Genesis 3 (BOLCB2)

1 Nzokande, kati na banyama nyonso ya zamba oyo Yawe Nzambe akelaki, nyoka nde elekaki na mayele mabe. Alobaki na mwasi :— Nzambe alobaki na bino solo ete bolia mbuma ata moko te ya banzete ya elanga ? 2 Mwasi azongisaki epai ya nyoka :— Toliaka bambuma ya banzete ya elanga. 3 Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango ; noki te bokokufa. » 4 Nyoka alobaki na mwasi :— Solo penza, bokokufa te. 5 Pamba te Nzambe ayebi malamu ete mokolo oyo bokolia yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokoma lokola Ye : koyeba malamu na mabe. 6 Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye ; bongo ye mpe mobali aliaki yango. 7 Mbala moko, miso na bango mibale efungwamaki, mpe basosolaki ete bazali bolumbu. Boye, basangisaki makasa ya nzete ya figi mpe bamizipaki. 8 Na pokwa, bayokaki makelele ya matambe ya Yawe Nzambe kotambola kati na elanga. Boye, mobali mpe mwasi babombamaki kati na banzete ya elanga mpo na kokima Yawe. 9 Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye :— Ozali wapi ? 10 Azongisaki :— Nayoki makelele ya matambe na Yo kotambola kati na elanga mpe nabangi mpo ete nazali bolumbu ; yango wana nabombami. 11 Nzambe alobaki :— Ndenge nini oyebi ete ozali bolumbu ? Boni, oliaki mbuma ya nzete oyo napekisaki yo kolia ? 12 Adamu azongisaki :— Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango. 13 Yawe Nzambe alobaki na mwasi :— Mpo nini osali bongo ?Mwasi azongisaki :— Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango. 14 Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka : « Lokola osali bongo,olakelami mabe kati na bibwelempe banyama nyonso ya zamba.Okotambola na libumumpe okobanda kolia putulubomoi na yo mobimba. 15 Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi,mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye.Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo,mpe yo okoswa bango na litindi. » 16 Nzambe alobaki na mwasi :« Nakobakisa pasi na zemi na yo ;okobota na pasi.Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo,kasi ye akozala mokonzi na yo. » 17 Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, ›mabele elakelami mabe likolo na yo.Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo. 18 Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende.Okolia matiti ya bilanga. 19 Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yokino okozonga na mabele epai wapi owutaki,pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. » 20 Mobali apesaki mwasi na ye kombo « Eva, » pamba te azali mama ya bato nyonso na mokili. 21 Yawe Nzambe asalelaki Adamu mpe mwasi na ye bilamba ya poso ya nyama mpe alatisaki bango yango. 22 Yawe Nzambe alobaki : « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. » 23 Boye, Yawe Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edeni mpo ete asala mosala ya mabele epai wapi awutaki. 24 Sima na kobengana moto, atiaki basheribe, na ngambo ya este ya elanga ya Edeni, na mopanga ya moto oyo ezalaki kobaluka bipai na bipai mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi.

