2 Chronicles 18 (BOLCB2)

1 Mokonzi Jozafati akomaki na lokumu mingi mpe na bozwi ebele, asalaki boyokani elongo na Akabi na nzela ya libala. 2 Sima na ndambo ya mibu, akendeki kotala Akabi kati na Samari. Akabi abomaki bameme mpe bangombe ebele mpo na koyamba ye mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Atindikaki ye na kokende na Ramoti ya Galadi. 3 Akabi, mokonzi ya Isalaele, atunaki epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda :— Okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi ?Jozafati azongisaki :— Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko ; tokokende elongo na yo na bitumba. 4 Kasi Jozafati alobaki lisusu na mokonzi ya Isalaele :— Nabondeli yo, tuna nanu toli ya Yawe. 5 Boye, mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli nkama minei mpe atunaki bango :— Boni, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ?Bazongiselaki ye :— Kende, pamba te Nzambe akokaba yango na maboko ya mokonzi. 6 Kasi Jozafati atunaki lisusu :— Ezali lisusu na mosakoli moko te awa oyo, na nzela na ye, tokoki kotuna toli ya Yawe ? 7 Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati :— Ezali lisusu na moto moko oyo, na nzela na ye, tokoki kotuna toli ya Yawe ; kasi ngai nalingaka ye te mpo ete atikala nanu kosakola te makambo ya malamu mpo na bomoi na ngai ; asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila.Jozafati alobaki :— Tika ete mokonzi aloba bongo te ! 8 Bongo mokonzi ya Isalaele abengaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe alobaki na ye :— Memela ngai na lombangu Mishe, mwana mobali ya Yimila. 9 Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, balataki bilamba na bango ya bokonzi mpe bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi, na etando ya ekotelo ya ekuke ya Samari. Mpe basakoli nyonso bazalaki kosakola liboso na bango. 10 Nzokande, moko kati na bango, Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, asalisaki maseke ya ebende mpe alobaki :— Tala liloba oyo Yawe alobi : « Na maseke oyo, okobeta bato ya Siri kino okosilisa koboma bango. » 11 Basakoli nyonso bazalaki koloba kaka liloba moko : « Kende kobundisa Ramoti ya Galadi ! Okolonga, pamba te Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi. » 12 Ntoma oyo akendeki kobenga Mishe alobaki na ye :— Tala, basakoli nyonso bazali koloba liloba kaka moko mpo na kosakola elonga mpo na mokonzi. Boye, tika ete maloba na yo ekokana na maloba na bango : sakola elonga mpo na mokonzi. 13 Kasi Mishe azongisaki :— Na Kombo na Yawe, makambo oyo Nzambe na ngai akoloba na ngai, yango nde nakoloba. 14 Tango akomaki epai ya mokonzi, mokonzi alobaki na ye :— Mishe, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ?Azongisaki :— Bokende ! Bokolonga ! Bakokabama na maboko na bino ! 15 Kasi mokonzi alobaki na ye :— Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe ? 16 Mishe azongisaki :— Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na likolo ya bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! » 17 Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati :— Nayebisaki yo te ete asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, alobaka kaka mpo na mabe ! 18 Mishe alobaki :— Solo, boyoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai, namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. 19 Yawe atuni : « Nani akokosa Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpo ete akende kobundisa Ramoti ya Galadi mpe akufa kuna ? »Bazongisaki, moko na moko na ndenge na ye. 20 Mpe na suka na nyonso, molimo moko epusanaki, etelemaki liboso ya Yawe mpe elobaki : « Ngai oyo ! Nakokosa ye. »Yawe atunaki molimo yango : « Okosala yango ndenge nini ? » 21 Molimo yango ezongisaki : « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. »Yawe alobaki : « Solo, okolonga kokosa ye ! Kende mpe sala bongo. » 22 Mpe sik’oyo, tala, Yawe atie molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na yo oyo ; Yawe azwi penza mokano ya koboma yo. 23 Bongo Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, apusanaki, apapolaki Mishe mbata na litama mpe alobaki :— Molimo na Yawe abimi kati na ngai na nzela nini mpo ete aya koloba na yo ? 24 Mishe azongisaki :— Okososola yango kaka na mokolo oyo okokima mpe okotambola na shambre moko na moko mpo na koluka kobombama. 25 Mbala moko, mokonzi ya Isalaele apesaki mitindo :— Bokanga Mishe mpe bomema ye epai ya Amoni, moyangeli ya engumba, mpe epai ya Joasi, mwana mobali ya mokonzi. 26 Boloba na bango : « Tala makambo oyo mokonzi alobi : ‹ Bobwaka moto oyo na boloko mpe bopesa ye bilei mosusu te, kaka lipa mpe mayi kino tango nakozonga na kimia. › » 27 Mishe alobaki :— Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te !Abakisaki :— Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi ! 28 Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, bakendeki kobundisa Ramoti ya Galadi. 29 Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati :— Nakomibongola wana nakokende na bitumba ; kasi yo, lata bilamba na yo ya bokonzi.Boye, mokonzi ya Isalaele amibongolaki mpe akendeki na bitumba. 30 Nzokande, mokonzi ya Siri apesaki mitindo epai ya bakonzi na ye ya basoda oyo batambolisaka bashar :— Bobundisa moto moko te, azala moke to monene ; kasi bobundisa kaka mokonzi ya Isalaele. 31 Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki : « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Bazingelaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi, mpe Yawe asungaki ye. Nzambe atindikaki basoda oyo batambolisaka bashar mosika na ye. 32 Tango bakonzi ya basoda, oyo batambolisaka bashar basosolaki ete ezali mokonzi ya Isalaele te, batikaki kolanda ye. 33 Kasi moto moko abetaki tolotolo na ye bibetela, mpe mbanzi na yango edusolaki ebombelo ya tolo ya mokonzi ya Isalaele mpe ezwaki ye. Mokonzi alobaki na motambolisi ya shar :— Baluka mpe bimisa ngai libanda ya esika oyo bitumba ezali koleka, pamba te nazoki. 34 Na mokolo yango, lokola bitumba ezalaki makasi, mokonzi ya Isalaele atikalaki ya kotelema kati na shar na ye liboso ya bato ya Siri, kino na pokwa. Mpe kaka na pokwa yango, akufaki.

