Joel 2 (BOLCB2)

1 Bobeta kelelo na Siona !Bobelela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule !Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga,pamba te mokolo ya Yawe ezali koya ;solo, ekomi penza pene. 2 Ezali mokolo ya butu mpe ya molili makasi,mokolo ya londende mpe ya mapata ya mwindo.Ndenge pole ya tongo epanzanaka na bangomba,ndenge wana mpe mampinga mokoya basoda ebele mpe ya mpiko ezali koya.Makambo ya boye etikala nanu kosalema te na kalampe ekotikala kosalema te na mikolo oyo ekoya. 3 Liboso na bango, moto ezali kotumba ;sima na bango, moto ezali kozikisa.Liboso na bango, mokili ezali lokola elanga ya Edeni,mpe sima na bango, lokola esobe.Solo, ata eloko moko te ekotikala. 4 Bazali lokola bampunda ;bapumbwaka lokola basodaoyo batambolaka likolo ya bampunda. 5 Batambolaka likolo ya basonge ya bangombana makelele makasi lokola makelele ya bashar,lokola makelele ya matiti oyo ezali kozika,lokola mampinga moko ya basoda ya mpikooyo babongami mpo na kokende na bitumba. 6 Soki bamoni bango,bato ya bikolo bakomaka na somompe bilongi nyonso ekawukaka. 7 Bakimaka lokola bilombe,bapumbwaka bamir lokola basoda ya mpiko,batambolaka nzela moko, batengamaka te. 8 Batutanaka te bango na bango,moko na moko alandaka kaka nzela na ye.Badusolaka na kati-kati ya bibundeli ya banguna,mpe eloko moko te ekangaka bango nzela. 9 Bawelelaka kokota kati na engumba,bapotaka mbangu pene ya mir,bakotaka na bandakondenge miyibi bakotaka na nzela ya maninisa. 10 Mokili eninganaka liboso na bango,Lola elengaka,moyi mpe sanza eyindaka,minzoto etikaka kongenga. 11 Yawe azali koganga lokola kakena liboso ya mampinga na Ye.Milongo ya mampinga na Ye etonda na basoda ;basoda oyo batosaka mitindo na Ye bazali na nguya.Mokolo ya Yawe ezali monene,ezali somo makasi ;nani akoki kotelema na mokolo yango ? 12 « Ezala sik’oyo, » elobi Yawe,« bozonga epai na Ngai na mitema na bino mobimba,na kokila bilei, na mpinzoli mpe na kolela. » 13 Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te.Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino,pamba te atonda na ngolu mpe na mawa,asilikaka noki te mpe atonda na bolingo,abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi. 14 Nani ayebi soki akokikobongola makanisi to koyoka mawampe kotika na sima na Ye lipamboli,mpo ete bokoka lisusu kobonzela Yawe, Nzambe na bino,makabo ya bambuma to makabo ya masanga ya vino ? 15 Bobeta kelelo na Siona !Bopanza sango ya mokolo ya bule ya kokila bileimpe bobengisa mayangani ya bule. 16 Bosangisa bato, bobulisa mayangani,bosangisa bakambi mpe bana,ezala oyo bazali nanu komela mabele.Tika ete elenge mobali oyo abali sikaatika shambre na ye ya libala,mpe elenge mwasi oyo abali sikaatika mpe shambre na ye ya libala. 17 Tika ete Banganga-Nzambe oyo basalelaka Yawebalela na kati-kati ya ndako moke ya kokotela mpe etumbelo.Tika ete baloba : « Oh Yawe, bikisa bato na Yo,kokomisa te libula na Yo eloko ya kotiolato eloko ya maseki kati na bikolo.Mpo na nini bato ya bikolo mosusu baloba :‹ Wapi Nzambe na bango ? › » 18 Yawe akotonda na zuwa mpo na mokili na Yempe akoyokela bato na Ye mawa. 19 Yawe akoyanola mpe akoloba na bango :« Nakotindela bino ble, vino ya sika mpe mafuta ;bongo bokotonda yango.Nakokomisa bino lisusu teeloko ya kotiola kati na bikolo. 20 Nakotindika monguna ya nor mosika na bino,nakomema ye na mokili ekawuka mpe ezanga eloko ;bongo basoda na ye, oyo bazalaka na libosobakozinda na ebale monene ya este ;mpe oyo bazalaka na sima, na ebale monene ya weste.Solo na ye ya kopola ekoyokana,kobeba na ye ekopanzana. » Solo, asali makambo minene. 21 Oh mabele, kobanga te,zala na esengo mpe sepela,pamba te Yawe asali makambo minene. 22 Banyama ya zamba, bobanga te,pamba te matiti eboti lisusu na elanga,banzete eboti lisusu bambuma ;banzete ya figi mpe ya vino eboti bambuma ebele penza. 23 Bosepela, bino bato ya Siona,bosepela kati na Yawe, Nzambe na bino,pamba te apesi bino mvula mpo na kobikisa bino.Akonokisela bino bamvula minenena eleko ya mvula mpe na eleko ya elanga,ndenge ezalaki liboso. 24 Etando oyo batutelaka ble ekotonda na bambuma,banzungu ekotonda na vino mpe na mafuta. 25 Nakozongisela bino mibuoyo mampinga minene ya mankoko, ya makelele,ya mabanki minene mpe ya bambinzo eliaki :mampinga minene na Ngai oyo natindakimpo na kobundisa bino. 26 Bokolia bilei ebele mpe bokotonda,bongo bokokumisa Kombo ya Yawe, Nzambe na bino,oyo asaleli bino makambo ya kokamwa :bato na Ngai bakotikala koyoka lisusu soni te. 27 Boye bokoyeba solo ete Ngai, nazali kati na Isalaele,ete nazali Yawe, Nzambe na bino,mpe ete Nzambe mosusu azali te.Bato na Ngai bakotikala koyoka lisusu soni te.

