Mark 13 (BOLCB2)

1 Wana Yesu azalaki kobima longwa na Tempelo, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye :— Moteyi, tala ndenge mabanga oyo ezali kitoko ! Tala ndenge Ndako oyo ezali monene ! 2 Yesu alobaki na ye : — Ozali komona bandako minene oyo ! Libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu, nyonso ekobukama. 3 Bongo Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, oyo etalana na Tempelo.Petelo, Jake, Yoane mpe Andre batunaki Yesu, na esika oyo bazalaki bango moko kaka : 4 — Yebisa biso, makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango nyonso ekomi pene ya kokokisama ? 5 Yesu alobaki na bango : — Bosala keba ete moto moko te akosa bino ! 6 Bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele. 7 Tango bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te. 8 Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, mabele ekoningana bipai na bipai, mpe nzala ekozala makasi penza. Makambo wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota. 9 Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako ya mayangani. Likolo na Ngai, bokosamba liboso ya bayangeli mpe liboso ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai. 10 Pamba te esengeli ete Sango Malamu esakolama liboso epai ya bikolo nyonso ya mokili. 11 Tango bakokanga bino mpo na komema bino na bisambiselo, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba ; boloba kaka oyo ekopesamela bino na tango wana, pamba te ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo Mosantu. 12 Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye mpo ete baboma ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango. 13 Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika. 14 Tango bokomona makambo ya nkele kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ; 15 tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye ; 16 tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye ! 17 Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele ! 18 Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi. 19 Pamba te ekozala mikolo ya pasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta Nzambe akela mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te. 20 Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke. 21 Na tango wana, soki moto moko alobi na bino : « Klisto azali awa ! » to « Azali kuna, » bondima ye te. 22 Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema. 23 Boye bino, bosala keba ! Ngai, namiyebiseli bino makambo nyonso. 24 Kasi na mikolo yango, sima na pasi wana, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, 25 minzoto ekokweya longwa na Likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. » 26 Bongo, bato bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya monene mpe na nkembo. 27 Akotinda ba-anjelu na Ye mpe akosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili, longwa na suka ya mabele kino na suka ya Likolo. 28 Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino : soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene. 29 Ndenge moko mpe mpo na bino ; tango bokomona makambo wana kosalema, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba. 30 Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema. 31 Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te. 32 Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana ; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango. 33 Bosala keba ! Bosenzela ! Pamba te boyebi te tango nini ngonga yango ekoya. 34 Ekozala lokola moto oyo akei na mobembo, bongo atiki ndako na ye mpe apesi mokumba na yango epai ya basali na ye ; apesi na mosali moko na moko mosala oyo ekoki na ye mpe apesi mitindo epai ya mokengeli ekuke ete akengela malamu. 35 Yango wana, bosenzela ; pamba te boyebi te tango nini nkolo ndako akozonga : na pokwa to na midi ya butu to tango soso elelaka to mpe na tongo. 36 Pamba te soki ayei na mbalakata, asengeli te kokuta bino bolali pongi. 37 Makambo oyo nalobi na bino, nazali koloba yango mpe na bato nyonso : Bosenzela.

