Ezra 5 (BOLCB2)

1 Mosakoli Aje mpe mosakoli Zakari, mwana mobali ya Ido, basakolaki mpo na bato ya Yuda oyo bazalaki kati na mokili ya Yuda mpe na engumba Yelusalemi, na Kombo ya Nzambe ya Isalaele, oyo azalaki kati na bango. 2 Bongo, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, bazongelaki mosala ya kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe basakoli ya Nzambe bazalaki elongo na bango mpo na kosunga bango. 3 Mbala moko, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezalaki na ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batunaki bango :— Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu mir oyo ? 4 Batunaki lisusu :— Bato oyo bazali kotonga Ndako oyo, bakombo na bango banani ? 5 Kasi liso ya Nzambe na bango ezalaki kosenzela bakambi ya Bayuda. Boye bapekisaki bango te kosala misala na bango kino tango Dariusi azwaki mokanda na tina na yango mpe kino tango bazwaki mokanda ya eyano kowuta na Dariusi. 6 Tala mokanda oyo Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala, bakambi ya bituka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, batindelaki mokonzi Dariusi. 7 Tala makambo oyo bakomaki kati na mokanda yango :« Epai ya mokonzi Dariusi.Tika ete bokonzi na yo ewumela na kimia ! 8 Tika ete mokonzi ayeba ete tokendeki na etuka ya Yuda kino na Tempelo ya Nzambe Monene. Bato bazali kotonga yango na mabanga bakata mpe bazali kotia mabaya na likolo ya bamir. Mosala yango ezali kotambola malamu mpe kokende noki kati na maboko na bango. 9 Totunaki bakambi na bango motuna oyo : ‹ Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu bamir ? › 10 Totunaki bango bakombo na bango mpo ete toyebisa yo yango mpe tokomela yo bakombo ya bakambi na bango. 11 Kasi tala eyano oyo bapesaki biso : ‹ Tozali basali ya Nzambe ya Likolo mpe ya se ; tozali kotonga lisusu Tempelo oyo etongamaki wuta mibu ebele na kala. Mokonzi moko monene ya Isalaele atongaki mpe asilisaki yango. 12 Kasi lokola batata na biso batumbolaki kanda ya Nzambe ya Likolo, akabaki bango na maboko ya Nabukodonozori, moto ya Chalide, mokonzi ya Babiloni. Ezali ye nde abukaki Tempelo oyo mpe amemaki bato na bowumbu, na Babiloni. 13 Nzokande, na mobu ya liboso ya bokonzi na ye lokola mokonzi ya Babiloni, Sirisi apesaki mitindo ya kotonga lisusu Ndako oyo ya Nzambe, 14 alongolaki kutu na tempelo ya Babiloni biloko basala na wolo mpe na palata, oyo Nabukodonozori azwaki na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi mpe amemaki na tempelo ya Babiloni. Mokonzi Sirisi apesaki biloko yango epai ya Sheshibatsari oyo ye, Sirisi, atiaki lokola moyangeli. 15 Alobaki na ye : ‘ Kamata biloko oyo mpe kende kotia yango kati na Tempelo ya Yelusalemi ; mpe tika ete Tempelo ya Nzambe etongama lisusu na esika na yango ya kala. ’ 16 Ezali bongo nde Sheshibatsari ayaki awa na Yelusalemi mpo na kotonga miboko ya Ndako ya Nzambe. Wuta mokolo wana kino na mokolo ya lelo, Tempelo ezali kotongama, kasi misala esili nanu te. › 17 Sik’oyo, soki yango esepelisi mokonzi, tika ete baluka kati na babuku ya kala ya bakonzi ya Babiloni mpo na kotala soki mokonzi Sirisi apesaki solo mitindo ya kotonga lisusu Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe tika ete mokonzi atindela biso mokano na ye na tina na likambo oyo. »

