Jeremiah 35 (BOLCB2)

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, azalaki mokonzi : 2 « Kende epai ya bato ya libota ya Rekabi mpe bengisa bango ete baya kokota kati na moko ya bashambre ya Tempelo ya Yawe. Mpe pesa bango masanga ya vino ya komela kuna. » 3 Boye, nakendeki kokutana na Yazania, mwana mobali ya Jeremi, mwana mobali ya Abatsinia, mpe bandeko na ye ya mibali elongo na bana na bango nyonso ya mibali : libota mobimba ya bato ya libota ya Rekabi. 4 Namemaki bango na Tempelo ya Yawe, kati na shambre ya bana mibali ya Anani, mwana mobali ya Yigidalia, moto na Nzambe, pene ya shambre ya bakambi. Shambre yango ezalaki na sima ya shambre ya Maaseya, mwana mobali ya Shalumi, mokengeli ekuke. 5 Natiaki biloko etonda na vino mpe ndambo ya bakopo liboso ya bato ya libota ya Rekabi ; mpe nalobaki na bango :— Bomela masanga ya vino. 6 Kasi bazongisaki :— Tomelaka masanga ya vino te, mpo ete koko na biso, Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki biso mobeko oyo : « Bokoki komela masanga ya vino te, ezala bino to bakitani na bino, 7 mpe bokoki kotonga bandako te, kosala bilanga te, kolona banzete ya vino te mpe bokoki kozala na biloko wana te ; kasi bosengeli kaka kovanda tango nyonso na bandako ya kapo, mpo ete bozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bozali baleki nzela. » 8 Totosaka makambo nyonso oyo koko na biso Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, ayebisa biso : Ezala biso, basi na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, tomelaka masanga ya vino te, 9 totongaka bandako te mpo na kovanda kuna, tozalaka na bilanga ya vino te, bilanga te mpe milona te ; 10 tovandaka kaka na bandako ya kapo mpe totosaka makambo nyonso oyo koko na biso, Yonadabi, ayebisa biso. 11 Kasi tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abotolaki mokili oyo, tolobaki : « Boya, tokende na Yelusalemi mpo ete tobikisa bomoi na biso liboso ya basoda ya Babiloni mpe ya Siri. » Yango wana, toyaki kovanda na Yelusalemi. 12 Bongo tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi : 13 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Kende koyebisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi : « Bokoki solo kozwa liteya te mpe kotosa maloba na Ngai te, » elobi Yawe ? 14 « Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki mobeko epai ya bana na ye ete bamela masanga ya vino te, mpe babatelaka mobeko yango. Kino na mokolo ya lelo, bamelaka masanga ya vino te mpo na kotosa mobeko oyo koko na bango apesaki bango. Nzokande, tango na tango, Ngai nazalaki koloba na bino, kasi bozalaki koyoka Ngai te. 15 Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye ; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te. 16 Bakitani ya Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, babatelaki mobeko oyo koko na bango apesa bango, kasi bato oyo baboyi kotosa Ngai. » 17 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na mokili ya Yuda mpe epai ya bavandi nyonso ya Yelusalemi pasi oyo nakataki ; pamba te nalobaki na bango kasi bayokaki Ngai te, nabengaki bango kasi bayanolaki Ngai te. » 18 Boye, Jeremi alobaki na bato ya libota ya Rekabi :— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Lokola botosaka mobeko ya koko na bino Yonadabi, bolandaka malako nyonso oyo ayebisa bino mpe bosalelaka makambo nyonso oyo atinda bino, 19 tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, akotikala kozanga te moto oyo akosalela Ngai. › »

In Other Versions

Jeremiah 35 in the ANGEFD

Jeremiah 35 in the ANTPNG2D

Jeremiah 35 in the AS21

Jeremiah 35 in the BAGH

Jeremiah 35 in the BBPNG

Jeremiah 35 in the BBT1E

Jeremiah 35 in the BDS

Jeremiah 35 in the BEV

Jeremiah 35 in the BHAD

Jeremiah 35 in the BIB

Jeremiah 35 in the BLPT

Jeremiah 35 in the BNT

Jeremiah 35 in the BNTABOOT

Jeremiah 35 in the BNTLV

Jeremiah 35 in the BOATCB

Jeremiah 35 in the BOATCB2

Jeremiah 35 in the BOBCV

Jeremiah 35 in the BOCNT

Jeremiah 35 in the BOECS

Jeremiah 35 in the BOGWICC

Jeremiah 35 in the BOHCB

Jeremiah 35 in the BOHCV

Jeremiah 35 in the BOHLNT

Jeremiah 35 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 35 in the BOICB

