Jeremiah 33 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Jeremi, na mbala ya mibale, wana azalaki nanu ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli : 2 « Tala liloba oyo Yawe, Ye oyo akela mabele, oyo abongisa yango malamu mpe alendisa yango, oyo Kombo na Ye ezali Yawe, alobi : 3 ‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te. › 4 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na bandako ya engumba oyo mpe ya bandako ya bakonzi ya Yuda, oyo babukaki mpo na kotelemela bangomba mike ya kokimela mpe mopanga ya monguna 5 kati na etumba na bato ya Babiloni : ‹ Bandako yango ekotonda na bibembe ya bato oyo nakoboma na nguya ya kotomboka mpe ya kanda na Ngai. Nakobombela engumba oyo elongi na Ngai likolo ya mabe na yango nyonso. 6 Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango ; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami. 7 Nakokangola bato ya Yuda mpe ya Isalaele longwa na bowumbu mpe nakokomisa bango lisusu ndenge bazalaki liboso. 8 Nakopetola bango na masumu nyonso oyo basalaki liboso na Ngai. Nakolimbisa masumu nyonso ya botomboki oyo basalaki liboso na Ngai. 9 Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. › 10 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bozali koloba na tina na esika oyo : ‘ Eh ! Esika oyo ebeba ! Ezalaka lisusu na bato mpe banyama te ! ’ Nzokande, kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi oyo ekoma polele, ezanga bato mpe banyama, ekozala lisusu na lokito : 11 ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba :‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga,mpo ete Yawe azali malamu ;bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe. 12 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Kati na esika oyo ebebisama mpe ezanga bato to banyama, mpe kati na bingumba na yango nyonso, ekozala na lisusu na bitando ya matiti mpo na babateli bibwele, bitando epai wapi bakoleisa bibwele na bango. 13 Kati na bingumba ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi, kati na etuka ya Benjame, kati na bamboka oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi mpe kati na bingumba ya Yuda, bibwele ekoleka lisusu na se ya loboko ya moto oyo atangaka yango, › elobi Yawe. 14 ‹ Na mikolo ekoya, › elobi Yawe, ‹ nakokokisa elaka kitoko oyo napesaki na mabota ya Isalaele mpe ya Yuda. 15 Na mikolo yango mpe na tango yango,nakobimisa Moto ya nzete ya sembowuta na libota ya Davidi ;akosala makambo ya sembompe ya boyengebene kati na mokili. 16 Na mikolo wana, Yuda ekobikisama,mpe Yelusalemi ekozala na kimia.Tala kombo oyo bakobengela yango :Yawe azali Bosembo na biso. › 17 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Davidi akozalaka tango nyonso na moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya libota ya Isalaele ; 18 Banganga-Nzambe oyo bazali bakitani ya Levi bakozalaka tango nyonso na bakitani oyo bakobanda kotelema tango nyonso liboso na Ngai mpo na kotumba mbeka, kobonza mbeka ya gato mpe kobonza makabo. › » 19 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi : 20 « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Soki bolongi kokata boyokani na Ngai elongo na moyi, mpe boyokani na Ngai elongo na butu, mpo ete moyi mpe butu ekoma lisusu te na tango na yango, 21 wana bokolonga penza kokata boyokani na Ngai elongo na Davidi, mosali na Ngai, mpe Davidi akotikala kozala lisusu te na mokitani na kiti ya bokonzi, mpe bokolonga kokata boyokani na Ngai elongo na Balevi oyo bazali Banganga-Nzambe oyo basalelaka Ngai. 22 Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › » 23 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi : 24 « Boni ! Bozali koyoka te makambo bato oyo bazali kosala ? Bazali koloba : ‹ Yawe asundoli bituka mibale oyo aponaki. › Na bongo, bazali kotiola bato na Ngai, mpe moto ata moko te azali kozwa bango lokola ekolo. 25 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Soki nasalaki boyokani te elongo na moyi mpe elongo na butu, mpe soki napesaki likolo mpe mabele mibeko te, 26 wana nakokaki kobwaka bakitani ya Jakobi mpe ya Davidi, mosali na Ngai, mpe nalingaki te kopona moko kati na bana na ye mpo ete akamba bakitani ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi. Nakozongisa lisusu kitoko ya mokili na bango mpe nakoyokela bango mawa. › »

In Other Versions

Jeremiah 33 in the ANGEFD

Jeremiah 33 in the ANTPNG2D

Jeremiah 33 in the AS21

Jeremiah 33 in the BAGH

Jeremiah 33 in the BBPNG

Jeremiah 33 in the BBT1E

Jeremiah 33 in the BDS

Jeremiah 33 in the BEV

Jeremiah 33 in the BHAD

Jeremiah 33 in the BIB

Jeremiah 33 in the BLPT

Jeremiah 33 in the BNT

Jeremiah 33 in the BNTABOOT

Jeremiah 33 in the BNTLV

Jeremiah 33 in the BOATCB

Jeremiah 33 in the BOATCB2

Jeremiah 33 in the BOBCV

Jeremiah 33 in the BOCNT

Jeremiah 33 in the BOECS

Jeremiah 33 in the BOGWICC

Jeremiah 33 in the BOHCB

Jeremiah 33 in the BOHCV

Jeremiah 33 in the BOHLNT

Jeremiah 33 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 33 in the BOICB