In Other Versions

2 Chronicles 18 in the ANGEFD

2 Chronicles 18 in the ANTPNG2D

2 Chronicles 18 in the AS21

2 Chronicles 18 in the BAGH

2 Chronicles 18 in the BBPNG

2 Chronicles 18 in the BBT1E

2 Chronicles 18 in the BDS

2 Chronicles 18 in the BEV

2 Chronicles 18 in the BHAD

2 Chronicles 18 in the BIB

2 Chronicles 18 in the BLPT

2 Chronicles 18 in the BNT

2 Chronicles 18 in the BNTABOOT

2 Chronicles 18 in the BNTLV

2 Chronicles 18 in the BOATCB

2 Chronicles 18 in the BOATCB2

2 Chronicles 18 in the BOBCV

2 Chronicles 18 in the BOCNT

2 Chronicles 18 in the BOECS

2 Chronicles 18 in the BOGWICC

2 Chronicles 18 in the BOHCB

2 Chronicles 18 in the BOHCV

2 Chronicles 18 in the BOHLNT

2 Chronicles 18 in the BOHNTLTAL

2 Chronicles 18 in the BOICB

2 Chronicles 18 in the BOILNTAP

2 Chronicles 18 in the BOITCV

2 Chronicles 18 in the BOKCV

2 Chronicles 18 in the BOKCV2

2 Chronicles 18 in the BOKHWOG

2 Chronicles 18 in the BOKSSV

2 Chronicles 18 in the BOLCB

2 Chronicles 18 in the BOMCV

2 Chronicles 18 in the BONAV

2 Chronicles 18 in the BONCB

2 Chronicles 18 in the BONLT

2 Chronicles 18 in the BONUT2

2 Chronicles 18 in the BOPLNT

2 Chronicles 18 in the BOSCB

2 Chronicles 18 in the BOSNC

2 Chronicles 18 in the BOTLNT

2 Chronicles 18 in the BOVCB

2 Chronicles 18 in the BOYCB

2 Chronicles 18 in the BPBB

2 Chronicles 18 in the BPH

2 Chronicles 18 in the BSB

2 Chronicles 18 in the CCB

2 Chronicles 18 in the CUV

2 Chronicles 18 in the CUVS

2 Chronicles 18 in the DBT

2 Chronicles 18 in the DGDNT

2 Chronicles 18 in the DHNT

2 Chronicles 18 in the DNT

2 Chronicles 18 in the ELBE

2 Chronicles 18 in the EMTV

2 Chronicles 18 in the ESV

2 Chronicles 18 in the FBV

2 Chronicles 18 in the FEB

2 Chronicles 18 in the GGMNT

2 Chronicles 18 in the GNT

2 Chronicles 18 in the HARY

2 Chronicles 18 in the HNT

2 Chronicles 18 in the IRVA

2 Chronicles 18 in the IRVB

2 Chronicles 18 in the IRVG

2 Chronicles 18 in the IRVH

2 Chronicles 18 in the IRVK

2 Chronicles 18 in the IRVM

2 Chronicles 18 in the IRVM2

2 Chronicles 18 in the IRVO

2 Chronicles 18 in the IRVP

2 Chronicles 18 in the IRVT

2 Chronicles 18 in the IRVT2

2 Chronicles 18 in the IRVU

2 Chronicles 18 in the ISVN

2 Chronicles 18 in the JSNT

2 Chronicles 18 in the KAPI

2 Chronicles 18 in the KBT1ETNIK

2 Chronicles 18 in the KBV

2 Chronicles 18 in the KJV