In Other Versions

Joel 2 in the ANGEFD

Joel 2 in the ANTPNG2D

Joel 2 in the AS21

Joel 2 in the BAGH

Joel 2 in the BBPNG

Joel 2 in the BBT1E

Joel 2 in the BDS

Joel 2 in the BEV

Joel 2 in the BHAD

Joel 2 in the BIB

Joel 2 in the BLPT

Joel 2 in the BNT

Joel 2 in the BNTABOOT

Joel 2 in the BNTLV

Joel 2 in the BOATCB

Joel 2 in the BOATCB2

Joel 2 in the BOBCV

Joel 2 in the BOCNT

Joel 2 in the BOECS

Joel 2 in the BOGWICC

Joel 2 in the BOHCB

Joel 2 in the BOHCV

Joel 2 in the BOHLNT

Joel 2 in the BOHNTLTAL

Joel 2 in the BOICB

Joel 2 in the BOILNTAP

Joel 2 in the BOITCV

Joel 2 in the BOKCV

Joel 2 in the BOKCV2

Joel 2 in the BOKHWOG

Joel 2 in the BOKSSV

Joel 2 in the BOLCB

Joel 2 in the BOMCV

Joel 2 in the BONAV

Joel 2 in the BONCB

Joel 2 in the BONLT

Joel 2 in the BONUT2

Joel 2 in the BOPLNT

Joel 2 in the BOSCB

Joel 2 in the BOSNC

Joel 2 in the BOTLNT

Joel 2 in the BOVCB

Joel 2 in the BOYCB

Joel 2 in the BPBB

Joel 2 in the BPH

Joel 2 in the BSB

Joel 2 in the CCB

Joel 2 in the CUV

Joel 2 in the CUVS

Joel 2 in the DBT

Joel 2 in the DGDNT

Joel 2 in the DHNT

Joel 2 in the DNT

Joel 2 in the ELBE

Joel 2 in the EMTV

Joel 2 in the ESV

Joel 2 in the FBV

Joel 2 in the FEB

Joel 2 in the GGMNT

Joel 2 in the GNT

Joel 2 in the HARY

Joel 2 in the HNT

Joel 2 in the IRVA

Joel 2 in the IRVB

Joel 2 in the IRVG

Joel 2 in the IRVH

Joel 2 in the IRVK

Joel 2 in the IRVM

Joel 2 in the IRVM2

Joel 2 in the IRVO

Joel 2 in the IRVP

Joel 2 in the IRVT

Joel 2 in the IRVT2

Joel 2 in the IRVU

Joel 2 in the ISVN

Joel 2 in the JSNT

Joel 2 in the KAPI

Joel 2 in the KBT1ETNIK

Joel 2 in the KBV

Joel 2 in the KJV

Joel 2 in the KNFD

Joel 2 in the LBA

Joel 2 in the LBLA

Joel 2 in the LNT

Joel 2 in the LSV

Joel 2 in the MAAL

Joel 2 in the MBV

Joel 2 in the MBV2

Joel 2 in the MHNT

Joel 2 in the MKNFD

Joel 2 in the MNG

Joel 2 in the MNT

Joel 2 in the MNT2

Joel 2 in the MRS1T

Joel 2 in the NAA

Joel 2 in the NASB

Joel 2 in the NBLA

Joel 2 in the NBS

Joel 2 in the NBVTP

Joel 2 in the NET2

Joel 2 in the NIV11

Joel 2 in the NNT

Joel 2 in the NNT2

Joel 2 in the NNT3

Joel 2 in the PDDPT

Joel 2 in the PFNT

Joel 2 in the RMNT

Joel 2 in the SBIAS

Joel 2 in the SBIBS

Joel 2 in the SBIBS2

Joel 2 in the SBICS

Joel 2 in the SBIDS

Joel 2 in the SBIGS

Joel 2 in the SBIHS

Joel 2 in the SBIIS

Joel 2 in the SBIIS2

Joel 2 in the SBIIS3

Joel 2 in the SBIKS

Joel 2 in the SBIKS2

Joel 2 in the SBIMS

Joel 2 in the SBIOS

Joel 2 in the SBIPS

Joel 2 in the SBISS

Joel 2 in the SBITS

Joel 2 in the SBITS2

Joel 2 in the SBITS3

Joel 2 in the SBITS4

Joel 2 in the SBIUS

Joel 2 in the SBIVS

Joel 2 in the SBT

Joel 2 in the SBT1E

Joel 2 in the SCHL

Joel 2 in the SNT

Joel 2 in the SUSU

Joel 2 in the SUSU2

Joel 2 in the SYNO

Joel 2 in the TBIAOTANT

Joel 2 in the TBT1E

Joel 2 in the TBT1E2

Joel 2 in the TFTIP

Joel 2 in the TFTU

Joel 2 in the TGNTATF3T

Joel 2 in the THAI

Joel 2 in the TNFD

Joel 2 in the TNT

Joel 2 in the TNTIK

Joel 2 in the TNTIL

Joel 2 in the TNTIN

Joel 2 in the TNTIP

Joel 2 in the TNTIZ

Joel 2 in the TOMA

Joel 2 in the TTENT

Joel 2 in the UBG

Joel 2 in the UGV

Joel 2 in the UGV2

Joel 2 in the UGV3

Joel 2 in the VBL

Joel 2 in the VDCC

Joel 2 in the YALU

Joel 2 in the YAPE

Joel 2 in the YBVTP

Joel 2 in the ZBP