Jeremiah 14 (BOLCB2)

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi na tina na bokawuki : 2 « Bato ya Yuda bazali na matanga,bingumba na bango esili kobebisama,bazali kolela mpo na mokili na bango,mpe koganga ezali koyokana wuta na Yelusalemi. 3 Bakambi bazali kotinda basali na bangompo ete bakende kotoka mayi ;kasi soki bakomi na libulu ya mayi, mayi ezali te,bongo bazali kozonga na mbeki ya pamba,bazipi bilongi na soni mpe na mawa. 4 Mabele esili kokawuka,pamba te mvula ezali konoka lisusu te,basali bilanga bakomi na pasimpe bazipi bilongi na bango mpo na soni. 5 Ezala mboloko kati na zamba ekomi kokimaata mwana na yango oyo esili kobota,pamba te matiti ya kolia ezali lisusu te. 6 Ba-ane ya zamba etelemina basonge ya bangomba ekawukampe ezali kobenda mopepe lokola mbwa ya zamba ;miso na yango elembi kotala,pamba te matiti ya kolia ezali te. » 7 Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso,sala mpo na lokumu ya Kombo na Yo,pamba te towangani Yo mpe mingi,tosalaki masumu liboso na Yo. 8 Oh Elikya ya Isalaele,Mobikisi na ye na tango ya pasi,mpo na nini ozali kosala makambolokola mopaya kati na mboka oyoto lokola moleki nzela oyo atelemaka kaka na mbokampo na kolekisa butu ? 9 Mpo na nini ozali kosala makambolokola moto oyo asutukito lokola elombe oyo azangi makoki ya kobikisa moto ?Nzokande, Yo, Yawe, ozali kati na bisompe tobengami solo na Kombo na Yo !Kosundola biso te ! 10 Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato oyo :« Bato oyo balingaka kaka kotambola-tambola,bavandaka esika moko te.Yango wana, Yawe asepelaka na bango te,akobosana mabe na bango tempe akopesa bango etumbumpo na masumu na bango. » 11 Bongo, Yawe alobaki na ngai :— Kosambela mpo na bolamu ya bato oyo te ! 12 Ata soki bakili bilei, nakoyoka kolela na bango te ; ata soki babonzi mbeka ya kotumba mpe ya bagato, nakondima yango te. Nzokande, nakobebisa bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka. 13 Kasi nazongiselaki Ye :— Oh Nkolo Yawe, basakoli bazali kokoba koloba na bango : « Te ! Bokotikala komona mopanga to nzala makasi te, kasi nakopesa bino kimia ya solo na esika oyo. » 14 Yawe alobaki na ngai :— Basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Natindaki bango te, naponaki bango te mpe nalobaki na bango likambo moko te. Bimoniseli mpe masakoli na bango ezali ya lokuta ; makambo nyonso oyo bazali kosakola ezali pamba, ewutaka nde na makanisi ya mitema na bango moko. 15 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na basakoli oyo bazali koloba na Kombo na Ngai : « Natindaki bango te, atako bazali koloba : ‹ Mopanga mpe nzala makasi ekokweya na mokili oyo te. › Basakoli yango bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi. 16 Bongo, bato oyo bazali kondima masakoli na bango bakobwakama na libanda, na babalabala ya Yelusalemi likolo ya nzala makasi mpe ya mopanga. Moto moko te akozala mpo na kokunda bango, ezala bango to basi na bango to mpe bana na bango ya mibali to ya basi. Nakozongisela bango mabe na mabe oyo basalaki. 17 Loba na bango maloba oyo :‹ Butu mpe moyi,miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli,ezali kokawuka te !Pamba te moseka na ngai, bato na ngai,bazali na pasi mingimpo ete babetami makasi. 18 Soki nakeyi na zamba,nazali komona bibembe ya batooyo babomi na mopanga ;soki nakoti kati na engumba,nazali komona bato oyo bazali kokufa na nzala.Basakoli mpe Banganga-Nzambe bazali kososolalikambo moko te tango bazali kotambola na mokili. › » 19 Boni, obwaki solo Yuda ?Oyini penza Siona ?Mpo na nini otindeli biso pasi makasioyo ezangeli nzela ya kobika ?Tokanisaki ete tokozwa kimia ;nzokande, eloko moko ya malonga esalemi te !Tokanisaki ete tokozala na nzoto kolongono ;nzokande, tozali kaka komona pasi na pasi ! 20 Oh Yawe, tososoli solo mabe na bisompe masumu ya batata na biso !Solo, tosali penza masumu liboso na Yo. 21 Koyina biso te mpo na lokumu ya Kombo na Yo !Kobebisa te nkembo ya Kiti ya Bokonzi na Yo !Kanisa boyokani oyo osalaki elongo na bisompe kobebisa yango te ! 22 Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo,oyo enokisaka mvula ?Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula ?Te ! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso !Totie elikya na biso nyonso epai na Yo,pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.

