Ezekiel 41 (BOLCB2)

1 Moto yango amemaki ngai kati na eteni ya Tempelo, oyo eleki monene mpe amekaki molayi ya makonzi na yango : likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene misato na monene na bangambo nyonso. 2 Ekotelo na yango ezalaki na bametele pene mitano na mokuse, mpe bamir na yango ya mipanzi ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano, ngambo na ngambo, na mokuse. Amekaki lisusu molayi ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene : ezalaki na bametele pene tuku mibale na molayi mpe bametele pene zomi na mokuse. 3 Bongo akotaki kati na eteni ya Tempelo, oyo eleki bule ; amekaki molayi ya makonzi ya ekotelo : moko na moko ezalaki na metele pene moko na mokuse ; ekotelo ezalaki na bametele pene misato na mokuse mpe bamir ya mipanzi ya ekotelo ezalaki na bametele pene misato na basantimetele tuku mitano na mokuse. 4 Amekaki molayi ya eteni oyo ezalaki sima ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene : ezalaki na bametele pene zomi na molayi, mpe bametele pene zomi na mokuse ; mpe alobaki na ngai : « Oyo ezali Esika-Oyo-Eleki-Bule. » 5 Amekaki lisusu monene ya mir ya Tempelo : ezalaki na bametele pene misato ; mpe ngambo nyonso ya bashambre zingazinga ya Tempelo ezalaki na bametele pene mibale na mokuse. 6 Ezalaki na ba-etaje misato oyo moko na moko, kati na yango, ezalaki na bashambre tuku misato oyo esimbamaki na mir batonga zingazinga ya Tempelo. Bamir yango ezalaki ekangana yango na yango, kasi ezalaki ya kokangana na mir ya Tempelo te. 7 Longwa na etaje moko mpo na komata na etaje mosusu, bashambre ezalaki kokoma minene, pamba te bazalaki komata na etaje mosusu na ematelo oyo ezalaki zingazinga ya mir ; boye, likolo ya ndako ezalaki monene makasi. Bongo, mpo na kolongwa na etaje oyo ya se mpe kokoma na etaje oyo ya likolo, esengelaki koleka na etaje ya kati-kati. 8 Namonaki zingazinga ya Tempelo eloko moko batonga na likolo : ezalaki moboko ya bashambre ; molayi na yango ezalaki na bametele pene misato. 9 Monene ya mir ya libanda ya bashambre ya mipanzi ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano. Nzela oyo ezalaki na kati-kati ya ngambo ya bashambre ya Tempelo 10 mpe bashambre ya Banganga-Nzambe ezalaki na bametele pene zomi na mokuse na zingazinga ya Tempelo. 11 Bikuke ya bashambre ya Tempelo etalaki na nzela oyo ezalaki na bikotelo mibale : moko na ngambo ya nor mpe mosusu na ngambo ya sude. Mokuse ya nzela yango ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano. 12 Na ngambo ya weste, ezalaki na ndako moko etalana na lopango ya Tempelo : ezalaki na bametele pene tuku misato na mitano na mokuse ; mir ya ndako yango ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na monene, mpe bametele pene tuku minei na mitano na molayi. 13 Moto yango amekaki lisusu molayi ya Tempelo : ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi ; bongo lopango ya Tempelo mpe bamir na yango ezalaki na bametele pene tuku mitano. 14 Mokuse ya Tempelo mpe ya esika ya polele oyo ezalaki na ngambo ya este ezalaki mpe na bametele pene tuku mitano. 15 Amekaki lisusu molayi ya ndako oyo etalana na lopango, na sima ya Tempelo elongo na nzela na yango ngambo na ngambo : ezalaki na bametele pene tuku mitano.Kati na Tempelo, eteni oyo eleki monene, Esika ya bule ya kati mpe ndako moke ya kokotela oyo etalana na lopango, 16 bikotelo, maninisa ya milayi oyo batalelaka libanda mpe nzela oyo ezali kati na ba-etaje wana misato, bazipaki yango nyonso na mabaya, longwa na se kino na maninisa ya etaje ya liboso, mpe bazipaki lisusu maninisa yango nyonso. 17 Na esika oyo ezali likolo ya ekotelo ya libanda kino na eteni ya Tempelo, oyo eleki bule mpe na bamir ya zingazinga ya eteni ya Tempelo, oyo eleki bule mpe na libanda ya eteni ya bule ya Tempelo, 18 batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila. Bililingi ya banzete ya mbila ezalaki elandana na bililingi ya basheribe. Boye, Sheribe moko na moko azalaki na bilongi mibale : 19 elongi ya moto, na ngambo ya nzete ya mbila moko mpe elongi ya nkosi, na ngambo ya nzete ya mbila mosusu ; batiaki bililingi yango zingazinga ya Tempelo mobimba. 20 Batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila na mir ya libanda ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene, longwa na se kino na likolo ya ekotelo. 21 Mabaya oyo esimbaka ekuke ya Tempelo, na bangambo na yango nyonso, ezalaki ndenge moko na molayi ; mpe mabaya oyo ezalaki liboso ya eteni ya Tempelo, oyo eleki bule ezalaki mpe kaka ndenge moko. 22 Ezalaki na etumbelo moko ya mabaya, oyo ezalaki na metele pene moko na basantimetele tuku mitano na bosanda mpe metele moko na molayi. Basonge na yango, se na yango mpe mipanzi na yango ezalaki ya mabaya. Moto yango alobaki na ngai : « Oyo nde mesa oyo ezali liboso ya Yawe. » 23 Ezala eteni ya Tempelo, oyo eleki monene to eteni ya Tempelo, oyo eleki bule, moko na moko ezalaki na bikuke mibale : 24 ekuke moko na moko ezalaki na bizipelo mibale oyo ebalukaka. 25 Batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila na bikuke ya libanda ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene ; basalaki mwanza moke ya mabaya na liboso ya ndako moke ya kokotela. 26 Batiaki bililingi ya banzete ya mbila na bangambo nyonso ya bamir ya mipanzi ya ndako moke ya kokotela, oyo ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda. Mpe mipanzi ya bashambre ya Tempelo ezalaki na bamwanza mike.

