John 3 (BOLCB2)

1 Ezalaki na moto moko kati na Bafarizeo, oyo kombo na ye ezalaki « Nikodemi. » Azalaki moko kati na bakonzi ya Bayuda. 2 Ayaki na butu epai ya Yesu mpe alobaki na Ye :— Rabi, toyebi ete ozali Moteyi oyo awuti epai ya Nzambe, pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa oyo Yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te. 3 Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami te mbotama ya sika. 4 Nikodemi atunaki Ye :— Ndenge nini moto oyo akomi mobange akoki kobotama lisusu ? Akoki solo kozonga na libumu ya mama na ye mpo ete abotama lisusu ? 5 Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki kokota na Bokonzi ya Nzambe soki abotami te na mayi mpe na Molimo. 6 Oyo abotami na mosuni azali mosuni, mpe oyo abotami na Molimo azali molimo. 7 Kokamwa te ndenge nalobi na yo : « Osengeli kobotama mbotama ya sika ! » 8 Mopepe epepaka esika nyonso oyo elingi kopepa ; atako oyoki makelele na yango, kasi okokaka te koloba soki ewuti wapi to ezali kokende wapi. Ezali mpe bongo mpo na moto nyonso oyo abotami na Molimo. 9 Nikodemi atunaki lisusu :— Ekosalema ndenge nini ? 10 Yesu alobaki na ye : — Ndenge nini yo, molakisi mobimba oyo okenda sango kati na Isalaele, ozali kososola te makambo oyo ? 11 Nazali koloba na yo penza ya solo : tolobaka makambo oyo toyebi mpe topesaka litatoli na tina na makambo oyo tomoni ; kasi bino, boboyi kondima litatoli na biso. 12 Soki tango nazali koloba na bino makambo ndenge esalemaka na mokili, bozali kondima te, bongo bokondima ndenge nini soki nalobi na bino makambo ya Likolo ? 13 Ezali na moto moko te oyo asila komata na Likolo, longola kaka Ye oyo akita wuta na Likolo : Mwana na Moto. 14 Ndenge kaka Moyize atelemisaki na nzete, ekeko ya nyoka kati na esobe, ndenge wana mpe Mwana na Moto asengeli kotombolama 15 mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye azwa, kati na Ye, bomoi ya seko. 16 Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko. 17 Nzambe atindaki Mwana na Ye kati na mokili mpo ete akatela yango etumbu te, kasi mpo ete abikisa yango. 18 Moto nyonso oyo andimi Ye akozwa etumbu te ; kasi ye oyo aboyi kondima Ye asili kozwa etumbu, pamba te aboyi kondima Mwana se moko ya Nzambe. 19 Tala ndenge nini etumbu yango ezali : pole eyaki kati na mokili, kasi bato balingaki molili, pamba te misala na bango ezali mabe. 20 Moto nyonso oyo asalaka mabe ayinaka pole mpe apusanaka te epai pole ezali, noki te misala na ye ekomonana polele. 21 Nzokande, moto nyonso oyo atambolaka na solo ayaka epai pole ezali mpo ete misala oyo asalaka, na boyokani elongo na Nzambe, emonana polele. 22 Sima na yango, Yesu akendeki na Yuda, elongo na bayekoli na Ye ; avandaki kuna mwa tango elongo na bango mpe azalaki kobatisa. 23 Yoane mpe azalaki kobatisa na Enoni, pembeni ya Salimi, mpo ete mayi ezalaki mingi kuna ; bato bazalaki kokende kuna epai na ye mpe bazalaki kozwa libatisi. 24 Na tango wana, batiaki nanu Yoane na boloko te. 25 Mokolo moko, bayekoli ya Yoane bazalaki kobendana na Moyuda moko na tina na kopetolama. 26 Bakendeki epai ya Yoane mpe balobaki na ye :— Moteyi, ozali koyeba lisusu moto oyo azalaki elongo na yo, na ngambo mosusu ya Yordani, oyo na tina ye opesaki litatoli ? Ye mpe azali kobatisa bato, mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye. 27 Yoane azongisaki :— Moto akoki kozwa eloko moko te soki Likolo epesi ye yango te. 28 Bino moko bokoki kotatola ete nalobaki : « Ngai, nazali Klisto te, kasi natindamaki liboso na Ye. » 29 Mwasi ya libala azali ya mobali oyo abali ye ; mpe moninga ya mobali oyo asili kobala, ezali moto oyo atelemi pembeni na ye mpe azali na esengo makasi tango azali koyoka mongongo na ye. Ezali mpe bongo mpo na ngai : esengo na ngai ezali sik’oyo ya kokoka. 30 Esengeli ete Ye amata, mpe ngai nakita. 31 Ye oyo awuti na Likolo azali likolo na nyonso ; kasi moto oyo awuti na mokili akotikala kaka ya mokili mpe alobaka kaka lokola moto ya mokili. Ye oyo awuti na Likolo azali likolo na nyonso, 32 azali kotatola na tina na makambo oyo amonaki mpe ayokaki, kasi moto moko te azali kondima litatoli na Ye. 33 Moto nyonso oyo andimi litatoli na Ye akolobaka na solo ete Nzambe azali solo. 34 Motindami ya Nzambe alobaka kaka maloba kowuta na Nzambe, pamba te Nzambe atondisa ye na Molimo na Ye nyonso. 35 Tata alingaka Mwana, mpe Mwana azalaka na bokonzi kowuta na Tata mpo na kokonza nyonso. 36 Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.