In Other Versions

Jeremiah 14 in the ANGEFD

Jeremiah 14 in the ANTPNG2D

Jeremiah 14 in the AS21

Jeremiah 14 in the BAGH

Jeremiah 14 in the BBPNG

Jeremiah 14 in the BBT1E

Jeremiah 14 in the BDS

Jeremiah 14 in the BEV

Jeremiah 14 in the BHAD

Jeremiah 14 in the BIB

Jeremiah 14 in the BLPT

Jeremiah 14 in the BNT

Jeremiah 14 in the BNTABOOT

Jeremiah 14 in the BNTLV

Jeremiah 14 in the BOATCB

Jeremiah 14 in the BOATCB2

Jeremiah 14 in the BOBCV

Jeremiah 14 in the BOCNT

Jeremiah 14 in the BOECS

Jeremiah 14 in the BOGWICC

Jeremiah 14 in the BOHCB

Jeremiah 14 in the BOHCV

Jeremiah 14 in the BOHLNT

Jeremiah 14 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 14 in the BOICB

Jeremiah 14 in the BOILNTAP

Jeremiah 14 in the BOITCV

Jeremiah 14 in the BOKCV

Jeremiah 14 in the BOKCV2

Jeremiah 14 in the BOKHWOG

Jeremiah 14 in the BOKSSV

Jeremiah 14 in the BOLCB

Jeremiah 14 in the BOMCV

Jeremiah 14 in the BONAV

Jeremiah 14 in the BONCB

Jeremiah 14 in the BONLT

Jeremiah 14 in the BONUT2

Jeremiah 14 in the BOPLNT

Jeremiah 14 in the BOSCB

Jeremiah 14 in the BOSNC

Jeremiah 14 in the BOTLNT

Jeremiah 14 in the BOVCB

Jeremiah 14 in the BOYCB

Jeremiah 14 in the BPBB

Jeremiah 14 in the BPH

Jeremiah 14 in the BSB

Jeremiah 14 in the CCB

Jeremiah 14 in the CUV

Jeremiah 14 in the CUVS

Jeremiah 14 in the DBT

Jeremiah 14 in the DGDNT

Jeremiah 14 in the DHNT

Jeremiah 14 in the DNT

Jeremiah 14 in the ELBE

Jeremiah 14 in the EMTV

Jeremiah 14 in the ESV

Jeremiah 14 in the FBV

Jeremiah 14 in the FEB

Jeremiah 14 in the GGMNT

Jeremiah 14 in the GNT

Jeremiah 14 in the HARY

Jeremiah 14 in the HNT

Jeremiah 14 in the IRVA

Jeremiah 14 in the IRVB

Jeremiah 14 in the IRVG

Jeremiah 14 in the IRVH

Jeremiah 14 in the IRVK

Jeremiah 14 in the IRVM

Jeremiah 14 in the IRVM2

Jeremiah 14 in the IRVO

Jeremiah 14 in the IRVP

Jeremiah 14 in the IRVT

Jeremiah 14 in the IRVT2

Jeremiah 14 in the IRVU

Jeremiah 14 in the ISVN

Jeremiah 14 in the JSNT

Jeremiah 14 in the KAPI

Jeremiah 14 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 14 in the KBV

Jeremiah 14 in the KJV

Jeremiah 14 in the KNFD

Jeremiah 14 in the LBA

Jeremiah 14 in the LBLA

Jeremiah 14 in the LNT

Jeremiah 14 in the LSV

Jeremiah 14 in the MAAL

Jeremiah 14 in the MBV

Jeremiah 14 in the MBV2

Jeremiah 14 in the MHNT

Jeremiah 14 in the MKNFD

Jeremiah 14 in the MNG

Jeremiah 14 in the MNT

Jeremiah 14 in the MNT2

Jeremiah 14 in the MRS1T

Jeremiah 14 in the NAA

Jeremiah 14 in the NASB

Jeremiah 14 in the NBLA

Jeremiah 14 in the NBS

Jeremiah 14 in the NBVTP

Jeremiah 14 in the NET2

Jeremiah 14 in the NIV11

Jeremiah 14 in the NNT

Jeremiah 14 in the NNT2

Jeremiah 14 in the NNT3

Jeremiah 14 in the PDDPT

Jeremiah 14 in the PFNT

Jeremiah 14 in the RMNT

Jeremiah 14 in the SBIAS

Jeremiah 14 in the SBIBS

Jeremiah 14 in the SBIBS2

Jeremiah 14 in the SBICS

Jeremiah 14 in the SBIDS

Jeremiah 14 in the SBIGS

Jeremiah 14 in the SBIHS

Jeremiah 14 in the SBIIS

Jeremiah 14 in the SBIIS2

Jeremiah 14 in the SBIIS3

Jeremiah 14 in the SBIKS

Jeremiah 14 in the SBIKS2

Jeremiah 14 in the SBIMS

Jeremiah 14 in the SBIOS

Jeremiah 14 in the SBIPS

Jeremiah 14 in the SBISS

Jeremiah 14 in the SBITS

Jeremiah 14 in the SBITS2

Jeremiah 14 in the SBITS3

Jeremiah 14 in the SBITS4

Jeremiah 14 in the SBIUS

Jeremiah 14 in the SBIVS

Jeremiah 14 in the SBT

Jeremiah 14 in the SBT1E

Jeremiah 14 in the SCHL

Jeremiah 14 in the SNT

Jeremiah 14 in the SUSU

Jeremiah 14 in the SUSU2

Jeremiah 14 in the SYNO

Jeremiah 14 in the TBIAOTANT

Jeremiah 14 in the TBT1E

Jeremiah 14 in the TBT1E2

Jeremiah 14 in the TFTIP

Jeremiah 14 in the TFTU

Jeremiah 14 in the TGNTATF3T

Jeremiah 14 in the THAI

Jeremiah 14 in the TNFD

Jeremiah 14 in the TNT

Jeremiah 14 in the TNTIK

Jeremiah 14 in the TNTIL

Jeremiah 14 in the TNTIN

Jeremiah 14 in the TNTIP

Jeremiah 14 in the TNTIZ

Jeremiah 14 in the TOMA

Jeremiah 14 in the TTENT

Jeremiah 14 in the UBG

Jeremiah 14 in the UGV

Jeremiah 14 in the UGV2

Jeremiah 14 in the UGV3

Jeremiah 14 in the VBL

Jeremiah 14 in the VDCC

Jeremiah 14 in the YALU

Jeremiah 14 in the YAPE

Jeremiah 14 in the YBVTP

Jeremiah 14 in the ZBP