Daniel 1 (BOLCB2)

1 Na mobu ya misato ya bokonzi ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango. 2 Yawe akabaki Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, elongo na ndambo ya bisalelo ya Tempelo ya Nzambe na maboko ya Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki bisalelo yango kati na tempelo ya nzambe na ye, na Shineari, mpe atiaki yango kati na ndako oyo babombelaka bomengo ya nzambe na ye. 3 Mokonzi apesaki mitindo epai ya Ashipenazi, mokonzi ya bakalaka na ye ya lokumu, ete ayeisa na Babiloni ndambo ya bana ya Isalaele oyo babotama na mabota ya bakonzi to ya bato ya lokumu, 4 bilenge mibali oyo banzoto na bango ezanga mbeba, ya bilongi kitoko, ya mayele mpe ya bwanya, oyo bazali na makoki ya koyekola kotanga mpe kokoma makambo ya ndenge na ndenge, oyo bazali na bososoli mpe bakoka mpo na kosala kati na ndako ya mokonzi ; Ashipenazi asengelaki kolakisa bango koloba, kokoma mikanda mpe kotanga lokota ya bato ya Babiloni. 5 Mokonzi akatelaki bango mpo na mokolo na mokolo, bilei oyo basengeli kolia mpe masanga oyo basengeli komela : nyonso ezalaki kowuta na mesa na ye. Mibu misato, basengelaki koyekola ; na sima nde bakoki kosala mosala ya mokonzi. 6 Kati na ndambo ya bato oyo bawutaki na Yuda, ezalaki na Daniele, Anania, Mikaeli mpe Azaria. 7 Mokonzi ya bakalaka ya lokumu apesaki bango bakombo ya sika ; apesaki Daniele kombo Belitsatsari ; Anania, Shadraki ; Mikaeli, Meshaki ; mpe Azaria, Abedinego. 8 Daniele azwaki mokano ya koboya komikomisa mbindo na nzela ya bilei mpe ya vino ya mokonzi ; ayebisaki mokonzi ya bakalaka ya lokumu ete apesa ye nzela te ya komikomisa mbindo na lolenge wana. 9 Boye, Nzambe asalaki ete Daniele azwa ngolu mpe bolamu na miso ya mokonzi ya bakalaka ya lokumu. 10 Kasi mokonzi ya bakalaka ya lokumu alobaki na Daniele :— Nazali kobanga mokonzi, nkolo na ngai, oyo akateli bino bilei oyo bosengeli kolia mpe masanga oyo bosengeli komela ! Mpo na nini bokolinga ete mokonzi amona bilongi na bino ekonda koleka bilongi ya bilenge mosusu ya mibu na bino ? Bomoni te ete wana bokobomisa ngai epai ya mokonzi ? 11 Daniele alobaki na mosali oyo mokonzi ya bakalaka ya lokumu aponaki mpo ete abatela Daniele, Anania, Mikaeli mpe Azaria : 12 « Nabondeli yo, meka basali na yo mikolo zomi : pesa biso kaka bandunda lokola bilei mpe mayi mpo na komela ; kopesa biso eloko mosusu te ! 13 Sima na mikolo yango, okotala yo moko bilongi na biso mpe bilongi ya bilenge mosusu oyo bazali kolia bilei ya mokonzi ; bongo okosala basali na yo ndenge yo moko okomona. » 14 Mosala andimaki bosenga na bango mpe amekaki bango mikolo zomi. 15 Sima na mikolo yango zomi, bakomaki bilongi kitoko mpe banzoto ngebungebu koleka bilenge oyo bazalaki kolia bilei ya mokonzi. 16 Boye, mosali yango akomaki kotia pembeni bilei mpe vino oyo bazalaki kobongisela bango mpe kopesa bango kaka bandunda. 17 Nzambe apesaki bilenge wana minei boyebi mpe bososoli kati na makambo nyonso : koloba, kokoma, kotanga mikanda, mayele mpe bwanya. Mpe Daniele akomaki na makoki ya kolimbola bimoniseli mpe bandoto ya ndenge na ndenge. 18 Sima na mikolo oyo mokonzi akataki mpo ete bamemela ye bango, mokonzi ya bakalaka ya lokumu amemaki bango liboso ya Nabukodonozori. 19 Mokonzi asololaki na bango ; mpe kati na bilenge nyonso oyo bamemelaki ye, amonaki ete moko te akokani na Daniele, na Anania, na Mikaeli mpe na Azaria. Boye, bakomaki kosala kati na ndako ya mokonzi. 20 Na makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kotuna bango, oyo ezalaki kosenga bwanya mpe bososoli, amonaki ete bazali mayele mbala zomi koleka bato ya soloka mpe ya maji ya mokili na ye mobimba. 21 Mpe Daniele awumelaki kosala kati na ndako ya mokonzi kino na mobu ya liboso ya mokonzi Sirisi.

