Numbers 10 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Sala bakelelo mibale na palata oyo batuta. Okosalela yango mpo na kobengisa lisanga mpe mpo na kopesa mitindo ya kolongola molako. 3 Soki bakelelo nyonso mibale ebeti nzela moko, lisanga mobimba ekosangana pembeni na yo, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 4 Soki kelelo moko kaka nde ebeti, kaka bakambi, bakonzi ya bituka ya Isalaele nde bakosangana liboso na yo. 5 Soki kelelo ebeti makasi, mabota oyo etongi molako na ngambo ya este ekokende. 6 Soki ebeti makasi mpo na mbala ya mibale, mabota oyo etongi molako na ngambo ya sude ekokende. Ebeteli ya kelelo nde ekozala elembo mpo na kopesa mbela ya kokende. 7 Mpo na kosangisa lisanga, beta bakelelo, kasi makasi te. 8 Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bango nde bakobanda kobeta bakelelo yango. Ekozala mobeko ya libela mpo na bino mpe bakitani na bino. 9 Tango, kati na mokili na bino moko, bokokende na bitumba mpo na kotelemela monguna oyo azali konyokola bino, bokobeta bakelelo na bino makasi. Boye, Yawe, Nzambe na bino, akokanisa bino mpe akokangola bino na maboko ya banguna na bino. 10 Mpe lisusu, na batango na bino ya kosepela, na bafeti na bino oyo ekatama mpe ya ebandeli ya sanza, bokobeta bakelelo mpo na kobonza mbeka na bino ya kotumba mpe ya boyokani. Yango ekozala ekaniseli mpo na bino na miso ya Nzambe na bino. Nazali Yawe, Nzambe na bino. » 11 Na mokolo ya tuku mibale, ya sanza ya mibale, ya mobu oyo ya mibale, lipata etelemaki na likolo ya Mongombo ya Litatoli. 12 Boye, bana ya Isalaele balongwaki na esobe ya Sinai, basalaki mobembo mpe batambolaki bisika na bisika kino tango lipata eyaki kopema na esobe ya Parani. 13 Ezalaki mbala na bango ya liboso ya kolongwa na molako mpe kotambola kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize. 14 Mampinga ya molako ya Yuda ezalaki kotambola liboso, elongo na bendele na bango. Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, nde azalaki mokonzi na bango. 15 Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Isakari. 16 Eliabi, mwana mobali ya Eloni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Zabuloni. 17 Bongo bakabolaki Mongombo na biteni-biteni. Bakitani ya Gerishoni mpe ya Merari nde bamemaki yango mpe bakendeki. 18 Mampinga ya molako ya Ribeni elandaki na sima mpo na kotambola. Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri, nde azalaki mokonzi na bango. 19 Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Simeoni. 20 Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Gadi. 21 Sima, bato ya Keati bakendeki mpe bamemaki biloko ya bule. Balevi mosusu bazalaki kotonga Mongombo liboso ete bakoma. 22 Mampinga ya molako ya Efrayimi elandaki mpe na sima mpo na kotambola. Elishama, mwana mobali ya Amiwudi, nde azalaki mokonzi na bango. 23 Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Manase. 24 Abidani, mwana mobali ya Gideoni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Benjame. 25 Boye, mpo na kosukisa, mampinga ya libota ya Dani mpe elandaki na sima mpo na kotambola na se ya bendele na bango. Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, nde azalaki mokonzi na bango. 26 Pagieli, mwana mobali ya Okirani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Aseri ; 27 mpe Akira, mwana mobali ya Enani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Nefitali. 28 Wana nde ezalaki molongo oyo mampinga ya bana ya Isalaele ezalaki kotambola na yango. 29 Moyize alobaki na Obabi, mwana mobali ya Reweli, moto ya Madiani, bokilo ya Moyize :— Tozali kokende na mokili oyo Yawe alobaki : « Nakopesa bino mokili yango. » Yaka kotambola elongo na biso. Tokosala ete obika bolamu oyo Yawe alakaki kosalela Isalaele. 30 Obabi azongiselaki ye :— Te ! Nakokende elongo na bino te, nakozonga na mboka na ngai, kati na libota na ngai. 31 Kasi Moyize alobaki :— Nabondeli yo : kotika biso te, pamba te yo nde oyebi bisika oyo tosengeli kotonga molako kati na esobe ; okozala motambolisi na biso. 32 Soki otamboli na biso elongo, tokokabola elongo na yo eloko nyonso ya malamu oyo Yawe akopesa biso. 33 Boye, balongwaki na ngomba ya Yawe mpe batambolaki mikolo misato ya mobembo. Sanduku ya Boyokani ya Yawe etambolaki liboso na bango na mobembo oyo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema. 34 Na moyi, lipata na Yawe ezalaki likolo na bango, na tango bazalaki kolongola molako. 35 Tango nyonso Sanduku ezalaki kokende, Moyize azalaki koloba :« Oh Yawe, telema !Tika ete banguna na Yo bapalangana !Tika ete banguna na Yo bakima liboso na Yo ! » 36 Mpe tango nyonso lipata ezalaki kopema, azalaki koloba :« Oh Yawe, zonga kati na bana ya Isalaele,pamba te bazali ebele penza ! »

