Numbers 7 (BOLCB2)

1 Na mokolo oyo Moyize asilisaki kotonga Mongombo, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango elongo na bisalelo na yango. Asalaki mpe bongo mpo na etumbelo elongo na bisalelo na yango, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango. 2 Bongo bakambi ya Isalaele, bakonzi ya mabota, elingi koloba bakonzi ya bikolo oyo bakambaki mosala ya kotanga motango ya bato, 3 bamemaki makabo na bango liboso ya Yawe : bashario motoba mpe bangombe zomi na mibale. Shario moko mpo na bakambi mibale, mpe ngombe moko mpo na mokonzi moko na moko ; bamemaki yango liboso ya Mongombo. 4 Yawe alobaki na Moyize : 5 « Ndima kozwa makabo oyo bayei na yango ; okosala na yango mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Okopesa yango epai ya Balevi kolanda mokumba ya moko na moko. » 6 Moyize andimaki kozwa bashar mpe bangombe mpe apesaki yango epai ya Balevi. 7 Apesaki bashar mibale mpe bangombe minei epai ya bana mibali ya Gerishoni kolanda bosenga ya mosala na bango. 8 Apesaki bashar minei mpe bangombe mwambe epai ya bana mibali ya Merari kolanda bosenga ya mosala na bango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron. 9 Apesaki eloko te epai ya bana mibali ya Keati, pamba te bazalaki na mokumba ya komema na mapeka na bango biloko ya bule. 10 Bakambi bamemaki makabo na bango mpo na libulisi ya etumbelo, na mokolo oyo basopelaki yango mafuta ; bamemaki makabo yango liboso ya etumbelo. 11 Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Tika ete mokolo na mokolo, mokambi moko na moko amema likabo na ye mpo na libulisi ya etumbelo ! » 12 Na mokolo ya liboso, Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, moto ya libota ya Yuda, amemaki likabo na ye. 13 Likabo na ye ezalaki :etando ya palata ya kilo moko na ndambo, mbeki moko ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale ezalaki ya kotonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo~; 14 mpe mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa, 15 ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, 16 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; 17 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.Yango nde ezalaki makabo ya Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi. 18 Na mokolo ya mibale, Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari, mokambi ya libota ya Isakari, 19 amemaki makabo oyo :etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, 20 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. 21 Amemaki lisusu :mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, 22 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; 23 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.Yango nde ezalaki makabo ya Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari. 24 Na mokolo ya misato, Eliabi, mwana mobali ya Eloni, mokambi ya libota ya Zabuloni, 25 amemaki makabo oyo :etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, 26 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. 27 Amemaki lisusu :mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, 28 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; 29 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.Yango nde ezalaki makabo ya Eliabi, mwana mobali ya Eloni. 30 Na mokolo ya minei, Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri, mokambi ya libota ya Ribeni, 31 amemaki makabo oyo :etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, 32 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. 33 Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, 34 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; 35 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.Yango nde ezalaki makabo ya Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri. 36 Na mokolo ya mitano, Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi, mokambi ya libota ya Simeoni, 37 amemaki makabo oyo :etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, 38 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. 39 Amemaki lisusu :mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, 40 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; 41 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani :bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.Wana nde ezalaki makabo ya Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi. 42 Na mokolo ya motoba, Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, mokambi ya libota ya Gadi, 43 amemaki makabo oyo :etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, 44 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. 