In Other Versions

Daniel 1 in the ANGEFD

Daniel 1 in the ANTPNG2D

Daniel 1 in the AS21

Daniel 1 in the BAGH

Daniel 1 in the BBPNG

Daniel 1 in the BBT1E

Daniel 1 in the BDS

Daniel 1 in the BEV

Daniel 1 in the BHAD

Daniel 1 in the BIB

Daniel 1 in the BLPT

Daniel 1 in the BNT

Daniel 1 in the BNTABOOT

Daniel 1 in the BNTLV

Daniel 1 in the BOATCB

Daniel 1 in the BOATCB2

Daniel 1 in the BOBCV

Daniel 1 in the BOCNT

Daniel 1 in the BOECS

Daniel 1 in the BOGWICC

Daniel 1 in the BOHCB

Daniel 1 in the BOHCV

Daniel 1 in the BOHLNT

Daniel 1 in the BOHNTLTAL

Daniel 1 in the BOICB

Daniel 1 in the BOILNTAP

Daniel 1 in the BOITCV

Daniel 1 in the BOKCV

Daniel 1 in the BOKCV2

Daniel 1 in the BOKHWOG

Daniel 1 in the BOKSSV

Daniel 1 in the BOLCB

Daniel 1 in the BOMCV

Daniel 1 in the BONAV

Daniel 1 in the BONCB

Daniel 1 in the BONLT

Daniel 1 in the BONUT2

Daniel 1 in the BOPLNT

Daniel 1 in the BOSCB

Daniel 1 in the BOSNC

Daniel 1 in the BOTLNT

Daniel 1 in the BOVCB

Daniel 1 in the BOYCB

Daniel 1 in the BPBB

Daniel 1 in the BPH

Daniel 1 in the BSB

Daniel 1 in the CCB

Daniel 1 in the CUV

Daniel 1 in the CUVS

Daniel 1 in the DBT

Daniel 1 in the DGDNT

Daniel 1 in the DHNT

Daniel 1 in the DNT

Daniel 1 in the ELBE

Daniel 1 in the EMTV

Daniel 1 in the ESV

Daniel 1 in the FBV

Daniel 1 in the FEB

Daniel 1 in the GGMNT

Daniel 1 in the GNT

Daniel 1 in the HARY

Daniel 1 in the HNT

Daniel 1 in the IRVA

Daniel 1 in the IRVB

Daniel 1 in the IRVG

Daniel 1 in the IRVH

Daniel 1 in the IRVK

Daniel 1 in the IRVM

Daniel 1 in the IRVM2

Daniel 1 in the IRVO

Daniel 1 in the IRVP

Daniel 1 in the IRVT

Daniel 1 in the IRVT2

Daniel 1 in the IRVU

Daniel 1 in the ISVN

Daniel 1 in the JSNT

Daniel 1 in the KAPI

Daniel 1 in the KBT1ETNIK

Daniel 1 in the KBV

Daniel 1 in the KJV

Daniel 1 in the KNFD

Daniel 1 in the LBA

Daniel 1 in the LBLA

Daniel 1 in the LNT

Daniel 1 in the LSV

Daniel 1 in the MAAL

Daniel 1 in the MBV

Daniel 1 in the MBV2

Daniel 1 in the MHNT

Daniel 1 in the MKNFD

Daniel 1 in the MNG

Daniel 1 in the MNT

Daniel 1 in the MNT2

Daniel 1 in the MRS1T

Daniel 1 in the NAA

Daniel 1 in the NASB

Daniel 1 in the NBLA

Daniel 1 in the NBS

Daniel 1 in the NBVTP

Daniel 1 in the NET2

Daniel 1 in the NIV11

Daniel 1 in the NNT

Daniel 1 in the NNT2

Daniel 1 in the NNT3

Daniel 1 in the PDDPT

Daniel 1 in the PFNT

Daniel 1 in the RMNT

Daniel 1 in the SBIAS

Daniel 1 in the SBIBS

Daniel 1 in the SBIBS2

Daniel 1 in the SBICS

Daniel 1 in the SBIDS

Daniel 1 in the SBIGS

Daniel 1 in the SBIHS

Daniel 1 in the SBIIS

Daniel 1 in the SBIIS2

Daniel 1 in the SBIIS3

Daniel 1 in the SBIKS

Daniel 1 in the SBIKS2

Daniel 1 in the SBIMS

Daniel 1 in the SBIOS

Daniel 1 in the SBIPS

Daniel 1 in the SBISS

Daniel 1 in the SBITS

Daniel 1 in the SBITS2

Daniel 1 in the SBITS3

Daniel 1 in the SBITS4

Daniel 1 in the SBIUS

Daniel 1 in the SBIVS

Daniel 1 in the SBT

Daniel 1 in the SBT1E

Daniel 1 in the SCHL

Daniel 1 in the SNT

Daniel 1 in the SUSU

Daniel 1 in the SUSU2

Daniel 1 in the SYNO

Daniel 1 in the TBIAOTANT

Daniel 1 in the TBT1E

Daniel 1 in the TBT1E2

Daniel 1 in the TFTIP

Daniel 1 in the TFTU

Daniel 1 in the TGNTATF3T

Daniel 1 in the THAI

Daniel 1 in the TNFD

Daniel 1 in the TNT

Daniel 1 in the TNTIK

Daniel 1 in the TNTIL

Daniel 1 in the TNTIN

Daniel 1 in the TNTIP

Daniel 1 in the TNTIZ

Daniel 1 in the TOMA

Daniel 1 in the TTENT

Daniel 1 in the UBG

Daniel 1 in the UGV

Daniel 1 in the UGV2

Daniel 1 in the UGV3

Daniel 1 in the VBL

Daniel 1 in the VDCC

Daniel 1 in the YALU

Daniel 1 in the YAPE

Daniel 1 in the YBVTP

Daniel 1 in the ZBP