Acts 23 (BOLCB2)

1 Polo atalaki bato nyonso ya Likita-Monene mpe alobaki :— Bandeko na ngai, kino na moyi ya lelo, nazali kotambola na motema ya peto liboso ya Nzambe. 2 Kasi Ananiasi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, apesaki bato oyo bazalaki pene ya Polo mitindo ete babeta ye na monoko. 3 Bongo Polo alobaki na ye :— Nzambe akobeta yo, yo mir oyo bapakola langi ya pembe ! Ovandi wana mpo na kosambisa ngai ndenge Mobeko ezali kosenga, nzokande yo nde moto obuki Mobeko mpo ete opesi mitindo ete babeta ngai ! 4 Bato oyo batelemaki pene ya Polo balobaki :— Ebandi ndenge nini ofinga mbala moko mokonzi ya Banganga-Nzambe, ya Nzambe ! 5 Polo azongisaki :— Bandeko, nayebaki te ete azali mokonzi ya Banganga-Nzambe, pamba te nayebi malamu ete ekomama : « Okolobaka mabe te na tina na mokambi ya bato na yo. » 6 Lokola Polo ayebaki ete, kati na bato ya Likita-Monene, bamoko bazalaki Basaduseo, mpe bamosusu, Bafarizeo, agangaki kati na Likita-Monene :— Bandeko na ngai, nazali Mofarizeo, mwana ya Bafarizeo ; nazali kosamba mpo na elikya na biso ya lisekwa ya bakufi. 7 Tango kaka alobaki bongo, koswana makasi ekotaki kati na Bafarizeo mpe Basaduseo, mpe mayangani ekabwanaki ; 8 pamba te Basaduseo balobaka ete lisekwa ezalaka te, ba-anjelu bazalaka te, milimo mpe ezalaka te ; nzokande, Bafarizeo bandimaka makambo wana nyonso. 9 Makelele emataki makasi penza. Boye ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki Bafarizeo batelemaki mpe batombolaki mingongo na mpiko nyonso :— Solo, tomoni ata mabe moko te ya kopamela moto oyo. Nani ayebi ? Tango mosusu molimo to anjelu nde alobaki na ye. 10 Lokola tembe ekomaki makasi koleka, mokonzi ya basoda abangaki ete bakata Polo biteni-biteni ; apesaki mitindo na basoda ete bakita, balongola ye kati na bango mpe bamema ye kati na lopango ya basoda. 11 Na butu oyo elandaki, Nkolo abimelaki Polo kati na emoniseli mpe alobaki na ye : — Yika mpiko ! Ndenge kaka otatolaki na tina na Ngai kati na Yelusalemi, ndenge mpe osengeli kotatola kati na Rome. 12 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Bayuda basalelaki Polo likita ; balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo. 13 Motango ya bato oyo basalelaki Polo likita yango ezalaki bato koleka tuku minei. 14 Bakendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato mpo na koloba na bango :— Tolapi ndayi ete tokolia eloko moko te kino tokoboma Polo. 15 Bino mpe bato ya Likita-Monene, bokende sik’oyo epai ya mokonzi ya basoda mpe bosenga ete bamema Polo liboso na bino, lokola nde bolingi koyekola malamu likambo na ye. Bongo na ngambo na biso, tosili komibongisa mpo na koboma ye liboso ete akoma awa. 16 Kasi tango mwana mobali ya ndeko mwasi ya Polo ayokaki motambo yango, akendeki na lopango ya basoda, akotaki mpe akebisaki Polo. 17 Bongo Polo abengaki mokonzi moko ya basoda nkama moko