In Other Versions

Numbers 10 in the ANGEFD

Numbers 10 in the ANTPNG2D

Numbers 10 in the AS21

Numbers 10 in the BAGH

Numbers 10 in the BBPNG

Numbers 10 in the BBT1E

Numbers 10 in the BDS

Numbers 10 in the BEV

Numbers 10 in the BHAD

Numbers 10 in the BIB

Numbers 10 in the BLPT

Numbers 10 in the BNT

Numbers 10 in the BNTABOOT

Numbers 10 in the BNTLV

Numbers 10 in the BOATCB

Numbers 10 in the BOATCB2

Numbers 10 in the BOBCV

Numbers 10 in the BOCNT

Numbers 10 in the BOECS

Numbers 10 in the BOGWICC

Numbers 10 in the BOHCB

Numbers 10 in the BOHCV

Numbers 10 in the BOHLNT

Numbers 10 in the BOHNTLTAL

Numbers 10 in the BOICB

Numbers 10 in the BOILNTAP

Numbers 10 in the BOITCV

Numbers 10 in the BOKCV

Numbers 10 in the BOKCV2

Numbers 10 in the BOKHWOG

Numbers 10 in the BOKSSV

Numbers 10 in the BOLCB

Numbers 10 in the BOMCV

Numbers 10 in the BONAV

Numbers 10 in the BONCB

Numbers 10 in the BONLT

Numbers 10 in the BONUT2

Numbers 10 in the BOPLNT

Numbers 10 in the BOSCB

Numbers 10 in the BOSNC

Numbers 10 in the BOTLNT

Numbers 10 in the BOVCB

Numbers 10 in the BOYCB

Numbers 10 in the BPBB

Numbers 10 in the BPH

Numbers 10 in the BSB

Numbers 10 in the CCB

Numbers 10 in the CUV

Numbers 10 in the CUVS

Numbers 10 in the DBT

Numbers 10 in the DGDNT

Numbers 10 in the DHNT

Numbers 10 in the DNT

Numbers 10 in the ELBE

Numbers 10 in the EMTV

Numbers 10 in the ESV

Numbers 10 in the FBV

Numbers 10 in the FEB

Numbers 10 in the GGMNT

Numbers 10 in the GNT

Numbers 10 in the HARY

Numbers 10 in the HNT

Numbers 10 in the IRVA

Numbers 10 in the IRVB

Numbers 10 in the IRVG

Numbers 10 in the IRVH

Numbers 10 in the IRVK

Numbers 10 in the IRVM

Numbers 10 in the IRVM2

Numbers 10 in the IRVO

Numbers 10 in the IRVP

Numbers 10 in the IRVT

Numbers 10 in the IRVT2

Numbers 10 in the IRVU

Numbers 10 in the ISVN

Numbers 10 in the JSNT

Numbers 10 in the KAPI

Numbers 10 in the KBT1ETNIK

Numbers 10 in the KBV

Numbers 10 in the KJV

Numbers 10 in the KNFD

Numbers 10 in the LBA

Numbers 10 in the LBLA

Numbers 10 in the LNT

Numbers 10 in the LSV

Numbers 10 in the MAAL

Numbers 10 in the MBV

Numbers 10 in the MBV2

Numbers 10 in the MHNT

Numbers 10 in the MKNFD

Numbers 10 in the MNG

Numbers 10 in the MNT

Numbers 10 in the MNT2

Numbers 10 in the MRS1T

Numbers 10 in the NAA

Numbers 10 in the NASB

Numbers 10 in the NBLA

Numbers 10 in the NBS

Numbers 10 in the NBVTP

Numbers 10 in the NET2

Numbers 10 in the NIV11

Numbers 10 in the NNT

Numbers 10 in the NNT2

Numbers 10 in the NNT3

Numbers 10 in the PDDPT

Numbers 10 in the PFNT

Numbers 10 in the RMNT

Numbers 10 in the SBIAS

Numbers 10 in the SBIBS

Numbers 10 in the SBIBS2

Numbers 10 in the SBICS

Numbers 10 in the SBIDS

Numbers 10 in the SBIGS

Numbers 10 in the SBIHS

Numbers 10 in the SBIIS

Numbers 10 in the SBIIS2

Numbers 10 in the SBIIS3

Numbers 10 in the SBIKS

Numbers 10 in the SBIKS2

Numbers 10 in the SBIMS

Numbers 10 in the SBIOS

Numbers 10 in the SBIPS

Numbers 10 in the SBISS

Numbers 10 in the SBITS

Numbers 10 in the SBITS2

Numbers 10 in the SBITS3

Numbers 10 in the SBITS4

Numbers 10 in the SBIUS

Numbers 10 in the SBIVS

Numbers 10 in the SBT

Numbers 10 in the SBT1E

Numbers 10 in the SCHL

Numbers 10 in the SNT

Numbers 10 in the SUSU

Numbers 10 in the SUSU2

Numbers 10 in the SYNO

Numbers 10 in the TBIAOTANT

Numbers 10 in the TBT1E

Numbers 10 in the TBT1E2

Numbers 10 in the TFTIP

Numbers 10 in the TFTU

Numbers 10 in the TGNTATF3T

Numbers 10 in the THAI

Numbers 10 in the TNFD

Numbers 10 in the TNT

Numbers 10 in the TNTIK

Numbers 10 in the TNTIL

Numbers 10 in the TNTIN

Numbers 10 in the TNTIP

Numbers 10 in the TNTIZ

Numbers 10 in the TOMA

Numbers 10 in the TTENT

Numbers 10 in the UBG

Numbers 10 in the UGV

Numbers 10 in the UGV2

Numbers 10 in the UGV3

Numbers 10 in the VBL

Numbers 10 in the VDCC

Numbers 10 in the YALU

Numbers 10 in the YAPE

Numbers 10 in the YBVTP

Numbers 10 in the ZBP