2 Timothy 4 (BOLCB2)

1 Yango wana, liboso ya Nzambe mpe ya Yesu-Klisto oyo akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi, mpe na makanisi ya kolengela koya na Ye mpe ya Bokonzi na Ye, nazali kopesa yo mitindo oyo : 2 teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema. 3 Pamba te na mikolo ekoya, bato bakolinga lisusu te koyoka mateya ya solo, kasi bakomilukela bango moko, kolanda baposa na bango, bateyi oyo bakoyebisa bango makambo oyo matoyi na bango esepelaka koyoka ; 4 bakoboya koyoka mateya ya solo mpe bakomipesa makasi na koyoka masapo. 5 Kasi yo, zala na ekenge na makambo nyonso, yikela pasi mpiko, sala mosala ya mopanzi Sango Malamu, kokisa malamu lotomo na yo. 6 Pamba te nakomi pene ya kokaba bomoi na ngai lokola mbeka ya masanga mpo na Nzambe, mpe tango na ngai ya kotika mokili oyo ekoki. 7 Nabundi etumba na ngai malamu, nakomi na suka ya lisano na ngai ya kokima mbangu, nabateli kondima. 8 Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana : akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye. 9 Sala makasi ete oya noki epai na ngai. 10 Pamba te Demasi asundolaki ngai : alingaki mokili oyo mpe akendeki na Tesalonika ; Kresasi akendeki na Galatia, mpe Tito akendeki na Dalimatia. 11 Kaka Luka nde azali elongo na ngai. Kamata Malako, mpe boya elongo na ye, pamba te azali na tina mingi epai na ngai mpo na lotomo. 12 Natindaki Tishike na Efeso. 13 Tango okoya, memela ngai kazaka oyo natikaki na Troasi epai ya Karipisi ; memela ngai mpe babuku na ngai, mingi-mingi babuku oyo basala na poso ya banyama. 14 Alekizandre, monyangwisi bibende, asalaki ngai mabe mingi. Nkolo akofuta ye kolanda misala na ye. 15 Yo mpe sala keba liboso na ye, pamba te atelemelaki makasi mateya na biso. 16 Tango nasambaki mpo na mbala ya liboso, moto ata moko te azalaki wana mpo na kosunga ngai ; bango nyonso basundolaki ngai. Tika ete Nzambe atangela bango yango te ! 17 Ezali Nkolo nde atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai nguya mpo ete, na nzela na ngai, mateya eteyama na mobimba na yango nyonso, mpe mpo ete Bapagano bayoka yango. Mpe akangolaki ngai wuta na monoko ya nkosi. 18 Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela !Amen. 19 Pesa mbote na Prisika, na Akilasi mpe na libota ya Onezifore. 20 Erasite atikalaki na Kolinto, mpe natikaki Trofime azali kobela na Mile. 21 Sala makasi ete okoma awa liboso ete tango ya malili makasi ebanda. Ebilisi, Pidesi, Linisi, Klodia mpe bandeko nyonso bapesi yo mbote. 22 Tika ete Nkolo azala elongo na molimo na yo ! Tika ete ngolu ezala na bino nyonso !

