Numbers 34 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Pesa mitindo oyo na bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na Kanana, tala mokili oyo ekopesamela bino lokola libula, mokili ya Kanana elongo na bandelo na yango oyo : 3 Na ngambo ya sude, mondelo na bino ekobanda na esobe ya Tsini mpe ekolanda mondelo ya mokili ya Edomi. Na ngambo ya este, mondelo na bino ya sude ekobanda na ebale monene ya Barozo, 4 ekokita na sude ya ebandeli ya ngomba Akarabimi mpe ekoleka na Tsini kino na sude ya Kadeshi-Barinea ; ekokoba na Atsari-Adari mpe ekoleka na Atsimoni. 5 Longwa na Atsimoni, ekoleka na mayi ya lubwaku ya Ejipito mpo na kosuka na ebale monene. 6 Mondelo na bino ya ngambo ya weste ekozala ebale monene Mediterane. 7 Na ngambo ya nor, mondelo na bino ekobanda na ebale monene Mediterane kino na ngomba Ori. 8 Longwa na ngomba Ori, bokolekisa yango na Lebo-Amati mpo na kosuka na Tsedadi. 9 Longwa na Tsedadi, ekoleka na Zifironi mpe ekokoma na Atsari-Enani. Yango nde ekozala mondelo na bino ya ngambo ya nor. 10 Na ngambo ya este, mondelo na bino ekobanda na Atsari-Enani kino na Shefami ; 11 longwa na Shefami, ekokita na Ribila na ngambo ya este ya Ayini mpe ekolanda ebale ya Kinereti, na ngambo na yango ya este, 12 kino na Yordani mpo na kosuka na ebale monene ya Barozo. Ezali ndenge wana nde mokili na bino ekozala elongo na bandelo oyo ezingeli yango.~›~» 13 Moyize apesaki mitindo oyo na bana ya Isalaele : « Tala yango wana, mokili oyo bokokabola na zeke, mokili oyo Yawe apesaki mitindo ete bapesa yango na mabota libwa na ndambo. 14 Pamba te ndako na ndako ya libota ya Ribeni mpe ndako na ndako ya libota ya Gadi elongo na ndambo ya libota ya Manase esilaki kozwa libula na yango. 15 Mabota oyo mibale na ndambo ezwaki libula na yango na ngambo ya este ya Yordani, oyo etalana na Jeriko. » 16 Yawe alobaki lisusu na Moyize : 17 « Tala bato oyo bakokabola mokili kati na bino : Nganga-Nzambe Eleazari mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni. 18 Bokozwa lisusu mokambi moko kati na libota moko na moko mpo na kokabola mokili. 19 Tala bakombo na bango : Mpo na libota ya Yuda~: Kalebi, mwana mobali ya Yefune~; 20 mpo na libota ya Simeoni : Samuele, mwana mobali ya Amiwudi ; 21 mpo na libota ya Benjame : Elidadi, mwana mobali ya Kisiloni ; 22 mpo na libota ya Dani : mokambi Buki, mwana mobali ya Yogili ; 23 mpo na bana ya Jozefi, libota ya Manase : mokambi Anieli, mwana mobali ya Efodi ; 24 libota ya Efrayimi : mokambi Kemweli, mwana mobali ya Shifitani ; 25 mpo na libota ya Zabuloni : mokambi Elitsafani, mwana mobali ya Parinaki ; 26 mpo na libota ya Isakari : mokambi Palitieli, mwana mobali ya Azani ; 27 mpo na libota ya Aseri : mokambi Ayiwudi, mwana mobali ya Shelomi ; 28 mpo na libota ya Nefitali : mokambi Padeyeli, mwana mobali ya Amiwudi. » 29 Bango wana nde bato oyo Yawe apesaki mokumba ya kokabola mokili ya Kanana kati na bana ya Isalaele.

