Matthew 23 (BOLCB2)

1 Yesu alobaki na ebele ya bato mpe na bayekoli na Ye : 2 « Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazali na mokumba ya koteya bato mibeko ya Moyize. 3 Boye, bosengeli kosala keba na mateya nyonso oyo bateyaka bino, mpe bobongisa etamboli na bino kolanda mateya na bango ; kasi bomekola te misala na bango, pamba te batiaka mateya na bango na misala te. 4 Babongisaka mikumba ya kilo makasi mpe batiaka yango na mapeka ya bato mosusu, kasi bango moko balingaka ata moke te kotombola mosapi oyo ya moke mpo na kosunga bato yango na komema mikumba yango. 5 Misala nyonso oyo basalaka, basalaka yango kaka mpo ete bato bamona bango. Boye, bayeisaka minene mikanda na bango, oyo bakoma biteni ya Makomi, mpe milayi, basonge ya banzambala na bango. 6 Balingaka kovanda na bisika ya lokumu kati na bafeti, mpe na bisika ya liboso kati na bandako ya mayangani ; 7 balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe babenga bango ‹ Moteyi. › 8 Kasi bino, bolinga te ete bato babenga bino ‹ Moteyi, › pamba te bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko. 9 Bobenga moto moko te awa na mokili ‹ Tata, › pamba te bozali kaka na Tata moko, mpe azali kati na Likolo. 10 Bolinga te ete bato babenga bino ‹ bakonzi, › pamba te bozali kaka na Mokonzi moko, Klisto. 11 Moto oyo aleki monene kati na bino akozala mosali na bino. 12 Pamba te moto oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye. 13 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te.[ 14 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Boyibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe bosalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Mpo na yango, bokozwa etumbu oyo eleki makasi.] 15 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo : bato ya bilongi mibale ! Bosalaka mibembo na ebale mpe na mokili mpo na koluka kozwa kaka mopagano moko oyo akondima kosambela na lingomba na bino ; mpe soki kaka andimi, bokomisaka ye moto ya lifelo mbala mibale koleka bino moko. 16 Mawa na bino, batambolisi bakufa miso ! Bolobaka : ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya Tempelo, wana ezali likambo te ; kasi soki alapi ndayi na kombo ya wolo ya Tempelo, wana asengeli kokokisa ndayi na ye. › 17 Bino, bakufi miso, bozali penza bazoba ! Eloko nini eleki motuya : wolo to Tempelo oyo ekomisaka wolo bule ? 18 Bolobaka lisusu : ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya etumbelo, wana ezali likambo te ; kasi soki alapi ndayi na kombo ya likabo oyo ezali na likolo ya etumbelo, asengeli kokokisa ndayi na ye. › 19 Bakufi miso ! Eloko nini eleki motuya : likabo to etumbelo oyo ekomisi likabo bule ? 20 Pamba te moto oyo alapi ndayi na kombo ya etumbelo alapi yango na kombo ya etumbelo yango mpe na kombo ya biloko nyonso oyo ezali na likolo na yango. 