John 10 (BOLCB2)

1 Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo akotaka na lopango ya bameme na nzela ya ekuke te, kasi amataka na likolo ya lopango, na esika mosusu, azali moyibi mpe mobomi. 2 Kasi ye oyo akotelaka na ekuke azali mobateli bameme. 3 Mokengeli afungolelaka mobateli bameme ekuke, bameme eyokaka mongongo na ye. Mobateli abengaka bameme na ye na kombo na yango mpe abimisaka yango na libanda. 4 Soki abimisi bameme na ye nyonso na libanda, alekaka liboso na yango ; mpe bameme elandaka ye na sima, pamba te eyebi mongongo na ye. 5 Ekotikala ata mokolo moko te kolanda mopaya ; kasi ekokima ye mosika, pamba te eyebi mongongo na ye te. 6 Yesu ayebisaki bango lisese yango, kasi basosolaki te tina ya makambo oyo azalaki koyebisa bango. 7 Mpo na yango, Yesu alobaki na bango lisusu : — Nazali koloba na bino penza ya solo : Ngai nazali ekuke ya bameme. 8 Bato nyonso oyo bayaki liboso na Ngai bazali miyibi mpe babomi ; bameme eyokelaki bango te. 9 Ngai nde nazali ekuke ; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika ; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei. 10 Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa ; kasi Ngai, nayei mpo ete bameme ezwa bomoi mpe ezwa yango na bofuluki penza. 11 Nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu ya bameme apesaka bomoi na ye mpo na bameme na ye. 12 Mosali oyo azali mobateli bibwele te, oyo azali nkolo bameme te, asalaka kaka mpo na lifuti. Soki kaka amoni mbwa ya zamba koya, asundolaka bameme mpe akimaka. Bongo mbwa ya zamba ekangaka bameme mpe epanzaka yango. 13 Mosali yango akimaka, pamba te asalaka kaka mpo na lifuti mpe atiaka makanisi na ye na bameme te. 14 Ngai, nazali mobateli malamu ya bibwele ; nayebi bameme na Ngai, mpe bameme na Ngai eyebi Ngai 15 —ndenge kaka Tata ayebi Ngai, mpe Ngai nayebi Tata— Nazali kokaba bomoi na Ngai mpo na bameme na Ngai. 16 Nazali na bameme mosusu oyo ezali ya lopango oyo te. Nasengeli komema yango ; ekoyoka mongongo na Ngai. Etonga ekozala kaka moko, mpe mobateli bibwele akozala kaka moko. 17 Tata alingaka Ngai mpo ete nazali kokaba bomoi na Ngai ; kasi nakozwa yango lisusu. 18 Moto moko te azali kobotola Ngai bomoi yango, kasi Ngai moko nde nazali kokaba yango, na mokano na Ngai moko. Nazali na bokonzi ya kopesa mpe ya kozwa yango lisusu. Yango nde mitindo oyo Tata na Ngai apesaki Ngai. 19 Bayuda bakabwanaki lisusu likolo ya maloba yango. 20 Mingi kati na bango bazalaki koloba :— Azali na molimo mabe ! Azali na liboma ! Mpo na nini bozali koyoka ye ? 21 Bamosusu bazalaki kozongisa :— Maloba wana ezali te ya moto oyo azali na se ya bokonzi ya molimo mabe ! Boni, molimo mabe ekoki penza kofungola miso ya bakufi miso ? 22 Ekomaki tango ya kosepela feti ya Kobulisa Tempelo ya Yelusalemi. Feti yango esalemaki na tango ya malili makasi. 23 Yesu azalaki kotambola kati na lopango ya Tempelo, na veranda ya Salomo. 24 Bayuda bazingelaki Ye mpe batunaki Ye :— Kino tango nini okotika mitema na biso likolo-likolo ? Soki ozali Klisto, yebisa biso yango polele ! 25 Yesu azongiselaki bango : — Nayebisaki bino yango, kasi boboyi na bino kondima. Makamwisi oyo nazali kosala na Kombo ya Tata ezali kotatola na tina na Ngai ; 26 kasi bino, boboyi na bino kondima, pamba te bozali bameme na Ngai te. 27 Bameme na Ngai eyokaka mongongo na Ngai. Nayebi bameme na Ngai, mpe yango elandaka Ngai. 28 Napesi yango bomoi ya seko : ekokufa soki moke te, mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na Ngai. 29 Tata na Ngai, oyo apesaki Ngai bameme yango, aleki bato nyonso na monene, mpe moto moko te akoki kobotola yango na loboko ya Tata na Ngai. 30 Ngai mpe Tata tozali se moko. 31 Na bongo, Bayuda balokotaki lisusu mabanga mpo na koboma Ye, 32 kasi Yesu alobaki na bango : — Nalakisi bino bikamwa mingi ya minene oyo esalemaki na nguya ya Tata ; mpo na likamwisi nini bolingi koboma Ngai na mabanga ? 33 Bayuda bazongiselaki Ye :— Ezali te mpo na likamwisi moko boye ya malamu nde tolingi koboma yo, kasi ezali mpo ete ozali kofinga Nzambe. Lisusu, ezali mpo ete, yo oyo ozali moto, ozali koloba ete ozali Nzambe. 34 Yesu alobaki na bango : — Ekomama te kati na mibeko na bino : « Nalobi : ‹ Bozali banzambe ? › » 35 Nzokande, batiaka tembe na Makomi te. Boye, soki abengaki « banzambe, » bato oyo epai banani Liloba na Nzambe eyaki, 36 mpo na nini koloba na tina na Ngai oyo Tata abulisa mpe atinda kati na mokili : « Ozali kofinga, » mpo nalobaki : « Nazali Mwana na Nzambe ? » 37 Soki nasalaka te misala ya Tata na Ngai, wana bondima na bino Ngai te. 38 Kasi soki nasalaka yango, ezala soki boboyi na bino kondima Ngai, bondima ata misala yango, mpo boyeba mpe bososola ete Tata azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na Tata. 39 Mpo na yango, balukaki lisusu kokanga Ye, kasi Yesu akimaki bango. 40 Akendeki lisusu na ngambo mosusu ya Yordani, kaka na esika oyo Yoane azalaki kobatisa bato, mpe atikalaki kuna. 41 Bato mingi penza bayaki epai na Ye ; bazalaki koloba : « Yoane asalaki likamwisi ata moko te, kasi makambo nyonso oyo alobaki na tina na moto oyo ezali ya solo ! » 42 Mpe kuna, bato mingi bandimaki Yesu.

