Numbers 27 (BOLCB2)

1 Bana basi ya Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase bazalaki bakitani ya libota ya Manase, mwana mobali ya Jozefi. Bakombo na bango ezalaki : Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa. Bayaki 2 liboso ya Moyize, ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe ya bakambi ya lisanga mobimba, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe balobaki : 3 « Tata na biso akufaki na esobe. Azalaki te na molongo na bato oyo bazalaki kolanda Kore, oyo basanganaki lisanga mpo na kotelemela Yawe, kasi akufaki mpo na masumu na ye moko mpe atikaki bana mibali te. 4 Bongo mpo na nini kombo ya tata na biso elimwa kaka boye na libota na ye, mpo ete azalaki na mwana mobali te ? Pesa biso mpe eteni ya mabele kati na bandeko ya tata na biso. » 5 Boye, Moyize amemaki likambo na bango liboso ya Yawe. 6 Yawe alobaki na Moyize : 7 « Makambo oyo bana basi ya Tselofikadi bazali koloba ezali solo. Osengeli kopesa bango eteni ya mabele lokola libula kati na bandeko ya tata na bango mpe pesa bango libula ya tata na bango. 8 Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto moko asili kokufa mpe atiki bana mibali te, bokopesa libula na ye epai ya mwana na ye ya mwasi. 9 Soki mpe azali na mwana mwasi te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko na ye ya mibali. 10 Soki mpe azali na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko mibali ya tata na ye. 11 Bongo, soki tata na ye azalaki mpe na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya ndeko ya pene ya libota ya tata na ye ; ye nde akokitana na yango. Oyo ekozala mpo na Isalaele, mobeko oyo bosengeli kolanda ndenge Yawe alobaki na Moyize. › » 12 Yawe alobaki na Moyize :— Mata likolo ya bangomba ya Abarimi, mpe tala mokili oyo napesaki epai ya bana ya Isalaele. 13 Sima na yo komona yango, yo mpe okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi ndenge moko na Aron, ndeko na yo ya mobali, 14 pamba te tango lisanga ya bato batombokaki mpo na mayi, na esobe ya Tsini, bino mpe botosaki mitindo na Ngai te mpe bopesaki lokumu te na bosantu na Ngai na miso na bango. Ezalaki nde mayi ya Meriba ya Kadeshi, na esobe ya Tsini. 15 Moyize alobaki na Yawe : 16 — Tika ete Yawe, Nzambe oyo apesaka pema na bato nyonso, apona moto moko mpo ete akamba lingomba oyo ; 17 moto oyo akobanda kobima mpe kokota liboso na bango, oyo akobanda kobimisa mpe kokotisa bango mpo ete bato na Yawe bazala te lokola bibwele oyo ezanga mobateli. 18 Yawe azongiselaki Moyize :— Kamata Jozue, mwana mobali ya Nuni, moto oyo azali na molimo mpe tia ye maboko na yo. 19 Mema ye liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe ya lingomba mobimba ya bato, bongo okopesa ye mosala na miso na bango. 20 Pesa ye ndambo ya bokonzi na yo mpo ete lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakoka kotosa ye. 21 Akokende kotelema liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, oyo akotuna mokano na Yawe mpo na ye, na nzela na Urimi. Na mokano wana nde, ye mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakobanda kobima mpe kokota. 22 Moyize asalaki ndenge Yawe atindaki ye. Akamataki Jozue mpe atelemisaki ye liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele. 23 Atiaki ye maboko mpe apesaki ye mosala, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize.

