !Nalingaka ete bobanda penza kokonza, mpo ete biso mpe tokonza elongo na bino ! 9 Pamba te nakanisi ete, biso bantoma, Nzambe atia biso na suka ya molongo lokola bato oyo bakatela bango etumbu ya kufa na libanda ya masano. Mpo na mokili mobimba, mpo na ba-anjelu mpe mpo na bato, Nzambe akomisa biso lokola lisano ya kotala. 10 Biso, likolo ya Klisto, tozali bazoba ; kasi bino, kati na Klisto, bozali bato ya mayele ! Biso, tozali bato na bolembu ; kasi bino, bozali bato makasi ! Bino, bozali kozwa lokumu ; kasi biso, tozali kotiolama ! 11 Kino sik’oyo, tozali konyokwama na nzala, na posa ya mayi, tozangi bilamba, tozali kobetama, tozali koyengayenga, 12 mpe tozali kosala mosala makasi na maboko na biso. Tango bafingaka biso, topambolaka ; tango banyokolaka biso, toyikelaka yango kaka mpiko ; 13 tango bakoselaka biso makambo mpo na kobebisa lokumu na biso, tozongisaka kaka na maloba ya boboto. Mpe kino sik’oyo, tokomi lokola bosoto ya mokili, mpe lokola lisapo ya bato. 14 Nazali kokoma makambo oyo mpo na koyokisa bino soni te, kasi mpo na kokebisa bino lokola bana na ngai ya bolingo. 15 Pamba te, ata soki bozalaki na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, kasi bozali na batata ebele te. Ngai nde nazali tata na bino kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu. 16 Boye, nabondeli bino : bolanda ndakisa na ngai. 17 Ezali na tina wana nde natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo, oyo azali sembo kati na Nkolo ; akolobela bino lisusu banzela na ngai mpo na bomoi kati na Yesu-Klisto, ndenge kaka nateyaka yango bisika nyonso kati na Mangomba nyonso. 18 Bato mosusu kati na bino bakomi na lofundu, bakanisaka ete nakoya lisusu te epai na bino. 19 Kasi, soki Nkolo alingi, nakoya epai na bino kala mingi te ; mpe nakoyeba kaka te ndenge nini bato yango ya lofundu balobaka, kasi mpe nguya nini bazali na yango. 20 Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya maloba te, kasi likambo ya nguya. 21 Bolingi nini ? Naya epai na bino na fimbu to na bolingo mpe na molimo ya boboto ?

