Luke 11 (BOLCB2)

1 Mokolo moko, Yesu azalaki kosambela na esika songolo. Tango asilisaki kosambela, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye :— Nkolo, lakisa biso kosambela ndenge Yoane alakisaki bayekoli na ye. 2 Yesu alobaki na bango : — Tango bozali kosambela, boloba : Tata, tika ete Kombo na Yo ebulisama, tika ete Bokonzi na Yo eya ! 3 Pesa biso bilei oyo tosengeli na yango, mokolo na mokolo, 4 limbisa masumu na biso, pamba te biso mpe tolimbisaka moto nyonso oyo asalaka biso mabe ; mpe komema biso na komekama te. 5 Alobaki na bango lisusu : — Soki moko kati na bino azali na molingami, bongo akei epai na ye na midi ya butu mpe alobi : « Molingami, defisa ngai mapa misato ; 6 pamba te moko kati na baninga na ngai azali kosala mobembo mpe akomi epai na ngai, kasi nazangi bilei ya kopesa ye. » 7 Soki molingami oyo, wuta kati na ndako na ye, azongisi : « Kotungisa ngai te, nasili kokanga ekuke ya ndako na ngai ; ngai mpe bana na ngai tolali, nakoki kolamuka te mpo na kopesa yo mapa. » 8 Nazali koloba na bino penza ya solo : ata soki akotelema te mpo na kopesa ye mapa yango, kasi akotelema penza mpo na motungisi na ye mpe akopesa ye nyonso oyo azali na yango na bosenga, pamba te azali moninga na ye. 9 Boye, Ngai nazali koloba na bino : Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino. 10 Pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango. 11 Nani kati na bino, batata, akopesa na mwana na ye nyoka soki asengi ye mbisi, 12 to akopesa ye koto soki asengi ye liki ? 13 Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye ! 14 Mokolo moko, Yesu azalaki kobengana molimo mabe oyo ezalaki kopekisa moto koloba. Tango molimo mabe yango ebimaki, moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba, mpe ebele ya bato bakamwaki. 15 Kasi bamoko kati na bango balobaki :— Azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe. 16 Bamosusu, mpo na komeka Yesu, basengaki na Ye elembo moko kowuta na Likolo. 17 Lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na bango : — Bokonzi nyonso oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekomipanza, mpe ndako oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekokweya. 18 Soki Satana akomi komibundisa, bokonzi na ye ekotelema ndenge nini ? Nalobi bongo mpo bolobi ete Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule. 19 Mpe soki Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani ? Mpo na yango, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino. 20 Kasi soki ezali na nguya ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino. 21 Tango elombe oyo alata bibundeli akengelaka ndako na ye, biloko na ye ebatelamaka malamu ; 22 kasi soki moto mosusu oyo aleki ye na makasi ayei kobundisa ye mpe alongi ye, akobotola ye bibundeli oyo azalaki kotiela motema, akokamata biloko na ye nyonso mpe akokaba yango. 23 Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka. 24 Soki molimo mabe ebimi kati na moto, ekendaka koyengayenga na bisika ekawuka mpo na koluka esika ya kopema. Kasi soki ezwi esika yango te, emilobelaka : « Eleki malamu mpo na ngai kozonga na ndako oyo natikaki. » 25 Tango molimo mabe yango ezongaka, ekutaka ndako yango polele, bakombola mpe babongisa malamu. 26 Bongo ekendaka lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe, elongo na yango, ekotaka mpe evandaka kuna. Boye bomoi ya moto yango ekomaka lisusu mabe, koleka ndenge ezalaki liboso. 27 Wana Yesu azalaki koloba makambo oyo, mwasi moko agangaki wuta kati na ebele ya bato :— Esengo na mama oyo abotaki Yo mpe amelisaki Yo mabele ! 28 Yesu azongisaki : — Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango ! 