In Other Versions

John 10 in the ANGEFD

John 10 in the ANTPNG2D

John 10 in the AS21

John 10 in the BAGH

John 10 in the BBPNG

John 10 in the BBT1E

John 10 in the BDS

John 10 in the BEV

John 10 in the BHAD

John 10 in the BIB

John 10 in the BLPT

John 10 in the BNT

John 10 in the BNTABOOT

John 10 in the BNTLV

John 10 in the BOATCB

John 10 in the BOATCB2

John 10 in the BOBCV

John 10 in the BOCNT

John 10 in the BOECS

John 10 in the BOGWICC

John 10 in the BOHCB

John 10 in the BOHCV

John 10 in the BOHLNT

John 10 in the BOHNTLTAL

John 10 in the BOICB

John 10 in the BOILNTAP

John 10 in the BOITCV

John 10 in the BOKCV

John 10 in the BOKCV2

John 10 in the BOKHWOG

John 10 in the BOKSSV

John 10 in the BOLCB

John 10 in the BOMCV

John 10 in the BONAV

John 10 in the BONCB

John 10 in the BONLT

John 10 in the BONUT2

John 10 in the BOPLNT

John 10 in the BOSCB

John 10 in the BOSNC

John 10 in the BOTLNT

John 10 in the BOVCB

John 10 in the BOYCB

John 10 in the BPBB

John 10 in the BPH

John 10 in the BSB

John 10 in the CCB

John 10 in the CUV

John 10 in the CUVS

John 10 in the DBT

John 10 in the DGDNT

John 10 in the DHNT

John 10 in the DNT

John 10 in the ELBE

John 10 in the EMTV

John 10 in the ESV

John 10 in the FBV

John 10 in the FEB

John 10 in the GGMNT

John 10 in the GNT

John 10 in the HARY

John 10 in the HNT

John 10 in the IRVA

John 10 in the IRVB

John 10 in the IRVG

John 10 in the IRVH

John 10 in the IRVK

John 10 in the IRVM

John 10 in the IRVM2

John 10 in the IRVO

John 10 in the IRVP

John 10 in the IRVT

John 10 in the IRVT2

John 10 in the IRVU

John 10 in the ISVN

John 10 in the JSNT

John 10 in the KAPI

John 10 in the KBT1ETNIK

John 10 in the KBV

John 10 in the KJV

John 10 in the KNFD

John 10 in the LBA

John 10 in the LBLA

John 10 in the LNT

John 10 in the LSV

John 10 in the MAAL

John 10 in the MBV

John 10 in the MBV2

John 10 in the MHNT

John 10 in the MKNFD

John 10 in the MNG

John 10 in the MNT

John 10 in the MNT2

John 10 in the MRS1T

John 10 in the NAA

John 10 in the NASB

John 10 in the NBLA

John 10 in the NBS

John 10 in the NBVTP

John 10 in the NET2

John 10 in the NIV11

John 10 in the NNT

John 10 in the NNT2

John 10 in the NNT3

John 10 in the PDDPT

John 10 in the PFNT

John 10 in the RMNT

John 10 in the SBIAS

John 10 in the SBIBS

John 10 in the SBIBS2

John 10 in the SBICS

John 10 in the SBIDS

John 10 in the SBIGS

John 10 in the SBIHS

John 10 in the SBIIS

John 10 in the SBIIS2

John 10 in the SBIIS3

John 10 in the SBIKS

John 10 in the SBIKS2

John 10 in the SBIMS

John 10 in the SBIOS

John 10 in the SBIPS

John 10 in the SBISS

John 10 in the SBITS

John 10 in the SBITS2

John 10 in the SBITS3

John 10 in the SBITS4

John 10 in the SBIUS

John 10 in the SBIVS

John 10 in the SBT

John 10 in the SBT1E

John 10 in the SCHL

John 10 in the SNT

John 10 in the SUSU

John 10 in the SUSU2

John 10 in the SYNO

John 10 in the TBIAOTANT

John 10 in the TBT1E

John 10 in the TBT1E2

John 10 in the TFTIP

John 10 in the TFTU

John 10 in the TGNTATF3T

John 10 in the THAI

John 10 in the TNFD

John 10 in the TNT

John 10 in the TNTIK

John 10 in the TNTIL

John 10 in the TNTIN

John 10 in the TNTIP

John 10 in the TNTIZ

John 10 in the TOMA

John 10 in the TTENT

John 10 in the UBG

John 10 in the UGV

John 10 in the UGV2

John 10 in the UGV3

John 10 in the VBL

John 10 in the VDCC

John 10 in the YALU

John 10 in the YAPE

John 10 in the YBVTP

John 10 in the ZBP