In Other Versions

John 3 in the ANGEFD

John 3 in the ANTPNG2D

John 3 in the AS21

John 3 in the BAGH

John 3 in the BBPNG

John 3 in the BBT1E

John 3 in the BDS

John 3 in the BEV

John 3 in the BHAD

John 3 in the BIB

John 3 in the BLPT

John 3 in the BNT

John 3 in the BNTABOOT

John 3 in the BNTLV

John 3 in the BOATCB

John 3 in the BOATCB2

John 3 in the BOBCV

John 3 in the BOCNT

John 3 in the BOECS

John 3 in the BOGWICC

John 3 in the BOHCB

John 3 in the BOHCV

John 3 in the BOHLNT

John 3 in the BOHNTLTAL

John 3 in the BOICB

John 3 in the BOILNTAP

John 3 in the BOITCV

John 3 in the BOKCV

John 3 in the BOKCV2

John 3 in the BOKHWOG

John 3 in the BOKSSV

John 3 in the BOLCB

John 3 in the BOMCV

John 3 in the BONAV

John 3 in the BONCB

John 3 in the BONLT

John 3 in the BONUT2

John 3 in the BOPLNT

John 3 in the BOSCB

John 3 in the BOSNC

John 3 in the BOTLNT

John 3 in the BOVCB

John 3 in the BOYCB

John 3 in the BPBB

John 3 in the BPH

John 3 in the BSB

John 3 in the CCB

John 3 in the CUV

John 3 in the CUVS

John 3 in the DBT

John 3 in the DGDNT

John 3 in the DHNT

John 3 in the DNT

John 3 in the ELBE

John 3 in the EMTV

John 3 in the ESV

John 3 in the FBV

John 3 in the FEB

John 3 in the GGMNT

John 3 in the GNT

John 3 in the HARY

John 3 in the HNT

John 3 in the IRVA

John 3 in the IRVB

John 3 in the IRVG

John 3 in the IRVH

John 3 in the IRVK

John 3 in the IRVM

John 3 in the IRVM2

John 3 in the IRVO

John 3 in the IRVP

John 3 in the IRVT

John 3 in the IRVT2

John 3 in the IRVU

John 3 in the ISVN

John 3 in the JSNT

John 3 in the KAPI

John 3 in the KBT1ETNIK

John 3 in the KBV

John 3 in the KJV

John 3 in the KNFD

John 3 in the LBA

John 3 in the LBLA

John 3 in the LNT

John 3 in the LSV

John 3 in the MAAL

John 3 in the MBV

John 3 in the MBV2

John 3 in the MHNT

John 3 in the MKNFD

John 3 in the MNG

John 3 in the MNT

John 3 in the MNT2

John 3 in the MRS1T

John 3 in the NAA

John 3 in the NASB

John 3 in the NBLA

John 3 in the NBS

John 3 in the NBVTP

John 3 in the NET2

John 3 in the NIV11

John 3 in the NNT

John 3 in the NNT2

John 3 in the NNT3

John 3 in the PDDPT

John 3 in the PFNT

John 3 in the RMNT

John 3 in the SBIAS

John 3 in the SBIBS

John 3 in the SBIBS2

John 3 in the SBICS

John 3 in the SBIDS

John 3 in the SBIGS

John 3 in the SBIHS

John 3 in the SBIIS

John 3 in the SBIIS2

John 3 in the SBIIS3

John 3 in the SBIKS

John 3 in the SBIKS2

John 3 in the SBIMS

John 3 in the SBIOS

John 3 in the SBIPS

John 3 in the SBISS

John 3 in the SBITS

John 3 in the SBITS2

John 3 in the SBITS3

John 3 in the SBITS4

John 3 in the SBIUS

John 3 in the SBIVS

John 3 in the SBT

John 3 in the SBT1E

John 3 in the SCHL

John 3 in the SNT

John 3 in the SUSU

John 3 in the SUSU2

John 3 in the SYNO

John 3 in the TBIAOTANT

John 3 in the TBT1E

John 3 in the TBT1E2

John 3 in the TFTIP

John 3 in the TFTU

John 3 in the TGNTATF3T

John 3 in the THAI

John 3 in the TNFD

John 3 in the TNT

John 3 in the TNTIK

John 3 in the TNTIL

John 3 in the TNTIN

John 3 in the TNTIP

John 3 in the TNTIZ

John 3 in the TOMA

John 3 in the TTENT

John 3 in the UBG

John 3 in the UGV

John 3 in the UGV2

John 3 in the UGV3

John 3 in the VBL

John 3 in the VDCC

John 3 in the YALU

John 3 in the YAPE

John 3 in the YBVTP

John 3 in the ZBP