In Other Versions

Ezekiel 41 in the ANGEFD

Ezekiel 41 in the ANTPNG2D

Ezekiel 41 in the AS21

Ezekiel 41 in the BAGH

Ezekiel 41 in the BBPNG

Ezekiel 41 in the BBT1E

Ezekiel 41 in the BDS

Ezekiel 41 in the BEV

Ezekiel 41 in the BHAD

Ezekiel 41 in the BIB

Ezekiel 41 in the BLPT

Ezekiel 41 in the BNT

Ezekiel 41 in the BNTABOOT

Ezekiel 41 in the BNTLV

Ezekiel 41 in the BOATCB

Ezekiel 41 in the BOATCB2

Ezekiel 41 in the BOBCV

Ezekiel 41 in the BOCNT

Ezekiel 41 in the BOECS

Ezekiel 41 in the BOGWICC

Ezekiel 41 in the BOHCB

Ezekiel 41 in the BOHCV

Ezekiel 41 in the BOHLNT

Ezekiel 41 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 41 in the BOICB

Ezekiel 41 in the BOILNTAP

Ezekiel 41 in the BOITCV

Ezekiel 41 in the BOKCV

Ezekiel 41 in the BOKCV2

Ezekiel 41 in the BOKHWOG

Ezekiel 41 in the BOKSSV

Ezekiel 41 in the BOLCB

Ezekiel 41 in the BOMCV

Ezekiel 41 in the BONAV

Ezekiel 41 in the BONCB

Ezekiel 41 in the BONLT

Ezekiel 41 in the BONUT2

Ezekiel 41 in the BOPLNT

Ezekiel 41 in the BOSCB

Ezekiel 41 in the BOSNC

Ezekiel 41 in the BOTLNT

Ezekiel 41 in the BOVCB

Ezekiel 41 in the BOYCB

Ezekiel 41 in the BPBB

Ezekiel 41 in the BPH

Ezekiel 41 in the BSB

Ezekiel 41 in the CCB

Ezekiel 41 in the CUV

Ezekiel 41 in the CUVS

Ezekiel 41 in the DBT

Ezekiel 41 in the DGDNT

Ezekiel 41 in the DHNT

Ezekiel 41 in the DNT

Ezekiel 41 in the ELBE

Ezekiel 41 in the EMTV

Ezekiel 41 in the ESV

Ezekiel 41 in the FBV

Ezekiel 41 in the FEB

Ezekiel 41 in the GGMNT

Ezekiel 41 in the GNT

Ezekiel 41 in the HARY

Ezekiel 41 in the HNT

Ezekiel 41 in the IRVA

Ezekiel 41 in the IRVB

Ezekiel 41 in the IRVG

Ezekiel 41 in the IRVH

Ezekiel 41 in the IRVK

Ezekiel 41 in the IRVM

Ezekiel 41 in the IRVM2

Ezekiel 41 in the IRVO

Ezekiel 41 in the IRVP

Ezekiel 41 in the IRVT

Ezekiel 41 in the IRVT2

Ezekiel 41 in the IRVU

Ezekiel 41 in the ISVN

Ezekiel 41 in the JSNT

Ezekiel 41 in the KAPI

Ezekiel 41 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 41 in the KBV