In Other Versions

Numbers 34 in the ANGEFD

Numbers 34 in the ANTPNG2D

Numbers 34 in the AS21

Numbers 34 in the BAGH

Numbers 34 in the BBPNG

Numbers 34 in the BBT1E

Numbers 34 in the BDS

Numbers 34 in the BEV

Numbers 34 in the BHAD

Numbers 34 in the BIB

Numbers 34 in the BLPT

Numbers 34 in the BNT

Numbers 34 in the BNTABOOT

Numbers 34 in the BNTLV

Numbers 34 in the BOATCB

Numbers 34 in the BOATCB2

Numbers 34 in the BOBCV

Numbers 34 in the BOCNT

Numbers 34 in the BOECS

Numbers 34 in the BOGWICC

Numbers 34 in the BOHCB

Numbers 34 in the BOHCV

Numbers 34 in the BOHLNT

Numbers 34 in the BOHNTLTAL

Numbers 34 in the BOICB

Numbers 34 in the BOILNTAP

Numbers 34 in the BOITCV

Numbers 34 in the BOKCV

Numbers 34 in the BOKCV2

Numbers 34 in the BOKHWOG

Numbers 34 in the BOKSSV

Numbers 34 in the BOLCB

Numbers 34 in the BOMCV

Numbers 34 in the BONAV

Numbers 34 in the BONCB

Numbers 34 in the BONLT

Numbers 34 in the BONUT2

Numbers 34 in the BOPLNT

Numbers 34 in the BOSCB

Numbers 34 in the BOSNC

Numbers 34 in the BOTLNT

Numbers 34 in the BOVCB

Numbers 34 in the BOYCB

Numbers 34 in the BPBB

Numbers 34 in the BPH

Numbers 34 in the BSB

Numbers 34 in the CCB

Numbers 34 in the CUV

Numbers 34 in the CUVS

Numbers 34 in the DBT

Numbers 34 in the DGDNT

Numbers 34 in the DHNT

Numbers 34 in the DNT

Numbers 34 in the ELBE

Numbers 34 in the EMTV

Numbers 34 in the ESV

Numbers 34 in the FBV

Numbers 34 in the FEB

Numbers 34 in the GGMNT

Numbers 34 in the GNT

Numbers 34 in the HARY

Numbers 34 in the HNT

Numbers 34 in the IRVA

Numbers 34 in the IRVB

Numbers 34 in the IRVG

Numbers 34 in the IRVH

Numbers 34 in the IRVK

Numbers 34 in the IRVM

Numbers 34 in the IRVM2

Numbers 34 in the IRVO

Numbers 34 in the IRVP

Numbers 34 in the IRVT

Numbers 34 in the IRVT2

Numbers 34 in the IRVU

Numbers 34 in the ISVN

Numbers 34 in the JSNT

Numbers 34 in the KAPI

Numbers 34 in the KBT1ETNIK

Numbers 34 in the KBV

Numbers 34 in the KJV

Numbers 34 in the KNFD

Numbers 34 in the LBA

Numbers 34 in the LBLA

Numbers 34 in the LNT

Numbers 34 in the LSV

Numbers 34 in the MAAL

Numbers 34 in the MBV

Numbers 34 in the MBV2

Numbers 34 in the MHNT

Numbers 34 in the MKNFD

Numbers 34 in the MNG

Numbers 34 in the MNT

Numbers 34 in the MNT2

Numbers 34 in the MRS1T

Numbers 34 in the NAA

Numbers 34 in the NASB

Numbers 34 in the NBLA

Numbers 34 in the NBS

Numbers 34 in the NBVTP

Numbers 34 in the NET2

Numbers 34 in the NIV11

Numbers 34 in the NNT

Numbers 34 in the NNT2

Numbers 34 in the NNT3

Numbers 34 in the PDDPT

Numbers 34 in the PFNT

Numbers 34 in the RMNT

Numbers 34 in the SBIAS

Numbers 34 in the SBIBS

Numbers 34 in the SBIBS2

Numbers 34 in the SBICS

Numbers 34 in the SBIDS

Numbers 34 in the SBIGS

Numbers 34 in the SBIHS

Numbers 34 in the SBIIS

Numbers 34 in the SBIIS2

Numbers 34 in the SBIIS3

Numbers 34 in the SBIKS

Numbers 34 in the SBIKS2

Numbers 34 in the SBIMS

Numbers 34 in the SBIOS

Numbers 34 in the SBIPS

Numbers 34 in the SBISS

Numbers 34 in the SBITS

Numbers 34 in the SBITS2

Numbers 34 in the SBITS3

Numbers 34 in the SBITS4

Numbers 34 in the SBIUS

Numbers 34 in the SBIVS

Numbers 34 in the SBT

Numbers 34 in the SBT1E

Numbers 34 in the SCHL

Numbers 34 in the SNT

Numbers 34 in the SUSU

Numbers 34 in the SUSU2

Numbers 34 in the SYNO

Numbers 34 in the TBIAOTANT

Numbers 34 in the TBT1E

Numbers 34 in the TBT1E2

Numbers 34 in the TFTIP

Numbers 34 in the TFTU

Numbers 34 in the TGNTATF3T

Numbers 34 in the THAI

Numbers 34 in the TNFD

Numbers 34 in the TNT

Numbers 34 in the TNTIK

Numbers 34 in the TNTIL

Numbers 34 in the TNTIN

Numbers 34 in the TNTIP

Numbers 34 in the TNTIZ

Numbers 34 in the TOMA

Numbers 34 in the TTENT

Numbers 34 in the UBG

Numbers 34 in the UGV

Numbers 34 in the UGV2

Numbers 34 in the UGV3

Numbers 34 in the VBL

Numbers 34 in the VDCC

Numbers 34 in the YALU

Numbers 34 in the YAPE

Numbers 34 in the YBVTP

Numbers 34 in the ZBP