Jeremiah 44 (BOLCB2)

1 Tala liloba oyo Jeremi azwaki na tina na Bayuda oyo bazalaki kovanda na Ejipito, na se ya bingumba ya Migidoli, na Dafine, na Mefisi mpe na Patrosi : 2 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bomonaki pasi makasi oyo natindaki na Yelusalemi mpe na bingumba nyonso ya Yuda. Na mokolo ya lelo, etikali pamba mpe ebebisami makasi 3 likolo ya mabe oyo basalaki. Bapesaki Ngai kanda tango bakomaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosalela banzambe mosusu oyo batikalaki koyeba te, ezala bango to bino to batata na bino. 4 Nzokande, nazalaki tango na tango kotinda basali na Ngai, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Bosala te makambo ya nkele oyo nayinaka. › 5 Kasi batikalaki koyoka te mpe batosaki te ; batikaki mabe na bango te mpe bakobaki kaka kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu. 6 Yango wana, kanda makasi na Ngai epelaki mpe ebebisaki bingumba ya Yuda mpe babalabala ya Yelusalemi ; mpe lisusu ebukaki-bukaki yango ndenge ezali komonana lelo. 7 Sik’oyo tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : Mpo na nini bozali komimemela pasi ya makasi boye kino mokili ya Yuda ezangela mibali, basi, babebe mpe etikala lisusu ata na moto moko te ? 8 Mpo na nini bozali kopelisa kanda na Ngai na nzela ya misala na bino ya mabe, na kotumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu ya Ejipito epai wapi bokeyi kovanda ? Bino moko nde bozali komibebisa mpe komikomisa bato ya libabe mpe eloko ya kotiola kati ya bikolo nyonso ya mokili. 9 Bobosani mabe oyo batata na bino, bakonzi mpe basi ya bakonzi ya Yuda basalaki ? Bobosani mabe oyo bino mpe basi na bino bosalaki kati na mokili ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi ? 10 Kino lelo, bamikitisi te, batosi Ngai te, batosi mibeko mpe malako na Ngai te, oyo napesaki bino mpe batata na bino. 11 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nazwi mokano ya komemela bino pasi mpe ya kobebisa mokili nyonso ya Yuda. 12 Nakokanga batikali ya Yuda, ba-oyo batingamaki koya kovanda awa na Ejipito ; bango nyonso bakokufa kati na Ejipito, na mopanga mpe na nzala makasi, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene ; bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, mpe bakobanda kotangaka kombo na bango mpo na kolakela bato mabe ; bakokoma eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe eloko ya kotiola. 13 Nakopesa bavandi ya Ejipito etumbu na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, ndenge napesaki Yelusalemi etumbu. 14 Kati na batikali ya Yuda oyo bayaki kovanda na Ejipito, moko te akobika to akotikala na bomoi, ata soki ayoki posa ya kozonga mpo na kovanda na mokili ya Yuda, bato moke kaka nde bakozonga. » 15 Mibali nyonso oyo bayebaki ete basi na bango bazalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, elongo na basi nyonso oyo bazalaki wana kati na lisanga monene mpe bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ejipito ya se mpe ya likolo balobaki na Jeremi : 16 — Te ! Tokoyoka te makambo oyo ozali koyebisa biso na kombo ya Yawe. 17 Tokosala nde makambo nyonso oyo biso tokanaki kosala : tokotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Ishitari mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino mpo na ye ndenge biso, batata na biso, bakonzi na biso mpe bakalaka na biso tosalaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi ; mpe na tango wana, tozalaki na bilei ebele, tozalaki malamu mpe tozalaki komona pasi te. 18 Kasi wuta kaka tango totikaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, tozangela nyonso mpe tokoma kokufa na mopanga mpe na nzala makasi. 