2 Chronicles 18 in the KNFD

2 Chronicles 18 in the LBA

2 Chronicles 18 in the LBLA

2 Chronicles 18 in the LNT

2 Chronicles 18 in the LSV

2 Chronicles 18 in the MAAL

2 Chronicles 18 in the MBV

2 Chronicles 18 in the MBV2

2 Chronicles 18 in the MHNT

2 Chronicles 18 in the MKNFD

2 Chronicles 18 in the MNG

2 Chronicles 18 in the MNT

2 Chronicles 18 in the MNT2

2 Chronicles 18 in the MRS1T

2 Chronicles 18 in the NAA

2 Chronicles 18 in the NASB

2 Chronicles 18 in the NBLA

2 Chronicles 18 in the NBS

2 Chronicles 18 in the NBVTP

2 Chronicles 18 in the NET2

2 Chronicles 18 in the NIV11

2 Chronicles 18 in the NNT

2 Chronicles 18 in the NNT2

2 Chronicles 18 in the NNT3

2 Chronicles 18 in the PDDPT

2 Chronicles 18 in the PFNT

2 Chronicles 18 in the RMNT

2 Chronicles 18 in the SBIAS

2 Chronicles 18 in the SBIBS

2 Chronicles 18 in the SBIBS2

2 Chronicles 18 in the SBICS

2 Chronicles 18 in the SBIDS

2 Chronicles 18 in the SBIGS

2 Chronicles 18 in the SBIHS

2 Chronicles 18 in the SBIIS

2 Chronicles 18 in the SBIIS2

2 Chronicles 18 in the SBIIS3

2 Chronicles 18 in the SBIKS

2 Chronicles 18 in the SBIKS2

2 Chronicles 18 in the SBIMS

2 Chronicles 18 in the SBIOS

2 Chronicles 18 in the SBIPS

2 Chronicles 18 in the SBISS

2 Chronicles 18 in the SBITS

2 Chronicles 18 in the SBITS2

2 Chronicles 18 in the SBITS3

2 Chronicles 18 in the SBITS4

2 Chronicles 18 in the SBIUS

2 Chronicles 18 in the SBIVS

2 Chronicles 18 in the SBT

2 Chronicles 18 in the SBT1E

2 Chronicles 18 in the SCHL

2 Chronicles 18 in the SNT

2 Chronicles 18 in the SUSU

2 Chronicles 18 in the SUSU2

2 Chronicles 18 in the SYNO

2 Chronicles 18 in the TBIAOTANT

2 Chronicles 18 in the TBT1E

2 Chronicles 18 in the TBT1E2

2 Chronicles 18 in the TFTIP

2 Chronicles 18 in the TFTU

2 Chronicles 18 in the TGNTATF3T

2 Chronicles 18 in the THAI

2 Chronicles 18 in the TNFD

2 Chronicles 18 in the TNT

2 Chronicles 18 in the TNTIK

2 Chronicles 18 in the TNTIL

2 Chronicles 18 in the TNTIN

2 Chronicles 18 in the TNTIP

2 Chronicles 18 in the TNTIZ

2 Chronicles 18 in the TOMA

2 Chronicles 18 in the TTENT

2 Chronicles 18 in the UBG

2 Chronicles 18 in the UGV

2 Chronicles 18 in the UGV2

2 Chronicles 18 in the UGV3

2 Chronicles 18 in the VBL

2 Chronicles 18 in the VDCC

2 Chronicles 18 in the YALU

2 Chronicles 18 in the YAPE

2 Chronicles 18 in the YBVTP

2 Chronicles 18 in the ZBP