Deuteronomy 24 (BOLCB2)
        
        
          1 Soki mobali abali mwasi mpe, sima na mikolo, asepeli na ye lisusu te mpo ete amoni eloko moko ya mabe kati na ye, tika ete akoma mokanda ya koboma libala mpe apesa ye yango ; bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye. 2 Sima na kobima na ndako ya mobali wana, mwasi yango akoki kobala mobali mosusu. 3 Mpe soki esali ete mobali oyo ya mibale mpe asepeli na ye lisusu te, tika ete ye mpe akokoma mokanda mpo na koboma libala mpe apesa ye yango, bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye ; to soki esali ete mobali oyo ya mibale akufi, 4 boye mobali na ye ya liboso, oyo abenganaki ye na libala, akoki lisusu te kozongisa ye na libala, pamba te mwasi yango akomi mbindo liboso na ye : kozongisa ye lisusu na libala ezali likambo ya nkele na miso ya Yawe. Boyeisa lisumu te na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.  5 Soki mobali abali sika, bakoki te kotinda ye na bitumba to kopesa ye mosala songolo ; akozala na bonsomi mobu mobimba mpo ete avanda na ndako na ye mpo na kosepelisa mwasi oyo asili kobala.  6 Bokanga te lokola ndanga, mabanga mibale oyo moninga anikaka na yango ble : mingi koleka libanga oyo ya moke, pamba te kosala bongo ezali lokola kokanga ye nzela oyo abikelaka.  7 Soki moto moko ya Isalaele ayibi ndeko na ye ya Isalaele mpe akomisi ye mowumbu to ateki ye, basengeli koboma moto wana. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.  8 Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango. 9 Bobosana te makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki epai ya Miriami, na nzela, sima na bino kobima na Ejipito.  10 Soki odefisi eloko epai ya moninga na yo, kokota te na ndako na ye mpo na kozwa ndanga. 11 Vanda kaka na libanda kino moto oyo adefaki epai na yo akomemela yo ndanga. 12 Soki moto yango azali mobola, kokende kolala te na ndanga oyo asimbisaki yo mpo na niongo. 13 Okozongisela ye ndanga na ye ya kazaka ye, na pokwa, mpo ete alala na yango. Bongo, ye akopambola yo ; mpe ekozala mpo na yo likambo ya sembo na miso ya Yawe, Nzambe na yo.  14 Konyokola te moto ya mosala oyo azali mobola to moto akelela : azala ndeko na yo moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na moko ya bingumba na yo. 15 Pesa ye lifuti na ye ya mokolo na mokolo na pokwa, pamba te azali mobali mpe atiaka elikya na lifuti yango, noki te akoganga epai na Yawe na tina na yo mpe okosala lisumu.  16 Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko.  17 Bokoki te kokata na ndenge ya mabe, makambo mpo na mopaya to mpo na mwana etike ; to kokamata kazaka ya mwasi oyo akufisa mobali lokola ndanga. 18 Bobosana te ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito ; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino kuna.  19 Tango bokobuka mbuma na bilanga na bino, soki bobosani liboke ya ble, bozonga te mpo na kozwa yango ; botika yango mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala. 20 Tango bokoningisa bambuma ya olive na banzete na yango, bobuka te oyo ekotikala na bitape ; botika yango mpo na bapaya, bana bitike mpe mpo na basi bakufisa mibali. 21 Tango bokobuka bambuma na bilanga na bino ya vino, bokozongela te kobuka na mbala ya mibale. Botika oyo ekotikala mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali. 22 Bokanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito. Yango wana natindi bino kotosa mibeko oyo.
        
        
          In Other Versions
        
        
  
    Deuteronomy 24 in the ANGEFD
  
  
    Deuteronomy 24 in the ANTPNG2D
  
  
    Deuteronomy 24 in the AS21
  
  
    Deuteronomy 24 in the BAGH
  
  
    Deuteronomy 24 in the BBPNG
  
  
    Deuteronomy 24 in the BBT1E
  
  
    Deuteronomy 24 in the BDS
  
  
    Deuteronomy 24 in the BEV
  
  
    Deuteronomy 24 in the BHAD
  
  
    Deuteronomy 24 in the BIB
  
  
    Deuteronomy 24 in the BLPT
  
  
    Deuteronomy 24 in the BNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the BNTABOOT
  
  
    Deuteronomy 24 in the BNTLV
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOATCB
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOATCB2
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOBCV
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOCNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOECS
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOGWICC
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOHCB
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOHCV
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOHLNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOHNTLTAL
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOICB
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOILNTAP
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOITCV
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOKCV
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOKCV2
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOKHWOG
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOKSSV
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOLCB
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOMCV
  
  
    Deuteronomy 24 in the BONAV
  
  
    Deuteronomy 24 in the BONCB
  
  
    Deuteronomy 24 in the BONLT
  
  
    Deuteronomy 24 in the BONUT2
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOPLNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOSCB
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOSNC
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOTLNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOVCB
  
