Malachi 3 (BOLCB2)

1 « Nakotinda ntoma na Ngai ; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye ; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 2 Kasi nani akobika na mokolo oyo akoya ? Nani akotelema na mokolo oyo akomonana ? Pamba te azali lokola moto ya monyangwisi bibende na moto, lokola sabuni oyo etelisaka bilamba. 3 Akovanda lokola monyangwisi bibende mpe mopetoli palata na moto. Akopetola bana mibali ya Levi mpe akolekisa bango na moto ndenge bapetolaka wolo mpe palata, mpe bakokoma mpo na Yawe bato oyo bamemelaka Ye makabo kolanda ndenge esengeli kozala. 4 Bongo makabo ya Yuda mpe ya Yelusalemi ekosepelisa Yawe, ndenge ezalaki na tango ya kala. 5 « Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 6 « Ngai Yawe, nabongwanaka te. Mpo na yango, bino bana mibali ya Jakobi, bozali kaka. 7 Wuta na tango ya bakoko na bino, bozalaki kaka kobuka mibeko na Ngai mpe bozalaki kotosa Ngai te. Bozonga epai na Ngai, mpe Ngai nakozonga epai na bino, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.« Kasi bozali komituna : ‹ Tokozonga ndenge nini ? › 8 Boni, moto akoki solo kokosa Nzambe ? Nzokande bino, bozali kokosa Ngai. Kasi bozali koloba : ‹ Tokosi Yo na likambo nini ? ›Bokosi Ngai na eteni na bino ya zomi mpe na makabo. 9 Bozali na se ya elakeli mabe, pamba te bino nyonso, ekolo oyo mobimba, bozali kokosa Ngai. 10 Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo. 11 Nakopekisa banyama mike-mike kolia bambuma ya bilanga na bino, bongo bilanga na bino ya vino ekotikala kozanga bambuma te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 12 « Bato ya bikolo nyonso bakoloba ete bozali bato ya esengo, pamba te mokili na bino ekozala mokili ya malamu mpo na kovanda, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 13 Yawe alobi : « Bozali koloba makambo mabe mpo na kotelemela Ngai.Kasi bozali kotuna : ‹ Maloba nini ya mabe tolobi mpo na kotelemela Yo ? › 14 Bozali lisusu koloba : ‹ Kosalela Nzambe ezali na tina te. Litomba nini penza ezali na kotosa mibeko na Ye mpe na komiboya liboso ya Yawe, Mokonzi ya mampinga ? 15 Tosengeli sik’oyo komona bato ya lofundu lokola bato ya esengo, bato mabe bazali kokende liboso. Atako bazali kobeta tembe na Nzambe, kasi bazali kaka kolonga. › » 16 Ndenge wana nde bato oyo batosaka Yawe bazalaki kosolola bango na bango, kasi Yawe ayokaki masolo na bango. Boye buku moko ya ekaniseli ekomamaki liboso ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Yawe mpe bapesaka Kombo na Ye lokumu. 17 « Na mokolo oyo nakomonisa nguya na Ngai, bakokoma bato na Ngai, bomengo na Ngai ya talo. Nakobatela bango ndenge tata abatelaka mwana oyo asalelaka ye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 18 « Bongo bokomona lisusu bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe moto oyo asalelaka Ye te. 19 Pamba te mokolo yango ezali koya ; ekozala moto makasi lokola fulu ya moto. Bato nyonso ya lofundu mpe bato nyonso oyo basalaka mabe bakokoma lokola matiti ya kokawuka. Mokolo yango ekozikisa bango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ekotikala ata mosisa to etape te. 20 Kasi mpo na bino oyo botosaka Kombo na Ngai, moyi ya bosembo ekobima mpe ekomemela bino lobiko. Boye, bokobina mpe bokopumbwa na esengo lokola bana ngombe ya mibali kati na lopango. 21 Bokonyata bato mabe, pamba te bakokoma lokola putulu na se ya matambe na bino, na mokolo oyo nazali kobongisa, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 22 « Bokanisa Mobeko, malako mpe mitindo oyo napesaki epai ya Moyize, mosali na Ngai, na ngomba Orebi, mpo na Isalaele mobimba. 23 Liboso ete mokolo ya Yawe eya, mokolo monene mpe ya somo, nakotindela bino mosakoli Eliya. 24 Akozongisa mitema ya batata epai ya bana, mpe mitema ya bana epai ya batata, soki te nakoya kobebisa mokili na nzela ya bilakeli mabe. »

