Ezekiel 42 (BOLCB2)

1 Moto yango amemaki ngai kino na lopango ya libanda, na nzela oyo ekenda kino na ngambo ya nor ; bongo amemaki ngai na ndako oyo ezalaki na bashambre ya Banganga-Nzambe, oyo na ngambo ya sude, etalana na Tempelo ; mpe na ngambo ya nor, etalana na mir. 2 Ndako yango ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi mpe tuku mibale na mitano na mokuse, mpe ekuke na yango ezalaki na ngambo ya nor. 3 Ezalaki na ndako moko ya etaje etalana na ndako ya ba-etaje misato oyo ezalaki na kati-kati ya lopango ya kati mpe lopango ya libanda ; molayi oyo ekabolaki ndako ya ba-etaje misato na mir ya Tempelo ezalaki na bametele pene zomi. 4 Nzela moko ya bametele pene mitano na mokuse mpe bametele pene tuku mitano na molayi ezalaki liboso ya bashambre yango. Bongo, bikuke na yango ezalaki na ngambo ya nor. 5 Bashambre ya etaje ya likolo ezalaki mike koleka bashambre ya etaje ya kati-kati mpe ya se, pamba te baveranda na yango ezalaki kozwa esika mingi koleka etaje ya kati-kati mpe ya se. 6 Bashambre ya etaje ya misato ezalaki na makonzi te ndenge ezalaki na lopango ya libanda. Boye, ezalaki mike koleka bashambre ya etaje ya kati-kati mpe oyo ya se. 7 Mir ya libanda ezalaki etalana na bashambre, mpe lopango ya libanda ezalaki liboso ya ndako ya bashambre : ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano. 8 Bashambre oyo ezalaki pene ya lopango ya libanda ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe bashambre oyo ezalaki pene ya Tempelo ezalaki bametele pene tuku mitano na molayi. 9 Na se ya bashambre, ezalaki na ekotelo moko na ngambo ya este soki okoteli wuta na lopango ya libanda. 10 Bashambre yango ezalaki na ngambo ya sude, na molayi ya mir ya lopango ya libanda oyo ekenda kino na lopango ya Tempelo oyo etalana na mir ya libanda. 11 Mwa nzela moko ezalaki liboso na yango. Bashambre yango ezalaki ndenge moko na bashambre ya nor, na mokuse mpe na molayi ; mpe bikuke na yango ezalaki ndenge moko na monene. Bikuke ya bashambre oyo ezalaki na ngambo ya nor 12 ezalaki ndenge moko na bikuke ya bashambre ya ngambo ya sude. Ezalaki na ekuke moko na ebandeli ya mwa nzela oyo etalana na mir oyo ebatelaka, oyo ezali na ngambo ya este epai wapi bazalaki kokotela na bashambre. 13 Bongo moto yango alobaki na ngai : « Bashambre oyo ezali na ngambo ya nor mpe ya sude, oyo etalana na lopango ya Tempelo ezali bashambre ya Banganga-Nzambe ; ezali kuna nde Banganga-Nzambe oyo bapusanaka liboso ya Yawe bakobanda kolia biloko oyo eleki bule. Ezali kuna nde bakobanda komema biloko oyo eleki bule : makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani, pamba te esika yango ezali bule. 14 Soki bakoti kuna, Banganga-Nzambe bakoki kobima te na biteni ya bule ya Tempelo mpo na kokende na lopango ya libanda, kasi basengeli kotika bilamba oyo bazalaki kosalela mosala ya bonganga-Nzambe kuna, pamba te bilamba yango ezali bule ; bakolata bilamba mosusu liboso ya kopusana na bisika oyo ebongisami mpo na bato. » 15 Tango asilisaki komeka molayi ya kati ya Tempelo, amemaki ngai na libanda, na nzela ya ekuke ya este, mpe amekaki molayi ya lopango zingazinga ya Tempelo. 16 Amekaki molayi ya ngambo ya este na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano. 17 Amekaki molayi ya ngambo ya nor na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki bametele pene nkama mibale na tuku mitano. 18 Amekaki molayi ya ngambo ya sude na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki bametele pene nkama mibale na tuku mitano. 19 Amekaki molayi ya ngambo ya weste na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano. 20 Amekaki bangambo nyonso minei. Ezalaki na mir moko zingazinga na yango, oyo ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano na molayi mpe nkama mibale na tuku mitano na mokuse ; mir yango ezalaki kokabola eteni ya bule ya Tempelo mpe eteni ya Tempelo oyo ezali bule te.