mpe alobaki na ye :— Mema elenge mobali oyo epai ya mokonzi, pamba te azali na likambo ya koyebisa ye. 18 Boye, mokonzi yango amemaki ye epai ya mokonzi ya basoda mpe alobaki :— Mokangami Polo abengaki ngai mpe asengaki na ngai ete namemela yo elenge mobali oyo, pamba te azali na likambo ya koyebisa yo. 19 Mokonzi ya basoda akamataki elenge mobali na loboko, amemaki ye na pembeni mpe atunaki ye :— Likambo nini olingi koyebisa ngai ? 20 Elenge mobali azongisaki :— Bayuda bayokani kosenga na yo ete, lobi, omemela bango Polo liboso ya Likita-Monene, lokola nde balingi koyekola lisusu likambo na ye. 21 Kasi kondima bosenga na bango te, pamba te bato koleka tuku minei kati na bango bazali kobongisa motambo mpo na kokanga ye ; balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo. Makambo nyonso esili kobongisama mpe bazali kozela kaka ndingisa na yo. 22 Mokonzi ya basoda atikaki elenge mobali yango ete azonga ; kasi liboso ete akende, akebisaki ye :— Koloba na moto moko te likambo oyo oyebisi ngai. 23 Sima na mwa tango moke, mokonzi ya basoda abengisaki bakonzi mibale ya basoda nkama moko mpe alobaki na bango :— Bobongisa basoda nkama mibale, basoda tuku sambo oyo batambolaka na bampunda mpe basoda mosusu nkama mibale, mpo ete bakende na Sezarea, na ngonga ya libwa ya butu. 24 Bobongisa bampunda mpo na komema Polo mpo ete akoma malamu epai ya moyangeli Felikisi. 25 Boye, akomelaki moyangeli mokanda oyo : 26 Tata moyangeli Felikisi, yamba mbote ewuti epai na ngai Klodiusi Lisiasi. 27 Bayuda bakangaki moto oyo natindeli yo. Tango balingaki koboma ye, nayaki elongo na basoda mpe nakangolaki ye, pamba te nayokaki sango ete azali moto ya Rome. 28 Lokola nalingaki koyeba malamu tina oyo bafundelaki ye, namemaki ye liboso ya Likita-Monene na bango. 29 Namonaki ete bafundaki ye kaka mpo na makambo oyo etali mobeko na bango, kasi balongaki te kofunda ye mpo na mabe moko oyo ekoki kopesa ye etumbu ya kufa to ya boloko. 30 Tango bayebisaki ngai ete Bayuda basaleli ye likita mpo na koboma ye, nazwaki mokano ya kotinda ye epai na yo noki penza ; mpe napesaki lisusu mitindo na bato oyo bafundaki ye ete baya kofunda ye epai na yo. 31 Kolanda mitindo oyo basoda bazwaki, bakamataki Polo mpe bamemaki ye butu-butu kino na Antipatrisi. 32 Mokolo oyo elandaki, basoda oyo batambolaka na makolo bazongaki na lopango ya basoda mpe batikaki basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda kokende elongo na ye. 33 Tango bakomaki na Sezarea, basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda bapesaki mokanda yango epai ya moyangeli mpe balakisaki ye Polo. 34 Moyangeli atangaki mokanda yango mpe atunaki soki Polo azali moto ya mboka nini. Wana ayokaki ete azali moto ya Silisi, 35 alobaki na ye :— Nakoyoka yo tango bato oyo bafundaki yo bakokoma.Bongo apesaki mitindo ete bakengela Polo kati na ndako ya mokonzi Erode.

