Numbers 33 (BOLCB2)

1 Tala bisika oyo bana ya Isalaele batongaki milako na bango tango bazalaki na mobembo wuta na mokili ya Ejipito. Bazalaki kotambola na molongo ya bitumba na bokambami ya Moyize mpe Aron. 2 Moyize akomaki na mokanda bisika nyonso oyo bazalaki koleka na etinda ya Yawe. Tala bakombo ya moko na moko ya bisika yango : 3 Bana ya Isalaele balongwaki na Ramisesi na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya liboso ; ezalaki mokolo oyo elandaki mokolo ya Pasika. Babimaki na matata te na miso ya bato nyonso ya Ejipito, 4 wana bato ya Ejipito bazalaki kokunda bibembe ya bana mibali na bango ya liboso oyo Yawe abetaki mpo na kopesa etumbu na banzambe na bango. 5 Tango balongwaki na Ramisesi, bana ya Isalaele bakendeki kotonga molako na bango na Sukoti. 6 Kolongwa na Sukoti, bakendeki kotonga molako na bango na Etami, pene ya mondelo ya esobe. 7 Tango balongwaki na Etami, bazongaki na ngambo ya Pi-Ayiroti oyo etalana na Bala-Tsefoni, mpe batongaki molako na bango liboso ya Migidoli. 8 Kolongwa na Pi-Ayiroti, bakatisaki ebale monene mpe bakomaki na esobe ; batambolaki mikolo misato na esobe ya Etami mpe batongaki molako na bango, na Mara. 9 Kolongwa na Mara, bakomaki na Elimi epai wapi bakutaki bitima zomi na mibale mpe banzete ya mbila tuku sambo ; batongaki molako na bango kuna. 10 Kolongwa na Elimi, bakendeki kotonga molako na bango pene ya ebale monene ya barozo. 11 Kolongwa na ebale monene ya barozo, bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Tsini. 12 Kolongwa na esobe ya Tsini, bakendeki kotonga molako na bango na Dofika. 13 Kolongwa na Dofika, bakendeki kotonga molako na bango na Alushi. 14 Kolongwa na Alushi, bakendeki kotonga molako na bango na Refidimi epai wapi bato bazangaki mayi ya komela. 15 Kolongwa na Refidimi, bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Sinai. 16 Kolongwa na esobe ya Sinai, bakendeki kotonga molako na bango na Kibiroti-Atava. 17 Kolongwa na Kibiroti-Atava, bakendeki kotonga molako na bango na Atseroti. 18 Kolongwa na Atseroti, bakendeki kotonga molako na bango na Ritima. 19 Kolongwa na Ritima, bakendeki kotonga molako na bango na Rimoni-Peretsi. 20 Kolongwa na Rimoni-Peretsi, bakendeki kotonga molako na bango na Libina. 21 Kolongwa na Libina, bakendeki kotonga molako na bango na Risa. 22 Kolongwa na Risa, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Keyelata. 23 Kolongwa na ngomba Keyelata, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Seferi. 24 Kolongwa na ngomba Seferi, bakendeki kotonga molako na bango na Arada. 25 Kolongwa na Arada, bakendeki kotonga molako na bango na Makeyeloti. 26 Kolongwa na Makeyeloti, bakendeki kotonga molako na bango na Taati. 27 Kolongwa na Taati, bakendeki kotonga molako na bango na Tera. 28 Kolongwa na Tera, bakendaki kotonga molako na bango na Mitika. 29 Kolongwa na Mitika, bakendaki kotonga molako na bango na Ashimona. 30 Kolongwa na Ashimona, bakendeki kotonga molako na bango na Moseroti. 