2 Samuel 21 (BOLCB2)

1 Tango Davidi azalaki mokonzi, nzala makasi ekotaki mpe esalaki mibu misato. Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe alobaki na ye : « Ezali mpo na Saulo mpe libota na ye oyo esopaki makila, pamba te babomaki bato ya Gabaoni. » 2 Mokonzi abengisaki bato ya Gabaoni mpo na kosolola na bango. Nzokande bato ya Gabaoni bazalaki kotangama te kati na bato ya Isalaele, kasi bakanganaki na batikali kati na bato ya Amori ; bongo bato ya Isalaele bakanganaki na bato ya Amori, na nzela ya ndayi, mpo na kotika bango na bomoi. Kasi Saulo, na bolingo na ye oyo eleka ndelo mpo na Isalaele mpe Yuda, alukaki kosilisa koboma bango. 3 Davidi atunaki bato ya Gabaoni :— Eloko nini nakoki kosala mpo na bino ? Na mabe oyo basalaki bino, ndenge nini nakoki kobongisa makambo mpo ete bopambola libula na Yawe ? 4 Bato ya Gabaoni bazongiselaki ye :— Mpo na kobongisa makambo na biso elongo na Saulo mpe libota na ye, tozali na posa te ya palata to ya wolo ; tokoki mpe te koboma ata moto moko kati na Isalaele.Davidi atunaki lisusu :— Bolingi ete ngai nasala nini mpo na bino ? 5 Bazongiselaki mokonzi :— Lokola tata wana alingaki kosilisa koboma biso mpe asalaki mabongisi ya kobebisa biso mpo ete tolimwa kati na mokili mobimba ya Isalaele, 6 tika ete mokonzi akaba na maboko na biso mibali sambo kati na bakitani ya Saulo mpo ete todiembika banzoto na bango liboso ya Yawe, na Gibea, engumba ya Saulo, moponami na Yawe.Mokonzi alobaki :— Nakopesa bino bango. 7 Mokonzi atikaki na bomoi Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, mpo na boyokani oyo ezalaki kati na bango mibale, Davidi mpe Jonatan, mwana mobali ya Saulo, tango Davidi alapaki ndayi na Kombo na Yawe. 8 Kasi mokonzi akangaki Arimoni mpe Mefibosheti, bana mibali oyo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, abotelaki Saulo ; akangaki lisusu bana mibali mitano oyo Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abotelaki Adriyeli, mwana mobali ya Barizilayi, moto ya Meola ; 9 akabaki bango na maboko ya bato ya Gabaoni. Bongo bato ya Gabaoni babomaki bango mpe badiembikaki banzoto na bango na ngomba liboso ya Yawe. Bango nyonso sambo bakufaki elongo. Babomaki bango na mikolo ya liboso ya tango ya kobuka bambuma, kaka na ebandeli ya tango oyo babukaki bambuma ya orje. 10 Bongo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, alongolaki elamba ya saki oyo alataki mpe atandaki yango na libanga ; avandaki wana, wuta na ebandeli ya tango ya kobuka bambuma ya orje kino na eleko oyo mvula enokelaki bibembe. Na moyi, apekisaki bandeke ya likolo kokita na likolo ya bibembe yango ; mpe na butu, abenganaki banyama ya zamba. 11 Davidi ayokaki makambo oyo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, makangu ya Saulo, asalaki. 12 Bongo Davidi akendeki kozwa mikuwa ya Saulo mpe ya Jonatan, mwana na ye ya mobali, epai ya bakambi ya Yabeshi ya Galadi, oyo bayibaki yango na libanda ya Beti-Sheani epai wapi bato ya Filisitia badiembikaki yango mokolo oyo babomaki Saulo, na Giliboa. 13 Wuta kuna, Davidi amemaki mikuwa ya Saulo mpe ya Jonatan, mwana na ye ya mobali ; asangisaki mpe mikuwa ya bato sambo oyo babomaki mpe badiembikaki. 14 Bakundaki mikuwa ya Saulo mpe ya mwana na ye ya mobali, Jonatan, kati na kunda ya Kishi, tata ya Saulo, na Tsela kati na etuka ya Benjame. Basalaki makambo nyonso oyo mokonzi atindaki. Sima na yango, Nzambe ayanolaki losambo mpo na mokili ya Isalaele. 15 Bitumba ezalaki lisusu kati ya bato ya Filisitia mpe bato ya Isalaele. Davidi akitaki elongo na basoda na ye mpo na kobundisa bato ya Filisitia ; mpe Davidi alembaki. 16 Yishibi-Benobi, mokitani ya Rafa, azalaki na mopanga ya sika, likonga oyo songe na yango ezalaki ya bronze mpe ezalaki ya bakilo koleka misato ; mpe abetaki tolo ete akoboma Davidi. 17 Kasi Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, ayaki kosunga Davidi, abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye. Boye bato ya Davidi bakataki seleka epai ya mokonzi, balobaki : « Okobima lisusu te elongo na biso na bitumba mpo ete mwinda ya Isalaele ekufa te. » 18 Sima na mwa tango, ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na mboka Gobi. Ezalaki na tango yango nde Sibekayi, moto ya Usha, abomaki Safi, moko kati na bakitani ya Rafa. 19 Ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na Gobi ; mpe Elanani, mwana mobali ya Yare-Oregimi, moto ya Beteleemi, abomaki Goliati, moto ya Gati, oyo nzete ya likonga na ye ezalaki monene lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka. 20 Ezalaki lisusu na bitumba oyo esalemaki kuna na Gati ; mpe ezalaki kuna na mbinga mobali moko, mokitani ya Rafa, oyo azalaki na misapi motoba na loboko moko na moko, mpe misapi motoba na lokolo moko na moko. Na kosangisa, azalaki na misapi tuku mibale na minei. 21 Atiolaki Isalaele ; mpe Jonatan, mwana mobali ya Shimea mpe ndeko mobali ya Davidi, abomaki ye. 22 Bango minei bazalaki bakitani ya Rafa, babotama na Gati mpe bakufaki liboso ya Davidi mpe ya basoda na ye.