Jeremiah 33 in the BOILNTAP

Jeremiah 33 in the BOITCV

Jeremiah 33 in the BOKCV

Jeremiah 33 in the BOKCV2

Jeremiah 33 in the BOKHWOG

Jeremiah 33 in the BOKSSV

Jeremiah 33 in the BOLCB

Jeremiah 33 in the BOMCV

Jeremiah 33 in the BONAV

Jeremiah 33 in the BONCB

Jeremiah 33 in the BONLT

Jeremiah 33 in the BONUT2

Jeremiah 33 in the BOPLNT

Jeremiah 33 in the BOSCB

Jeremiah 33 in the BOSNC

Jeremiah 33 in the BOTLNT

Jeremiah 33 in the BOVCB

Jeremiah 33 in the BOYCB

Jeremiah 33 in the BPBB

Jeremiah 33 in the BPH

Jeremiah 33 in the BSB

Jeremiah 33 in the CCB

Jeremiah 33 in the CUV

Jeremiah 33 in the CUVS

Jeremiah 33 in the DBT

Jeremiah 33 in the DGDNT

Jeremiah 33 in the DHNT

Jeremiah 33 in the DNT

Jeremiah 33 in the ELBE

Jeremiah 33 in the EMTV

Jeremiah 33 in the ESV

Jeremiah 33 in the FBV

Jeremiah 33 in the FEB

Jeremiah 33 in the GGMNT

Jeremiah 33 in the GNT

Jeremiah 33 in the HARY

Jeremiah 33 in the HNT

Jeremiah 33 in the IRVA

Jeremiah 33 in the IRVB

Jeremiah 33 in the IRVG

Jeremiah 33 in the IRVH

Jeremiah 33 in the IRVK

Jeremiah 33 in the IRVM

Jeremiah 33 in the IRVM2

Jeremiah 33 in the IRVO

Jeremiah 33 in the IRVP

Jeremiah 33 in the IRVT

Jeremiah 33 in the IRVT2

Jeremiah 33 in the IRVU

Jeremiah 33 in the ISVN

Jeremiah 33 in the JSNT

Jeremiah 33 in the KAPI

Jeremiah 33 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 33 in the KBV

Jeremiah 33 in the KJV

Jeremiah 33 in the KNFD

Jeremiah 33 in the LBA

Jeremiah 33 in the LBLA

Jeremiah 33 in the LNT

Jeremiah 33 in the LSV

Jeremiah 33 in the MAAL

Jeremiah 33 in the MBV

Jeremiah 33 in the MBV2

Jeremiah 33 in the MHNT

Jeremiah 33 in the MKNFD

Jeremiah 33 in the MNG

Jeremiah 33 in the MNT

Jeremiah 33 in the MNT2

Jeremiah 33 in the MRS1T

Jeremiah 33 in the NAA

Jeremiah 33 in the NASB

Jeremiah 33 in the NBLA

Jeremiah 33 in the NBS

Jeremiah 33 in the NBVTP

Jeremiah 33 in the NET2

Jeremiah 33 in the NIV11

Jeremiah 33 in the NNT

Jeremiah 33 in the NNT2

Jeremiah 33 in the NNT3

Jeremiah 33 in the PDDPT

Jeremiah 33 in the PFNT

Jeremiah 33 in the RMNT

Jeremiah 33 in the SBIAS

Jeremiah 33 in the SBIBS

Jeremiah 33 in the SBIBS2

Jeremiah 33 in the SBICS

Jeremiah 33 in the SBIDS

Jeremiah 33 in the SBIGS

Jeremiah 33 in the SBIHS

Jeremiah 33 in the SBIIS

Jeremiah 33 in the SBIIS2

Jeremiah 33 in the SBIIS3

Jeremiah 33 in the SBIKS

Jeremiah 33 in the SBIKS2

Jeremiah 33 in the SBIMS

Jeremiah 33 in the SBIOS

Jeremiah 33 in the SBIPS

Jeremiah 33 in the SBISS

Jeremiah 33 in the SBITS

Jeremiah 33 in the SBITS2

Jeremiah 33 in the SBITS3

Jeremiah 33 in the SBITS4

Jeremiah 33 in the SBIUS

Jeremiah 33 in the SBIVS

Jeremiah 33 in the SBT

Jeremiah 33 in the SBT1E

Jeremiah 33 in the SCHL

Jeremiah 33 in the SNT

Jeremiah 33 in the SUSU

Jeremiah 33 in the SUSU2

Jeremiah 33 in the SYNO

Jeremiah 33 in the TBIAOTANT

Jeremiah 33 in the TBT1E

Jeremiah 33 in the TBT1E2

Jeremiah 33 in the TFTIP

Jeremiah 33 in the TFTU

Jeremiah 33 in the TGNTATF3T

Jeremiah 33 in the THAI

Jeremiah 33 in the TNFD

Jeremiah 33 in the TNT

Jeremiah 33 in the TNTIK

Jeremiah 33 in the TNTIL

Jeremiah 33 in the TNTIN

Jeremiah 33 in the TNTIP

Jeremiah 33 in the TNTIZ

Jeremiah 33 in the TOMA

Jeremiah 33 in the TTENT

Jeremiah 33 in the UBG

Jeremiah 33 in the UGV

Jeremiah 33 in the UGV2

Jeremiah 33 in the UGV3

Jeremiah 33 in the VBL

Jeremiah 33 in the VDCC

Jeremiah 33 in the YALU

Jeremiah 33 in the YAPE

Jeremiah 33 in the YBVTP

Jeremiah 33 in the ZBP