In Other Versions

Ezekiel 42 in the ANGEFD

Ezekiel 42 in the ANTPNG2D

Ezekiel 42 in the AS21

Ezekiel 42 in the BAGH

Ezekiel 42 in the BBPNG

Ezekiel 42 in the BBT1E

Ezekiel 42 in the BDS

Ezekiel 42 in the BEV

Ezekiel 42 in the BHAD

Ezekiel 42 in the BIB

Ezekiel 42 in the BLPT

Ezekiel 42 in the BNT

Ezekiel 42 in the BNTABOOT

Ezekiel 42 in the BNTLV

Ezekiel 42 in the BOATCB

Ezekiel 42 in the BOATCB2

Ezekiel 42 in the BOBCV

Ezekiel 42 in the BOCNT

Ezekiel 42 in the BOECS

Ezekiel 42 in the BOGWICC

Ezekiel 42 in the BOHCB

Ezekiel 42 in the BOHCV

Ezekiel 42 in the BOHLNT

Ezekiel 42 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 42 in the BOICB

Ezekiel 42 in the BOILNTAP

Ezekiel 42 in the BOITCV

Ezekiel 42 in the BOKCV

Ezekiel 42 in the BOKCV2

Ezekiel 42 in the BOKHWOG

Ezekiel 42 in the BOKSSV

Ezekiel 42 in the BOLCB

Ezekiel 42 in the BOMCV

Ezekiel 42 in the BONAV

Ezekiel 42 in the BONCB

Ezekiel 42 in the BONLT

Ezekiel 42 in the BONUT2

Ezekiel 42 in the BOPLNT

Ezekiel 42 in the BOSCB

Ezekiel 42 in the BOSNC

Ezekiel 42 in the BOTLNT

Ezekiel 42 in the BOVCB

Ezekiel 42 in the BOYCB

Ezekiel 42 in the BPBB

Ezekiel 42 in the BPH

Ezekiel 42 in the BSB

Ezekiel 42 in the CCB

Ezekiel 42 in the CUV

Ezekiel 42 in the CUVS

Ezekiel 42 in the DBT

Ezekiel 42 in the DGDNT

Ezekiel 42 in the DHNT

Ezekiel 42 in the DNT

Ezekiel 42 in the ELBE

Ezekiel 42 in the EMTV

Ezekiel 42 in the ESV

Ezekiel 42 in the FBV

Ezekiel 42 in the FEB

Ezekiel 42 in the GGMNT

Ezekiel 42 in the GNT

Ezekiel 42 in the HARY

Ezekiel 42 in the HNT

Ezekiel 42 in the IRVA

Ezekiel 42 in the IRVB

Ezekiel 42 in the IRVG

Ezekiel 42 in the IRVH

Ezekiel 42 in the IRVK

Ezekiel 42 in the IRVM

Ezekiel 42 in the IRVM2

Ezekiel 42 in the IRVO

Ezekiel 42 in the IRVP

Ezekiel 42 in the IRVT

Ezekiel 42 in the IRVT2

Ezekiel 42 in the IRVU

Ezekiel 42 in the ISVN

Ezekiel 42 in the JSNT

Ezekiel 42 in the KAPI

Ezekiel 42 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 42 in the KBV

Ezekiel 42 in the KJV

Ezekiel 42 in the KNFD

Ezekiel 42 in the LBA

Ezekiel 42 in the LBLA

Ezekiel 42 in the LNT

Ezekiel 42 in the LSV

Ezekiel 42 in the MAAL

Ezekiel 42 in the MBV

Ezekiel 42 in the MBV2

Ezekiel 42 in the MHNT

Ezekiel 42 in the MKNFD

Ezekiel 42 in the MNG

Ezekiel 42 in the MNT

Ezekiel 42 in the MNT2

Ezekiel 42 in the MRS1T

Ezekiel 42 in the NAA

Ezekiel 42 in the NASB

Ezekiel 42 in the NBLA

Ezekiel 42 in the NBS

Ezekiel 42 in the NBVTP

Ezekiel 42 in the NET2

Ezekiel 42 in the NIV11

Ezekiel 42 in the NNT

Ezekiel 42 in the NNT2

Ezekiel 42 in the NNT3

Ezekiel 42 in the PDDPT

Ezekiel 42 in the PFNT

Ezekiel 42 in the RMNT

Ezekiel 42 in the SBIAS

Ezekiel 42 in the SBIBS

Ezekiel 42 in the SBIBS2

Ezekiel 42 in the SBICS

Ezekiel 42 in the SBIDS

Ezekiel 42 in the SBIGS

Ezekiel 42 in the SBIHS

Ezekiel 42 in the SBIIS

Ezekiel 42 in the SBIIS2

Ezekiel 42 in the SBIIS3

Ezekiel 42 in the SBIKS

Ezekiel 42 in the SBIKS2

Ezekiel 42 in the SBIMS

Ezekiel 42 in the SBIOS

Ezekiel 42 in the SBIPS

Ezekiel 42 in the SBISS

Ezekiel 42 in the SBITS

Ezekiel 42 in the SBITS2

Ezekiel 42 in the SBITS3

Ezekiel 42 in the SBITS4

Ezekiel 42 in the SBIUS

Ezekiel 42 in the SBIVS

Ezekiel 42 in the SBT

Ezekiel 42 in the SBT1E

Ezekiel 42 in the SCHL

Ezekiel 42 in the SNT

Ezekiel 42 in the SUSU

Ezekiel 42 in the SUSU2

Ezekiel 42 in the SYNO

Ezekiel 42 in the TBIAOTANT

Ezekiel 42 in the TBT1E

Ezekiel 42 in the TBT1E2

Ezekiel 42 in the TFTIP

Ezekiel 42 in the TFTU

Ezekiel 42 in the TGNTATF3T

Ezekiel 42 in the THAI

Ezekiel 42 in the TNFD

Ezekiel 42 in the TNT

Ezekiel 42 in the TNTIK

Ezekiel 42 in the TNTIL

Ezekiel 42 in the TNTIN

Ezekiel 42 in the TNTIP

Ezekiel 42 in the TNTIZ

Ezekiel 42 in the TOMA

Ezekiel 42 in the TTENT

Ezekiel 42 in the UBG

Ezekiel 42 in the UGV

Ezekiel 42 in the UGV2

Ezekiel 42 in the UGV3

Ezekiel 42 in the VBL

Ezekiel 42 in the VDCC

Ezekiel 42 in the YALU

Ezekiel 42 in the YAPE

Ezekiel 42 in the YBVTP

Ezekiel 42 in the ZBP