Matthew 7 (BOLCB2)

1 Bosambisaka te mpo ete, bino mpe, basambisa bino te. 2 Pamba te bakosambisa bino ndenge kaka bino bosambisaka baninga, mpe bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu. 3 Mpo na nini ozali kotala mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo, wana ozali komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko ? 4 Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na liso, › wana ozali na nzete kati na liso na yo ? 5 Bolole ! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo miso na yo ekomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo. 6 Bopesa te biloko ya bule epai ya bambwa, noki te ekozongela bino mpo na koswa bino ; bobwaka te bapawuni na bino ya talo epai ya bangulu, noki te ekonyata-nyata yango. 7 Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino ; 8 pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango. 9 Nani kati na bino apesaka na mwana na ye libanga, soki asengi ye lipa ? 10 To nani apesaka na mwana na ye nyoka soki asengi mbisi ? 11 Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango ? 12 Nyonso oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango ; pamba te yango nde mateya nyonso ya Mobeko mpe ya basakoli. 13 Bokotela na ekuke ya moke ; pamba te ekuke mpe nzela oyo ememaka na libebi ezali monene, mpe bato ebele bakotelaka wana. 14 Kasi ekuke to nzela oyo ememaka na bomoi ezali moke, mpe bato moke kaka nde bamonaka yango. 15 Bosala keba na basakoli ya lokuta ! Tango bayaka epai na bino, bazwaka lolenge ya bameme, kasi bazali penza bambwa ya zamba oyo etonda na kanda. 16 Bokoyeba bango na nzela ya misala na bango. Boni, bokoki kolongola bambuma ya vino na nzete ya basende to kobuka bambuma ya figi na nzete ya banzube ? 17 Nzete nyonso ya malamu ebotaka mpe bambuma ya malamu, kasi nzete ya mabe ebotaka mpe bambuma ya mabe. 18 Nzete ya malamu ebotaka te bambuma ya mabe, mpe nzete ya mabe ebotaka te bambuma ya malamu. 19 Nzete nyonso oyo ebotaka te bambuma ya malamu, bapikolaka yango mpe babwakaka yango na moto. 20 Boye, bokoyeba basakoli ya lokuta na nzela ya misala na bango. 21 Bato nyonso oyo balobaka na Ngai : ‹ Nkolo ! Nkolo ! › bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo. 22 Na mokolo ya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai : ‹ Nkolo ! Nkolo ! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwa ebele ? › 23 Bongo Ngai, nakoyebisa bango : ‹ Natikala koyeba bino te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe ! › 24 Yango wana, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba mpe atie yango na misala akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye na likolo ya libanga. 25 Tango mvula ebetaki makasi, mayi mpe mopepe eyaki makasi, emibwakaki na ndako yango ; kasi atako bongo, ndako ekweyaki te, pamba te miboko na yango etongamaki na likolo ya libanga. 26 Nzokande, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba, kasi atie yango te na misala, akokani na zoba oyo atongaki ndako na ye na likolo ya zelo : 27 tango mvula ebetaki makasi, mayi eyaki elongo na mopepe makasi, emibwakaki na ndako yango ; ndako yango ekweyaki, mpe nyonso epanzanaki. » 28 Tango Yesu asilisaki koloba maloba oyo, bato nyonso bakamwaki makasi malakisi na Ye, 29 pamba te ateyaki bango na bokonzi oyo balakisi na bango ya Mobeko bazangaki.

