John 13 (BOLCB2)

1 Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka. 2 Bongo, wana bazalaki kolia elongo, Satana asilaki kotia kati na motema ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona, makanisi ya koteka Yesu. 3 Yesu ayebaki ete Tata apesaki Ye bokonzi likolo ya makambo nyonso, ete awutaki epai ya Nzambe mpe ete asengelaki kozonga epai ya Nzambe ; 4 atelemaki longwa na mesa, alongolaki bilamba oyo alataki, azwaki eteni moko ya elamba mpe amikangaki yango na loketo. 5 Bongo, atiaki mayi na sani mpe abandaki kosukola makolo ya bayekoli na Ye mpe kopangusa yango na eteni ya elamba oyo amikangaki na loketo. 6 Tango akomaki na esika oyo Simona Petelo azalaki, Simona Petelo alobaki na Ye :— Nkolo, Yo penza osukola ngai makolo ? 7 Yesu azongiselaki ye : — Likambo oyo Ngai nazali kosala, yo okoki te kososola yango sik’oyo ; kasi okososola yango na sima. 8 Kasi Petelo alobaki na Yesu :— Te ! Osengeli te kosukola ngai makolo !Yesu azongiselaki ye : — Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu te na libula elongo na Ngai. 9 Simona Petelo alobaki na Yesu :— Nkolo, lokola ekomi bongo, kosukola ngai kaka makolo te, kasi sukola ngai lisusu maboko mpe moto. 10 Yesu alobaki na ye : — Moto oyo awuti komisukola nzoto azali penza peto ; azali kaka na posa ya kosukola makolo na ye. Nzokande bino, bozali peto ; kasi bino nyonso te. 11 Solo, Yesu ayebaki moto oyo akoteka Ye ; yango wana alobaki : « Bino nyonso bozali peto te. » 12 Sima na Yesu kosukola bango makolo mpe kolata lisusu bilamba na Ye, avandaki lisusu na mesa mpe alobaki na bango : — Boni, bososoli tina ya likambo oyo nawuti kosala bino ? 13 Ndenge bobengaka Ngai « Moteyi » mpe « Nkolo, » bolobaka na bino penza ya solo, pamba te nazali penza Moteyi mpe Nkolo. 14 Boye soki Ngai, Moteyi mpe Nkolo na bino, nasukoli bino makolo, bosengeli, bino mpe, kosukolana makolo ; 15 pamba te napesi bino kaka ndakisa, mpo ete, bino mpe, bosalaka ndenge kaka Ngai nasali bino. 16 Nazali koloba na bino penza ya solo : mowumbu aleki nkolo na ye te na bokonzi, mpe ntoma aleki motindi na ye te na bokonzi. 17 Wana bosili koyeba makambo oyo, bozali bato ya esengo soki kaka botie yango na misala. 18 Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso ; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama : « Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai abalukeli ngai ! » 19 Namiyebiseli bino yango sik’oyo, liboso ete likambo yango esalema, mpo ete, tango likambo yango ekosalema, bondima ete nazali oyo azali. 20 Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo ayambi motindami na Ngai ayambi nde Ngai, mpe moto oyo ayambi Ngai ayambi mpe Motindi na Ngai. 21 Sima na Yesu koloba bongo, amitungisaki makasi kati na motema ; alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino akoteka Ngai. 22 Bayekoli bakomaki kotalana bango na bango mpe kotunana mpo na koluka koyeba soki Yesu azalaki koloba na tina na nani. 23 Moko kati na bango, moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga koleka bayekoli mosusu, avandaki pembeni ya Yesu. 24 Simona Petelo afinaki ye miso mpo na kosenga na ye ete atuna Yesu soki azali koloba bongo na tina na nani. 25 Mbala moko, moyekoli yango alalelaki Yesu na tolo mpe atunaki Ye :— Nkolo, ezali nani ? 26 Yesu azongisaki : — Ezali moto oyo nakopesa eteni oyo ya lipa sima na Ngai kozindisa yango kati na elubu.Bongo, sima na Yesu kozindisa eteni yango ya lipa kati na elubu, akamataki yango mpe apesaki yango epai ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona. 27 Tango kaka Yuda azwaki eteni yango ya lipa, Satana akotaki kati na ye. Bongo Yesu alobaki na ye : — Likambo oyo obongisi kosala, kokisa yango noki. 28 Kasi, kati na bato oyo bazalaki wana na mesa, moko te asosolaki tina oyo Yesu alobaki na ye bongo. 29 Lokola ezalaki Yuda nde azalaki kobatela libenga ya mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki ete Yesu alobi na ye : « Kende kosomba biloko oyo tosengeli na yango mpo na feti, » to « kende kopesa lisungi epai ya babola. » 30 Boye, tango kaka Yuda azwaki eteni yango ya lipa, abimaki mbala moko. Mpe butu ekotaki. 31 Sima na Yuda kobima, Yesu alobaki : — Sik’oyo, nkembo ya Mwana na Moto emonisami, mpe Nzambe akozwa nkembo kati na Ye. [ 32 Lokola Nzambe akozwa nkembo kati na Mwana,] Nzambe mpe akopesa Mwana nkembo, kati na Ye moko, mpe akosala yango kala mingi te. 33 Bana na Ngai, natikali na tango moke kaka ya kozala lisusu elongo na bino. Bokoluka Ngai ; mpe makambo oyo nalobaki na Bayuda, yango mpe nazali koyebisa bino sik’oyo : « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna. » 34 Nazali kopesa bino mobeko ya sika : Bolinganaka bino na bino. Ndenge Ngai nalingi bino, bino mpe bosengeli kolinganaka bino na bino. 35 Ezali na nzela ya bolingo oyo bokotalisana bino na bino nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na Ngai. 36 Simona Petelo atunaki Yesu :— Nkolo, ozali kokende wapi ?Yesu azongiselaki ye : — Okoki te kolanda Ngai sik’oyo na esika oyo nazali kokende ; okolanda Ngai sima. 37 Petelo atunaki lisusu :— Nkolo, mpo na nini nakoki te kolanda Yo sik’oyo ? Nabongami kokufa mpo na Yo. 38 Yesu azongiselaki ye : — Obongami penza kokufa mpo na Ngai ! Nazali koloba na yo penza ya solo : liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.

