Ezra 3 (BOLCB2)

1 Na sanza ya sambo, bana ya Isalaele oyo bavandaki kati na bingumba na bango basanganaki na Yelusalemi lokola moto moko. 2 Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na baninga na ye, Banganga-Nzambe, mpe Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, elongo na bandeko na ye, babandaki kotonga etumbelo ya Nzambe ya Isalaele mpo na kobonza kuna mbeka ya kotumba kolanda makomi kati na Mobeko ya Moyize, moto na Nzambe. 3 Atako bazalaki koyoka bato oyo bazalaki pembeni na bango somo, batongaki etumbelo na likolo ya miboko na yango ya kala mpe babonzaki wana mpo na Yawe mbeka ya kotumba ya tongo mpe ya pokwa. 4 Bongo kolanda makomi, basepelaki feti ya Bandako ya kapo, mpe babonzaki mikolo nyonso bambeka ya kotumba kolanda motango oyo ekatama mpo na mokolo na mokolo. 5 Sima na yango, babonzaki mbeka ya kotumba ya tango nyonso, bambeka ya kotumba oyo ekatama mpo na feti ya ebandeli ya sanza mpe mpo na feti nyonso oyo ekatama mpo na Yawe, mpe bambeka ya kotumba mpo na bato nyonso oyo bazalaki bango moko kopesa makabo wuta na mokano ya mitema na bango. 6 Bato babandaki kobonzela Yawe bambeka ya kotumba na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, atako bamitongelaki nanu te miboko ya Tempelo ya Yawe. 7 Bapesaki mbongo epai ya batongi ndako mpe epai ya basharipantie ; bongo bapesaki lisusu bilei, masanga mpe mafuta epai ya bato ya Sidoni mpe ya Tiri mpo ete bamema, na nzela ya ebale monene, banzete ya sedele longwa na Libani kino na Jafa, na ndingisa ya Sirisi, mokonzi ya Persi. 8 Na sanza ya mibale ya mobu ya mibale sima na bango kokoma na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na bandeko na bango mosusu, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato nyonso oyo bazongaki na Yelusalemi wuta na bowumbu, babandaki misala ya kotonga. Baponaki Balevi oyo bazalaki na mibu kobanda tuku mibale mpe komata mpo ete balandela misala ya kotonga Tempelo ya Yawe. 9 Jozue elongo na bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali, Kadimieli elongo na bana na ye ya mibali oyo bazalaki bakitani ya Yuda, bapesamelaki mokumba ya kolandela bato oyo bazalaki kotonga Ndako ya Nzambe. Mpe bakitani ya Enadadi elongo na bana na bango ya mibali mpe bandeko na bango, Balevi, bazalaki kosunga bango. 10 Tango batongi ndako basilisaki kotonga miboko ya Tempelo ya Yawe, Banganga-Nzambe kati na bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango na maboko ; Balevi, bakitani ya Azafi, elongo na manzanza, batelemaki na bisika na bango mpo na kokumisa Yawe, kolanda mitindo ya Davidi, mokonzi ya Isalaele. 11 Bazalaki koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisela Yawe matondi :« Solo, azali malamu,bolingo na Ye mpo na Isalaeleewumelaka seko na seko ! »Bongo bato nyonso bazalaki kobeta milolo makasi mpo na kokumisa Yawe mpo ete bazalaki kotia miboko ya Tempelo ya Yawe. 12 Nzokande, kati na Banganga-Nzambe oyo ya mikolo, kati na Balevi oyo ya mikolo mpe kati na bakambi ya mabota, oyo ya mikolo, ezalaki na ebele oyo bamonaki Tempelo ya liboso ; bongo bazalaki kolela na mongongo makasi wana bazalaki kotia miboko ya Tempelo ya sika na miso na bango. Mpe kaka na tango yango, ebele ya bato mosusu bazalaki kosepela na koganga makasi mpe na kobeta milolo nzela moko na maboko. 13 Boye bato bakokaki te kokesenisa makelele ya bato oyo bazali koganga mpo na esengo mpe makelele ya bato oyo bazali kolela, pamba te bato bazalaki koganga makasi mpe makelele na bango ezalaki koyokana kino na mosika.

