Isaiah 36 (BOLCB2)

1 Tango Ezekiasi akokisaki mibu zomi na minei na bokonzi, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, abundisaki bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi mpe abotolaki yango. 2 Boye, mokonzi ya Asiri atindaki mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, elongo na mampinga ya basoda ya nguya, wuta na Lakishi kino na Yelusalemi, epai ya mokonzi Ezekiasi. Tango mokonzi ya basoda yango atelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba, 3 Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, babimaki mpo na kokutana na ye. 4 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi alobaki na bango : « Boloba na Ezekiasi :‹ Tala makambo oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi : Otie elikya na yo na nini ? 5 Okanisi ete maloba ya pamba ekoki kozwa esika ya mayele mpe makasi ya bitumba ? Otie penza elikya na nani mpo ete otombokela ngai ? 6 Tala, ozali nde kotia elikya na Ejipito oyo ezali lokola mwa nzete ya bambu oyo ebukana, oyo etobolaka mpe ezokisaka loboko ya moto oyo ayekamelaka yango ! Faraon, mokonzi ya Ejipito, azalaka nde bongo mpo na bato nyonso oyo batielaka ye motema. 7 Mpe soki olobi na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni, ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’ 8 Sik’oyo, nabondeli yo, beta mondenge na nkolo na ngai, mokonzi ya Asiri : nakopesa yo bampunda nkoto mibale soki okoki kopesa basoda mpo ete batambolisa yango ! 9 Okokoka ndenge nini kokimisa ata mokonzi moko kaka, kati na bakonzi ya basoda ya nkolo na ngai, yo oyo otiaka elikya na yo na Ejipito mpo na bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ? 10 Okanisi ete ngai nayei kobundisa mpe kobebisa mokili oyo na ndingisa ya Yawe te ? Ezali Ye moko Yawe nde alobaki na ngai ete nabundisa mokili oyo mpe nabebisa yango. › » 11 Eliakimi, Shebina mpe Yoa balobaki na mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi :— Tobondeli yo, loba na biso, basali na yo, na lokota ya Arami, pamba te tososolaka yango ; koloba na biso na lokota ya Ebre te, noki te bato oyo bazali na likolo ya mir bakoyoka. 12 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi azongisaki :— Bokanisi ete nkolo na ngai atindi ngai koloba maloba oyo kaka epai na mokonzi na bino mpe epai na bino ? Te ! Maloba yango ezali mpe mpo na bato oyo batelemi na likolo ya mir, oyo bakolia nyei na bango mpe komela masuba na bango elongo na bino ? 13 Boye, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi atelemaki mpe agangaki makasi na lokota ya Ebre : « Boyoka maloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri ! 14 Tala makambo oyo mokonzi alobi : Tika ete Ezekiasi akosa bino te, pamba te akokoka te kokangola bino ! 15 Bondima te ete Ezekiasi atinda bino kotia elikya na Yawe tango azali koloba : ‹ Solo, Yawe akokangola biso. Engumba oyo ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. › 16 Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi : Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai ; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi mpe akomela mayi ya libulu na ye 17 liboso ete naya kozwa bino mpo na komema bino na mokili oyo ekokana na oyo ya bino, mokili oyo etonda na ble mpe na vino ya sika ; mokili ya mapa mpe ya bilanga ya vino. 18 Bondima Ezekiasi te, pamba te azali kokosa bino tango azali koloba : ‹ Yawe akokangola biso. › Boni, ezali na nzambe ya ekolo songolo, oyo alonga kokangola ekolo na ye na loboko ya mokonzi ya Asiri ? 19 Wapi banzambe ya Amati mpe ya Aripadi ? Wapi banzambe ya Sefarivayimi ? Boni, balongaki kokangola Samari na loboko na ngai ? 20 Kati na banzambe ya mikili wana, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai ? » 21 Kasi bato batikalaki kimia mpe bazongiselaki ye ata liloba moko te, pamba te mokonzi apesaki mitindo : « Bopesa ye eyano te ! » 22 Bongo Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki.