45 Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, 46 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; 47 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.Yango nde ezalaki makabo ya Eliazafi, mwana mobali ya Deweli. 48 Na mokolo ya sambo, Elishama, mwana mobali ya Amiwudi, mokambi ya libota ya Efrayimi, 49 amemaki makabo oyo :etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, 50 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. 51 Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, 52 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; 53 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.Yango nde ezalaki makabo ya Elishama, mwana mobali ya Amiwudi. 54 Na mokolo ya mwambe, Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri, mokambi ya libota ya Manase, 55 amemaki makabo oyo :etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, 56 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. 57 Amemaki lisusu :mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, 58 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; 59 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.Yango nde ezalaki makabo ya Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri. 60 Na mokolo ya libwa, Abidani, mwana mobali ya Gideoni, mokambi ya libota ya Benjame, 61 amemaki makabo oyo :etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, 62 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. 63 Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, 64 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; 65 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.Yango nde ezalaki makabo ya Abidani, mwana mobali ya Gideoni. 66 Na mokolo ya zomi, Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, mokambi ya libota ya Dani, 67 amemaki makabo oyo :etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, 68 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. 69 Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, 70 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; 71 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.Yango nde ezalaki makabo ya Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi. 72 Na mokolo ya zomi na moko, Pagieli, mwana mobali ya Okirani, mokambi ya libota ya Aseri, 73 amemaki makabo oyo :etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, 74 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. 75 Amemaki lisusu :mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, 76 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; 77 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.Yango nde ezalaki makabo ya Pagieli, mwana mobali ya Okirani. 78 Na mokolo ya zomi na mibale, Akira, mwana mobali ya Enani, mokambi ya libota ya Nefitali, 79 amemaki makabo oyo :etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, 80 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. 81 Amemaki lisusu :mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, 82 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; 83 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko.Yango nde ezalaki makabo ya Akira, mwana mobali ya Enani. 84 Yango nde ezalaki makabo ya bakambi ya Isalaele mpo na libulisi ya etumbelo, na mokolo oyo basopelaki yango mafuta.Na kosangisa, bango nyonso bapesaki~:bitando ya palata zomi na mibale, bambeki ya palata zomi na mibale, bambeki ya wolo zomi na mibale. 85 Etando moko na moko ya palata ezalaki ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mpe mbeki moko na moko ezalaki ya bagrame nkama mwambe : palata nyonso esalaki bakilo tuku mibale na sambo na bagrame nkama mitano, kolanda ndenge bazalaki komeka bakilo na Esika ya bule. 86 Mbeki moko na moko ya wolo ezalaki ya bagrame nkama moko na zomi : wolo nyonso esalaki bagrame nkoto moko na nkama misato. 87 Mpo na bambeka ya kotumba, bango nyonso bapesaki :bangombe zomi na mibale ya mibali, bameme zomi na mibale ya mibali, bana meme zomi na mibale ya mobu moko elongo na makabo mosusu mpe bantaba zomi na mibale lokola mbeka mpo na masumu. 88 Na kosangisa, bango nyonso bapesaki lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani : bangombe tuku mibale na minei ya mibali, bameme tuku motoba ya mibali, bantaba tuku motoba ya mibali, bana meme tuku motoba ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya libulisi ya etumbelo sima na kosopela yango mafuta. 89 Tango Moyize azalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosolola na Yawe, azalaki koyoka mongongo koloba na ye wuta na mofinuku oyo ezalaki likolo ya Sanduku ya Litatoli kati na basheribe mibale, mpe azalaki kosolola na ye.