Jeremiah 35 in the BOILNTAP

Jeremiah 35 in the BOITCV

Jeremiah 35 in the BOKCV

Jeremiah 35 in the BOKCV2

Jeremiah 35 in the BOKHWOG

Jeremiah 35 in the BOKSSV

Jeremiah 35 in the BOLCB

Jeremiah 35 in the BOMCV

Jeremiah 35 in the BONAV

Jeremiah 35 in the BONCB

Jeremiah 35 in the BONLT

Jeremiah 35 in the BONUT2

Jeremiah 35 in the BOPLNT

Jeremiah 35 in the BOSCB

Jeremiah 35 in the BOSNC

Jeremiah 35 in the BOTLNT

Jeremiah 35 in the BOVCB

Jeremiah 35 in the BOYCB

Jeremiah 35 in the BPBB

Jeremiah 35 in the BPH

Jeremiah 35 in the BSB

Jeremiah 35 in the CCB

Jeremiah 35 in the CUV

Jeremiah 35 in the CUVS

Jeremiah 35 in the DBT

Jeremiah 35 in the DGDNT

Jeremiah 35 in the DHNT

Jeremiah 35 in the DNT

Jeremiah 35 in the ELBE

Jeremiah 35 in the EMTV

Jeremiah 35 in the ESV

Jeremiah 35 in the FBV

Jeremiah 35 in the FEB

Jeremiah 35 in the GGMNT

Jeremiah 35 in the GNT

Jeremiah 35 in the HARY

Jeremiah 35 in the HNT

Jeremiah 35 in the IRVA

Jeremiah 35 in the IRVB

Jeremiah 35 in the IRVG

Jeremiah 35 in the IRVH

Jeremiah 35 in the IRVK

Jeremiah 35 in the IRVM

Jeremiah 35 in the IRVM2

Jeremiah 35 in the IRVO

Jeremiah 35 in the IRVP

Jeremiah 35 in the IRVT

Jeremiah 35 in the IRVT2

Jeremiah 35 in the IRVU

Jeremiah 35 in the ISVN

Jeremiah 35 in the JSNT

Jeremiah 35 in the KAPI

Jeremiah 35 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 35 in the KBV

Jeremiah 35 in the KJV

Jeremiah 35 in the KNFD

Jeremiah 35 in the LBA

Jeremiah 35 in the LBLA

Jeremiah 35 in the LNT

Jeremiah 35 in the LSV

Jeremiah 35 in the MAAL

Jeremiah 35 in the MBV

Jeremiah 35 in the MBV2

Jeremiah 35 in the MHNT

Jeremiah 35 in the MKNFD

Jeremiah 35 in the MNG

Jeremiah 35 in the MNT

Jeremiah 35 in the MNT2

Jeremiah 35 in the MRS1T

Jeremiah 35 in the NAA

Jeremiah 35 in the NASB

Jeremiah 35 in the NBLA

Jeremiah 35 in the NBS

Jeremiah 35 in the NBVTP

Jeremiah 35 in the NET2

Jeremiah 35 in the NIV11

Jeremiah 35 in the NNT

Jeremiah 35 in the NNT2

Jeremiah 35 in the NNT3

Jeremiah 35 in the PDDPT

Jeremiah 35 in the PFNT

Jeremiah 35 in the RMNT

Jeremiah 35 in the SBIAS

Jeremiah 35 in the SBIBS

Jeremiah 35 in the SBIBS2

Jeremiah 35 in the SBICS

Jeremiah 35 in the SBIDS

Jeremiah 35 in the SBIGS

Jeremiah 35 in the SBIHS

Jeremiah 35 in the SBIIS

Jeremiah 35 in the SBIIS2

Jeremiah 35 in the SBIIS3

Jeremiah 35 in the SBIKS

Jeremiah 35 in the SBIKS2

Jeremiah 35 in the SBIMS

Jeremiah 35 in the SBIOS

Jeremiah 35 in the SBIPS

Jeremiah 35 in the SBISS

Jeremiah 35 in the SBITS

Jeremiah 35 in the SBITS2

Jeremiah 35 in the SBITS3

Jeremiah 35 in the SBITS4

Jeremiah 35 in the SBIUS

Jeremiah 35 in the SBIVS

Jeremiah 35 in the SBT

Jeremiah 35 in the SBT1E

Jeremiah 35 in the SCHL

Jeremiah 35 in the SNT

Jeremiah 35 in the SUSU

Jeremiah 35 in the SUSU2

Jeremiah 35 in the SYNO

Jeremiah 35 in the TBIAOTANT

Jeremiah 35 in the TBT1E

Jeremiah 35 in the TBT1E2

Jeremiah 35 in the TFTIP

Jeremiah 35 in the TFTU

Jeremiah 35 in the TGNTATF3T

Jeremiah 35 in the THAI

Jeremiah 35 in the TNFD

Jeremiah 35 in the TNT

Jeremiah 35 in the TNTIK

Jeremiah 35 in the TNTIL

Jeremiah 35 in the TNTIN

Jeremiah 35 in the TNTIP

Jeremiah 35 in the TNTIZ

Jeremiah 35 in the TOMA

Jeremiah 35 in the TTENT

Jeremiah 35 in the UBG

Jeremiah 35 in the UGV

Jeremiah 35 in the UGV2

Jeremiah 35 in the UGV3

Jeremiah 35 in the VBL

Jeremiah 35 in the VDCC

Jeremiah 35 in the YALU

Jeremiah 35 in the YAPE

Jeremiah 35 in the YBVTP

Jeremiah 35 in the ZBP