19 Basi babakisaki :— Kutu, tango tozalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, boni, mibali na biso bayebaki te ete tozali kosala bagato na elilingi na ye mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai na ye ? 20 Bongo Jeremi alobaki na bato nyonso, mibali mpe basi, oyo bapesaki ye eyano wana : 21 — Boni, bokanisi ete Yawe abosani mpe azali kokanisa lisusu te malasi ya ansa oyo botumbaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, bino, batata na bino, bakonzi na bino, bakalaka na bino mpe bato nyonso ya mokili ? 22 Yawe akokaki lisusu te kokanga motema liboso ya misala na bino ya mabe mpe ya nkele ; ezali mpo na yango nde mokili na bino ekomi elanga ya libebi, etando ebebisama, eloko ya lisuma mpe etikali lisusu na bato te, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo. 23 Mpo ete botumbaki malasi ya ansa lokola mbeka mpe bosalaki masumu liboso ya Yawe, mpo ete botosaki Yawe te mpe bolandaki te Mobeko na Ye, bikateli na Ye mpe malako na Ye, yango wana pasi oyo ekomeli bino ndenge bozali komona yango lelo. 24 Jeremi alobaki na bato nyonso mpe epai ya basi nyonso :— Bino bato nyonso ya Yuda oyo bozali kati na Ejipito, boyoka Liloba na Yawe : 25 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bino mpe basi na bino, bomonisi na nzela ya misala na bino elaka oyo bopesaki tango bolobaki : « Tokokokisa solo ndayi oyo tolapaki ete tokotumba malasi ya ansa mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, nzambe mwasi ya bato ya Babiloni. » Bokende ! Bosala ndenge bolobi mpe bokokisa ndayi na bino ! 26 Kasi mpo na yango, boyoka Liloba na Yawe, bino Bayuda nyonso oyo bozali kovanda kati na Ejipito : « Tala, nalapi ndayi na Kombo na Ngai ya monene, » elobi Yawe, « moto moko te oyo awuta na mokili ya Yuda, bongo avandi na esika songolo ya Ejipito, akobelela to mpe akolapa ndayi na Kombo na Ngai, na koloba : ‹ Lokola Nkolo Yawe azali na bomoi ! › 27 Pamba te nazali kolandela bango malamu mpo ete bamona pasi kasi bolamu te. Bato nyonso ya Yuda kati na Ejipito bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi kino tango bango nyonso bakosila kobebisama. 28 Kaka ndambo moke ya bato nde ekobika na mopanga mpe ekozonga na mokili ya Yuda, wuta na Ejipito. Boye, batikali nyonso ya Yuda, ba-oyo nyonso bayaki kovanda na Ejipito, bakoyeba soki liloba ya nani nde ekokokisama : ya Ngai to ya bango. 29 Ekozala elembo ete nakopesa bino etumbu na esika oyo, » elobi Yawe, « mpo ete boyeba solo ete pasi oyo nalakaki bino ekokokisama kaka. » 30 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakokaba Faraon Ofira, mokonzi ya Ejipito, na maboko ya banguna na ye oyo bazali koluka bomoi na ye, ndenge kaka nakabaki Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo azalaki koluka bomoi na ye. »

