Genesis 4 (BOLCB2)
1 Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. » 2 Sima na yango, abotaki lisusu Abele, ndeko ya Kayina. Abele akomaki kobokola bibwele mpe Kayina akomaki kosala bilanga. 3 Sima na mwa tango, Kayina amemaki mbuma ya mabele mpo na kobonzela Yawe. 4 Abele, ye mpe amemaki bibwele oyo ebotamaki liboso kati na etonga na ye mpe biteni oyo eleki mafuta. Yawe asepelaki na Abele mpe na makabo na ye, 5 kasi asepelaki te na Kayina mpe na makabo na ye. Bongo, Kayina asilikaki makasi mpe elongi na ye ekomaki mawa-mawa. 6 Yawe alobaki na Kayina :— Mpo na nini osiliki ? Mpo na nini elongi na yo ekomi mawa-mawa ? 7 Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango. 8 Kayina alobaki na Abele, ndeko na ye. Wana bazalaki kati na bilanga, Kayina akangaki Abele, ndeko na ye, mpe abomaki ye. 9 Yawe atunaki Kayina :— Wapi ndeko na yo Abele ?Kayina azongisaki :— Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai ? 10 Nzambe alobaki :— Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai. 11 Sik’oyo, olakelami mabe mpe obwakami mosika ya mabele oyo efungolaki monoko na yango mpo na komela makila ya ndeko na yo, oyo maboko na yo esopaki. 12 Tango okobalola mabele, ekobotela yo mbuma te. Okozala koyengayenga mpe kotelengana na mokili. 13 Kayina alobaki na Yawe :— Etumbu na ngai eleki pasi mpo na komema ! 14 Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele ; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai. 15 Kasi Yawe alobaki na ye :— Ezali bongo te ! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo.Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te. 16 Kayina alongwaki liboso ya Yawe, akendeki kovanda na mokili ya Nodi, na este ya Edeni. 17 Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye ; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali. 18 Enoki abotaki Iradi ; Iradi abotaki Mewuyayeli ; Mewuyayeli abotaki Metusaeli ; Metusaeli abotaki Lemeki. 19 Lemeki abalaki basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. » 20 Ada abotaki Yabali, koko ya bavandi ya bandako ya kapo mpe ya babokoli bibwele. 21 Ndeko na ye ya mobali, Yubali, azalaki koko ya bato oyo babetaka lindanda mpe flite. 22 Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. » 23 Lemeki alobaki na basi na ye :« Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ;bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu :Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto ;mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali ! 24 Solo, bakozongisa mbala sambomabe oyo basali Kayina ;kasi mpo na Lemeki,ekozala mbala tuku sambo na sambo ! » 25 Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. » 26 Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. »Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe.
In Other Versions
Genesis 4 in the ANGEFD
Genesis 4 in the ANTPNG2D
Genesis 4 in the AS21
Genesis 4 in the BAGH
Genesis 4 in the BBPNG
Genesis 4 in the BBT1E
Genesis 4 in the BDS
Genesis 4 in the BEV
Genesis 4 in the BHAD
Genesis 4 in the BIB
Genesis 4 in the BLPT
Genesis 4 in the BNT
Genesis 4 in the BNTABOOT
Genesis 4 in the BNTLV
Genesis 4 in the BOATCB
Genesis 4 in the BOATCB2
Genesis 4 in the BOBCV
Genesis 4 in the BOCNT