In Other Versions

John 13 in the ANGEFD

John 13 in the ANTPNG2D

John 13 in the AS21

John 13 in the BAGH

John 13 in the BBPNG

John 13 in the BBT1E

John 13 in the BDS

John 13 in the BEV

John 13 in the BHAD

John 13 in the BIB

John 13 in the BLPT

John 13 in the BNT

John 13 in the BNTABOOT

John 13 in the BNTLV

John 13 in the BOATCB

John 13 in the BOATCB2

John 13 in the BOBCV

John 13 in the BOCNT

John 13 in the BOECS

John 13 in the BOGWICC

John 13 in the BOHCB

John 13 in the BOHCV

John 13 in the BOHLNT

John 13 in the BOHNTLTAL

John 13 in the BOICB

John 13 in the BOILNTAP

John 13 in the BOITCV

John 13 in the BOKCV

John 13 in the BOKCV2

John 13 in the BOKHWOG

John 13 in the BOKSSV

John 13 in the BOLCB

John 13 in the BOMCV

John 13 in the BONAV

John 13 in the BONCB

John 13 in the BONLT

John 13 in the BONUT2

John 13 in the BOPLNT

John 13 in the BOSCB

John 13 in the BOSNC

John 13 in the BOTLNT

John 13 in the BOVCB

John 13 in the BOYCB

John 13 in the BPBB

John 13 in the BPH

John 13 in the BSB

John 13 in the CCB

John 13 in the CUV

John 13 in the CUVS

John 13 in the DBT

John 13 in the DGDNT

John 13 in the DHNT

John 13 in the DNT

John 13 in the ELBE

John 13 in the EMTV

John 13 in the ESV

John 13 in the FBV

John 13 in the FEB

John 13 in the GGMNT

John 13 in the GNT

John 13 in the HARY

John 13 in the HNT

John 13 in the IRVA

John 13 in the IRVB

John 13 in the IRVG

John 13 in the IRVH

John 13 in the IRVK

John 13 in the IRVM

John 13 in the IRVM2

John 13 in the IRVO

John 13 in the IRVP

John 13 in the IRVT

John 13 in the IRVT2

John 13 in the IRVU

John 13 in the ISVN

John 13 in the JSNT

John 13 in the KAPI

John 13 in the KBT1ETNIK

John 13 in the KBV

John 13 in the KJV

John 13 in the KNFD

John 13 in the LBA

John 13 in the LBLA

John 13 in the LNT

John 13 in the LSV

John 13 in the MAAL

John 13 in the MBV

John 13 in the MBV2

John 13 in the MHNT

John 13 in the MKNFD

John 13 in the MNG

John 13 in the MNT

John 13 in the MNT2

John 13 in the MRS1T

John 13 in the NAA

John 13 in the NASB

John 13 in the NBLA

John 13 in the NBS

John 13 in the NBVTP

John 13 in the NET2

John 13 in the NIV11

John 13 in the NNT

John 13 in the NNT2

John 13 in the NNT3

John 13 in the PDDPT

John 13 in the PFNT

John 13 in the RMNT

John 13 in the SBIAS

John 13 in the SBIBS

John 13 in the SBIBS2

John 13 in the SBICS

John 13 in the SBIDS

John 13 in the SBIGS

John 13 in the SBIHS

John 13 in the SBIIS

John 13 in the SBIIS2

John 13 in the SBIIS3

John 13 in the SBIKS

John 13 in the SBIKS2

John 13 in the SBIMS

John 13 in the SBIOS

John 13 in the SBIPS

John 13 in the SBISS

John 13 in the SBITS

John 13 in the SBITS2

John 13 in the SBITS3

John 13 in the SBITS4

John 13 in the SBIUS

John 13 in the SBIVS

John 13 in the SBT

John 13 in the SBT1E

John 13 in the SCHL

John 13 in the SNT

John 13 in the SUSU

John 13 in the SUSU2

John 13 in the SYNO

John 13 in the TBIAOTANT

John 13 in the TBT1E

John 13 in the TBT1E2

John 13 in the TFTIP

John 13 in the TFTU

John 13 in the TGNTATF3T

John 13 in the THAI

John 13 in the TNFD

John 13 in the TNT

John 13 in the TNTIK

John 13 in the TNTIL

John 13 in the TNTIN

John 13 in the TNTIP

John 13 in the TNTIZ

John 13 in the TOMA

John 13 in the TTENT

John 13 in the UBG

John 13 in the UGV

John 13 in the UGV2

John 13 in the UGV3

John 13 in the VBL

John 13 in the VDCC

John 13 in the YALU

John 13 in the YAPE

John 13 in the YBVTP

John 13 in the ZBP