29 Lokola bato bazalaki kotonda se kotonda pembeni na Ye, Yesu alobaki : — Bato ya ekeke oyo bazali bato mabe penza ! Bazali kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te, longola kaka elembo ya Yona ; 30 pamba te, ndenge Yona azalaki elembo mpo na bato ya Ninive, ndenge wana mpe Mwana na Moto akozala elembo mpo na bato ya ekeke oyo. 31 Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akolamuka, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpo na koyoka bwanya ya Salomo ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Salomo. 32 Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe bakokatela bango etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Yona. 33 Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na esika ya kobombama to na se ya katini. Nzokande, batiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole. 34 Miso na yo ezali lokola mwinda ya nzoto na yo. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ezali kati na pole. Kasi soki ebeli, nzoto na yo mobimba mpe ekoti kati na molili. 35 Yango wana, sala keba ete pole oyo ezali kati na yo ekoma molili te. 36 Soki nzoto na yo mobimba ezali kati na pole, mpe eteni ata moko te ezali kati na molili, nzoto na yo mobimba ekotonda na pole lokola tango mwinda engengisaka yo na nzela ya pole na yango. 37 Tango Yesu asilisaki koloba, Mofarizeo moko abengisaki Ye mpo ete akende kolia elongo na ye. Yesu akotaki na ndako na ye mpe avandaki na mesa. 38 Kasi Mofarizeo akamwaki mingi tango amonaki ete Yesu asukoli maboko te liboso ya kolia. 39 Bongo, Nkolo alobaki na ye : — Bino Bafarizeo, bosukolaka libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondi na moyibi mpe na mabe. 40 Bazoba ! Boni, ye oyo asalaki libanda, asalaki mpe kati te ? 41 Bobonza nde bomoto na bino ya kati lokola likabo epai ya Nzambe, bongo mobimba na bino ekokoma mbala moko peto. 42 Mawa na bino, Bafarizeo ! Bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya matungulu mpe ya bandunda ya lolenge nyonso, kasi bomonaka pamba bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Nzokande bosengeli nde kotia yango na misala, mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi. 43 Mawa na bino, Bafarizeo ! Bolingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe bolingaka ete bato bapesa bino mbote ya lokumu, na bisika oyo bato ebele bakutanaka. 44 Mawa na bino ! Bozali lokola bakunda oyo ezanga bilembo, bongo bato batambolaka na likolo na yango na kozanga koyeba ! 45 Molakisi moko ya mibeko alobaki na Yesu :— Moteyi, tango ozali koloba bongo, ozali kofinga mpe biso ! 46 Yesu azongisaki : — Bino mpe balakisi ya Mobeko, mawa na bino ! Bomemisaka bato mikumba ya kilo makasi, mpe bino moko boningisaka ata mosapi moko te mpo na kosunga bango. 47 Mawa na bino, pamba te botongaka bakunda mpo na basakoli oyo bakoko na bino baboma ! 48 Boye, wana bosalaka bongo, botatolaka ete bondimi makambo oyo bakoko na bino basala ; pamba te bango, baboma basakoli, mpe bino, bozali kotonga bakunda na bango. 49 Yango wana, Nzambe, kati na bwanya na Ye, aloba : « Nakotindela bango basakoli mpe bantoma ; bakoboma bamoko, mpe bakonyokola bamosusu. » 50 Mpo na yango, makila ya basakoli nyonso, oyo basopa wuta na ebandeli ya mokili, ekotangama na mito ya bato ya ekeke oyo, 51 kobanda na makila ya Abele kino na makila ya Zakari oyo babomaki kati na etumbelo mpe Esika ya bule. Nazali koloba na bino penza ya solo : mokumba ya mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo. 52 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko, pamba te bolongolaki fungola ya boyebi ! Bino moko bokotaki te, mpe bopekisaki bato oyo bazalaki na posa ya kokota. 53 Tango Yesu abimaki na ndako, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko basilikelaki Ye makasi mpe bakomaki kotungisa Ye na nzela ya mituna ya ndenge na ndenge, 54 na kotiela Ye mitambo mpo na kozwa, kati na maloba na Ye, likambo ya kofunda Ye.

