Colossians 3 (BOLCB2)

1 Lokola bosekwaki mpe elongo na Klisto, bolukaka biloko ya Likolo epai wapi Klisto avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, 2 bokanisaka biloko ya Likolo kasi biloko ya mokili te. 3 Pamba te bokufaki penza, mpe bomoi na bino ezali sik’oyo ya kobombama elongo na Klisto kati na Nzambe. 4 Tango Klisto oyo azali bomoi na bino akomonana, bino mpe bokomonana elongo na Ye kati na nkembo. 5 Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko. 6 Ezali makambo yango nde ebendaka kanda ya Nzambe. 7 Bino mpe na kala, bozalaki komipesa na makambo yango tango bomoi na bino ezalaki na se ya bokonzi ya makambo yango. 8 Kasi sik’oyo, bosengeli kolimwisa makambo yango nyonso : kanda, koyinana, misala mabe, mafinga mpe maloba mabe oyo ekoki kobima na minoko na bino. 9 Bokosanaka te, pamba te bobwakaki bomoto na bino ya kala elongo na misala na yango 10 mpe bolataki bomoto ya sika oyo emikomisaka ya sika mpo ete bokoma na boyebi ya kokoka kolanda elilingi ya Mokeli ya bomoto yango. 11 Boye, biso nyonso tozali ndenge moko : bokeseni ezali lisusu te kati na Mogreki mpe Moyuda, moto oyo akatama ngenga mpe moto oyo akatama ngenga te, mopaya mpe mwana mboka, mowumbu mpe monsomi. Bobele Klisto nde azali na tina : azali nyonso kati na bato nyonso. 12 Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi. 13 Boyikanaka mpiko ; mpe soki moko azali na likambo ya kopamela moninga na tina na yango, bolimbisanaka. Bolimbisaka ndenge Nkolo alimbisaki bino. 14 Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka. 15 Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango ; mpe bozongisaka matondi. 16 Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino. 17 Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto. 18 Basi, botosaka mibali na bino ndenge ebongi kati na Nkolo. 19 Mibali, bolingaka basi na bino mpe bozalaka na makambo ya makasi te epai na bango. 20 Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo. 21 Batata, boyokisaka bana na bino kanda te, noki te mitema na bango ekolemba. 22 Bawumbu, botosaka bankolo na bino na makambo nyonso ; na miso na bango kaka te, lokola nde bozali kosepelisa bato, kasi na mitema ya bosembo mpe kati na kotosa Nkolo. 23 Mosala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na mitema na bino mobimba, lokola nde bozali kosala yango mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te, 24 pamba te boyebi malamu ete bokozwa, lokola lifuti, libula oyo Nkolo abongisa mpo na bato ya Nzambe. Ezali Klisto nde azali Nkolo oyo bosalelaka. 25 Moto oyo asalaka na ndenge ya mabe akozwa lifuti oyo ebongi mpo na misala na ye ya mabe, pamba te Nzambe aponaka bilongi te.