In Other Versions

Matthew 7 in the ANGEFD

Matthew 7 in the ANTPNG2D

Matthew 7 in the AS21

Matthew 7 in the BAGH

Matthew 7 in the BBPNG

Matthew 7 in the BBT1E

Matthew 7 in the BDS

Matthew 7 in the BEV

Matthew 7 in the BHAD

Matthew 7 in the BIB

Matthew 7 in the BLPT

Matthew 7 in the BNT

Matthew 7 in the BNTABOOT

Matthew 7 in the BNTLV

Matthew 7 in the BOATCB

Matthew 7 in the BOATCB2

Matthew 7 in the BOBCV

Matthew 7 in the BOCNT

Matthew 7 in the BOECS

Matthew 7 in the BOGWICC

Matthew 7 in the BOHCB

Matthew 7 in the BOHCV

Matthew 7 in the BOHLNT

Matthew 7 in the BOHNTLTAL

Matthew 7 in the BOICB

Matthew 7 in the BOILNTAP

Matthew 7 in the BOITCV

Matthew 7 in the BOKCV

Matthew 7 in the BOKCV2

Matthew 7 in the BOKHWOG

Matthew 7 in the BOKSSV

Matthew 7 in the BOLCB

Matthew 7 in the BOMCV

Matthew 7 in the BONAV

Matthew 7 in the BONCB

Matthew 7 in the BONLT

Matthew 7 in the BONUT2

Matthew 7 in the BOPLNT

Matthew 7 in the BOSCB

Matthew 7 in the BOSNC

Matthew 7 in the BOTLNT

Matthew 7 in the BOVCB

Matthew 7 in the BOYCB

Matthew 7 in the BPBB

Matthew 7 in the BPH

Matthew 7 in the BSB

Matthew 7 in the CCB

Matthew 7 in the CUV

Matthew 7 in the CUVS

Matthew 7 in the DBT

Matthew 7 in the DGDNT

Matthew 7 in the DHNT

Matthew 7 in the DNT

Matthew 7 in the ELBE

Matthew 7 in the EMTV

Matthew 7 in the ESV

Matthew 7 in the FBV

Matthew 7 in the FEB

Matthew 7 in the GGMNT

Matthew 7 in the GNT

Matthew 7 in the HARY

Matthew 7 in the HNT

Matthew 7 in the IRVA

Matthew 7 in the IRVB

Matthew 7 in the IRVG

Matthew 7 in the IRVH

Matthew 7 in the IRVK

Matthew 7 in the IRVM

Matthew 7 in the IRVM2

Matthew 7 in the IRVO

Matthew 7 in the IRVP

Matthew 7 in the IRVT

Matthew 7 in the IRVT2

Matthew 7 in the IRVU

Matthew 7 in the ISVN

Matthew 7 in the JSNT

Matthew 7 in the KAPI

Matthew 7 in the KBT1ETNIK

Matthew 7 in the KBV

Matthew 7 in the KJV

Matthew 7 in the KNFD

Matthew 7 in the LBA

Matthew 7 in the LBLA

Matthew 7 in the LNT

Matthew 7 in the LSV

Matthew 7 in the MAAL

Matthew 7 in the MBV

Matthew 7 in the MBV2

Matthew 7 in the MHNT

Matthew 7 in the MKNFD

Matthew 7 in the MNG

Matthew 7 in the MNT

Matthew 7 in the MNT2

Matthew 7 in the MRS1T

Matthew 7 in the NAA

Matthew 7 in the NASB

Matthew 7 in the NBLA

Matthew 7 in the NBS

Matthew 7 in the NBVTP

Matthew 7 in the NET2

Matthew 7 in the NIV11

Matthew 7 in the NNT

Matthew 7 in the NNT2

Matthew 7 in the NNT3

Matthew 7 in the PDDPT

Matthew 7 in the PFNT

Matthew 7 in the RMNT

Matthew 7 in the SBIAS

Matthew 7 in the SBIBS

Matthew 7 in the SBIBS2

Matthew 7 in the SBICS

Matthew 7 in the SBIDS

Matthew 7 in the SBIGS

Matthew 7 in the SBIHS

Matthew 7 in the SBIIS

Matthew 7 in the SBIIS2

Matthew 7 in the SBIIS3

Matthew 7 in the SBIKS

Matthew 7 in the SBIKS2

Matthew 7 in the SBIMS

Matthew 7 in the SBIOS

Matthew 7 in the SBIPS

Matthew 7 in the SBISS

Matthew 7 in the SBITS

Matthew 7 in the SBITS2

Matthew 7 in the SBITS3

Matthew 7 in the SBITS4

Matthew 7 in the SBIUS

Matthew 7 in the SBIVS

Matthew 7 in the SBT

Matthew 7 in the SBT1E

Matthew 7 in the SCHL

Matthew 7 in the SNT

Matthew 7 in the SUSU

Matthew 7 in the SUSU2

Matthew 7 in the SYNO

Matthew 7 in the TBIAOTANT

Matthew 7 in the TBT1E

Matthew 7 in the TBT1E2

Matthew 7 in the TFTIP

Matthew 7 in the TFTU

Matthew 7 in the TGNTATF3T

Matthew 7 in the THAI

Matthew 7 in the TNFD

Matthew 7 in the TNT

Matthew 7 in the TNTIK

Matthew 7 in the TNTIL

Matthew 7 in the TNTIN

Matthew 7 in the TNTIP

Matthew 7 in the TNTIZ

Matthew 7 in the TOMA

Matthew 7 in the TTENT

Matthew 7 in the UBG

Matthew 7 in the UGV

Matthew 7 in the UGV2

Matthew 7 in the UGV3

Matthew 7 in the VBL

Matthew 7 in the VDCC

Matthew 7 in the YALU

Matthew 7 in the YAPE

Matthew 7 in the YBVTP

Matthew 7 in the ZBP