Exodus 33 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize :— Kende, longwa na esika oyo elongo na bato oyo obimisaki na Ejipito ; kende na mokili oyo nalakaki na ndayi epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi ete nakopesa yango epai na bana na yo. 2 Nakotinda anjelu liboso na yo, nakobengana bato ya Kanana ya Amori, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi. 3 Bokende na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Mpo na Ngai, nakotambola elongo na bino te, pamba te bozali batomboki, noki te nakosilisa koboma bino na nzela. 4 Tango bato bayokaki maloba oyo ya somo, balataki pili, mpe ata moto moko te alataki lisusu biloko ya monzele. 5 Bongo Yawe alobaki na Moyize :— Loba na bana ya Isalaele : « Bozali batomboki ; soki natamboli elongo na bino ata mpo na tango moke, nakosilisa koboma bino. Bolongola biloko na bino ya monzele, mpe nakoyebisa bino makambo oyo nakosala bino. » 6 Bana ya Isalaele balongolaki biloko na bango ya monzele na ngomba Orebi. 7 Moyize azwaki ndako ya kapo mpe atelemisaki yango mwa mosika, na libanda ya molako, mpo na bolamu na bango ; mpe abengaki yango Ndako ya kapo ya Bokutani. Moto nyonso oyo alingaki kokutana na Yawe, asengelaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, na libanda ya molako. 8 Mbala nyonso oyo Moyize azalaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, bato nyonso bazalaki kotelema : moko na moko azalaki kotelema na ekuke ya ndako na ye ya kapo mpo na kotala Moyize kino akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani. 9 Soki Moyize akoti na kati, likonzi ya lipata ezalaki kokita mpe kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani ; bongo Yawe azalaki kosolola na Moyize. 10 Bato nyonso bazalaki komona likonzi ya lipata kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye bazalaki kotelema mpe kofukamela Yawe, moko na moko na ekuke ya ndako na ye ya kapo. 11 Yawe azalaki kosolola na Moyize ndenge moto asololaka na moninga na ye. Wana Moyize azalaki kozonga na molako ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, elenge oyo azalaki kosunga ye, azalaki kotikala kati na ndako ya kapo. 12 Moyize alobaki na Yawe :— Tala, ozali koloba na ngai ete nakamba bato oyo, kasi ozali koyebisa ngai te nani okotinda elongo na ngai. Nzokande Yo nde olobaki na ngai : « Nayebi yo na kombo na yo, » mpe lisusu : « Ozwi ngolu na miso na Ngai. » 13 Sik’oyo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, teya ngai banzela na Yo mpo ete nayeba Yo mpe nazwa ngolu na miso na Yo. Mpe kanisa lisusu ete libota wana bazali bato na Yo. 14 Yawe azongisaki :— Ngai moko nakotambola elongo na yo mpe nakopesa yo bopemi. 15 Moyize azongisaki :— Soki Yo moko okotambola elongo na biso te, kolongola biso te na esika oyo. 16 Soki otamboli elongo na biso te, ndenge nini bato bakoyeba ete ngai mpe bato na Yo tozwi ngolu na miso na Yo ? Ezali nde tango okotambola elongo na biso nde ngai mpe bato na yo tokokesana na bikolo nyonso oyo ezali kati na mokili. 17 Yawe alobaki na Moyize :— Nakosala makambo nyonso oyo osengi Ngai, pamba te ozwi ngolu na miso na Ngai mpe nayebi yo na kombo na yo. 18 Moyize azongisaki :— Monisa ngai nkembo na Yo. 19 Yawe azongisaki :— Nakolekisa bolamu na Ngai nyonso liboso na yo mpe nakotatola nani oyo nazali liboso na yo ; natalisaka ngolu epai ya moto oyo Ngai nasepeli kosalela ngolu, mpe nayokelaka mawa moto oyo Ngai nasepeli koyokela mawa. 20 Kasi okokoka komona elongi na Ngai te, pamba te moto moko te akoki komona Ngai mpe azala na bomoi. 21 Yawe alobaki lisusu :— Ezali na esika moko awa, pembeni na Ngai, epai wapi okoki kotelema na likolo ya libanga. 22 Tango nkembo na Ngai ekoleka, nakotia yo kati na lidusu ya libanga mpe nakozipa yo na loboko na Ngai kino nakoleka. 23 Bongo tango nakolongola loboko na Ngai, okomona Ngai kaka na mokongo ; kasi okokoka komona elongi na Ngai te.