In Other Versions

Luke 11 in the ANGEFD

Luke 11 in the ANTPNG2D

Luke 11 in the AS21

Luke 11 in the BAGH

Luke 11 in the BBPNG

Luke 11 in the BBT1E

Luke 11 in the BDS

Luke 11 in the BEV

Luke 11 in the BHAD

Luke 11 in the BIB

Luke 11 in the BLPT

Luke 11 in the BNT

Luke 11 in the BNTABOOT

Luke 11 in the BNTLV

Luke 11 in the BOATCB

Luke 11 in the BOATCB2

Luke 11 in the BOBCV

Luke 11 in the BOCNT

Luke 11 in the BOECS

Luke 11 in the BOGWICC

Luke 11 in the BOHCB

Luke 11 in the BOHCV

Luke 11 in the BOHLNT

Luke 11 in the BOHNTLTAL

Luke 11 in the BOICB

Luke 11 in the BOILNTAP

Luke 11 in the BOITCV

Luke 11 in the BOKCV

Luke 11 in the BOKCV2

Luke 11 in the BOKHWOG

Luke 11 in the BOKSSV

Luke 11 in the BOLCB

Luke 11 in the BOMCV

Luke 11 in the BONAV

Luke 11 in the BONCB

Luke 11 in the BONLT

Luke 11 in the BONUT2

Luke 11 in the BOPLNT

Luke 11 in the BOSCB

Luke 11 in the BOSNC

Luke 11 in the BOTLNT

Luke 11 in the BOVCB

Luke 11 in the BOYCB

Luke 11 in the BPBB

Luke 11 in the BPH

Luke 11 in the BSB

Luke 11 in the CCB

Luke 11 in the CUV

Luke 11 in the CUVS

Luke 11 in the DBT

Luke 11 in the DGDNT

Luke 11 in the DHNT

Luke 11 in the DNT

Luke 11 in the ELBE

Luke 11 in the EMTV

Luke 11 in the ESV

Luke 11 in the FBV

Luke 11 in the FEB

Luke 11 in the GGMNT

Luke 11 in the GNT

Luke 11 in the HARY

Luke 11 in the HNT

Luke 11 in the IRVA

Luke 11 in the IRVB

Luke 11 in the IRVG

Luke 11 in the IRVH

Luke 11 in the IRVK

Luke 11 in the IRVM

Luke 11 in the IRVM2

Luke 11 in the IRVO

Luke 11 in the IRVP

Luke 11 in the IRVT

Luke 11 in the IRVT2

Luke 11 in the IRVU

Luke 11 in the ISVN

Luke 11 in the JSNT

Luke 11 in the KAPI

Luke 11 in the KBT1ETNIK

Luke 11 in the KBV

Luke 11 in the KJV

Luke 11 in the KNFD

Luke 11 in the LBA

Luke 11 in the LBLA

Luke 11 in the LNT

Luke 11 in the LSV

Luke 11 in the MAAL

Luke 11 in the MBV

Luke 11 in the MBV2

Luke 11 in the MHNT

Luke 11 in the MKNFD

Luke 11 in the MNG

Luke 11 in the MNT

Luke 11 in the MNT2

Luke 11 in the MRS1T

Luke 11 in the NAA

Luke 11 in the NASB

Luke 11 in the NBLA

Luke 11 in the NBS

Luke 11 in the NBVTP

Luke 11 in the NET2

Luke 11 in the NIV11

Luke 11 in the NNT

Luke 11 in the NNT2

Luke 11 in the NNT3

Luke 11 in the PDDPT

Luke 11 in the PFNT

Luke 11 in the RMNT

Luke 11 in the SBIAS

Luke 11 in the SBIBS

Luke 11 in the SBIBS2

Luke 11 in the SBICS

Luke 11 in the SBIDS

Luke 11 in the SBIGS

Luke 11 in the SBIHS

Luke 11 in the SBIIS

Luke 11 in the SBIIS2

Luke 11 in the SBIIS3

Luke 11 in the SBIKS

Luke 11 in the SBIKS2

Luke 11 in the SBIMS

Luke 11 in the SBIOS

Luke 11 in the SBIPS

Luke 11 in the SBISS

Luke 11 in the SBITS

Luke 11 in the SBITS2

Luke 11 in the SBITS3

Luke 11 in the SBITS4

Luke 11 in the SBIUS

Luke 11 in the SBIVS

Luke 11 in the SBT

Luke 11 in the SBT1E

Luke 11 in the SCHL

Luke 11 in the SNT

Luke 11 in the SUSU

Luke 11 in the SUSU2

Luke 11 in the SYNO

Luke 11 in the TBIAOTANT

Luke 11 in the TBT1E

Luke 11 in the TBT1E2

Luke 11 in the TFTIP

Luke 11 in the TFTU

Luke 11 in the TGNTATF3T

Luke 11 in the THAI

Luke 11 in the TNFD

Luke 11 in the TNT

Luke 11 in the TNTIK

Luke 11 in the TNTIL

Luke 11 in the TNTIN

Luke 11 in the TNTIP

Luke 11 in the TNTIZ

Luke 11 in the TOMA

Luke 11 in the TTENT

Luke 11 in the UBG

Luke 11 in the UGV

Luke 11 in the UGV2

Luke 11 in the UGV3

Luke 11 in the VBL

Luke 11 in the VDCC

Luke 11 in the YALU

Luke 11 in the YAPE

Luke 11 in the YBVTP

Luke 11 in the ZBP