Ezekiel 5 (BOLCB2)

1 Sik’oyo, mwana na moto, kamata mopanga ya minu mpe salela yango lokola jileti mpo na kokata suki ya moto mpe mandefu na yo ; kamata lisusu emekelo kilo mpe kabola suki yango na maboke. 2 Tango mikolo ya etumbu na yo ekosila, okotumba na moto kati na engumba ndambo moko kati na bandambo misato ; okokamata ndambo moko mosusu kati na bandambo misato, okobeta-beta yango na mopanga zingazinga ya engumba, mpe okopanza ndambo moko mosusu kati na bandambo misato na mopepe, mpe Ngai nakolanda bango na mopanga. 3 Kasi kamata ndambo moke kaka ya suki, kanga yango na songe ya elamba na yo. 4 Bongo, na oyo ekotikala, bwaka ndambo na yango na moto mpo ete ezika. Boye, moto oyo ekobima kuna ekopanzana na libota mobimba ya Isalaele. 5 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala Yelusalemi ! Natiaki yango na kati-kati ya bikolo, mpe bamboka minene ezingelaki yango. 6 Kasi likolo ya mitema mabe ya bato na yango, batombokelaki mibeko na Ngai mpe balandaki bikateli na Ngai te ; basalaki mabe koleka bikolo mpe bamboka ya zingazinga, pamba te batiolaki mibeko na Ngai, batambolaki te kolanda mitindo na Ngai. 7 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola botambolaki na botomboki koleka bikolo oyo ezali zingazinga na bino, bolandaki mibeko mpe bikateli na Ngai te mpe bolandaki ata kutu bosembo ya bamboka oyo ezingelaki bino te ; 8 mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Ngai moko nakotelemela yo, Yelusalemi, mpe nakopesa yo etumbu na miso ya bikolo. 9 Likolo ya makambo nyonso ya nkele oyo osalaka, nakosala yo makambo oyo natikala nanu kosala te na tango ya kala mpe oyo nakotikala kosala te na mikolo ekoya. › 10 Yango wana, kati na bino, batata bakolia bana na bango, mpe bana bakolia batata na bango. Nakopesa bino etumbu mpe nakopanza bipai nyonso bato na bino nyonso oyo bakotikala na bomoi. 11 Mpe lisusu, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe : ‹ Lokola bokomisi Ndako na Ngai ya bule mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko mpe makambo na bino ya nkele, nakolongola Ngai moko ngolu na Ngai na likolo na bino : liso na Ngai ekotala bino lisusu na mawa te mpe nakobikisa bino lisusu te. › 12 Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga. 13 Kanda na Ngai ekosila kaka soki bazwi etumbu mpo na mabe na bango ; nakokitisela bango kanda na Ngai mpe bakoyeba ete ezali Ngai Yawe nde nalobaki na zuwa na Ngai. 14 Yo Yelusalemi, nakobebisa yo, okoyokisama soni kati na bikolo nyonso oyo ezingeli yo mpe na miso ya bato nyonso oyo bakolekela na nzela na yo. 15 Okozala likambo ya soni, ya kotiola, ya liseki mpe ya soni makasi na miso ya bikolo oyo ezingeli yo, tango nakopesa yo etumbu na kanda mpe na kotomboka na Ngai ya makasi penza. » Ngai Yawe nde nalobi. 16 « Tango nakobwakela yo makonga na Ngai ya mike ya nzala makasi oyo ebomaka mpe oyo ebebisaka, nakosala bongo mpo na kosilisa koboma bino : nakoyeisa nzala makasi koleka kati na yo mpe nakolongola bilei na bibombelo na yo. 17 Nakotindela yo nzala makasi mpe banyama mabe mpo ete eboma bana na yo nyonso. Nakotindela yo mopanga mpe bokono ya makasi, nakosopa makila koleka kati na yo. Ngai Yawe nde nalobi. »