In Other Versions

Numbers 7 in the ANGEFD

Numbers 7 in the ANTPNG2D

Numbers 7 in the AS21

Numbers 7 in the BAGH

Numbers 7 in the BBPNG

Numbers 7 in the BBT1E

Numbers 7 in the BDS

Numbers 7 in the BEV

Numbers 7 in the BHAD

Numbers 7 in the BIB

Numbers 7 in the BLPT

Numbers 7 in the BNT

Numbers 7 in the BNTABOOT

Numbers 7 in the BNTLV

Numbers 7 in the BOATCB

Numbers 7 in the BOATCB2

Numbers 7 in the BOBCV

Numbers 7 in the BOCNT

Numbers 7 in the BOECS

Numbers 7 in the BOGWICC

Numbers 7 in the BOHCB

Numbers 7 in the BOHCV

Numbers 7 in the BOHLNT

Numbers 7 in the BOHNTLTAL

Numbers 7 in the BOICB

Numbers 7 in the BOILNTAP

Numbers 7 in the BOITCV

Numbers 7 in the BOKCV

Numbers 7 in the BOKCV2

Numbers 7 in the BOKHWOG

Numbers 7 in the BOKSSV

Numbers 7 in the BOLCB

Numbers 7 in the BOMCV

Numbers 7 in the BONAV

Numbers 7 in the BONCB

Numbers 7 in the BONLT

Numbers 7 in the BONUT2

Numbers 7 in the BOPLNT

Numbers 7 in the BOSCB

Numbers 7 in the BOSNC

Numbers 7 in the BOTLNT

Numbers 7 in the BOVCB

Numbers 7 in the BOYCB

Numbers 7 in the BPBB

Numbers 7 in the BPH

Numbers 7 in the BSB

Numbers 7 in the CCB

Numbers 7 in the CUV

Numbers 7 in the CUVS

Numbers 7 in the DBT

Numbers 7 in the DGDNT

Numbers 7 in the DHNT

Numbers 7 in the DNT

Numbers 7 in the ELBE

Numbers 7 in the EMTV

Numbers 7 in the ESV

Numbers 7 in the FBV

Numbers 7 in the FEB

Numbers 7 in the GGMNT

Numbers 7 in the GNT

Numbers 7 in the HARY

Numbers 7 in the HNT

Numbers 7 in the IRVA

Numbers 7 in the IRVB

Numbers 7 in the IRVG

Numbers 7 in the IRVH

Numbers 7 in the IRVK

Numbers 7 in the IRVM

Numbers 7 in the IRVM2

Numbers 7 in the IRVO

Numbers 7 in the IRVP

Numbers 7 in the IRVT

Numbers 7 in the IRVT2

Numbers 7 in the IRVU

Numbers 7 in the ISVN

Numbers 7 in the JSNT

Numbers 7 in the KAPI

Numbers 7 in the KBT1ETNIK

Numbers 7 in the KBV

Numbers 7 in the KJV

Numbers 7 in the KNFD

Numbers 7 in the LBA

Numbers 7 in the LBLA

Numbers 7 in the LNT

Numbers 7 in the LSV

Numbers 7 in the MAAL

Numbers 7 in the MBV

Numbers 7 in the MBV2

Numbers 7 in the MHNT

Numbers 7 in the MKNFD

Numbers 7 in the MNG

Numbers 7 in the MNT

Numbers 7 in the MNT2

Numbers 7 in the MRS1T

Numbers 7 in the NAA

Numbers 7 in the NASB

Numbers 7 in the NBLA

Numbers 7 in the NBS

Numbers 7 in the NBVTP

Numbers 7 in the NET2

Numbers 7 in the NIV11

Numbers 7 in the NNT

Numbers 7 in the NNT2

Numbers 7 in the NNT3

Numbers 7 in the PDDPT

Numbers 7 in the PFNT

Numbers 7 in the RMNT

Numbers 7 in the SBIAS

Numbers 7 in the SBIBS

Numbers 7 in the SBIBS2

Numbers 7 in the SBICS

Numbers 7 in the SBIDS

Numbers 7 in the SBIGS

Numbers 7 in the SBIHS

Numbers 7 in the SBIIS

Numbers 7 in the SBIIS2

Numbers 7 in the SBIIS3

Numbers 7 in the SBIKS

Numbers 7 in the SBIKS2

Numbers 7 in the SBIMS

Numbers 7 in the SBIOS

Numbers 7 in the SBIPS

Numbers 7 in the SBISS

Numbers 7 in the SBITS

Numbers 7 in the SBITS2

Numbers 7 in the SBITS3

Numbers 7 in the SBITS4

Numbers 7 in the SBIUS

Numbers 7 in the SBIVS

Numbers 7 in the SBT

Numbers 7 in the SBT1E

Numbers 7 in the SCHL

Numbers 7 in the SNT

Numbers 7 in the SUSU

Numbers 7 in the SUSU2

Numbers 7 in the SYNO

Numbers 7 in the TBIAOTANT

Numbers 7 in the TBT1E

Numbers 7 in the TBT1E2

Numbers 7 in the TFTIP

Numbers 7 in the TFTU

Numbers 7 in the TGNTATF3T

Numbers 7 in the THAI

Numbers 7 in the TNFD

Numbers 7 in the TNT

Numbers 7 in the TNTIK

Numbers 7 in the TNTIL

Numbers 7 in the TNTIN

Numbers 7 in the TNTIP

Numbers 7 in the TNTIZ

Numbers 7 in the TOMA

Numbers 7 in the TTENT

Numbers 7 in the UBG

Numbers 7 in the UGV

Numbers 7 in the UGV2

Numbers 7 in the UGV3

Numbers 7 in the VBL

Numbers 7 in the VDCC

Numbers 7 in the YALU

Numbers 7 in the YAPE

Numbers 7 in the YBVTP

Numbers 7 in the ZBP