In Other Versions

Jeremiah 44 in the ANGEFD

Jeremiah 44 in the ANTPNG2D

Jeremiah 44 in the AS21

Jeremiah 44 in the BAGH

Jeremiah 44 in the BBPNG

Jeremiah 44 in the BBT1E

Jeremiah 44 in the BDS

Jeremiah 44 in the BEV

Jeremiah 44 in the BHAD

Jeremiah 44 in the BIB

Jeremiah 44 in the BLPT

Jeremiah 44 in the BNT

Jeremiah 44 in the BNTABOOT

Jeremiah 44 in the BNTLV

Jeremiah 44 in the BOATCB

Jeremiah 44 in the BOATCB2

Jeremiah 44 in the BOBCV

Jeremiah 44 in the BOCNT

Jeremiah 44 in the BOECS

Jeremiah 44 in the BOGWICC

Jeremiah 44 in the BOHCB

Jeremiah 44 in the BOHCV

Jeremiah 44 in the BOHLNT

Jeremiah 44 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 44 in the BOICB

Jeremiah 44 in the BOILNTAP

Jeremiah 44 in the BOITCV

Jeremiah 44 in the BOKCV

Jeremiah 44 in the BOKCV2

Jeremiah 44 in the BOKHWOG

Jeremiah 44 in the BOKSSV

Jeremiah 44 in the BOLCB

Jeremiah 44 in the BOMCV

Jeremiah 44 in the BONAV

Jeremiah 44 in the BONCB

Jeremiah 44 in the BONLT

Jeremiah 44 in the BONUT2

Jeremiah 44 in the BOPLNT

Jeremiah 44 in the BOSCB

Jeremiah 44 in the BOSNC

Jeremiah 44 in the BOTLNT

Jeremiah 44 in the BOVCB

Jeremiah 44 in the BOYCB

Jeremiah 44 in the BPBB

Jeremiah 44 in the BPH

Jeremiah 44 in the BSB

Jeremiah 44 in the CCB

Jeremiah 44 in the CUV

Jeremiah 44 in the CUVS

Jeremiah 44 in the DBT

Jeremiah 44 in the DGDNT

Jeremiah 44 in the DHNT

Jeremiah 44 in the DNT

Jeremiah 44 in the ELBE

Jeremiah 44 in the EMTV

Jeremiah 44 in the ESV

Jeremiah 44 in the FBV

Jeremiah 44 in the FEB

Jeremiah 44 in the GGMNT

Jeremiah 44 in the GNT

Jeremiah 44 in the HARY

Jeremiah 44 in the HNT

Jeremiah 44 in the IRVA

Jeremiah 44 in the IRVB

Jeremiah 44 in the IRVG

Jeremiah 44 in the IRVH

Jeremiah 44 in the IRVK

Jeremiah 44 in the IRVM

Jeremiah 44 in the IRVM2

Jeremiah 44 in the IRVO

Jeremiah 44 in the IRVP

Jeremiah 44 in the IRVT

Jeremiah 44 in the IRVT2

Jeremiah 44 in the IRVU

Jeremiah 44 in the ISVN

Jeremiah 44 in the JSNT

Jeremiah 44 in the KAPI

Jeremiah 44 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 44 in the KBV

Jeremiah 44 in the KJV

Jeremiah 44 in the KNFD

Jeremiah 44 in the LBA

Jeremiah 44 in the LBLA

Jeremiah 44 in the LNT

Jeremiah 44 in the LSV

Jeremiah 44 in the MAAL

Jeremiah 44 in the MBV

Jeremiah 44 in the MBV2

Jeremiah 44 in the MHNT

Jeremiah 44 in the MKNFD

Jeremiah 44 in the MNG

Jeremiah 44 in the MNT

Jeremiah 44 in the MNT2

Jeremiah 44 in the MRS1T

Jeremiah 44 in the NAA

Jeremiah 44 in the NASB

Jeremiah 44 in the NBLA

Jeremiah 44 in the NBS

Jeremiah 44 in the NBVTP

Jeremiah 44 in the NET2

Jeremiah 44 in the NIV11

Jeremiah 44 in the NNT

Jeremiah 44 in the NNT2

Jeremiah 44 in the NNT3

Jeremiah 44 in the PDDPT

Jeremiah 44 in the PFNT

Jeremiah 44 in the RMNT

Jeremiah 44 in the SBIAS

Jeremiah 44 in the SBIBS

Jeremiah 44 in the SBIBS2

Jeremiah 44 in the SBICS

Jeremiah 44 in the SBIDS

Jeremiah 44 in the SBIGS

Jeremiah 44 in the SBIHS

Jeremiah 44 in the SBIIS

Jeremiah 44 in the SBIIS2

Jeremiah 44 in the SBIIS3

Jeremiah 44 in the SBIKS

Jeremiah 44 in the SBIKS2

Jeremiah 44 in the SBIMS

Jeremiah 44 in the SBIOS

Jeremiah 44 in the SBIPS

Jeremiah 44 in the SBISS

Jeremiah 44 in the SBITS

Jeremiah 44 in the SBITS2

Jeremiah 44 in the SBITS3

Jeremiah 44 in the SBITS4

Jeremiah 44 in the SBIUS

Jeremiah 44 in the SBIVS

Jeremiah 44 in the SBT

Jeremiah 44 in the SBT1E

Jeremiah 44 in the SCHL

Jeremiah 44 in the SNT

Jeremiah 44 in the SUSU

Jeremiah 44 in the SUSU2

Jeremiah 44 in the SYNO

Jeremiah 44 in the TBIAOTANT

Jeremiah 44 in the TBT1E

Jeremiah 44 in the TBT1E2

Jeremiah 44 in the TFTIP

Jeremiah 44 in the TFTU

Jeremiah 44 in the TGNTATF3T

Jeremiah 44 in the THAI

Jeremiah 44 in the TNFD

Jeremiah 44 in the TNT

Jeremiah 44 in the TNTIK

Jeremiah 44 in the TNTIL

Jeremiah 44 in the TNTIN

Jeremiah 44 in the TNTIP

Jeremiah 44 in the TNTIZ

Jeremiah 44 in the TOMA

Jeremiah 44 in the TTENT

Jeremiah 44 in the UBG

Jeremiah 44 in the UGV

Jeremiah 44 in the UGV2

Jeremiah 44 in the UGV3

Jeremiah 44 in the VBL

Jeremiah 44 in the VDCC

Jeremiah 44 in the YALU

Jeremiah 44 in the YAPE

Jeremiah 44 in the YBVTP

Jeremiah 44 in the ZBP