In Other Versions

Exodus 33 in the ANGEFD

Exodus 33 in the ANTPNG2D

Exodus 33 in the AS21

Exodus 33 in the BAGH

Exodus 33 in the BBPNG

Exodus 33 in the BBT1E

Exodus 33 in the BDS

Exodus 33 in the BEV

Exodus 33 in the BHAD

Exodus 33 in the BIB

Exodus 33 in the BLPT

Exodus 33 in the BNT

Exodus 33 in the BNTABOOT

Exodus 33 in the BNTLV

Exodus 33 in the BOATCB

Exodus 33 in the BOATCB2

Exodus 33 in the BOBCV

Exodus 33 in the BOCNT

Exodus 33 in the BOECS

Exodus 33 in the BOGWICC

Exodus 33 in the BOHCB

Exodus 33 in the BOHCV

Exodus 33 in the BOHLNT

Exodus 33 in the BOHNTLTAL

Exodus 33 in the BOICB

Exodus 33 in the BOILNTAP

Exodus 33 in the BOITCV

Exodus 33 in the BOKCV

Exodus 33 in the BOKCV2

Exodus 33 in the BOKHWOG

Exodus 33 in the BOKSSV

Exodus 33 in the BOLCB

Exodus 33 in the BOMCV

Exodus 33 in the BONAV

Exodus 33 in the BONCB

Exodus 33 in the BONLT

Exodus 33 in the BONUT2

Exodus 33 in the BOPLNT

Exodus 33 in the BOSCB

Exodus 33 in the BOSNC

Exodus 33 in the BOTLNT

Exodus 33 in the BOVCB

Exodus 33 in the BOYCB

Exodus 33 in the BPBB

Exodus 33 in the BPH

Exodus 33 in the BSB

Exodus 33 in the CCB

Exodus 33 in the CUV

Exodus 33 in the CUVS

Exodus 33 in the DBT

Exodus 33 in the DGDNT

Exodus 33 in the DHNT

Exodus 33 in the DNT

Exodus 33 in the ELBE

Exodus 33 in the EMTV

Exodus 33 in the ESV

Exodus 33 in the FBV

Exodus 33 in the FEB

Exodus 33 in the GGMNT

Exodus 33 in the GNT

Exodus 33 in the HARY

Exodus 33 in the HNT

Exodus 33 in the IRVA

Exodus 33 in the IRVB

Exodus 33 in the IRVG

Exodus 33 in the IRVH

Exodus 33 in the IRVK

Exodus 33 in the IRVM

Exodus 33 in the IRVM2

Exodus 33 in the IRVO

Exodus 33 in the IRVP

Exodus 33 in the IRVT

Exodus 33 in the IRVT2

Exodus 33 in the IRVU

Exodus 33 in the ISVN

Exodus 33 in the JSNT

Exodus 33 in the KAPI

Exodus 33 in the KBT1ETNIK

Exodus 33 in the KBV

Exodus 33 in the KJV

Exodus 33 in the KNFD

Exodus 33 in the LBA

Exodus 33 in the LBLA

Exodus 33 in the LNT

Exodus 33 in the LSV

Exodus 33 in the MAAL

Exodus 33 in the MBV

Exodus 33 in the MBV2

Exodus 33 in the MHNT

Exodus 33 in the MKNFD

Exodus 33 in the MNG

Exodus 33 in the MNT

Exodus 33 in the MNT2

Exodus 33 in the MRS1T

Exodus 33 in the NAA

Exodus 33 in the NASB

Exodus 33 in the NBLA

Exodus 33 in the NBS

Exodus 33 in the NBVTP

Exodus 33 in the NET2

Exodus 33 in the NIV11

Exodus 33 in the NNT

Exodus 33 in the NNT2

Exodus 33 in the NNT3

Exodus 33 in the PDDPT

Exodus 33 in the PFNT

Exodus 33 in the RMNT

Exodus 33 in the SBIAS

Exodus 33 in the SBIBS

Exodus 33 in the SBIBS2

Exodus 33 in the SBICS

Exodus 33 in the SBIDS

Exodus 33 in the SBIGS

Exodus 33 in the SBIHS

Exodus 33 in the SBIIS

Exodus 33 in the SBIIS2

Exodus 33 in the SBIIS3

Exodus 33 in the SBIKS

Exodus 33 in the SBIKS2

Exodus 33 in the SBIMS

Exodus 33 in the SBIOS

Exodus 33 in the SBIPS

Exodus 33 in the SBISS

Exodus 33 in the SBITS

Exodus 33 in the SBITS2

Exodus 33 in the SBITS3

Exodus 33 in the SBITS4

Exodus 33 in the SBIUS

Exodus 33 in the SBIVS

Exodus 33 in the SBT

Exodus 33 in the SBT1E

Exodus 33 in the SCHL

Exodus 33 in the SNT

Exodus 33 in the SUSU

Exodus 33 in the SUSU2

Exodus 33 in the SYNO

Exodus 33 in the TBIAOTANT

Exodus 33 in the TBT1E

Exodus 33 in the TBT1E2

Exodus 33 in the TFTIP

Exodus 33 in the TFTU

Exodus 33 in the TGNTATF3T

Exodus 33 in the THAI

Exodus 33 in the TNFD

Exodus 33 in the TNT

Exodus 33 in the TNTIK

Exodus 33 in the TNTIL

Exodus 33 in the TNTIN

Exodus 33 in the TNTIP

Exodus 33 in the TNTIZ

Exodus 33 in the TOMA

Exodus 33 in the TTENT

Exodus 33 in the UBG

Exodus 33 in the UGV

Exodus 33 in the UGV2

Exodus 33 in the UGV3

Exodus 33 in the VBL

Exodus 33 in the VDCC

Exodus 33 in the YALU

Exodus 33 in the YAPE

Exodus 33 in the YBVTP

Exodus 33 in the ZBP