In Other Versions

2 Samuel 21 in the ANGEFD

2 Samuel 21 in the ANTPNG2D

2 Samuel 21 in the AS21

2 Samuel 21 in the BAGH

2 Samuel 21 in the BBPNG

2 Samuel 21 in the BBT1E

2 Samuel 21 in the BDS

2 Samuel 21 in the BEV

2 Samuel 21 in the BHAD

2 Samuel 21 in the BIB

2 Samuel 21 in the BLPT

2 Samuel 21 in the BNT

2 Samuel 21 in the BNTABOOT

2 Samuel 21 in the BNTLV

2 Samuel 21 in the BOATCB

2 Samuel 21 in the BOATCB2

2 Samuel 21 in the BOBCV

2 Samuel 21 in the BOCNT

2 Samuel 21 in the BOECS

2 Samuel 21 in the BOGWICC

2 Samuel 21 in the BOHCB

2 Samuel 21 in the BOHCV

2 Samuel 21 in the BOHLNT

2 Samuel 21 in the BOHNTLTAL

2 Samuel 21 in the BOICB

2 Samuel 21 in the BOILNTAP

2 Samuel 21 in the BOITCV

2 Samuel 21 in the BOKCV

2 Samuel 21 in the BOKCV2

2 Samuel 21 in the BOKHWOG

2 Samuel 21 in the BOKSSV

2 Samuel 21 in the BOLCB

2 Samuel 21 in the BOMCV

2 Samuel 21 in the BONAV

2 Samuel 21 in the BONCB

2 Samuel 21 in the BONLT

2 Samuel 21 in the BONUT2

2 Samuel 21 in the BOPLNT

2 Samuel 21 in the BOSCB

2 Samuel 21 in the BOSNC

2 Samuel 21 in the BOTLNT

2 Samuel 21 in the BOVCB

2 Samuel 21 in the BOYCB

2 Samuel 21 in the BPBB

2 Samuel 21 in the BPH

2 Samuel 21 in the BSB

2 Samuel 21 in the CCB

2 Samuel 21 in the CUV

2 Samuel 21 in the CUVS

2 Samuel 21 in the DBT

2 Samuel 21 in the DGDNT

2 Samuel 21 in the DHNT

2 Samuel 21 in the DNT

2 Samuel 21 in the ELBE

2 Samuel 21 in the EMTV

2 Samuel 21 in the ESV

2 Samuel 21 in the FBV

2 Samuel 21 in the FEB

2 Samuel 21 in the GGMNT

2 Samuel 21 in the GNT

2 Samuel 21 in the HARY

2 Samuel 21 in the HNT

2 Samuel 21 in the IRVA

2 Samuel 21 in the IRVB

2 Samuel 21 in the IRVG

2 Samuel 21 in the IRVH

2 Samuel 21 in the IRVK

2 Samuel 21 in the IRVM

2 Samuel 21 in the IRVM2

2 Samuel 21 in the IRVO

2 Samuel 21 in the IRVP

2 Samuel 21 in the IRVT

2 Samuel 21 in the IRVT2

2 Samuel 21 in the IRVU

2 Samuel 21 in the ISVN

2 Samuel 21 in the JSNT

2 Samuel 21 in the KAPI

2 Samuel 21 in the KBT1ETNIK

2 Samuel 21 in the KBV

2 Samuel 21 in the KJV