In Other Versions

Numbers 27 in the ANGEFD

Numbers 27 in the ANTPNG2D

Numbers 27 in the AS21

Numbers 27 in the BAGH

Numbers 27 in the BBPNG

Numbers 27 in the BBT1E

Numbers 27 in the BDS

Numbers 27 in the BEV

Numbers 27 in the BHAD

Numbers 27 in the BIB

Numbers 27 in the BLPT

Numbers 27 in the BNT

Numbers 27 in the BNTABOOT

Numbers 27 in the BNTLV

Numbers 27 in the BOATCB

Numbers 27 in the BOATCB2

Numbers 27 in the BOBCV

Numbers 27 in the BOCNT

Numbers 27 in the BOECS

Numbers 27 in the BOGWICC

Numbers 27 in the BOHCB

Numbers 27 in the BOHCV

Numbers 27 in the BOHLNT

Numbers 27 in the BOHNTLTAL

Numbers 27 in the BOICB

Numbers 27 in the BOILNTAP

Numbers 27 in the BOITCV

Numbers 27 in the BOKCV

Numbers 27 in the BOKCV2

Numbers 27 in the BOKHWOG

Numbers 27 in the BOKSSV

Numbers 27 in the BOLCB

Numbers 27 in the BOMCV

Numbers 27 in the BONAV

Numbers 27 in the BONCB

Numbers 27 in the BONLT

Numbers 27 in the BONUT2

Numbers 27 in the BOPLNT

Numbers 27 in the BOSCB

Numbers 27 in the BOSNC

Numbers 27 in the BOTLNT

Numbers 27 in the BOVCB

Numbers 27 in the BOYCB

Numbers 27 in the BPBB

Numbers 27 in the BPH

Numbers 27 in the BSB

Numbers 27 in the CCB

Numbers 27 in the CUV

Numbers 27 in the CUVS

Numbers 27 in the DBT

Numbers 27 in the DGDNT

Numbers 27 in the DHNT

Numbers 27 in the DNT

Numbers 27 in the ELBE

Numbers 27 in the EMTV

Numbers 27 in the ESV

Numbers 27 in the FBV

Numbers 27 in the FEB

Numbers 27 in the GGMNT

Numbers 27 in the GNT

Numbers 27 in the HARY

Numbers 27 in the HNT

Numbers 27 in the IRVA

Numbers 27 in the IRVB

Numbers 27 in the IRVG

Numbers 27 in the IRVH

Numbers 27 in the IRVK

Numbers 27 in the IRVM

Numbers 27 in the IRVM2

Numbers 27 in the IRVO

Numbers 27 in the IRVP

Numbers 27 in the IRVT

Numbers 27 in the IRVT2

Numbers 27 in the IRVU

Numbers 27 in the ISVN

Numbers 27 in the JSNT

Numbers 27 in the KAPI

Numbers 27 in the KBT1ETNIK

Numbers 27 in the KBV

Numbers 27 in the KJV

Numbers 27 in the KNFD

Numbers 27 in the LBA

Numbers 27 in the LBLA

Numbers 27 in the LNT

Numbers 27 in the LSV

Numbers 27 in the MAAL

Numbers 27 in the MBV

Numbers 27 in the MBV2

Numbers 27 in the MHNT

Numbers 27 in the MKNFD

Numbers 27 in the MNG

Numbers 27 in the MNT

Numbers 27 in the MNT2

Numbers 27 in the MRS1T

Numbers 27 in the NAA

Numbers 27 in the NASB

Numbers 27 in the NBLA

Numbers 27 in the NBS

Numbers 27 in the NBVTP

Numbers 27 in the NET2

Numbers 27 in the NIV11

Numbers 27 in the NNT

Numbers 27 in the NNT2

Numbers 27 in the NNT3

Numbers 27 in the PDDPT

Numbers 27 in the PFNT

Numbers 27 in the RMNT

Numbers 27 in the SBIAS

Numbers 27 in the SBIBS

Numbers 27 in the SBIBS2

Numbers 27 in the SBICS

Numbers 27 in the SBIDS

Numbers 27 in the SBIGS

Numbers 27 in the SBIHS

Numbers 27 in the SBIIS

Numbers 27 in the SBIIS2

Numbers 27 in the SBIIS3

Numbers 27 in the SBIKS

Numbers 27 in the SBIKS2

Numbers 27 in the SBIMS

Numbers 27 in the SBIOS

Numbers 27 in the SBIPS

Numbers 27 in the SBISS

Numbers 27 in the SBITS

Numbers 27 in the SBITS2

Numbers 27 in the SBITS3

Numbers 27 in the SBITS4

Numbers 27 in the SBIUS

Numbers 27 in the SBIVS

Numbers 27 in the SBT

Numbers 27 in the SBT1E

Numbers 27 in the SCHL

Numbers 27 in the SNT

Numbers 27 in the SUSU

Numbers 27 in the SUSU2

Numbers 27 in the SYNO

Numbers 27 in the TBIAOTANT

Numbers 27 in the TBT1E

Numbers 27 in the TBT1E2

Numbers 27 in the TFTIP

Numbers 27 in the TFTU

Numbers 27 in the TGNTATF3T

Numbers 27 in the THAI

Numbers 27 in the TNFD

Numbers 27 in the TNT

Numbers 27 in the TNTIK

Numbers 27 in the TNTIL

Numbers 27 in the TNTIN

Numbers 27 in the TNTIP

Numbers 27 in the TNTIZ

Numbers 27 in the TOMA

Numbers 27 in the TTENT

Numbers 27 in the UBG

Numbers 27 in the UGV

Numbers 27 in the UGV2

Numbers 27 in the UGV3

Numbers 27 in the VBL

Numbers 27 in the VDCC

Numbers 27 in the YALU

Numbers 27 in the YAPE

Numbers 27 in the YBVTP

Numbers 27 in the ZBP