  
    Deuteronomy 24 in the BOYCB
  
  
    Deuteronomy 24 in the BPBB
  
  
    Deuteronomy 24 in the BPH
  
  
    Deuteronomy 24 in the BSB
  
  
    Deuteronomy 24 in the CCB
  
  
    Deuteronomy 24 in the CUV
  
  
    Deuteronomy 24 in the CUVS
  
  
    Deuteronomy 24 in the DBT
  
  
    Deuteronomy 24 in the DGDNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the DHNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the DNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the ELBE
  
  
    Deuteronomy 24 in the EMTV
  
  
    Deuteronomy 24 in the ESV
  
  
    Deuteronomy 24 in the FBV
  
  
    Deuteronomy 24 in the FEB
  
  
    Deuteronomy 24 in the GGMNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the GNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the HARY
  
  
    Deuteronomy 24 in the HNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the IRVA
  
  
    Deuteronomy 24 in the IRVB
  
  
    Deuteronomy 24 in the IRVG
  
  
    Deuteronomy 24 in the IRVH
  
  
    Deuteronomy 24 in the IRVK
  
  
    Deuteronomy 24 in the IRVM
  
  
    Deuteronomy 24 in the IRVM2
  
  
    Deuteronomy 24 in the IRVO
  
  
    Deuteronomy 24 in the IRVP
  
  
    Deuteronomy 24 in the IRVT
  
  
    Deuteronomy 24 in the IRVT2
  
  
    Deuteronomy 24 in the IRVU
  
  
    Deuteronomy 24 in the ISVN
  
  
    Deuteronomy 24 in the JSNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the KAPI
  
  
    Deuteronomy 24 in the KBT1ETNIK
  
  
    Deuteronomy 24 in the KBV
  
  
    Deuteronomy 24 in the KJV
  
  
    Deuteronomy 24 in the KNFD
  
  
    Deuteronomy 24 in the LBA
  
  
    Deuteronomy 24 in the LBLA
  
  
    Deuteronomy 24 in the LNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the LSV
  
  
    Deuteronomy 24 in the MAAL
  
  
    Deuteronomy 24 in the MBV
  
  
    Deuteronomy 24 in the MBV2
  
  
    Deuteronomy 24 in the MHNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the MKNFD
  
  
    Deuteronomy 24 in the MNG
  
  
    Deuteronomy 24 in the MNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the MNT2
  
  
    Deuteronomy 24 in the MRS1T
  
  
    Deuteronomy 24 in the NAA
  
  
    Deuteronomy 24 in the NASB
  
  
    Deuteronomy 24 in the NBLA
  
  
    Deuteronomy 24 in the NBS
  
  
    Deuteronomy 24 in the NBVTP
  
  
    Deuteronomy 24 in the NET2
  
  
    Deuteronomy 24 in the NIV11
  
  
    Deuteronomy 24 in the NNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the NNT2
  
  
    Deuteronomy 24 in the NNT3
  
  
    Deuteronomy 24 in the PDDPT
  
  
    Deuteronomy 24 in the PFNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the RMNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIAS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIBS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIBS2
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBICS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIDS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIGS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIHS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIIS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIIS2
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIIS3
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIKS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIKS2
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIMS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIOS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIPS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBISS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBITS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBITS2
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBITS3
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBITS4
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIUS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBIVS
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBT
  
  
    Deuteronomy 24 in the SBT1E
  
  
    Deuteronomy 24 in the SCHL
  
  
    Deuteronomy 24 in the SNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the SUSU
  
  
    Deuteronomy 24 in the SUSU2
  
  
    Deuteronomy 24 in the SYNO
  
  
    Deuteronomy 24 in the TBIAOTANT
  
  
    Deuteronomy 24 in the TBT1E
  
  
    Deuteronomy 24 in the TBT1E2
  
  
    Deuteronomy 24 in the TFTIP
  
  
    Deuteronomy 24 in the TFTU
  
  
    Deuteronomy 24 in the TGNTATF3T
  
  
    Deuteronomy 24 in the THAI
  
  
    Deuteronomy 24 in the TNFD
  
  
    Deuteronomy 24 in the TNT
  
  
    Deuteronomy 24 in the TNTIK
  
  
    Deuteronomy 24 in the TNTIL
  
  
    Deuteronomy 24 in the TNTIN
  
  
    Deuteronomy 24 in the TNTIP
  
  
    Deuteronomy 24 in the TNTIZ
  
  
    Deuteronomy 24 in the TOMA
  
  
    Deuteronomy 24 in the TTENT
  
  
    Deuteronomy 24 in the UBG
  
  
    Deuteronomy 24 in the UGV
  
  
    Deuteronomy 24 in the UGV2
  
  
    Deuteronomy 24 in the UGV3
  
  
    Deuteronomy 24 in the VBL
  
  
    Deuteronomy 24 in the VDCC
  
  
    Deuteronomy 24 in the YALU
  
  
    Deuteronomy 24 in the YAPE
  
  
    Deuteronomy 24 in the YBVTP
  
  
    Deuteronomy 24 in the ZBP