In Other Versions

Acts 23 in the ANGEFD

Acts 23 in the ANTPNG2D

Acts 23 in the AS21

Acts 23 in the BAGH

Acts 23 in the BBPNG

Acts 23 in the BBT1E

Acts 23 in the BDS

Acts 23 in the BEV

Acts 23 in the BHAD

Acts 23 in the BIB

Acts 23 in the BLPT

Acts 23 in the BNT

Acts 23 in the BNTABOOT

Acts 23 in the BNTLV

Acts 23 in the BOATCB

Acts 23 in the BOATCB2

Acts 23 in the BOBCV

Acts 23 in the BOCNT

Acts 23 in the BOECS

Acts 23 in the BOGWICC

Acts 23 in the BOHCB

Acts 23 in the BOHCV

Acts 23 in the BOHLNT

Acts 23 in the BOHNTLTAL

Acts 23 in the BOICB

Acts 23 in the BOILNTAP

Acts 23 in the BOITCV

Acts 23 in the BOKCV

Acts 23 in the BOKCV2

Acts 23 in the BOKHWOG

Acts 23 in the BOKSSV

Acts 23 in the BOLCB

Acts 23 in the BOMCV

Acts 23 in the BONAV

Acts 23 in the BONCB

Acts 23 in the BONLT

Acts 23 in the BONUT2

Acts 23 in the BOPLNT

Acts 23 in the BOSCB

Acts 23 in the BOSNC

Acts 23 in the BOTLNT

Acts 23 in the BOVCB

Acts 23 in the BOYCB

Acts 23 in the BPBB

Acts 23 in the BPH

Acts 23 in the BSB

Acts 23 in the CCB

Acts 23 in the CUV

Acts 23 in the CUVS

Acts 23 in the DBT

Acts 23 in the DGDNT

Acts 23 in the DHNT

Acts 23 in the DNT

Acts 23 in the ELBE

Acts 23 in the EMTV

Acts 23 in the ESV

Acts 23 in the FBV

Acts 23 in the FEB

Acts 23 in the GGMNT

Acts 23 in the GNT

Acts 23 in the HARY

Acts 23 in the HNT

Acts 23 in the IRVA

Acts 23 in the IRVB

Acts 23 in the IRVG

Acts 23 in the IRVH

Acts 23 in the IRVK

Acts 23 in the IRVM

Acts 23 in the IRVM2

Acts 23 in the IRVO

Acts 23 in the IRVP

Acts 23 in the IRVT

Acts 23 in the IRVT2

Acts 23 in the IRVU

Acts 23 in the ISVN

Acts 23 in the JSNT

Acts 23 in the KAPI

Acts 23 in the KBT1ETNIK

Acts 23 in the KBV

Acts 23 in the KJV

Acts 23 in the KNFD

Acts 23 in the LBA

Acts 23 in the LBLA

Acts 23 in the LNT

Acts 23 in the LSV

Acts 23 in the MAAL

Acts 23 in the MBV

Acts 23 in the MBV2

Acts 23 in the MHNT

Acts 23 in the MKNFD

Acts 23 in the MNG

Acts 23 in the MNT

Acts 23 in the MNT2

Acts 23 in the MRS1T

Acts 23 in the NAA

Acts 23 in the NASB

Acts 23 in the NBLA

Acts 23 in the NBS

Acts 23 in the NBVTP

Acts 23 in the NET2

Acts 23 in the NIV11

Acts 23 in the NNT

Acts 23 in the NNT2

Acts 23 in the NNT3

Acts 23 in the PDDPT

Acts 23 in the PFNT

Acts 23 in the RMNT

Acts 23 in the SBIAS

Acts 23 in the SBIBS

Acts 23 in the SBIBS2

Acts 23 in the SBICS

Acts 23 in the SBIDS

Acts 23 in the SBIGS

Acts 23 in the SBIHS

Acts 23 in the SBIIS

Acts 23 in the SBIIS2

Acts 23 in the SBIIS3

Acts 23 in the SBIKS

Acts 23 in the SBIKS2

Acts 23 in the SBIMS

Acts 23 in the SBIOS

Acts 23 in the SBIPS

Acts 23 in the SBISS

Acts 23 in the SBITS

Acts 23 in the SBITS2

Acts 23 in the SBITS3

Acts 23 in the SBITS4

Acts 23 in the SBIUS

Acts 23 in the SBIVS

Acts 23 in the SBT

Acts 23 in the SBT1E

Acts 23 in the SCHL

Acts 23 in the SNT

Acts 23 in the SUSU

Acts 23 in the SUSU2

Acts 23 in the SYNO

Acts 23 in the TBIAOTANT

Acts 23 in the TBT1E

Acts 23 in the TBT1E2

Acts 23 in the TFTIP

Acts 23 in the TFTU

Acts 23 in the TGNTATF3T

Acts 23 in the THAI

Acts 23 in the TNFD

Acts 23 in the TNT

Acts 23 in the TNTIK

Acts 23 in the TNTIL

Acts 23 in the TNTIN

Acts 23 in the TNTIP

Acts 23 in the TNTIZ

Acts 23 in the TOMA

Acts 23 in the TTENT

Acts 23 in the UBG

Acts 23 in the UGV

Acts 23 in the UGV2

Acts 23 in the UGV3

Acts 23 in the VBL

Acts 23 in the VDCC

Acts 23 in the YALU

Acts 23 in the YAPE

Acts 23 in the YBVTP

Acts 23 in the ZBP