In Other Versions

Mark 13 in the ANGEFD

Mark 13 in the ANTPNG2D

Mark 13 in the AS21

Mark 13 in the BAGH

Mark 13 in the BBPNG

Mark 13 in the BBT1E

Mark 13 in the BDS

Mark 13 in the BEV

Mark 13 in the BHAD

Mark 13 in the BIB

Mark 13 in the BLPT

Mark 13 in the BNT

Mark 13 in the BNTABOOT

Mark 13 in the BNTLV

Mark 13 in the BOATCB

Mark 13 in the BOATCB2

Mark 13 in the BOBCV

Mark 13 in the BOCNT

Mark 13 in the BOECS

Mark 13 in the BOGWICC

Mark 13 in the BOHCB

Mark 13 in the BOHCV

Mark 13 in the BOHLNT

Mark 13 in the BOHNTLTAL

Mark 13 in the BOICB

Mark 13 in the BOILNTAP

Mark 13 in the BOITCV

Mark 13 in the BOKCV

Mark 13 in the BOKCV2

Mark 13 in the BOKHWOG

Mark 13 in the BOKSSV

Mark 13 in the BOLCB

Mark 13 in the BOMCV

Mark 13 in the BONAV

Mark 13 in the BONCB

Mark 13 in the BONLT

Mark 13 in the BONUT2

Mark 13 in the BOPLNT

Mark 13 in the BOSCB

Mark 13 in the BOSNC

Mark 13 in the BOTLNT

Mark 13 in the BOVCB

Mark 13 in the BOYCB

Mark 13 in the BPBB

Mark 13 in the BPH

Mark 13 in the BSB

Mark 13 in the CCB

Mark 13 in the CUV

Mark 13 in the CUVS

Mark 13 in the DBT

Mark 13 in the DGDNT

Mark 13 in the DHNT

Mark 13 in the DNT

Mark 13 in the ELBE

Mark 13 in the EMTV

Mark 13 in the ESV

Mark 13 in the FBV

Mark 13 in the FEB

Mark 13 in the GGMNT

Mark 13 in the GNT

Mark 13 in the HARY

Mark 13 in the HNT

Mark 13 in the IRVA

Mark 13 in the IRVB

Mark 13 in the IRVG

Mark 13 in the IRVH

Mark 13 in the IRVK

Mark 13 in the IRVM

Mark 13 in the IRVM2

Mark 13 in the IRVO

Mark 13 in the IRVP

Mark 13 in the IRVT

Mark 13 in the IRVT2

Mark 13 in the IRVU

Mark 13 in the ISVN

Mark 13 in the JSNT

Mark 13 in the KAPI

Mark 13 in the KBT1ETNIK

Mark 13 in the KBV

Mark 13 in the KJV

Mark 13 in the KNFD

Mark 13 in the LBA

Mark 13 in the LBLA

Mark 13 in the LNT

Mark 13 in the LSV

Mark 13 in the MAAL

Mark 13 in the MBV

Mark 13 in the MBV2

Mark 13 in the MHNT

Mark 13 in the MKNFD

Mark 13 in the MNG

Mark 13 in the MNT

Mark 13 in the MNT2

Mark 13 in the MRS1T

Mark 13 in the NAA

Mark 13 in the NASB

Mark 13 in the NBLA

Mark 13 in the NBS

Mark 13 in the NBVTP

Mark 13 in the NET2

Mark 13 in the NIV11

Mark 13 in the NNT

Mark 13 in the NNT2

Mark 13 in the NNT3

Mark 13 in the PDDPT

Mark 13 in the PFNT

Mark 13 in the RMNT

Mark 13 in the SBIAS

Mark 13 in the SBIBS

Mark 13 in the SBIBS2

Mark 13 in the SBICS

Mark 13 in the SBIDS

Mark 13 in the SBIGS

Mark 13 in the SBIHS

Mark 13 in the SBIIS

Mark 13 in the SBIIS2

Mark 13 in the SBIIS3

Mark 13 in the SBIKS

Mark 13 in the SBIKS2

Mark 13 in the SBIMS

Mark 13 in the SBIOS

Mark 13 in the SBIPS

Mark 13 in the SBISS

Mark 13 in the SBITS

Mark 13 in the SBITS2

Mark 13 in the SBITS3

Mark 13 in the SBITS4

Mark 13 in the SBIUS

Mark 13 in the SBIVS

Mark 13 in the SBT

Mark 13 in the SBT1E

Mark 13 in the SCHL

Mark 13 in the SNT

Mark 13 in the SUSU

Mark 13 in the SUSU2

Mark 13 in the SYNO

Mark 13 in the TBIAOTANT

Mark 13 in the TBT1E

Mark 13 in the TBT1E2

Mark 13 in the TFTIP

Mark 13 in the TFTU

Mark 13 in the TGNTATF3T

Mark 13 in the THAI

Mark 13 in the TNFD

Mark 13 in the TNT

Mark 13 in the TNTIK

Mark 13 in the TNTIL

Mark 13 in the TNTIN

Mark 13 in the TNTIP

Mark 13 in the TNTIZ

Mark 13 in the TOMA

Mark 13 in the TTENT

Mark 13 in the UBG

Mark 13 in the UGV

Mark 13 in the UGV2

Mark 13 in the UGV3

Mark 13 in the VBL

Mark 13 in the VDCC

Mark 13 in the YALU

Mark 13 in the YAPE

Mark 13 in the YBVTP

Mark 13 in the ZBP