21 Moto oyo mpe alapi ndayi na kombo ya Tempelo alapi yango na kombo ya Tempelo yango mpe na Kombo ya Ye oyo avandaka kati na yango. 22 Mpe moto oyo alapi ndayi na kombo ya Likolo alapi yango na kombo ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe na Kombo ya Ye oyo avandelaka yango. 23 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Solo, bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya bamusikadi mpe ya biloko ya mike-mike ya solo kitoko ; kasi bomonaka pamba makambo oyo eleki motuya kati na Mobeko : bosembo, motema mawa mpe kondima. Nzokande, bosengeli nde kotia yango na misala mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi. 24 Bino, batambolisi bakufa miso ! Solo, bolongolaka nzinzi oyo ekweyaka na masanga na bino, kasi bomelaka shamo mobimba. 25 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bosukolaka malamu libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondisaka yango na biloko ya moyibi mpe ya lokoso na bino. 26 Mofarizeo mokufi miso ! Banda nanu na kopetola kati ya kopo mpe ya sani, bongo libanda ekokoma peto. 27 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bozali lokola bakunda oyo bapakola langi ya pembe : emonanaka kitoko na libanda, kasi etonda na mikuwa ya bakufi mpe na lolenge nyonso ya mbindo. 28 Ndenge moko mpe mpo na bino : na libanda, bomonanaka lokola bato ya sembo na miso ya bato ; kasi na kati, botondi na lokuta mpe na mabe. 29 Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Botongaka bakunda mpo na basakoli, mpe bokomisaka kitoko malita ya bato ya sembo. 30 Bolobaka : ‹ Soki tozalaki na bomoi na tango ya bakoko na biso, tolingaki kosangana te elongo na bango mpo na kotangisa makila ya basakoli. › 31 Boye, na maloba na bino moko, bondimaka ete bozali penza bakitani ya bato oyo babomaki basakoli. 32 Bokoba malamu na mosala oyo batata na bino babandaki, mosala ya koboma basakoli ! 33 Bino, banyoka, libota ya bitupa ! Ndenge nini bokoki kokanisa ete bokokima etumbu ya lifelo ? 34 Mpo na yango, Ngai nakotindela bino basakoli, bato ya bwanya mpe balakisi ya Mobeko. Bokoboma mpe bokobaka bamoko na ekulusu, bokobeta bamosusu fimbu kati na bandako na bino ya mayangani mpe bokobengana bango na engumba moko na moko, 35 mpo ete makila ya bato nyonso ya sembo, oyo basopa na mabele, etangama na mito na bino, kobanda na makila ya Abele, moto ya sembo, kino na makila ya Zakari, mwana mobali ya Barashi, oyo bobomaki kati ya Tempelo mpe etumbelo. 36 Nazali koloba na bino penza ya solo : etumbu oyo esengeli mpo na mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo. 37 Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki ! 38 Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama. 39 Pamba te, nazali koloba na bino : Kobanda lelo, bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba : ‹ Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! › »