Ezekiel 41 in the KJV

Ezekiel 41 in the KNFD

Ezekiel 41 in the LBA

Ezekiel 41 in the LBLA

Ezekiel 41 in the LNT

Ezekiel 41 in the LSV

Ezekiel 41 in the MAAL

Ezekiel 41 in the MBV

Ezekiel 41 in the MBV2

Ezekiel 41 in the MHNT

Ezekiel 41 in the MKNFD

Ezekiel 41 in the MNG

Ezekiel 41 in the MNT

Ezekiel 41 in the MNT2

Ezekiel 41 in the MRS1T

Ezekiel 41 in the NAA

Ezekiel 41 in the NASB

Ezekiel 41 in the NBLA

Ezekiel 41 in the NBS

Ezekiel 41 in the NBVTP

Ezekiel 41 in the NET2

Ezekiel 41 in the NIV11

Ezekiel 41 in the NNT

Ezekiel 41 in the NNT2

Ezekiel 41 in the NNT3

Ezekiel 41 in the PDDPT

Ezekiel 41 in the PFNT

Ezekiel 41 in the RMNT

Ezekiel 41 in the SBIAS

Ezekiel 41 in the SBIBS

Ezekiel 41 in the SBIBS2

Ezekiel 41 in the SBICS

Ezekiel 41 in the SBIDS

Ezekiel 41 in the SBIGS

Ezekiel 41 in the SBIHS

Ezekiel 41 in the SBIIS

Ezekiel 41 in the SBIIS2

Ezekiel 41 in the SBIIS3

Ezekiel 41 in the SBIKS

Ezekiel 41 in the SBIKS2

Ezekiel 41 in the SBIMS

Ezekiel 41 in the SBIOS

Ezekiel 41 in the SBIPS

Ezekiel 41 in the SBISS

Ezekiel 41 in the SBITS

Ezekiel 41 in the SBITS2

Ezekiel 41 in the SBITS3

Ezekiel 41 in the SBITS4

Ezekiel 41 in the SBIUS

Ezekiel 41 in the SBIVS

Ezekiel 41 in the SBT

Ezekiel 41 in the SBT1E

Ezekiel 41 in the SCHL

Ezekiel 41 in the SNT

Ezekiel 41 in the SUSU

Ezekiel 41 in the SUSU2

Ezekiel 41 in the SYNO

Ezekiel 41 in the TBIAOTANT

Ezekiel 41 in the TBT1E

Ezekiel 41 in the TBT1E2

Ezekiel 41 in the TFTIP

Ezekiel 41 in the TFTU

Ezekiel 41 in the TGNTATF3T

Ezekiel 41 in the THAI

Ezekiel 41 in the TNFD

Ezekiel 41 in the TNT

Ezekiel 41 in the TNTIK

Ezekiel 41 in the TNTIL

Ezekiel 41 in the TNTIN

Ezekiel 41 in the TNTIP

Ezekiel 41 in the TNTIZ

Ezekiel 41 in the TOMA

Ezekiel 41 in the TTENT

Ezekiel 41 in the UBG

Ezekiel 41 in the UGV

Ezekiel 41 in the UGV2

Ezekiel 41 in the UGV3

Ezekiel 41 in the VBL

Ezekiel 41 in the VDCC

Ezekiel 41 in the YALU

Ezekiel 41 in the YAPE

Ezekiel 41 in the YBVTP

Ezekiel 41 in the ZBP