In Other Versions

Colossians 3 in the ANGEFD

Colossians 3 in the ANTPNG2D

Colossians 3 in the AS21

Colossians 3 in the BAGH

Colossians 3 in the BBPNG

Colossians 3 in the BBT1E

Colossians 3 in the BDS

Colossians 3 in the BEV

Colossians 3 in the BHAD

Colossians 3 in the BIB

Colossians 3 in the BLPT

Colossians 3 in the BNT

Colossians 3 in the BNTABOOT

Colossians 3 in the BNTLV

Colossians 3 in the BOATCB

Colossians 3 in the BOATCB2

Colossians 3 in the BOBCV

Colossians 3 in the BOCNT

Colossians 3 in the BOECS

Colossians 3 in the BOGWICC

Colossians 3 in the BOHCB

Colossians 3 in the BOHCV

Colossians 3 in the BOHLNT

Colossians 3 in the BOHNTLTAL

Colossians 3 in the BOICB

Colossians 3 in the BOILNTAP

Colossians 3 in the BOITCV

Colossians 3 in the BOKCV

Colossians 3 in the BOKCV2

Colossians 3 in the BOKHWOG

Colossians 3 in the BOKSSV

Colossians 3 in the BOLCB

Colossians 3 in the BOMCV

Colossians 3 in the BONAV

Colossians 3 in the BONCB

Colossians 3 in the BONLT

Colossians 3 in the BONUT2

Colossians 3 in the BOPLNT

Colossians 3 in the BOSCB

Colossians 3 in the BOSNC

Colossians 3 in the BOTLNT

Colossians 3 in the BOVCB

Colossians 3 in the BOYCB

Colossians 3 in the BPBB

Colossians 3 in the BPH

Colossians 3 in the BSB

Colossians 3 in the CCB

Colossians 3 in the CUV

Colossians 3 in the CUVS

Colossians 3 in the DBT

Colossians 3 in the DGDNT

Colossians 3 in the DHNT

Colossians 3 in the DNT

Colossians 3 in the ELBE

Colossians 3 in the EMTV

Colossians 3 in the ESV

Colossians 3 in the FBV

Colossians 3 in the FEB

Colossians 3 in the GGMNT

Colossians 3 in the GNT

Colossians 3 in the HARY

Colossians 3 in the HNT

Colossians 3 in the IRVA

Colossians 3 in the IRVB

Colossians 3 in the IRVG

Colossians 3 in the IRVH

Colossians 3 in the IRVK

Colossians 3 in the IRVM

Colossians 3 in the IRVM2

Colossians 3 in the IRVO

Colossians 3 in the IRVP

Colossians 3 in the IRVT

Colossians 3 in the IRVT2

Colossians 3 in the IRVU

Colossians 3 in the ISVN

Colossians 3 in the JSNT

Colossians 3 in the KAPI

Colossians 3 in the KBT1ETNIK

Colossians 3 in the KBV

Colossians 3 in the KJV

Colossians 3 in the KNFD

Colossians 3 in the LBA

Colossians 3 in the LBLA

Colossians 3 in the LNT

Colossians 3 in the LSV

Colossians 3 in the MAAL

Colossians 3 in the MBV

Colossians 3 in the MBV2

Colossians 3 in the MHNT

Colossians 3 in the MKNFD

Colossians 3 in the MNG

Colossians 3 in the MNT

Colossians 3 in the MNT2

Colossians 3 in the MRS1T

Colossians 3 in the NAA

Colossians 3 in the NASB

Colossians 3 in the NBLA

Colossians 3 in the NBS

Colossians 3 in the NBVTP

Colossians 3 in the NET2

Colossians 3 in the NIV11

Colossians 3 in the NNT

Colossians 3 in the NNT2

Colossians 3 in the NNT3

Colossians 3 in the PDDPT

Colossians 3 in the PFNT

Colossians 3 in the RMNT

Colossians 3 in the SBIAS

Colossians 3 in the SBIBS

Colossians 3 in the SBIBS2

Colossians 3 in the SBICS

Colossians 3 in the SBIDS

Colossians 3 in the SBIGS

Colossians 3 in the SBIHS

Colossians 3 in the SBIIS

Colossians 3 in the SBIIS2

Colossians 3 in the SBIIS3

Colossians 3 in the SBIKS

Colossians 3 in the SBIKS2

Colossians 3 in the SBIMS

Colossians 3 in the SBIOS

Colossians 3 in the SBIPS

Colossians 3 in the SBISS

Colossians 3 in the SBITS

Colossians 3 in the SBITS2

Colossians 3 in the SBITS3

Colossians 3 in the SBITS4

Colossians 3 in the SBIUS

Colossians 3 in the SBIVS

Colossians 3 in the SBT

Colossians 3 in the SBT1E

Colossians 3 in the SCHL

Colossians 3 in the SNT

Colossians 3 in the SUSU

Colossians 3 in the SUSU2

Colossians 3 in the SYNO

Colossians 3 in the TBIAOTANT

Colossians 3 in the TBT1E

Colossians 3 in the TBT1E2

Colossians 3 in the TFTIP

Colossians 3 in the TFTU

Colossians 3 in the TGNTATF3T

Colossians 3 in the THAI

Colossians 3 in the TNFD

Colossians 3 in the TNT

Colossians 3 in the TNTIK

Colossians 3 in the TNTIL

Colossians 3 in the TNTIN

Colossians 3 in the TNTIP

Colossians 3 in the TNTIZ

Colossians 3 in the TOMA

Colossians 3 in the TTENT

Colossians 3 in the UBG

Colossians 3 in the UGV

Colossians 3 in the UGV2

Colossians 3 in the UGV3

Colossians 3 in the VBL

Colossians 3 in the VDCC

Colossians 3 in the YALU

Colossians 3 in the YAPE

Colossians 3 in the YBVTP

Colossians 3 in the ZBP