Ezra 10 (BOLCB2)

1 Wana Esidrasi azalaki kobondela mpe kotubela masumu, azalaki ya kofukama mpe azalaki kolela liboso ya Ndako ya Nzambe. Ebele ya bana ya Isalaele : mibali, basi mpe bana, basanganaki pene na ye mpe, bango nyonso, bazalaki kolela makasi. 2 Bongo Shekania, mwana mobali ya Yeyeli, moko kati na bakitani ya Elami, alobaki na Esidrasi : « Solo, tosalaki makambo ya mbindo na miso ya Nzambe na biso, pamba te tobali basi ya bapaya kati na bikolo oyo ezali elongo na biso kati na mboka oyo ; kasi atako bongo, elikya ezali nanu mpo na Isalaele ! 3 Sik’oyo, tika ete tosala boyokani elongo na Nzambe na biso mpo na kobengana basi wana nyonso elongo na bana na bango, kolanda toli na yo Esidrasi, nkolo na ngai, mpe kolanda toli ya bato nyonso oyo balengaka liboso ya mibeko ya Nzambe na biso ! Tika ete esalema kolanda Mobeko ! 4 Telema, pamba te yo nde osengeli kotala likambo oyo ! Tozali elongo na yo mpo na kosunga yo. Yika mpiko mpe sala ! » 5 Esidrasi atelemaki mpe asengaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, Balevi mpe bana nyonso ya Isalaele kolapa ndayi ete bakosalela makambo oyo ndenge elobami. Mpe balapaki ndayi. 6 Bongo Esidrasi alongwaki liboso ya Ndako ya Nzambe mpe akendeki na shambre ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi. Wana azalaki kuna, atikalaki kolia eloko moko te mpe komela mayi te ; pamba te azalaki kokoba kosala matanga likolo ya makambo ya mbindo ya bato oyo bawutaki na bowumbu. 7 Bapanzaki sango kati na Yuda mpe na Yelusalemi ete bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu basangana na Yelusalemi. 8 Kolanda mokano ya bakalaka mpe bakambi ya bato, moto nyonso oyo akomonana te sima na mikolo misato, bakobotola biloko na ye nyonso mpe bakolongola ye na lisanga ya bato oyo bawutaki na bowumbu. 9 Sima na mikolo yango misato, bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame basanganaki na Yelusalemi. Na mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, bato nyonso bavandaki kati na lopango, liboso ya Ndako ya Nzambe, mpe bazalaki kolenga makasi likolo ya makambo oyo mpe mpo ete mvula ezalaki kobeta makasi. 10 Nganga-Nzambe Esidrasi atelemaki mpe alobaki na bango :— Bosalaki makambo ya mbindo awa bobalaki basi ya bapaya ; mpe, na nzela na yango, bobakiselaki Isalaele ngambo. 11 Sik’oyo, boyambola masumu na bino epai na Yawe, Nzambe ya batata na bino, mpe bokokisa mokano na Ye ! Bokabwana na bato ya bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bino mpe bokabwana na basi na bino ya bapaya. 12 Lisanga mobimba ezongisaki na mongongo makasi :— Ezali se bongo, tokosala ndenge olobi ! 13 Nzokande tozali bato ebele awa, mpe ezali eleko ya mvula ; tokoki kowumela na libanda te. Kutu, ezali te likambo ya mokolo moko to ya mikolo mibale, pamba te ebele kati na biso basali masumu kati na likambo oyo. 14 Tika ete bakambi na biso batikala awa na esika ya lisanga mobimba ! Mpe tika ete bato nyonso oyo, kati na bingumba na biso, babalaki basi ya bapaya bakende liboso ya bakambi mpe basambisi ya engumba moko na moko, na mikolo oyo bakokatela bango, kino kanda makasi ya Nzambe na biso ekolongwa kati na biso na tina na likambo yango. 