2 Peter 3 (BOLCB2)

1 Balingami na ngai, tala mokanda ya mibale oyo nakomeli bino. Kati na mikanda nyonso mibale, nazali koluka kolamusa, kati na makanisi na bino, malakisi oyo bozwaki, mpo ete bokoma kokanisa na lolenge ya peto, 2 mpo ete bokanisa lisusu maloba oyo basakoli ya bule balobaki na tango ya kala mpe Mibeko oyo Nkolo mpe Mobikisi apesaki na nzela ya bantoma na bino. 3 Liboso na nyonso, boyeba ete, na mikolo ya suka, batioli bakobima, bakotambola kolanda baposa na bango moko 4 mpe bakoloba : « Boni, alakaki te ete akoya ? Wapi ye sik’oyo ? Pamba te, banda bakoko na biso bakufa, makambo nyonso ezali na yango kaka ndenge ezalaka wuta na ebandeli ya mokili. » 5 Wana bakanisaka bongo, babosanaka na nko ete, na kala, Likolo mpe mabele ezalaki ; ete na nzela ya Liloba na Nzambe, mabele ebimaki wuta na mayi mpe epikamaki kati na mayi. 6 Babosanaka mpe ete ezali lisusu na nzela ya mayi yango nde mokili ya tango wana ebebisamaki wana ezindaki kati na mayi. 7 Nzokande, ezali mpe kaka Liloba yango nde azali kobomba Likolo mpe mabele ya sik’oyo mpo na kozika na moto, na mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisama ya bato ya masumu. 8 Balingami na ngai, ezali na likambo moko oyo bosengeli te kobosana : mpo na Nkolo, mokolo moko ezali lokola mibu nkoto moko, mpe mibu nkoto moko ezali lokola mokolo moko. 9 Bato ebele bakanisaka ete Nkolo azali kowumela mpo na kokokisa elaka na Ye ; nzokande azali nde kokanga motema mpo na bino, pamba te alingi ete moko te abunga, kasi alingi ete bato nyonso babongola mitema. 10 Solo, mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi. Na mokolo yango, na lokito monene, Likolo ekolimwa, biloko ekozika na moto mpe ekonyangwama, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekozwa etumbu ya kobebisama na moto. 11 Lokola nyonso esengeli konyangwama ndenge wana, bosengeli kotambola ndenge nini ? Bosengeli kotambola na bomoi ya bule mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe 12 wana bozali kozela mokolo ya Nzambe mpe kosala ete mokolo yango eya noki. Na mokolo yango, Likolo elongo na biloko nyonso ekozika mpe ekonyangwama na moto. 13 Nzokande, biso, kolanda elaka na Ye, tozali kozela Likolo ya sika mpe mabele ya sika epai wapi bosembo ekozala. 14 Yango wana, balingami na ngai, wana bozali kozela yango, bosala makasi mpo ete Nzambe akuta bino peto, bozangi pamela mpe bozali kati na kimia oyo apesaka. 15 Boyeba malamu ete ezali mpo na lobiko na bino nde Nkolo na biso azali nanu kokanga motema, ndenge Polo, ndeko na biso ya bolingo, akomelaki bino, kolanda bwanya oyo Nzambe apesaki ye. 16 Azali kokoma bongo kati na mikanda nyonso epai wapi azali kolobela makambo yango. Kati na mikanda yango, ezali na makambo mosusu ya makasi mpo na kososola ; bongo bato oyo bazangi boyebi mpe balendisama malamu te na kondima bazali kobongola ndimbola na yango, ndenge kaka bazali mpe kobongola ndimbola ya biteni mosusu ya Makomi, mpo na libebi na bango moko. 17 Balingami na ngai, lokola bosili kozwa boyebi oyo, bosala keba ete bomemama te na mopepe ya mabunga ya bato oyo batosaka Nzambe te, mpo ete bobungisa te kondima na bino ; 18 kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !

In Other Versions

2 Peter 3 in the ANGEFD

2 Peter 3 in the ANTPNG2D

2 Peter 3 in the AS21

2 Peter 3 in the BAGH

2 Peter 3 in the BBPNG

2 Peter 3 in the BBT1E

2 Peter 3 in the BDS

2 Peter 3 in the BEV

2 Peter 3 in the BHAD

2 Peter 3 in the BIB

2 Peter 3 in the BLPT

2 Peter 3 in the BNT

2 Peter 3 in the BNTABOOT

2 Peter 3 in the BNTLV

2 Peter 3 in the BOATCB

2 Peter 3 in the BOATCB2

2 Peter 3 in the BOBCV

2 Peter 3 in the BOCNT

2 Peter 3 in the BOECS

2 Peter 3 in the BOGWICC

2 Peter 3 in the BOHCB

2 Peter 3 in the BOHCV

2 Peter 3 in the BOHLNT

2 Peter 3 in the BOHNTLTAL

2 Peter 3 in the BOICB

2 Peter 3 in the BOILNTAP

2 Peter 3 in the BOITCV

2 Peter 3 in the BOKCV

2 Peter 3 in the BOKCV2

2 Peter 3 in the BOKHWOG

2 Peter 3 in the BOKSSV

2 Peter 3 in the BOLCB

2 Peter 3 in the BOMCV

2 Peter 3 in the BONAV

2 Peter 3 in the BONCB

2 Peter 3 in the BONLT

2 Peter 3 in the BONUT2

2 Peter 3 in the BOPLNT

2 Peter 3 in the BOSCB

2 Peter 3 in the BOSNC

2 Peter 3 in the BOTLNT

2 Peter 3 in the BOVCB

2 Peter 3 in the BOYCB

2 Peter 3 in the BPBB

2 Peter 3 in the BPH

2 Peter 3 in the BSB

2 Peter 3 in the CCB

2 Peter 3 in the CUV

2 Peter 3 in the CUVS

2 Peter 3 in the DBT

2 Peter 3 in the DGDNT

2 Peter 3 in the DHNT

2 Peter 3 in the DNT

2 Peter 3 in the ELBE

2 Peter 3 in the EMTV

2 Peter 3 in the ESV

2 Peter 3 in the FBV

2 Peter 3 in the FEB

2 Peter 3 in the GGMNT

2 Peter 3 in the GNT

2 Peter 3 in the HARY

2 Peter 3 in the HNT

2 Peter 3 in the IRVA

2 Peter 3 in the IRVB

2 Peter 3 in the IRVG

2 Peter 3 in the IRVH

2 Peter 3 in the IRVK

2 Peter 3 in the IRVM

2 Peter 3 in the IRVM2

2 Peter 3 in the IRVO

2 Peter 3 in the IRVP

2 Peter 3 in the IRVT

2 Peter 3 in the IRVT2

2 Peter 3 in the IRVU

2 Peter 3 in the ISVN

2 Peter 3 in the JSNT

2 Peter 3 in the KAPI

2 Peter 3 in the KBT1ETNIK

2 Peter 3 in the KBV

2 Peter 3 in the KJV

2 Peter 3 in the KNFD

2 Peter 3 in the LBA

2 Peter 3 in the LBLA

2 Peter 3 in the LNT

2 Peter 3 in the LSV

2 Peter 3 in the MAAL

2 Peter 3 in the MBV

2 Peter 3 in the MBV2

2 Peter 3 in the MHNT

2 Peter 3 in the MKNFD

2 Peter 3 in the MNG

2 Peter 3 in the MNT

2 Peter 3 in the MNT2

2 Peter 3 in the MRS1T

2 Peter 3 in the NAA

2 Peter 3 in the NASB

2 Peter 3 in the NBLA

2 Peter 3 in the NBS

2 Peter 3 in the NBVTP

2 Peter 3 in the NET2

2 Peter 3 in the NIV11

2 Peter 3 in the NNT

2 Peter 3 in the NNT2

2 Peter 3 in the NNT3

2 Peter 3 in the PDDPT

2 Peter 3 in the PFNT

2 Peter 3 in the RMNT

2 Peter 3 in the SBIAS

2 Peter 3 in the SBIBS

2 Peter 3 in the SBIBS2

2 Peter 3 in the SBICS

2 Peter 3 in the SBIDS

2 Peter 3 in the SBIGS

2 Peter 3 in the SBIHS

2 Peter 3 in the SBIIS

2 Peter 3 in the SBIIS2

2 Peter 3 in the SBIIS3

2 Peter 3 in the SBIKS

2 Peter 3 in the SBIKS2

2 Peter 3 in the SBIMS

2 Peter 3 in the SBIOS

2 Peter 3 in the SBIPS

2 Peter 3 in the SBISS

2 Peter 3 in the SBITS

2 Peter 3 in the SBITS2

2 Peter 3 in the SBITS3

2 Peter 3 in the SBITS4

2 Peter 3 in the SBIUS

2 Peter 3 in the SBIVS

2 Peter 3 in the SBT

2 Peter 3 in the SBT1E

2 Peter 3 in the SCHL

2 Peter 3 in the SNT

2 Peter 3 in the SUSU

2 Peter 3 in the SUSU2

2 Peter 3 in the SYNO

2 Peter 3 in the TBIAOTANT

2 Peter 3 in the TBT1E

2 Peter 3 in the TBT1E2

2 Peter 3 in the TFTIP

2 Peter 3 in the TFTU

2 Peter 3 in the TGNTATF3T

2 Peter 3 in the THAI

2 Peter 3 in the TNFD

2 Peter 3 in the TNT

2 Peter 3 in the TNTIK

2 Peter 3 in the TNTIL

2 Peter 3 in the TNTIN

2 Peter 3 in the TNTIP

2 Peter 3 in the TNTIZ

2 Peter 3 in the TOMA

2 Peter 3 in the TTENT

2 Peter 3 in the UBG

2 Peter 3 in the UGV

2 Peter 3 in the UGV2

2 Peter 3 in the UGV3

2 Peter 3 in the VBL

2 Peter 3 in the VDCC

2 Peter 3 in the YALU

2 Peter 3 in the YAPE

2 Peter 3 in the YBVTP

2 Peter 3 in the ZBP