31 Kolongwa na Moseroti, bakendeki kotonga molako na bango na Bene-Yaakani. 32 Kolongwa na Bene-Yaakani, bakendeki kotonga molako na bango na Ori-Gidigadi. 33 Kolongwa na Ori-Gidigadi, bakendeki kotonga molako na bango na Yotibata. 34 Kolongwa na Yotibata, bakendeki kotonga molako na bango na Abrona. 35 Kolongwa na Abrona, bakendeki kotonga molako na bango na Etsioni-Geberi. 36 Kolongwa na Etsioni-Geberi, bakendeki kotonga molako na bango na Kadeshi, na esobe ya Tsini. 37 Kolongwa na Kadeshi, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Ori, na mondelo ya Edomi. 38 Ezali kuna na ngomba Ori nde, kolanda etinda ya Yawe, Nganga-Nzambe Aron amataki mpe akufaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano, sima na mibu tuku minei wuta bana ya Isalaele babimaki na Ejipito. 39 Aron azalaki na mibu ya mbotama nkama moko na tuku mibale na misato tango akufaki likolo ya ngomba Ori. 40 Boye, mokonzi ya Aradi, moto ya mboka Kanana, oyo azalaki kovanda na Negevi ya mboka Kanana, ayokaki sango ya koya ya bana ya Isalaele. 41 Tango balongwaki na ngomba Ori, bakendeki kotonga molako na bango na Tsalimona. 42 Kolongwa na Tsalimona, bakendeki kotonga molako na bango na Punoni. 43 Kolongwa na Punoni, bakendeki kotonga molako na bango na Oboti. 44 Kolongwa na Oboti, bakendeki kotonga molako na bango na Iye-Abarimi, na mondelo ya Moabi. 45 Kolongwa na Iye-Abarimi, bakendeki kotonga molako na bango na Diboni-Gadi. 46 Kolongwa na Diboni-Gadi, bakendeki kotonga molako na bango na Alimoni-Dibilatayimi. 47 Kolongwa na Alimoni-Dibilatayimi, bakendeki kotonga molako na bango na bangomba Abarimi, pembeni ya Nebo. 48 Kolongwa na bangomba Abarimi, bakendeki kotonga molako na bango na bitando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalana na Jeriko. 49 Batongaki molako na bango pembeni ya Yordani, kolongwa na Beti-Yeshimoti kino na Abele-Shitimi, na etando ya Moabi. 50 Na bitando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalana na Jeriko, Yawe alobaki na Moyize : 51 « Loba na bana ya Isalaele, mpe yebisa bango : ‹ Tango bokokatisa ebale Yordani mpo na kokota na mokili ya Kanana, 52 bokobengana bato nyonso oyo bavandaka na mboka yango, bokosilisa kobuka banzambe nyonso ya bikeko oyo basala na mabanga, na bibende banyangwisa na moto mpe bokobebisa bisambelo na bango nyonso ya likolo ya bangomba. 53 Bokobotola mokili yango mpe bokokoma kovanda kuna, pamba te napesi bino mokili yango mpo ete bobotola yango. 54 Bokokabola na kobeta zeke mabele ya mokili oyo ezali libula na bino : libota oyo eleki monene ekozwa mpe eteni ya mabele oyo eleki monene ; libota ya moke, ekozwa mpe eteni ya mabele ya moke. Libota moko na moko ekozwa eteni na yango ya mabele na esika oyo zeke ekokweya. Bokokabola yango kolanda masanga ya bituka na bino. 55 Kasi soki bobengani te bavandi ya mokili yango, ba-oyo bakotikala bakokoma lokola banzube na miso na bino mpe lokola basende na mipanzi na bino. Bakomonisa bino pasi na mokili oyo bokovanda. 56 Boye, nakosala bino ndenge nakanaki kosala bango. › »