In Other Versions

Genesis 3 in the ANGEFD

Genesis 3 in the ANTPNG2D

Genesis 3 in the AS21

Genesis 3 in the BAGH

Genesis 3 in the BBPNG

Genesis 3 in the BBT1E

Genesis 3 in the BDS

Genesis 3 in the BEV

Genesis 3 in the BHAD

Genesis 3 in the BIB

Genesis 3 in the BLPT

Genesis 3 in the BNT

Genesis 3 in the BNTABOOT

Genesis 3 in the BNTLV

Genesis 3 in the BOATCB

Genesis 3 in the BOATCB2

Genesis 3 in the BOBCV

Genesis 3 in the BOCNT

Genesis 3 in the BOECS

Genesis 3 in the BOGWICC

Genesis 3 in the BOHCB

Genesis 3 in the BOHCV

Genesis 3 in the BOHLNT

Genesis 3 in the BOHNTLTAL

Genesis 3 in the BOICB

Genesis 3 in the BOILNTAP

Genesis 3 in the BOITCV

Genesis 3 in the BOKCV

Genesis 3 in the BOKCV2

Genesis 3 in the BOKHWOG

Genesis 3 in the BOKSSV

Genesis 3 in the BOLCB

Genesis 3 in the BOMCV

Genesis 3 in the BONAV

Genesis 3 in the BONCB

Genesis 3 in the BONLT

Genesis 3 in the BONUT2

Genesis 3 in the BOPLNT

Genesis 3 in the BOSCB

Genesis 3 in the BOSNC

Genesis 3 in the BOTLNT

Genesis 3 in the BOVCB

Genesis 3 in the BOYCB

Genesis 3 in the BPBB

Genesis 3 in the BPH

Genesis 3 in the BSB

Genesis 3 in the CCB

Genesis 3 in the CUV

Genesis 3 in the CUVS

Genesis 3 in the DBT

Genesis 3 in the DGDNT

Genesis 3 in the DHNT

Genesis 3 in the DNT

Genesis 3 in the ELBE

Genesis 3 in the EMTV

Genesis 3 in the ESV

Genesis 3 in the FBV

Genesis 3 in the FEB

Genesis 3 in the GGMNT

Genesis 3 in the GNT

Genesis 3 in the HARY

Genesis 3 in the HNT

Genesis 3 in the IRVA

Genesis 3 in the IRVB

Genesis 3 in the IRVG

Genesis 3 in the IRVH

Genesis 3 in the IRVK

Genesis 3 in the IRVM

Genesis 3 in the IRVM2

Genesis 3 in the IRVO

Genesis 3 in the IRVP

Genesis 3 in the IRVT

Genesis 3 in the IRVT2

Genesis 3 in the IRVU

Genesis 3 in the ISVN

Genesis 3 in the JSNT

Genesis 3 in the KAPI

Genesis 3 in the KBT1ETNIK

Genesis 3 in the KBV

Genesis 3 in the KJV

Genesis 3 in the KNFD

Genesis 3 in the LBA

Genesis 3 in the LBLA

Genesis 3 in the LNT

Genesis 3 in the LSV

Genesis 3 in the MAAL

Genesis 3 in the MBV

Genesis 3 in the MBV2

Genesis 3 in the MHNT

Genesis 3 in the MKNFD

Genesis 3 in the MNG

Genesis 3 in the MNT

Genesis 3 in the MNT2

Genesis 3 in the MRS1T

Genesis 3 in the NAA

Genesis 3 in the NASB

Genesis 3 in the NBLA

Genesis 3 in the NBS

Genesis 3 in the NBVTP

Genesis 3 in the NET2

Genesis 3 in the NIV11

Genesis 3 in the NNT

Genesis 3 in the NNT2

Genesis 3 in the NNT3

Genesis 3 in the PDDPT

Genesis 3 in the PFNT

Genesis 3 in the RMNT

Genesis 3 in the SBIAS

Genesis 3 in the SBIBS

Genesis 3 in the SBIBS2

Genesis 3 in the SBICS

Genesis 3 in the SBIDS

Genesis 3 in the SBIGS

Genesis 3 in the SBIHS

Genesis 3 in the SBIIS

Genesis 3 in the SBIIS2

Genesis 3 in the SBIIS3

Genesis 3 in the SBIKS

Genesis 3 in the SBIKS2

Genesis 3 in the SBIMS

Genesis 3 in the SBIOS

Genesis 3 in the SBIPS

Genesis 3 in the SBISS

Genesis 3 in the SBITS

Genesis 3 in the SBITS2

Genesis 3 in the SBITS3

Genesis 3 in the SBITS4

Genesis 3 in the SBIUS

Genesis 3 in the SBIVS

Genesis 3 in the SBT

Genesis 3 in the SBT1E

Genesis 3 in the SCHL

Genesis 3 in the SNT

Genesis 3 in the SUSU

Genesis 3 in the SUSU2

Genesis 3 in the SYNO

Genesis 3 in the TBIAOTANT

Genesis 3 in the TBT1E

Genesis 3 in the TBT1E2

Genesis 3 in the TFTIP

Genesis 3 in the TFTU

Genesis 3 in the TGNTATF3T

Genesis 3 in the THAI

Genesis 3 in the TNFD

Genesis 3 in the TNT

Genesis 3 in the TNTIK

Genesis 3 in the TNTIL

Genesis 3 in the TNTIN

Genesis 3 in the TNTIP

Genesis 3 in the TNTIZ

Genesis 3 in the TOMA

Genesis 3 in the TTENT

Genesis 3 in the UBG

Genesis 3 in the UGV

Genesis 3 in the UGV2

Genesis 3 in the UGV3

Genesis 3 in the VBL

Genesis 3 in the VDCC

Genesis 3 in the YALU

Genesis 3 in the YAPE

Genesis 3 in the YBVTP

Genesis 3 in the ZBP