15 Kaka Jonatan, mwana mobali ya Azaeli, mpe Yakizia, mwana mobali ya Tikiva, elongo na Meshulami mpe Shabetayi, moto ya libota ya Levi, nde batelemelaki mokano oyo. 16 Kasi bato oyo bawutaki na bowumbu basalaki ndenge elobamaki. Nganga-Nzambe Esidrasi aponaki bakambi ya mabota, moko mpo na libota moko na moko, mpe abengaki bango nyonso na bakombo na bango. Babandaki kovanda mpo na koyekola makambo yango na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi. 17 Mpe, na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, basilisaki koyekola makambo ya mibali nyonso oyo babalaki basi ya bapaya. 18 Tala kati na bakitani ya Banganga-Nzambe, mibali oyo babalaki basi ya bapaya :Kati na bakitani ya Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki elongo na bandeko na ye ya mibali~:Maaseya, Eliezeri, Yaribi mpe Gedalia. 19 Bango nyonso batombolaki maboko mpo na kozwa mokano ya kobengana basi na bango mpe ya kobonza meme ya mobali lokola mbeka mpo na masumu na bango. 20 Kati na bakitani ya Imeri :Anani mpe Zebadia. 21 Kati na bakitani ya Arimi :Maaseya, Eli, Shemaya, Yeyeli mpe Oziasi. 22 Kati na bakitani ya Pashuri :Eliowenayi, Maaseya, Isimaeli, Netaneeli, Yozabadi mpe Eleasa. 23 Kati na Balevi :Yozabadi, Shimei, Kelaya oyo bazalaki kobenga lisusu Kelita, Petaya, Yuda mpe Eliezeri. 24 Kati na babeti mindule :Eliashibi.Kati na bakengeli bikuke~:Shalumi, Telemi mpe Uri. 25 Kati na bato mosusu ya Isalaele :kati na bakitani ya Pareoshi~:Ramia, Yiziya, Malikiya, Miyamini, Eleazari, Malikiya mpe Benaya. 26 Kati na bakitani ya Elami :Matania, Zakari, Yeyeli, Abidi, Yeremoti mpe Eli. 27 Kati na bakitani ya Zatu :Eliowenayi, Eliashibi, Matania, Yeremoti, Zabadi mpe Aziza. 28 Kati na bakitani ya Bebayi :Yoanani, Anania, Zabayi mpe Atilayi. 29 Kati na bakitani ya Bani :Meshulami, Maluki, Adaya, Yashubi, Sheali mpe Ramoti. 30 Kati na bakitani ya Paati-Moabi :Adina, Kelali, Benaya, Maaseya, Matania, Betisaleyeli, Binuwi mpe Manase. 31 Kati na bakitani ya Arimi :Eliezeri, Yishiya, Malikiya, Shemaya, Simeoni, 32 Benjame, Maluki mpe Shemaria. 33 Kati na bakitani ya Ashumi :Matinayi, Matata, Zabadi, Elifeleti, Yeremayi, Manase mpe Shimei. 34 Kati na bakitani ya Bani :Madayi, Amirami, Ueli, 35 Benaya, Bedia, Keluwu, 36 Vania, Meremoti, Eliashibi, 37 Matania, Matinayi, Yasayi, 38 Bani, Binuwi, Shimei, 39 Shelemiya, Natan, Adaya, 40 Makinadibayi, Shashayi, Sharayi, 41 Azareyeli, Shelemiya, Shemaria, 42 Shalumi, Amaria mpe Jozefi. 43 Kati na bakitani ya Nebo :Yeyeli, Matitia, Zabadi, Zebina, Yadayi, Joeli mpe Benaya. 44 Mibali oyo nyonso nde babalaki basi ya bapaya, mpe mingi kati na bango bazwaki bana na nzela ya basi yango.