In Other Versions

Ezra 3 in the ANGEFD

Ezra 3 in the ANTPNG2D

Ezra 3 in the AS21

Ezra 3 in the BAGH

Ezra 3 in the BBPNG

Ezra 3 in the BBT1E

Ezra 3 in the BDS

Ezra 3 in the BEV

Ezra 3 in the BHAD

Ezra 3 in the BIB

Ezra 3 in the BLPT

Ezra 3 in the BNT

Ezra 3 in the BNTABOOT

Ezra 3 in the BNTLV

Ezra 3 in the BOATCB

Ezra 3 in the BOATCB2

Ezra 3 in the BOBCV

Ezra 3 in the BOCNT

Ezra 3 in the BOECS

Ezra 3 in the BOGWICC

Ezra 3 in the BOHCB

Ezra 3 in the BOHCV

Ezra 3 in the BOHLNT

Ezra 3 in the BOHNTLTAL

Ezra 3 in the BOICB

Ezra 3 in the BOILNTAP

Ezra 3 in the BOITCV

Ezra 3 in the BOKCV

Ezra 3 in the BOKCV2

Ezra 3 in the BOKHWOG

Ezra 3 in the BOKSSV

Ezra 3 in the BOLCB

Ezra 3 in the BOMCV

Ezra 3 in the BONAV

Ezra 3 in the BONCB

Ezra 3 in the BONLT

Ezra 3 in the BONUT2

Ezra 3 in the BOPLNT

Ezra 3 in the BOSCB

Ezra 3 in the BOSNC

Ezra 3 in the BOTLNT

Ezra 3 in the BOVCB

Ezra 3 in the BOYCB

Ezra 3 in the BPBB

Ezra 3 in the BPH

Ezra 3 in the BSB

Ezra 3 in the CCB

Ezra 3 in the CUV

Ezra 3 in the CUVS

Ezra 3 in the DBT

Ezra 3 in the DGDNT

Ezra 3 in the DHNT

Ezra 3 in the DNT

Ezra 3 in the ELBE

Ezra 3 in the EMTV

Ezra 3 in the ESV

Ezra 3 in the FBV

Ezra 3 in the FEB

Ezra 3 in the GGMNT

Ezra 3 in the GNT

Ezra 3 in the HARY

Ezra 3 in the HNT

Ezra 3 in the IRVA

Ezra 3 in the IRVB

Ezra 3 in the IRVG

Ezra 3 in the IRVH

Ezra 3 in the IRVK

Ezra 3 in the IRVM

Ezra 3 in the IRVM2

Ezra 3 in the IRVO

Ezra 3 in the IRVP

Ezra 3 in the IRVT

Ezra 3 in the IRVT2

Ezra 3 in the IRVU

Ezra 3 in the ISVN

Ezra 3 in the JSNT

Ezra 3 in the KAPI

Ezra 3 in the KBT1ETNIK

Ezra 3 in the KBV

Ezra 3 in the KJV

Ezra 3 in the KNFD

Ezra 3 in the LBA

Ezra 3 in the LBLA

Ezra 3 in the LNT

Ezra 3 in the LSV

Ezra 3 in the MAAL

Ezra 3 in the MBV

Ezra 3 in the MBV2

Ezra 3 in the MHNT

Ezra 3 in the MKNFD

Ezra 3 in the MNG

Ezra 3 in the MNT

Ezra 3 in the MNT2

Ezra 3 in the MRS1T

Ezra 3 in the NAA

Ezra 3 in the NASB

Ezra 3 in the NBLA

Ezra 3 in the NBS

Ezra 3 in the NBVTP

Ezra 3 in the NET2

Ezra 3 in the NIV11

Ezra 3 in the NNT

Ezra 3 in the NNT2

Ezra 3 in the NNT3

Ezra 3 in the PDDPT

Ezra 3 in the PFNT

Ezra 3 in the RMNT

Ezra 3 in the SBIAS

Ezra 3 in the SBIBS

Ezra 3 in the SBIBS2

Ezra 3 in the SBICS

Ezra 3 in the SBIDS

Ezra 3 in the SBIGS

Ezra 3 in the SBIHS

Ezra 3 in the SBIIS

Ezra 3 in the SBIIS2

Ezra 3 in the SBIIS3

Ezra 3 in the SBIKS

Ezra 3 in the SBIKS2

Ezra 3 in the SBIMS

Ezra 3 in the SBIOS

Ezra 3 in the SBIPS

Ezra 3 in the SBISS

Ezra 3 in the SBITS

Ezra 3 in the SBITS2

Ezra 3 in the SBITS3

Ezra 3 in the SBITS4

Ezra 3 in the SBIUS

Ezra 3 in the SBIVS

Ezra 3 in the SBT

Ezra 3 in the SBT1E

Ezra 3 in the SCHL

Ezra 3 in the SNT

Ezra 3 in the SUSU

Ezra 3 in the SUSU2

Ezra 3 in the SYNO

Ezra 3 in the TBIAOTANT

Ezra 3 in the TBT1E

Ezra 3 in the TBT1E2

Ezra 3 in the TFTIP

Ezra 3 in the TFTU

Ezra 3 in the TGNTATF3T

Ezra 3 in the THAI

Ezra 3 in the TNFD

Ezra 3 in the TNT

Ezra 3 in the TNTIK

Ezra 3 in the TNTIL

Ezra 3 in the TNTIN

Ezra 3 in the TNTIP

Ezra 3 in the TNTIZ

Ezra 3 in the TOMA

Ezra 3 in the TTENT

Ezra 3 in the UBG

Ezra 3 in the UGV

Ezra 3 in the UGV2

Ezra 3 in the UGV3

Ezra 3 in the VBL

Ezra 3 in the VDCC

Ezra 3 in the YALU

Ezra 3 in the YAPE

Ezra 3 in the YBVTP

Ezra 3 in the ZBP