Matthew 2 (BOLCB2)
1 Yesu abotamaki na Beteleemi ya Yuda, wana Erode azalaki mokonzi. Na tango yango, bato ya mayele oyo bawutaki na este bayaki na Yelusalemi 2 mpe batunaki : « Mokonzi ya Bayuda oyo abotami azali wapi ? Tomonaki monzoto na Ye kobima, yango wana toyei kogumbamela Ye. » 3 Tango mokonzi Erode ayokaki bongo, motema na ye etungisamaki makasi elongo na Yelusalemi mobimba. 4 Abengaki mpe asangisaki bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; atunaki bango :— Klisto asengeli kobotama wapi ? 5 Bazongiselaki ye :— Na Beteleemi ya Yuda, pamba te mosakoli akoma : 6 « Bongo yo, Beteleemi, kati na mabele ya Yuda,ozali solo moke te kati na bingumba ya Yuda,pamba te Mokonzi oyo, lokola Mobateli bibwele,akotambolisa bato na Ngai, Isalaele, akobima nde kati na yo. » 7 Bongo, Erode abengaki bato ya mayele na nkuku mpe alukaki koyeba epai na bango tango nini monzoto ebimaki. 8 Boye, atindaki bango na Beteleemi ; alobaki :— Bokende koluka malamu mwana yango, na Beteleemi ; tango kaka bokomona ye, boyebisa ngai mpo ete ngai mpe nakende kogumbamela ye. 9 Sima na bango koyoka maloba ya mokonzi, bakobaki nzela na bango. Bamonaki lisusu monzoto oyo ewutaki kobima na este : monzoto yango ezalaki kotambola liboso na bango kino ekendeki kotelema na likolo ya esika oyo Mwana azalaki. 10 Tango kaka bamonaki lisusu monzoto yango, batondisamaki na esengo. 11 Bakomaki na ndako yango, bamonaki Mwana elongo na Mari, mama na Ye, mpe bagumbamelaki Ye ; bongo bafungolaki mabenga na bango mpe babonzelaki Ye biloko oyo lokola bakado : wolo, malasi ya ansa mpe mire. 12 Sima na yango, Nzambe akebisaki bango kati na ndoto ete bazonga lisusu te epai ya Erode. Boye, bazongaki na mboka na bango na nzela mosusu. 13 Sima na bato ya mayele kokende, anjelu na Nkolo abimelaki Jozefi kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye ; bokima na Ejipito mpe bowumela kuna kino tango nakoyebisa yo lisusu ete bozonga, pamba te Erode akoluka koboma Mwana. » 14 Jozefi atelemaki, azwaki Mwana elongo na mama na Ye, kaka na butu wana, mpe akimaki na Ejipito 15 epai wapi awumelaki kino na kufa ya Erode, mpo ete makambo oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli ekokisama : « Wuta na Ejipito, nabengaki mwana na Ngai. » 16 Tango Erode asosolaki ete bato ya mayele bakosi ye, atombokaki makasi mpe apesaki mitindo ete baboma bana mike nyonso ya mibali ya mibu mibale kino na se, oyo bazalaki na Beteleemi mpe na zingazinga na yango, kolanda tango oyo bato ya mayele bayebisaki ye na tina na eleko oyo monzoto ebimaki. 17 Boye nde ekokisamaki makambo oyo mosakoli Jeremi alobaki : 18 « Makelele moko eyokani na Rama,makelele ya kolela makasi mpe ya matanga :Rasheli azali kolela bana na ye ;aboyi kobondisama,pamba te bazali lisusu na bomoi te. » 19 Sima na kufa ya Erode, anjelu na Nkolo abimelaki Jozefi kati na ndoto, kuna na Ejipito, 20 mpe alobaki na ye : « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye, mpe zonga kati na mokili ya Isalaele, pamba te bato oyo bazalaki koluka koboma Mwana basili kokufa. » 21 Jozefi atelemaki, azwaki Mwana elongo na mama na Ye mpe akendeki na mokili ya Isalaele. 22 Kasi tango ayokaki ete Arikelawusi akitanaki na tata na ye, Erode, na bokonzi kati na Yuda, abangaki kokende kuna ; kasi Nzambe akebisaki Jozefi kati na ndoto, mpe Jozefi akendeki kati na etuka ya Galile 23 epai wapi avandaki kati na engumba Nazareti, mpo ete makambo oyo basakoli balobaki ekokisama : « Bakobenga Ye moto ya Nazareti. »
In Other Versions
Matthew 2 in the ANGEFD
Matthew 2 in the ANTPNG2D
Matthew 2 in the AS21