In Other Versions

Ezra 10 in the ANGEFD

Ezra 10 in the ANTPNG2D

Ezra 10 in the AS21

Ezra 10 in the BAGH

Ezra 10 in the BBPNG

Ezra 10 in the BBT1E

Ezra 10 in the BDS

Ezra 10 in the BEV

Ezra 10 in the BHAD

Ezra 10 in the BIB

Ezra 10 in the BLPT

Ezra 10 in the BNT

Ezra 10 in the BNTABOOT

Ezra 10 in the BNTLV

Ezra 10 in the BOATCB

Ezra 10 in the BOATCB2

Ezra 10 in the BOBCV

Ezra 10 in the BOCNT

Ezra 10 in the BOECS

Ezra 10 in the BOGWICC

Ezra 10 in the BOHCB

Ezra 10 in the BOHCV

Ezra 10 in the BOHLNT

Ezra 10 in the BOHNTLTAL

Ezra 10 in the BOICB

Ezra 10 in the BOILNTAP

Ezra 10 in the BOITCV

Ezra 10 in the BOKCV

Ezra 10 in the BOKCV2

Ezra 10 in the BOKHWOG

Ezra 10 in the BOKSSV

Ezra 10 in the BOLCB

Ezra 10 in the BOMCV

Ezra 10 in the BONAV

Ezra 10 in the BONCB

Ezra 10 in the BONLT

Ezra 10 in the BONUT2

Ezra 10 in the BOPLNT

Ezra 10 in the BOSCB

Ezra 10 in the BOSNC

Ezra 10 in the BOTLNT

Ezra 10 in the BOVCB

Ezra 10 in the BOYCB

Ezra 10 in the BPBB

Ezra 10 in the BPH

Ezra 10 in the BSB

Ezra 10 in the CCB

Ezra 10 in the CUV

Ezra 10 in the CUVS

Ezra 10 in the DBT

Ezra 10 in the DGDNT

Ezra 10 in the DHNT

Ezra 10 in the DNT

Ezra 10 in the ELBE

Ezra 10 in the EMTV

Ezra 10 in the ESV

Ezra 10 in the FBV

Ezra 10 in the FEB

Ezra 10 in the GGMNT

Ezra 10 in the GNT

Ezra 10 in the HARY

Ezra 10 in the HNT

Ezra 10 in the IRVA

Ezra 10 in the IRVB

Ezra 10 in the IRVG

Ezra 10 in the IRVH

Ezra 10 in the IRVK

Ezra 10 in the IRVM

Ezra 10 in the IRVM2

Ezra 10 in the IRVO

Ezra 10 in the IRVP

Ezra 10 in the IRVT

Ezra 10 in the IRVT2

Ezra 10 in the IRVU

Ezra 10 in the ISVN

Ezra 10 in the JSNT

Ezra 10 in the KAPI

Ezra 10 in the KBT1ETNIK

Ezra 10 in the KBV

Ezra 10 in the KJV

Ezra 10 in the KNFD

Ezra 10 in the LBA

Ezra 10 in the LBLA

Ezra 10 in the LNT

Ezra 10 in the LSV

Ezra 10 in the MAAL

Ezra 10 in the MBV

Ezra 10 in the MBV2

Ezra 10 in the MHNT

Ezra 10 in the MKNFD

Ezra 10 in the MNG

Ezra 10 in the MNT

Ezra 10 in the MNT2

Ezra 10 in the MRS1T

Ezra 10 in the NAA

Ezra 10 in the NASB

Ezra 10 in the NBLA

Ezra 10 in the NBS

Ezra 10 in the NBVTP

Ezra 10 in the NET2

Ezra 10 in the NIV11

Ezra 10 in the NNT

Ezra 10 in the NNT2

Ezra 10 in the NNT3

Ezra 10 in the PDDPT

Ezra 10 in the PFNT

Ezra 10 in the RMNT

Ezra 10 in the SBIAS

Ezra 10 in the SBIBS

Ezra 10 in the SBIBS2

Ezra 10 in the SBICS

Ezra 10 in the SBIDS

Ezra 10 in the SBIGS

Ezra 10 in the SBIHS

Ezra 10 in the SBIIS

Ezra 10 in the SBIIS2

Ezra 10 in the SBIIS3

Ezra 10 in the SBIKS

Ezra 10 in the SBIKS2

Ezra 10 in the SBIMS

Ezra 10 in the SBIOS

Ezra 10 in the SBIPS

Ezra 10 in the SBISS

Ezra 10 in the SBITS

Ezra 10 in the SBITS2

Ezra 10 in the SBITS3

Ezra 10 in the SBITS4

Ezra 10 in the SBIUS

Ezra 10 in the SBIVS

Ezra 10 in the SBT

Ezra 10 in the SBT1E

Ezra 10 in the SCHL

Ezra 10 in the SNT

Ezra 10 in the SUSU

Ezra 10 in the SUSU2

Ezra 10 in the SYNO

Ezra 10 in the TBIAOTANT

Ezra 10 in the TBT1E

Ezra 10 in the TBT1E2

Ezra 10 in the TFTIP

Ezra 10 in the TFTU

Ezra 10 in the TGNTATF3T

Ezra 10 in the THAI

Ezra 10 in the TNFD

Ezra 10 in the TNT

Ezra 10 in the TNTIK

Ezra 10 in the TNTIL

Ezra 10 in the TNTIN

Ezra 10 in the TNTIP

Ezra 10 in the TNTIZ

Ezra 10 in the TOMA

Ezra 10 in the TTENT

Ezra 10 in the UBG

Ezra 10 in the UGV

Ezra 10 in the UGV2

Ezra 10 in the UGV3

Ezra 10 in the VBL

Ezra 10 in the VDCC

Ezra 10 in the YALU

Ezra 10 in the YAPE

Ezra 10 in the YBVTP

Ezra 10 in the ZBP