In Other Versions

1 Corinthians 4 in the ANGEFD

1 Corinthians 4 in the ANTPNG2D

1 Corinthians 4 in the AS21

1 Corinthians 4 in the BAGH

1 Corinthians 4 in the BBPNG

1 Corinthians 4 in the BBT1E

1 Corinthians 4 in the BDS

1 Corinthians 4 in the BEV

1 Corinthians 4 in the BHAD

1 Corinthians 4 in the BIB

1 Corinthians 4 in the BLPT

1 Corinthians 4 in the BNT

1 Corinthians 4 in the BNTABOOT

1 Corinthians 4 in the BNTLV

1 Corinthians 4 in the BOATCB

1 Corinthians 4 in the BOATCB2

1 Corinthians 4 in the BOBCV

1 Corinthians 4 in the BOCNT

1 Corinthians 4 in the BOECS

1 Corinthians 4 in the BOGWICC

1 Corinthians 4 in the BOHCB

1 Corinthians 4 in the BOHCV

1 Corinthians 4 in the BOHLNT

1 Corinthians 4 in the BOHNTLTAL

1 Corinthians 4 in the BOICB

1 Corinthians 4 in the BOILNTAP

1 Corinthians 4 in the BOITCV

1 Corinthians 4 in the BOKCV

1 Corinthians 4 in the BOKCV2

1 Corinthians 4 in the BOKHWOG

1 Corinthians 4 in the BOKSSV

1 Corinthians 4 in the BOLCB

1 Corinthians 4 in the BOMCV

1 Corinthians 4 in the BONAV

1 Corinthians 4 in the BONCB

1 Corinthians 4 in the BONLT

1 Corinthians 4 in the BONUT2

1 Corinthians 4 in the BOPLNT

1 Corinthians 4 in the BOSCB

1 Corinthians 4 in the BOSNC

1 Corinthians 4 in the BOTLNT

1 Corinthians 4 in the BOVCB

1 Corinthians 4 in the BOYCB

1 Corinthians 4 in the BPBB

1 Corinthians 4 in the BPH

1 Corinthians 4 in the BSB

1 Corinthians 4 in the CCB

1 Corinthians 4 in the CUV

1 Corinthians 4 in the CUVS

1 Corinthians 4 in the DBT

1 Corinthians 4 in the DGDNT

1 Corinthians 4 in the DHNT

1 Corinthians 4 in the DNT

1 Corinthians 4 in the ELBE

1 Corinthians 4 in the EMTV

1 Corinthians 4 in the ESV

1 Corinthians 4 in the FBV

1 Corinthians 4 in the FEB

1 Corinthians 4 in the GGMNT

1 Corinthians 4 in the GNT

1 Corinthians 4 in the HARY

1 Corinthians 4 in the HNT

1 Corinthians 4 in the IRVA

1 Corinthians 4 in the IRVB

1 Corinthians 4 in the IRVG

1 Corinthians 4 in the IRVH

1 Corinthians 4 in the IRVK

1 Corinthians 4 in the IRVM

1 Corinthians 4 in the IRVM2

1 Corinthians 4 in the IRVO

1 Corinthians 4 in the IRVP

1 Corinthians 4 in the IRVT

1 Corinthians 4 in the IRVT2

1 Corinthians 4 in the IRVU

1 Corinthians 4 in the ISVN

1 Corinthians 4 in the JSNT

1 Corinthians 4 in the KAPI

1 Corinthians 4 in the KBT1ETNIK

1 Corinthians 4 in the KBV

1 Corinthians 4 in the KJV

1 Corinthians 4 in the KNFD

1 Corinthians 4 in the LBA

1 Corinthians 4 in the LBLA

1 Corinthians 4 in the LNT

1 Corinthians 4 in the LSV

1 Corinthians 4 in the MAAL

1 Corinthians 4 in the MBV

1 Corinthians 4 in the MBV2

1 Corinthians 4 in the MHNT

1 Corinthians 4 in the MKNFD

1 Corinthians 4 in the MNG

1 Corinthians 4 in the MNT

1 Corinthians 4 in the MNT2

1 Corinthians 4 in the MRS1T

1 Corinthians 4 in the NAA

1 Corinthians 4 in the NASB

1 Corinthians 4 in the NBLA

1 Corinthians 4 in the NBS

1 Corinthians 4 in the NBVTP

1 Corinthians 4 in the NET2

1 Corinthians 4 in the NIV11

1 Corinthians 4 in the NNT

1 Corinthians 4 in the NNT2

1 Corinthians 4 in the NNT3

1 Corinthians 4 in the PDDPT

1 Corinthians 4 in the PFNT

1 Corinthians 4 in the RMNT

1 Corinthians 4 in the SBIAS

1 Corinthians 4 in the SBIBS

1 Corinthians 4 in the SBIBS2

1 Corinthians 4 in the SBICS

1 Corinthians 4 in the SBIDS

1 Corinthians 4 in the SBIGS

1 Corinthians 4 in the SBIHS

1 Corinthians 4 in the SBIIS

1 Corinthians 4 in the SBIIS2

1 Corinthians 4 in the SBIIS3

1 Corinthians 4 in the SBIKS

1 Corinthians 4 in the SBIKS2

1 Corinthians 4 in the SBIMS

1 Corinthians 4 in the SBIOS

1 Corinthians 4 in the SBIPS

1 Corinthians 4 in the SBISS

1 Corinthians 4 in the SBITS

1 Corinthians 4 in the SBITS2

1 Corinthians 4 in the SBITS3

1 Corinthians 4 in the SBITS4

1 Corinthians 4 in the SBIUS

1 Corinthians 4 in the SBIVS

1 Corinthians 4 in the SBT

1 Corinthians 4 in the SBT1E

1 Corinthians 4 in the SCHL

1 Corinthians 4 in the SNT

1 Corinthians 4 in the SUSU

1 Corinthians 4 in the SUSU2

1 Corinthians 4 in the SYNO

1 Corinthians 4 in the TBIAOTANT

1 Corinthians 4 in the TBT1E

1 Corinthians 4 in the TBT1E2

1 Corinthians 4 in the TFTIP

1 Corinthians 4 in the TFTU

1 Corinthians 4 in the TGNTATF3T

1 Corinthians 4 in the THAI

1 Corinthians 4 in the TNFD

1 Corinthians 4 in the TNT

1 Corinthians 4 in the TNTIK

1 Corinthians 4 in the TNTIL

1 Corinthians 4 in the TNTIN

1 Corinthians 4 in the TNTIP

1 Corinthians 4 in the TNTIZ

1 Corinthians 4 in the TOMA

1 Corinthians 4 in the TTENT

1 Corinthians 4 in the UBG

1 Corinthians 4 in the UGV

1 Corinthians 4 in the UGV2

1 Corinthians 4 in the UGV3

1 Corinthians 4 in the VBL

1 Corinthians 4 in the VDCC

1 Corinthians 4 in the YALU

1 Corinthians 4 in the YAPE

1 Corinthians 4 in the YBVTP

1 Corinthians 4 in the ZBP