In Other Versions

Numbers 33 in the ANGEFD

Numbers 33 in the ANTPNG2D

Numbers 33 in the AS21

Numbers 33 in the BAGH

Numbers 33 in the BBPNG

Numbers 33 in the BBT1E

Numbers 33 in the BDS

Numbers 33 in the BEV

Numbers 33 in the BHAD

Numbers 33 in the BIB

Numbers 33 in the BLPT

Numbers 33 in the BNT

Numbers 33 in the BNTABOOT

Numbers 33 in the BNTLV

Numbers 33 in the BOATCB

Numbers 33 in the BOATCB2

Numbers 33 in the BOBCV

Numbers 33 in the BOCNT

Numbers 33 in the BOECS

Numbers 33 in the BOGWICC

Numbers 33 in the BOHCB

Numbers 33 in the BOHCV

Numbers 33 in the BOHLNT

Numbers 33 in the BOHNTLTAL

Numbers 33 in the BOICB

Numbers 33 in the BOILNTAP

Numbers 33 in the BOITCV

Numbers 33 in the BOKCV

Numbers 33 in the BOKCV2

Numbers 33 in the BOKHWOG

Numbers 33 in the BOKSSV

Numbers 33 in the BOLCB

Numbers 33 in the BOMCV

Numbers 33 in the BONAV

Numbers 33 in the BONCB

Numbers 33 in the BONLT

Numbers 33 in the BONUT2

Numbers 33 in the BOPLNT

Numbers 33 in the BOSCB

Numbers 33 in the BOSNC

Numbers 33 in the BOTLNT

Numbers 33 in the BOVCB

Numbers 33 in the BOYCB

Numbers 33 in the BPBB

Numbers 33 in the BPH

Numbers 33 in the BSB

Numbers 33 in the CCB

Numbers 33 in the CUV

Numbers 33 in the CUVS

Numbers 33 in the DBT

Numbers 33 in the DGDNT

Numbers 33 in the DHNT

Numbers 33 in the DNT

Numbers 33 in the ELBE

Numbers 33 in the EMTV

Numbers 33 in the ESV

Numbers 33 in the FBV

Numbers 33 in the FEB

Numbers 33 in the GGMNT

Numbers 33 in the GNT

Numbers 33 in the HARY

Numbers 33 in the HNT

Numbers 33 in the IRVA

Numbers 33 in the IRVB

Numbers 33 in the IRVG

Numbers 33 in the IRVH

Numbers 33 in the IRVK

Numbers 33 in the IRVM

Numbers 33 in the IRVM2

Numbers 33 in the IRVO

Numbers 33 in the IRVP

Numbers 33 in the IRVT

Numbers 33 in the IRVT2

Numbers 33 in the IRVU

Numbers 33 in the ISVN

Numbers 33 in the JSNT

Numbers 33 in the KAPI

Numbers 33 in the KBT1ETNIK

Numbers 33 in the KBV

Numbers 33 in the KJV

Numbers 33 in the KNFD

Numbers 33 in the LBA

Numbers 33 in the LBLA

Numbers 33 in the LNT

Numbers 33 in the LSV

Numbers 33 in the MAAL

Numbers 33 in the MBV

Numbers 33 in the MBV2

Numbers 33 in the MHNT

Numbers 33 in the MKNFD

Numbers 33 in the MNG

Numbers 33 in the MNT

Numbers 33 in the MNT2

Numbers 33 in the MRS1T

Numbers 33 in the NAA

Numbers 33 in the NASB

Numbers 33 in the NBLA

Numbers 33 in the NBS

Numbers 33 in the NBVTP

Numbers 33 in the NET2

Numbers 33 in the NIV11

Numbers 33 in the NNT

Numbers 33 in the NNT2

Numbers 33 in the NNT3

Numbers 33 in the PDDPT

Numbers 33 in the PFNT

Numbers 33 in the RMNT

Numbers 33 in the SBIAS

Numbers 33 in the SBIBS

Numbers 33 in the SBIBS2

Numbers 33 in the SBICS

Numbers 33 in the SBIDS

Numbers 33 in the SBIGS

Numbers 33 in the SBIHS

Numbers 33 in the SBIIS

Numbers 33 in the SBIIS2

Numbers 33 in the SBIIS3

Numbers 33 in the SBIKS

Numbers 33 in the SBIKS2

Numbers 33 in the SBIMS

Numbers 33 in the SBIOS

Numbers 33 in the SBIPS

Numbers 33 in the SBISS

Numbers 33 in the SBITS

Numbers 33 in the SBITS2

Numbers 33 in the SBITS3

Numbers 33 in the SBITS4

Numbers 33 in the SBIUS

Numbers 33 in the SBIVS

Numbers 33 in the SBT

Numbers 33 in the SBT1E

Numbers 33 in the SCHL

Numbers 33 in the SNT

Numbers 33 in the SUSU

Numbers 33 in the SUSU2

Numbers 33 in the SYNO

Numbers 33 in the TBIAOTANT

Numbers 33 in the TBT1E

Numbers 33 in the TBT1E2

Numbers 33 in the TFTIP

Numbers 33 in the TFTU

Numbers 33 in the TGNTATF3T

Numbers 33 in the THAI

Numbers 33 in the TNFD

Numbers 33 in the TNT

Numbers 33 in the TNTIK

Numbers 33 in the TNTIL

Numbers 33 in the TNTIN

Numbers 33 in the TNTIP

Numbers 33 in the TNTIZ

Numbers 33 in the TOMA

Numbers 33 in the TTENT

Numbers 33 in the UBG

Numbers 33 in the UGV

Numbers 33 in the UGV2

Numbers 33 in the UGV3

Numbers 33 in the VBL

Numbers 33 in the VDCC

Numbers 33 in the YALU

Numbers 33 in the YAPE

Numbers 33 in the YBVTP

Numbers 33 in the ZBP