Matthew 2 in the BAGH
Matthew 2 in the BBPNG
Matthew 2 in the BBT1E
Matthew 2 in the BDS
Matthew 2 in the BEV
Matthew 2 in the BHAD
Matthew 2 in the BIB
Matthew 2 in the BLPT
Matthew 2 in the BNT
Matthew 2 in the BNTABOOT
Matthew 2 in the BNTLV
Matthew 2 in the BOATCB
Matthew 2 in the BOATCB2
Matthew 2 in the BOBCV
Matthew 2 in the BOCNT
Matthew 2 in the BOECS
Matthew 2 in the BOGWICC
Matthew 2 in the BOHCB
Matthew 2 in the BOHCV
Matthew 2 in the BOHLNT
Matthew 2 in the BOHNTLTAL
Matthew 2 in the BOICB
Matthew 2 in the BOILNTAP
Matthew 2 in the BOITCV
Matthew 2 in the BOKCV
Matthew 2 in the BOKCV2
Matthew 2 in the BOKHWOG
Matthew 2 in the BOKSSV
Matthew 2 in the BOLCB
Matthew 2 in the BOMCV
Matthew 2 in the BONAV
Matthew 2 in the BONCB
Matthew 2 in the BONLT
Matthew 2 in the BONUT2
Matthew 2 in the BOPLNT
Matthew 2 in the BOSCB
Matthew 2 in the BOSNC
Matthew 2 in the BOTLNT
Matthew 2 in the BOVCB
Matthew 2 in the BOYCB
Matthew 2 in the BPBB
Matthew 2 in the BPH
Matthew 2 in the BSB
Matthew 2 in the CCB
Matthew 2 in the CUV
Matthew 2 in the CUVS
Matthew 2 in the DBT
Matthew 2 in the DGDNT
Matthew 2 in the DHNT
Matthew 2 in the DNT
Matthew 2 in the ELBE
Matthew 2 in the EMTV
Matthew 2 in the ESV
Matthew 2 in the FBV
Matthew 2 in the FEB
Matthew 2 in the GGMNT
Matthew 2 in the GNT
Matthew 2 in the HARY
Matthew 2 in the HNT
Matthew 2 in the IRVA
Matthew 2 in the IRVB
Matthew 2 in the IRVG
Matthew 2 in the IRVH
Matthew 2 in the IRVK
Matthew 2 in the IRVM
Matthew 2 in the IRVM2
Matthew 2 in the IRVO
Matthew 2 in the IRVP
Matthew 2 in the IRVT
Matthew 2 in the IRVT2
Matthew 2 in the IRVU
Matthew 2 in the ISVN
Matthew 2 in the JSNT
Matthew 2 in the KAPI
Matthew 2 in the KBT1ETNIK
Matthew 2 in the KBV
Matthew 2 in the KJV
Matthew 2 in the KNFD
Matthew 2 in the LBA
Matthew 2 in the LBLA
Matthew 2 in the LNT
Matthew 2 in the LSV
Matthew 2 in the MAAL
Matthew 2 in the MBV
Matthew 2 in the MBV2
Matthew 2 in the MHNT
Matthew 2 in the MKNFD
Matthew 2 in the MNG
Matthew 2 in the MNT
Matthew 2 in the MNT2
Matthew 2 in the MRS1T
Matthew 2 in the NAA
Matthew 2 in the NASB
Matthew 2 in the NBLA
Matthew 2 in the NBS
Matthew 2 in the NBVTP
Matthew 2 in the NET2
Matthew 2 in the NIV11
Matthew 2 in the NNT
Matthew 2 in the NNT2
Matthew 2 in the NNT3
Matthew 2 in the PDDPT
Matthew 2 in the PFNT
Matthew 2 in the RMNT
Matthew 2 in the SBIAS
Matthew 2 in the SBIBS
Matthew 2 in the SBIBS2
Matthew 2 in the SBICS
Matthew 2 in the SBIDS
Matthew 2 in the SBIGS
Matthew 2 in the SBIHS
Matthew 2 in the SBIIS
Matthew 2 in the SBIIS2
Matthew 2 in the SBIIS3
Matthew 2 in the SBIKS
Matthew 2 in the SBIKS2
Matthew 2 in the SBIMS
Matthew 2 in the SBIOS
Matthew 2 in the SBIPS
Matthew 2 in the SBISS
Matthew 2 in the SBITS
Matthew 2 in the SBITS2
Matthew 2 in the SBITS3
Matthew 2 in the SBITS4
Matthew 2 in the SBIUS
Matthew 2 in the SBIVS
Matthew 2 in the SBT
Matthew 2 in the SBT1E
Matthew 2 in the SCHL
Matthew 2 in the SNT
Matthew 2 in the SUSU
Matthew 2 in the SUSU2
Matthew 2 in the SYNO
Matthew 2 in the TBIAOTANT
Matthew 2 in the TBT1E
Matthew 2 in the TBT1E2
Matthew 2 in the TFTIP
Matthew 2 in the TFTU
Matthew 2 in the TGNTATF3T
Matthew 2 in the THAI
Matthew 2 in the TNFD
Matthew 2 in the TNT
Matthew 2 in the TNTIK
Matthew 2 in the TNTIL
Matthew 2 in the TNTIN
Matthew 2 in the TNTIP
Matthew 2 in the TNTIZ
Matthew 2 in the TOMA
Matthew 2 in the TTENT
Matthew 2 in the UBG
Matthew 2 in the UGV
Matthew 2 in the UGV2
Matthew 2 in the UGV3
Matthew 2 in the VBL
Matthew 2 in the VDCC
Matthew 2 in the YALU
Matthew 2 in the YAPE
Matthew 2 in the YBVTP
Matthew 2 in the ZBP