In Other Versions

Malachi 3 in the ANGEFD

Malachi 3 in the ANTPNG2D

Malachi 3 in the AS21

Malachi 3 in the BAGH

Malachi 3 in the BBPNG

Malachi 3 in the BBT1E

Malachi 3 in the BDS

Malachi 3 in the BEV

Malachi 3 in the BHAD

Malachi 3 in the BIB

Malachi 3 in the BLPT

Malachi 3 in the BNT

Malachi 3 in the BNTABOOT

Malachi 3 in the BNTLV

Malachi 3 in the BOATCB

Malachi 3 in the BOATCB2

Malachi 3 in the BOBCV

Malachi 3 in the BOCNT

Malachi 3 in the BOECS

Malachi 3 in the BOGWICC

Malachi 3 in the BOHCB

Malachi 3 in the BOHCV

Malachi 3 in the BOHLNT

Malachi 3 in the BOHNTLTAL

Malachi 3 in the BOICB

Malachi 3 in the BOILNTAP

Malachi 3 in the BOITCV

Malachi 3 in the BOKCV

Malachi 3 in the BOKCV2

Malachi 3 in the BOKHWOG

Malachi 3 in the BOKSSV

Malachi 3 in the BOLCB

Malachi 3 in the BOMCV

Malachi 3 in the BONAV

Malachi 3 in the BONCB

Malachi 3 in the BONLT

Malachi 3 in the BONUT2

Malachi 3 in the BOPLNT

Malachi 3 in the BOSCB

Malachi 3 in the BOSNC

Malachi 3 in the BOTLNT

Malachi 3 in the BOVCB

Malachi 3 in the BOYCB

Malachi 3 in the BPBB

Malachi 3 in the BPH

Malachi 3 in the BSB

Malachi 3 in the CCB

Malachi 3 in the CUV

Malachi 3 in the CUVS

Malachi 3 in the DBT

Malachi 3 in the DGDNT

Malachi 3 in the DHNT

Malachi 3 in the DNT

Malachi 3 in the ELBE

Malachi 3 in the EMTV

Malachi 3 in the ESV

Malachi 3 in the FBV

Malachi 3 in the FEB

Malachi 3 in the GGMNT

Malachi 3 in the GNT

Malachi 3 in the HARY

Malachi 3 in the HNT

Malachi 3 in the IRVA

Malachi 3 in the IRVB

Malachi 3 in the IRVG

Malachi 3 in the IRVH

Malachi 3 in the IRVK

Malachi 3 in the IRVM

Malachi 3 in the IRVM2

Malachi 3 in the IRVO

Malachi 3 in the IRVP

Malachi 3 in the IRVT

Malachi 3 in the IRVT2

Malachi 3 in the IRVU

Malachi 3 in the ISVN

Malachi 3 in the JSNT

Malachi 3 in the KAPI

Malachi 3 in the KBT1ETNIK

Malachi 3 in the KBV

Malachi 3 in the KJV

Malachi 3 in the KNFD

Malachi 3 in the LBA

Malachi 3 in the LBLA

Malachi 3 in the LNT

Malachi 3 in the LSV

Malachi 3 in the MAAL

Malachi 3 in the MBV

Malachi 3 in the MBV2

Malachi 3 in the MHNT

Malachi 3 in the MKNFD

Malachi 3 in the MNG

Malachi 3 in the MNT

Malachi 3 in the MNT2

Malachi 3 in the MRS1T

Malachi 3 in the NAA

Malachi 3 in the NASB

Malachi 3 in the NBLA

Malachi 3 in the NBS

Malachi 3 in the NBVTP

Malachi 3 in the NET2

Malachi 3 in the NIV11

Malachi 3 in the NNT

Malachi 3 in the NNT2

Malachi 3 in the NNT3

Malachi 3 in the PDDPT

Malachi 3 in the PFNT

Malachi 3 in the RMNT

Malachi 3 in the SBIAS

Malachi 3 in the SBIBS

Malachi 3 in the SBIBS2

Malachi 3 in the SBICS

Malachi 3 in the SBIDS

Malachi 3 in the SBIGS

Malachi 3 in the SBIHS

Malachi 3 in the SBIIS

Malachi 3 in the SBIIS2

Malachi 3 in the SBIIS3

Malachi 3 in the SBIKS

Malachi 3 in the SBIKS2

Malachi 3 in the SBIMS

Malachi 3 in the SBIOS

Malachi 3 in the SBIPS

Malachi 3 in the SBISS

Malachi 3 in the SBITS

Malachi 3 in the SBITS2

Malachi 3 in the SBITS3

Malachi 3 in the SBITS4

Malachi 3 in the SBIUS

Malachi 3 in the SBIVS

Malachi 3 in the SBT

Malachi 3 in the SBT1E

Malachi 3 in the SCHL

Malachi 3 in the SNT

Malachi 3 in the SUSU

Malachi 3 in the SUSU2

Malachi 3 in the SYNO

Malachi 3 in the TBIAOTANT

Malachi 3 in the TBT1E

Malachi 3 in the TBT1E2

Malachi 3 in the TFTIP

Malachi 3 in the TFTU

Malachi 3 in the TGNTATF3T

Malachi 3 in the THAI

Malachi 3 in the TNFD

Malachi 3 in the TNT

Malachi 3 in the TNTIK

Malachi 3 in the TNTIL

Malachi 3 in the TNTIN

Malachi 3 in the TNTIP

Malachi 3 in the TNTIZ

Malachi 3 in the TOMA

Malachi 3 in the TTENT

Malachi 3 in the UBG

Malachi 3 in the UGV

Malachi 3 in the UGV2

Malachi 3 in the UGV3

Malachi 3 in the VBL

Malachi 3 in the VDCC

Malachi 3 in the YALU

Malachi 3 in the YAPE

Malachi 3 in the YBVTP

Malachi 3 in the ZBP