In Other Versions

Ezra 5 in the ANGEFD

Ezra 5 in the ANTPNG2D

Ezra 5 in the AS21

Ezra 5 in the BAGH

Ezra 5 in the BBPNG

Ezra 5 in the BBT1E

Ezra 5 in the BDS

Ezra 5 in the BEV

Ezra 5 in the BHAD

Ezra 5 in the BIB

Ezra 5 in the BLPT

Ezra 5 in the BNT

Ezra 5 in the BNTABOOT

Ezra 5 in the BNTLV

Ezra 5 in the BOATCB

Ezra 5 in the BOATCB2

Ezra 5 in the BOBCV

Ezra 5 in the BOCNT

Ezra 5 in the BOECS

Ezra 5 in the BOGWICC

Ezra 5 in the BOHCB

Ezra 5 in the BOHCV

Ezra 5 in the BOHLNT

Ezra 5 in the BOHNTLTAL

Ezra 5 in the BOICB

Ezra 5 in the BOILNTAP

Ezra 5 in the BOITCV

Ezra 5 in the BOKCV

Ezra 5 in the BOKCV2

Ezra 5 in the BOKHWOG

Ezra 5 in the BOKSSV

Ezra 5 in the BOLCB

Ezra 5 in the BOMCV

Ezra 5 in the BONAV

Ezra 5 in the BONCB

Ezra 5 in the BONLT

Ezra 5 in the BONUT2

Ezra 5 in the BOPLNT

Ezra 5 in the BOSCB

Ezra 5 in the BOSNC

Ezra 5 in the BOTLNT

Ezra 5 in the BOVCB

Ezra 5 in the BOYCB

Ezra 5 in the BPBB

Ezra 5 in the BPH

Ezra 5 in the BSB

Ezra 5 in the CCB

Ezra 5 in the CUV

Ezra 5 in the CUVS

Ezra 5 in the DBT

Ezra 5 in the DGDNT

Ezra 5 in the DHNT

Ezra 5 in the DNT

Ezra 5 in the ELBE

Ezra 5 in the EMTV

Ezra 5 in the ESV

Ezra 5 in the FBV

Ezra 5 in the FEB

Ezra 5 in the GGMNT

Ezra 5 in the GNT

Ezra 5 in the HARY

Ezra 5 in the HNT

Ezra 5 in the IRVA

Ezra 5 in the IRVB

Ezra 5 in the IRVG

Ezra 5 in the IRVH

Ezra 5 in the IRVK

Ezra 5 in the IRVM

Ezra 5 in the IRVM2

Ezra 5 in the IRVO

Ezra 5 in the IRVP

Ezra 5 in the IRVT

Ezra 5 in the IRVT2

Ezra 5 in the IRVU

Ezra 5 in the ISVN

Ezra 5 in the JSNT

Ezra 5 in the KAPI

Ezra 5 in the KBT1ETNIK

Ezra 5 in the KBV

Ezra 5 in the KJV

Ezra 5 in the KNFD

Ezra 5 in the LBA

Ezra 5 in the LBLA

Ezra 5 in the LNT

Ezra 5 in the LSV

Ezra 5 in the MAAL

Ezra 5 in the MBV

Ezra 5 in the MBV2

Ezra 5 in the MHNT

Ezra 5 in the MKNFD

Ezra 5 in the MNG

Ezra 5 in the MNT

Ezra 5 in the MNT2

Ezra 5 in the MRS1T

Ezra 5 in the NAA

Ezra 5 in the NASB

Ezra 5 in the NBLA

Ezra 5 in the NBS

Ezra 5 in the NBVTP

Ezra 5 in the NET2

Ezra 5 in the NIV11

Ezra 5 in the NNT

Ezra 5 in the NNT2

Ezra 5 in the NNT3

Ezra 5 in the PDDPT

Ezra 5 in the PFNT

Ezra 5 in the RMNT

Ezra 5 in the SBIAS

Ezra 5 in the SBIBS

Ezra 5 in the SBIBS2

Ezra 5 in the SBICS

Ezra 5 in the SBIDS

Ezra 5 in the SBIGS

Ezra 5 in the SBIHS

Ezra 5 in the SBIIS

Ezra 5 in the SBIIS2

Ezra 5 in the SBIIS3

Ezra 5 in the SBIKS

Ezra 5 in the SBIKS2

Ezra 5 in the SBIMS

Ezra 5 in the SBIOS

Ezra 5 in the SBIPS

Ezra 5 in the SBISS

Ezra 5 in the SBITS

Ezra 5 in the SBITS2

Ezra 5 in the SBITS3

Ezra 5 in the SBITS4

Ezra 5 in the SBIUS

Ezra 5 in the SBIVS

Ezra 5 in the SBT

Ezra 5 in the SBT1E

Ezra 5 in the SCHL

Ezra 5 in the SNT

Ezra 5 in the SUSU

Ezra 5 in the SUSU2

Ezra 5 in the SYNO

Ezra 5 in the TBIAOTANT

Ezra 5 in the TBT1E

Ezra 5 in the TBT1E2

Ezra 5 in the TFTIP

Ezra 5 in the TFTU

Ezra 5 in the TGNTATF3T

Ezra 5 in the THAI

Ezra 5 in the TNFD

Ezra 5 in the TNT

Ezra 5 in the TNTIK

Ezra 5 in the TNTIL

Ezra 5 in the TNTIN

Ezra 5 in the TNTIP

Ezra 5 in the TNTIZ

Ezra 5 in the TOMA

Ezra 5 in the TTENT

Ezra 5 in the UBG

Ezra 5 in the UGV

Ezra 5 in the UGV2

Ezra 5 in the UGV3

Ezra 5 in the VBL

Ezra 5 in the VDCC

Ezra 5 in the YALU

Ezra 5 in the YAPE

Ezra 5 in the YBVTP

Ezra 5 in the ZBP