2 Samuel 21 in the KNFD

2 Samuel 21 in the LBA

2 Samuel 21 in the LBLA

2 Samuel 21 in the LNT

2 Samuel 21 in the LSV

2 Samuel 21 in the MAAL

2 Samuel 21 in the MBV

2 Samuel 21 in the MBV2

2 Samuel 21 in the MHNT

2 Samuel 21 in the MKNFD

2 Samuel 21 in the MNG

2 Samuel 21 in the MNT

2 Samuel 21 in the MNT2

2 Samuel 21 in the MRS1T

2 Samuel 21 in the NAA

2 Samuel 21 in the NASB

2 Samuel 21 in the NBLA

2 Samuel 21 in the NBS

2 Samuel 21 in the NBVTP

2 Samuel 21 in the NET2

2 Samuel 21 in the NIV11

2 Samuel 21 in the NNT

2 Samuel 21 in the NNT2

2 Samuel 21 in the NNT3

2 Samuel 21 in the PDDPT

2 Samuel 21 in the PFNT

2 Samuel 21 in the RMNT

2 Samuel 21 in the SBIAS

2 Samuel 21 in the SBIBS

2 Samuel 21 in the SBIBS2

2 Samuel 21 in the SBICS

2 Samuel 21 in the SBIDS

2 Samuel 21 in the SBIGS

2 Samuel 21 in the SBIHS

2 Samuel 21 in the SBIIS

2 Samuel 21 in the SBIIS2

2 Samuel 21 in the SBIIS3

2 Samuel 21 in the SBIKS

2 Samuel 21 in the SBIKS2

2 Samuel 21 in the SBIMS

2 Samuel 21 in the SBIOS

2 Samuel 21 in the SBIPS

2 Samuel 21 in the SBISS

2 Samuel 21 in the SBITS

2 Samuel 21 in the SBITS2

2 Samuel 21 in the SBITS3

2 Samuel 21 in the SBITS4

2 Samuel 21 in the SBIUS

2 Samuel 21 in the SBIVS

2 Samuel 21 in the SBT

2 Samuel 21 in the SBT1E

2 Samuel 21 in the SCHL

2 Samuel 21 in the SNT

2 Samuel 21 in the SUSU

2 Samuel 21 in the SUSU2

2 Samuel 21 in the SYNO

2 Samuel 21 in the TBIAOTANT

2 Samuel 21 in the TBT1E

2 Samuel 21 in the TBT1E2

2 Samuel 21 in the TFTIP

2 Samuel 21 in the TFTU

2 Samuel 21 in the TGNTATF3T

2 Samuel 21 in the THAI

2 Samuel 21 in the TNFD

2 Samuel 21 in the TNT

2 Samuel 21 in the TNTIK

2 Samuel 21 in the TNTIL

2 Samuel 21 in the TNTIN

2 Samuel 21 in the TNTIP

2 Samuel 21 in the TNTIZ

2 Samuel 21 in the TOMA

2 Samuel 21 in the TTENT

2 Samuel 21 in the UBG

2 Samuel 21 in the UGV

2 Samuel 21 in the UGV2

2 Samuel 21 in the UGV3

2 Samuel 21 in the VBL

2 Samuel 21 in the VDCC

2 Samuel 21 in the YALU

2 Samuel 21 in the YAPE

2 Samuel 21 in the YBVTP

2 Samuel 21 in the ZBP