In Other Versions

2 Timothy 4 in the ANGEFD

2 Timothy 4 in the ANTPNG2D

2 Timothy 4 in the AS21

2 Timothy 4 in the BAGH

2 Timothy 4 in the BBPNG

2 Timothy 4 in the BBT1E

2 Timothy 4 in the BDS

2 Timothy 4 in the BEV

2 Timothy 4 in the BHAD

2 Timothy 4 in the BIB

2 Timothy 4 in the BLPT

2 Timothy 4 in the BNT

2 Timothy 4 in the BNTABOOT

2 Timothy 4 in the BNTLV

2 Timothy 4 in the BOATCB

2 Timothy 4 in the BOATCB2

2 Timothy 4 in the BOBCV

2 Timothy 4 in the BOCNT

2 Timothy 4 in the BOECS

2 Timothy 4 in the BOGWICC

2 Timothy 4 in the BOHCB

2 Timothy 4 in the BOHCV

2 Timothy 4 in the BOHLNT

2 Timothy 4 in the BOHNTLTAL

2 Timothy 4 in the BOICB

2 Timothy 4 in the BOILNTAP

2 Timothy 4 in the BOITCV

2 Timothy 4 in the BOKCV

2 Timothy 4 in the BOKCV2

2 Timothy 4 in the BOKHWOG

2 Timothy 4 in the BOKSSV

2 Timothy 4 in the BOLCB

2 Timothy 4 in the BOMCV

2 Timothy 4 in the BONAV

2 Timothy 4 in the BONCB

2 Timothy 4 in the BONLT

2 Timothy 4 in the BONUT2

2 Timothy 4 in the BOPLNT

2 Timothy 4 in the BOSCB

2 Timothy 4 in the BOSNC

2 Timothy 4 in the BOTLNT

2 Timothy 4 in the BOVCB

2 Timothy 4 in the BOYCB

2 Timothy 4 in the BPBB

2 Timothy 4 in the BPH

2 Timothy 4 in the BSB

2 Timothy 4 in the CCB

2 Timothy 4 in the CUV

2 Timothy 4 in the CUVS

2 Timothy 4 in the DBT

2 Timothy 4 in the DGDNT

2 Timothy 4 in the DHNT

2 Timothy 4 in the DNT

2 Timothy 4 in the ELBE

2 Timothy 4 in the EMTV

2 Timothy 4 in the ESV

2 Timothy 4 in the FBV

2 Timothy 4 in the FEB

2 Timothy 4 in the GGMNT

2 Timothy 4 in the GNT

2 Timothy 4 in the HARY

2 Timothy 4 in the HNT

2 Timothy 4 in the IRVA

2 Timothy 4 in the IRVB

2 Timothy 4 in the IRVG

2 Timothy 4 in the IRVH

2 Timothy 4 in the IRVK

2 Timothy 4 in the IRVM

2 Timothy 4 in the IRVM2

2 Timothy 4 in the IRVO

2 Timothy 4 in the IRVP

2 Timothy 4 in the IRVT

2 Timothy 4 in the IRVT2

2 Timothy 4 in the IRVU

2 Timothy 4 in the ISVN

2 Timothy 4 in the JSNT

2 Timothy 4 in the KAPI

2 Timothy 4 in the KBT1ETNIK

2 Timothy 4 in the KBV

2 Timothy 4 in the KJV

2 Timothy 4 in the KNFD

2 Timothy 4 in the LBA

2 Timothy 4 in the LBLA

2 Timothy 4 in the LNT

2 Timothy 4 in the LSV

2 Timothy 4 in the MAAL

2 Timothy 4 in the MBV

2 Timothy 4 in the MBV2

2 Timothy 4 in the MHNT

2 Timothy 4 in the MKNFD

2 Timothy 4 in the MNG

2 Timothy 4 in the MNT

2 Timothy 4 in the MNT2

2 Timothy 4 in the MRS1T

2 Timothy 4 in the NAA

2 Timothy 4 in the NASB

2 Timothy 4 in the NBLA

2 Timothy 4 in the NBS

2 Timothy 4 in the NBVTP

2 Timothy 4 in the NET2

2 Timothy 4 in the NIV11

2 Timothy 4 in the NNT

2 Timothy 4 in the NNT2

2 Timothy 4 in the NNT3

2 Timothy 4 in the PDDPT

2 Timothy 4 in the PFNT

2 Timothy 4 in the RMNT

2 Timothy 4 in the SBIAS

2 Timothy 4 in the SBIBS

2 Timothy 4 in the SBIBS2

2 Timothy 4 in the SBICS

2 Timothy 4 in the SBIDS

2 Timothy 4 in the SBIGS

2 Timothy 4 in the SBIHS

2 Timothy 4 in the SBIIS

2 Timothy 4 in the SBIIS2

2 Timothy 4 in the SBIIS3

2 Timothy 4 in the SBIKS

2 Timothy 4 in the SBIKS2

2 Timothy 4 in the SBIMS

2 Timothy 4 in the SBIOS

2 Timothy 4 in the SBIPS

2 Timothy 4 in the SBISS

2 Timothy 4 in the SBITS

2 Timothy 4 in the SBITS2

2 Timothy 4 in the SBITS3

2 Timothy 4 in the SBITS4

2 Timothy 4 in the SBIUS

2 Timothy 4 in the SBIVS

2 Timothy 4 in the SBT

2 Timothy 4 in the SBT1E

2 Timothy 4 in the SCHL

2 Timothy 4 in the SNT

2 Timothy 4 in the SUSU

2 Timothy 4 in the SUSU2

2 Timothy 4 in the SYNO

2 Timothy 4 in the TBIAOTANT

2 Timothy 4 in the TBT1E

2 Timothy 4 in the TBT1E2

2 Timothy 4 in the TFTIP

2 Timothy 4 in the TFTU

2 Timothy 4 in the TGNTATF3T

2 Timothy 4 in the THAI

2 Timothy 4 in the TNFD

2 Timothy 4 in the TNT

2 Timothy 4 in the TNTIK

2 Timothy 4 in the TNTIL

2 Timothy 4 in the TNTIN

2 Timothy 4 in the TNTIP

2 Timothy 4 in the TNTIZ

2 Timothy 4 in the TOMA

2 Timothy 4 in the TTENT

2 Timothy 4 in the UBG

2 Timothy 4 in the UGV

2 Timothy 4 in the UGV2

2 Timothy 4 in the UGV3

2 Timothy 4 in the VBL

2 Timothy 4 in the VDCC

2 Timothy 4 in the YALU

2 Timothy 4 in the YAPE

2 Timothy 4 in the YBVTP

2 Timothy 4 in the ZBP