In Other Versions

Ezekiel 5 in the ANGEFD

Ezekiel 5 in the ANTPNG2D

Ezekiel 5 in the AS21

Ezekiel 5 in the BAGH

Ezekiel 5 in the BBPNG

Ezekiel 5 in the BBT1E

Ezekiel 5 in the BDS

Ezekiel 5 in the BEV

Ezekiel 5 in the BHAD

Ezekiel 5 in the BIB

Ezekiel 5 in the BLPT

Ezekiel 5 in the BNT

Ezekiel 5 in the BNTABOOT

Ezekiel 5 in the BNTLV

Ezekiel 5 in the BOATCB

Ezekiel 5 in the BOATCB2

Ezekiel 5 in the BOBCV

Ezekiel 5 in the BOCNT

Ezekiel 5 in the BOECS

Ezekiel 5 in the BOGWICC

Ezekiel 5 in the BOHCB

Ezekiel 5 in the BOHCV

Ezekiel 5 in the BOHLNT

Ezekiel 5 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 5 in the BOICB

Ezekiel 5 in the BOILNTAP

Ezekiel 5 in the BOITCV

Ezekiel 5 in the BOKCV

Ezekiel 5 in the BOKCV2

Ezekiel 5 in the BOKHWOG

Ezekiel 5 in the BOKSSV

Ezekiel 5 in the BOLCB

Ezekiel 5 in the BOMCV

Ezekiel 5 in the BONAV

Ezekiel 5 in the BONCB

Ezekiel 5 in the BONLT

Ezekiel 5 in the BONUT2

Ezekiel 5 in the BOPLNT

Ezekiel 5 in the BOSCB

Ezekiel 5 in the BOSNC

Ezekiel 5 in the BOTLNT

Ezekiel 5 in the BOVCB

Ezekiel 5 in the BOYCB

Ezekiel 5 in the BPBB

Ezekiel 5 in the BPH

Ezekiel 5 in the BSB

Ezekiel 5 in the CCB

Ezekiel 5 in the CUV

Ezekiel 5 in the CUVS

Ezekiel 5 in the DBT

Ezekiel 5 in the DGDNT

Ezekiel 5 in the DHNT

Ezekiel 5 in the DNT

Ezekiel 5 in the ELBE

Ezekiel 5 in the EMTV

Ezekiel 5 in the ESV

Ezekiel 5 in the FBV

Ezekiel 5 in the FEB

Ezekiel 5 in the GGMNT

Ezekiel 5 in the GNT

Ezekiel 5 in the HARY

Ezekiel 5 in the HNT

Ezekiel 5 in the IRVA

Ezekiel 5 in the IRVB

Ezekiel 5 in the IRVG

Ezekiel 5 in the IRVH

Ezekiel 5 in the IRVK

Ezekiel 5 in the IRVM

Ezekiel 5 in the IRVM2

Ezekiel 5 in the IRVO

Ezekiel 5 in the IRVP

Ezekiel 5 in the IRVT

Ezekiel 5 in the IRVT2

Ezekiel 5 in the IRVU

Ezekiel 5 in the ISVN

Ezekiel 5 in the JSNT

Ezekiel 5 in the KAPI

Ezekiel 5 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 5 in the KBV

Ezekiel 5 in the KJV

Ezekiel 5 in the KNFD

Ezekiel 5 in the LBA

Ezekiel 5 in the LBLA

Ezekiel 5 in the LNT

Ezekiel 5 in the LSV

Ezekiel 5 in the MAAL

Ezekiel 5 in the MBV

Ezekiel 5 in the MBV2

Ezekiel 5 in the MHNT

Ezekiel 5 in the MKNFD

Ezekiel 5 in the MNG

Ezekiel 5 in the MNT

Ezekiel 5 in the MNT2

Ezekiel 5 in the MRS1T

Ezekiel 5 in the NAA

Ezekiel 5 in the NASB

Ezekiel 5 in the NBLA

Ezekiel 5 in the NBS

Ezekiel 5 in the NBVTP

Ezekiel 5 in the NET2

Ezekiel 5 in the NIV11

Ezekiel 5 in the NNT

Ezekiel 5 in the NNT2

Ezekiel 5 in the NNT3

Ezekiel 5 in the PDDPT

Ezekiel 5 in the PFNT

Ezekiel 5 in the RMNT

Ezekiel 5 in the SBIAS

Ezekiel 5 in the SBIBS

Ezekiel 5 in the SBIBS2

Ezekiel 5 in the SBICS

Ezekiel 5 in the SBIDS

Ezekiel 5 in the SBIGS

Ezekiel 5 in the SBIHS

Ezekiel 5 in the SBIIS

Ezekiel 5 in the SBIIS2

Ezekiel 5 in the SBIIS3

Ezekiel 5 in the SBIKS

Ezekiel 5 in the SBIKS2

Ezekiel 5 in the SBIMS

Ezekiel 5 in the SBIOS

Ezekiel 5 in the SBIPS

Ezekiel 5 in the SBISS

Ezekiel 5 in the SBITS

Ezekiel 5 in the SBITS2

Ezekiel 5 in the SBITS3

Ezekiel 5 in the SBITS4

Ezekiel 5 in the SBIUS

Ezekiel 5 in the SBIVS

Ezekiel 5 in the SBT

Ezekiel 5 in the SBT1E

Ezekiel 5 in the SCHL

Ezekiel 5 in the SNT

Ezekiel 5 in the SUSU

Ezekiel 5 in the SUSU2

Ezekiel 5 in the SYNO

Ezekiel 5 in the TBIAOTANT

Ezekiel 5 in the TBT1E

Ezekiel 5 in the TBT1E2

Ezekiel 5 in the TFTIP

Ezekiel 5 in the TFTU

Ezekiel 5 in the TGNTATF3T

Ezekiel 5 in the THAI

Ezekiel 5 in the TNFD

Ezekiel 5 in the TNT

Ezekiel 5 in the TNTIK

Ezekiel 5 in the TNTIL

Ezekiel 5 in the TNTIN

Ezekiel 5 in the TNTIP

Ezekiel 5 in the TNTIZ

Ezekiel 5 in the TOMA

Ezekiel 5 in the TTENT

Ezekiel 5 in the UBG

Ezekiel 5 in the UGV

Ezekiel 5 in the UGV2

Ezekiel 5 in the UGV3

Ezekiel 5 in the VBL

Ezekiel 5 in the VDCC

Ezekiel 5 in the YALU

Ezekiel 5 in the YAPE

Ezekiel 5 in the YBVTP

Ezekiel 5 in the ZBP