In Other Versions

Isaiah 36 in the ANGEFD

Isaiah 36 in the ANTPNG2D

Isaiah 36 in the AS21

Isaiah 36 in the BAGH

Isaiah 36 in the BBPNG

Isaiah 36 in the BBT1E

Isaiah 36 in the BDS

Isaiah 36 in the BEV

Isaiah 36 in the BHAD

Isaiah 36 in the BIB

Isaiah 36 in the BLPT

Isaiah 36 in the BNT

Isaiah 36 in the BNTABOOT

Isaiah 36 in the BNTLV

Isaiah 36 in the BOATCB

Isaiah 36 in the BOATCB2

Isaiah 36 in the BOBCV

Isaiah 36 in the BOCNT

Isaiah 36 in the BOECS

Isaiah 36 in the BOGWICC

Isaiah 36 in the BOHCB

Isaiah 36 in the BOHCV

Isaiah 36 in the BOHLNT

Isaiah 36 in the BOHNTLTAL

Isaiah 36 in the BOICB

Isaiah 36 in the BOILNTAP

Isaiah 36 in the BOITCV

Isaiah 36 in the BOKCV

Isaiah 36 in the BOKCV2

Isaiah 36 in the BOKHWOG

Isaiah 36 in the BOKSSV

Isaiah 36 in the BOLCB

Isaiah 36 in the BOMCV

Isaiah 36 in the BONAV

Isaiah 36 in the BONCB

Isaiah 36 in the BONLT

Isaiah 36 in the BONUT2

Isaiah 36 in the BOPLNT

Isaiah 36 in the BOSCB

Isaiah 36 in the BOSNC

Isaiah 36 in the BOTLNT

Isaiah 36 in the BOVCB

Isaiah 36 in the BOYCB

Isaiah 36 in the BPBB

Isaiah 36 in the BPH

Isaiah 36 in the BSB

Isaiah 36 in the CCB

Isaiah 36 in the CUV

Isaiah 36 in the CUVS

Isaiah 36 in the DBT

Isaiah 36 in the DGDNT

Isaiah 36 in the DHNT

Isaiah 36 in the DNT

Isaiah 36 in the ELBE

Isaiah 36 in the EMTV

Isaiah 36 in the ESV

Isaiah 36 in the FBV

Isaiah 36 in the FEB

Isaiah 36 in the GGMNT

Isaiah 36 in the GNT

Isaiah 36 in the HARY

Isaiah 36 in the HNT

Isaiah 36 in the IRVA

Isaiah 36 in the IRVB

Isaiah 36 in the IRVG

Isaiah 36 in the IRVH

Isaiah 36 in the IRVK

Isaiah 36 in the IRVM

Isaiah 36 in the IRVM2

Isaiah 36 in the IRVO

Isaiah 36 in the IRVP

Isaiah 36 in the IRVT

Isaiah 36 in the IRVT2

Isaiah 36 in the IRVU

Isaiah 36 in the ISVN

Isaiah 36 in the JSNT

Isaiah 36 in the KAPI

Isaiah 36 in the KBT1ETNIK

Isaiah 36 in the KBV

Isaiah 36 in the KJV

Isaiah 36 in the KNFD

Isaiah 36 in the LBA

Isaiah 36 in the LBLA

Isaiah 36 in the LNT

Isaiah 36 in the LSV

Isaiah 36 in the MAAL

Isaiah 36 in the MBV

Isaiah 36 in the MBV2

Isaiah 36 in the MHNT

Isaiah 36 in the MKNFD

Isaiah 36 in the MNG

Isaiah 36 in the MNT

Isaiah 36 in the MNT2

Isaiah 36 in the MRS1T

Isaiah 36 in the NAA

Isaiah 36 in the NASB

Isaiah 36 in the NBLA

Isaiah 36 in the NBS

Isaiah 36 in the NBVTP

Isaiah 36 in the NET2

Isaiah 36 in the NIV11

Isaiah 36 in the NNT

Isaiah 36 in the NNT2

Isaiah 36 in the NNT3

Isaiah 36 in the PDDPT

Isaiah 36 in the PFNT

Isaiah 36 in the RMNT

Isaiah 36 in the SBIAS

Isaiah 36 in the SBIBS

Isaiah 36 in the SBIBS2

Isaiah 36 in the SBICS

Isaiah 36 in the SBIDS

Isaiah 36 in the SBIGS

Isaiah 36 in the SBIHS

Isaiah 36 in the SBIIS

Isaiah 36 in the SBIIS2

Isaiah 36 in the SBIIS3

Isaiah 36 in the SBIKS

Isaiah 36 in the SBIKS2

Isaiah 36 in the SBIMS

Isaiah 36 in the SBIOS

Isaiah 36 in the SBIPS

Isaiah 36 in the SBISS

Isaiah 36 in the SBITS

Isaiah 36 in the SBITS2

Isaiah 36 in the SBITS3

Isaiah 36 in the SBITS4

Isaiah 36 in the SBIUS

Isaiah 36 in the SBIVS

Isaiah 36 in the SBT

Isaiah 36 in the SBT1E

Isaiah 36 in the SCHL

Isaiah 36 in the SNT

Isaiah 36 in the SUSU

Isaiah 36 in the SUSU2

Isaiah 36 in the SYNO

Isaiah 36 in the TBIAOTANT

Isaiah 36 in the TBT1E

Isaiah 36 in the TBT1E2

Isaiah 36 in the TFTIP

Isaiah 36 in the TFTU

Isaiah 36 in the TGNTATF3T

Isaiah 36 in the THAI

Isaiah 36 in the TNFD

Isaiah 36 in the TNT

Isaiah 36 in the TNTIK

Isaiah 36 in the TNTIL

Isaiah 36 in the TNTIN

Isaiah 36 in the TNTIP

Isaiah 36 in the TNTIZ

Isaiah 36 in the TOMA

Isaiah 36 in the TTENT

Isaiah 36 in the UBG

Isaiah 36 in the UGV

Isaiah 36 in the UGV2

Isaiah 36 in the UGV3

Isaiah 36 in the VBL

Isaiah 36 in the VDCC

Isaiah 36 in the YALU

Isaiah 36 in the YAPE

Isaiah 36 in the YBVTP

Isaiah 36 in the ZBP