In Other Versions

Matthew 23 in the ANGEFD

Matthew 23 in the ANTPNG2D

Matthew 23 in the AS21

Matthew 23 in the BAGH

Matthew 23 in the BBPNG

Matthew 23 in the BBT1E

Matthew 23 in the BDS

Matthew 23 in the BEV

Matthew 23 in the BHAD

Matthew 23 in the BIB

Matthew 23 in the BLPT

Matthew 23 in the BNT

Matthew 23 in the BNTABOOT

Matthew 23 in the BNTLV

Matthew 23 in the BOATCB

Matthew 23 in the BOATCB2

Matthew 23 in the BOBCV

Matthew 23 in the BOCNT

Matthew 23 in the BOECS

Matthew 23 in the BOGWICC

Matthew 23 in the BOHCB

Matthew 23 in the BOHCV

Matthew 23 in the BOHLNT

Matthew 23 in the BOHNTLTAL

Matthew 23 in the BOICB

Matthew 23 in the BOILNTAP

Matthew 23 in the BOITCV

Matthew 23 in the BOKCV

Matthew 23 in the BOKCV2

Matthew 23 in the BOKHWOG

Matthew 23 in the BOKSSV

Matthew 23 in the BOLCB

Matthew 23 in the BOMCV

Matthew 23 in the BONAV

Matthew 23 in the BONCB

Matthew 23 in the BONLT

Matthew 23 in the BONUT2

Matthew 23 in the BOPLNT

Matthew 23 in the BOSCB

Matthew 23 in the BOSNC

Matthew 23 in the BOTLNT

Matthew 23 in the BOVCB

Matthew 23 in the BOYCB

Matthew 23 in the BPBB

Matthew 23 in the BPH

Matthew 23 in the BSB

Matthew 23 in the CCB

Matthew 23 in the CUV

Matthew 23 in the CUVS

Matthew 23 in the DBT

Matthew 23 in the DGDNT

Matthew 23 in the DHNT

Matthew 23 in the DNT

Matthew 23 in the ELBE

Matthew 23 in the EMTV

Matthew 23 in the ESV

Matthew 23 in the FBV

Matthew 23 in the FEB

Matthew 23 in the GGMNT

Matthew 23 in the GNT

Matthew 23 in the HARY

Matthew 23 in the HNT

Matthew 23 in the IRVA

Matthew 23 in the IRVB

Matthew 23 in the IRVG

Matthew 23 in the IRVH

Matthew 23 in the IRVK

Matthew 23 in the IRVM

Matthew 23 in the IRVM2

Matthew 23 in the IRVO

Matthew 23 in the IRVP

Matthew 23 in the IRVT

Matthew 23 in the IRVT2

Matthew 23 in the IRVU

Matthew 23 in the ISVN

Matthew 23 in the JSNT

Matthew 23 in the KAPI

Matthew 23 in the KBT1ETNIK

Matthew 23 in the KBV

Matthew 23 in the KJV

Matthew 23 in the KNFD

Matthew 23 in the LBA

Matthew 23 in the LBLA

Matthew 23 in the LNT

Matthew 23 in the LSV

Matthew 23 in the MAAL

Matthew 23 in the MBV

Matthew 23 in the MBV2

Matthew 23 in the MHNT

Matthew 23 in the MKNFD

Matthew 23 in the MNG

Matthew 23 in the MNT

Matthew 23 in the MNT2

Matthew 23 in the MRS1T

Matthew 23 in the NAA

Matthew 23 in the NASB

Matthew 23 in the NBLA

Matthew 23 in the NBS

Matthew 23 in the NBVTP

Matthew 23 in the NET2

Matthew 23 in the NIV11

Matthew 23 in the NNT

Matthew 23 in the NNT2

Matthew 23 in the NNT3

Matthew 23 in the PDDPT

Matthew 23 in the PFNT

Matthew 23 in the RMNT

Matthew 23 in the SBIAS

Matthew 23 in the SBIBS

Matthew 23 in the SBIBS2

Matthew 23 in the SBICS

Matthew 23 in the SBIDS

Matthew 23 in the SBIGS

Matthew 23 in the SBIHS

Matthew 23 in the SBIIS

Matthew 23 in the SBIIS2

Matthew 23 in the SBIIS3

Matthew 23 in the SBIKS

Matthew 23 in the SBIKS2

Matthew 23 in the SBIMS

Matthew 23 in the SBIOS

Matthew 23 in the SBIPS

Matthew 23 in the SBISS

Matthew 23 in the SBITS

Matthew 23 in the SBITS2

Matthew 23 in the SBITS3

Matthew 23 in the SBITS4

Matthew 23 in the SBIUS

Matthew 23 in the SBIVS

Matthew 23 in the SBT

Matthew 23 in the SBT1E

Matthew 23 in the SCHL

Matthew 23 in the SNT

Matthew 23 in the SUSU

Matthew 23 in the SUSU2

Matthew 23 in the SYNO

Matthew 23 in the TBIAOTANT

Matthew 23 in the TBT1E

Matthew 23 in the TBT1E2

Matthew 23 in the TFTIP

Matthew 23 in the TFTU

Matthew 23 in the TGNTATF3T

Matthew 23 in the THAI

Matthew 23 in the TNFD

Matthew 23 in the TNT

Matthew 23 in the TNTIK

Matthew 23 in the TNTIL

Matthew 23 in the TNTIN

Matthew 23 in the TNTIP

Matthew 23 in the TNTIZ

Matthew 23 in the TOMA

Matthew 23 in the TTENT

Matthew 23 in the UBG

Matthew 23 in the UGV

Matthew 23 in the UGV2

Matthew 23 in the UGV3

Matthew 23 in the VBL

Matthew 23 in the VDCC

Matthew 23 in the YALU

Matthew 23 in the YAPE

Matthew 23 in the YBVTP

Matthew 23 in the ZBP