Genesis 4 in the BOECS
Genesis 4 in the BOGWICC
Genesis 4 in the BOHCB
Genesis 4 in the BOHCV
Genesis 4 in the BOHLNT
Genesis 4 in the BOHNTLTAL
Genesis 4 in the BOICB
Genesis 4 in the BOILNTAP
Genesis 4 in the BOITCV
Genesis 4 in the BOKCV
Genesis 4 in the BOKCV2
Genesis 4 in the BOKHWOG
Genesis 4 in the BOKSSV
Genesis 4 in the BOLCB
Genesis 4 in the BOMCV
Genesis 4 in the BONAV
Genesis 4 in the BONCB
Genesis 4 in the BONLT
Genesis 4 in the BONUT2
Genesis 4 in the BOPLNT
Genesis 4 in the BOSCB
Genesis 4 in the BOSNC
Genesis 4 in the BOTLNT
Genesis 4 in the BOVCB
Genesis 4 in the BOYCB
Genesis 4 in the BPBB
Genesis 4 in the BPH
Genesis 4 in the BSB
Genesis 4 in the CCB
Genesis 4 in the CUV
Genesis 4 in the CUVS
Genesis 4 in the DBT
Genesis 4 in the DGDNT
Genesis 4 in the DHNT
Genesis 4 in the DNT
Genesis 4 in the ELBE
Genesis 4 in the EMTV
Genesis 4 in the ESV
Genesis 4 in the FBV
Genesis 4 in the FEB
Genesis 4 in the GGMNT
Genesis 4 in the GNT
Genesis 4 in the HARY
Genesis 4 in the HNT
Genesis 4 in the IRVA
Genesis 4 in the IRVB
Genesis 4 in the IRVG
Genesis 4 in the IRVH
Genesis 4 in the IRVK
Genesis 4 in the IRVM
Genesis 4 in the IRVM2
Genesis 4 in the IRVO
Genesis 4 in the IRVP
Genesis 4 in the IRVT
Genesis 4 in the IRVT2
Genesis 4 in the IRVU
Genesis 4 in the ISVN
Genesis 4 in the JSNT
Genesis 4 in the KAPI
Genesis 4 in the KBT1ETNIK
Genesis 4 in the KBV
Genesis 4 in the KJV
Genesis 4 in the KNFD
Genesis 4 in the LBA
Genesis 4 in the LBLA
Genesis 4 in the LNT
Genesis 4 in the LSV
Genesis 4 in the MAAL
Genesis 4 in the MBV
Genesis 4 in the MBV2
Genesis 4 in the MHNT
Genesis 4 in the MKNFD
Genesis 4 in the MNG
Genesis 4 in the MNT
Genesis 4 in the MNT2
Genesis 4 in the MRS1T
Genesis 4 in the NAA
Genesis 4 in the NASB
Genesis 4 in the NBLA
Genesis 4 in the NBS
Genesis 4 in the NBVTP
Genesis 4 in the NET2
Genesis 4 in the NIV11
Genesis 4 in the NNT
Genesis 4 in the NNT2
Genesis 4 in the NNT3
Genesis 4 in the PDDPT
Genesis 4 in the PFNT
Genesis 4 in the RMNT
Genesis 4 in the SBIAS
Genesis 4 in the SBIBS
Genesis 4 in the SBIBS2
Genesis 4 in the SBICS
Genesis 4 in the SBIDS
Genesis 4 in the SBIGS
Genesis 4 in the SBIHS
Genesis 4 in the SBIIS
Genesis 4 in the SBIIS2
Genesis 4 in the SBIIS3
Genesis 4 in the SBIKS
Genesis 4 in the SBIKS2
Genesis 4 in the SBIMS
Genesis 4 in the SBIOS
Genesis 4 in the SBIPS
Genesis 4 in the SBISS
Genesis 4 in the SBITS
Genesis 4 in the SBITS2
Genesis 4 in the SBITS3
Genesis 4 in the SBITS4
Genesis 4 in the SBIUS
Genesis 4 in the SBIVS
Genesis 4 in the SBT
Genesis 4 in the SBT1E
Genesis 4 in the SCHL
Genesis 4 in the SNT
Genesis 4 in the SUSU
Genesis 4 in the SUSU2
Genesis 4 in the SYNO
Genesis 4 in the TBIAOTANT
Genesis 4 in the TBT1E
Genesis 4 in the TBT1E2
Genesis 4 in the TFTIP
Genesis 4 in the TFTU
Genesis 4 in the TGNTATF3T
Genesis 4 in the THAI
Genesis 4 in the TNFD
Genesis 4 in the TNT
Genesis 4 in the TNTIK
Genesis 4 in the TNTIL
Genesis 4 in the TNTIN
Genesis 4 in the TNTIP
Genesis 4 in the TNTIZ
Genesis 4 in the TOMA
Genesis 4 in the TTENT
Genesis 4 in the UBG
Genesis 4 in the UGV
Genesis 4 in the UGV2
Genesis 4 in the UGV3
Genesis 4 in the VBL
Genesis 4 in the VDCC
Genesis 4 in the YALU
Genesis 4 in the YAPE
Genesis 4 in the YBVTP
Genesis 4 in the ZBP