Philippians 1 (BOLCB2)

1 Polo mpe Timote, bawumbu ya Yesu-Klisto ; Epai ya basantu nyonso kati na Klisto, oyo bazali na Filipi, elongo na bakambi ya Lingomba mpe badiakona : 2 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto ! 3 Nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai tango nyonso nakanisaka bino ; 4 nasambelaka Nzambe tango nyonso mpo na bino nyonso mpe nasalaka yango na esengo, 5 mpo na lisungi na bino kati na mosala ya kopanza Sango Malamu, wuta na mokolo ya liboso kino sik’oyo. 6 Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto. 7 Ezali sembo mpo na ngai kozala na makanisi ya lolenge oyo mpo na bino nyonso ; solo, nalingaka bino mingi, pamba te bino nyonso bosanganaka makasi elongo na ngai kati na ngolu ya Nzambe, ezala tango nazali ya kokangama na minyololo kati na boloko to tango nazali kolobela mpe kotatola Sango Malamu na molende. 8 Nzambe azali Motatoli na ngai ete nalingaka bino nyonso makasi, na bolingo ya Yesu-Klisto. 9 Mpe nasengaka kati na mabondeli na ngai ete bolingo na bino ekoba kokola tango nyonso kati na boyebi ya solo mpe na bososoli ya kokoka, 10 mpo ete bokoka kososola makambo oyo eleki malamu. Na bongo, bokozala peto mpe bokozanga pamela mpo na mokolo ya Klisto, 11 bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na Yesu-Klisto, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe. 12 Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete makambo oyo ekomeli ngai esali penza ete Sango Malamu ekende liboso. 13 Boye, bakengeli nyonso ya ndako ya mokonzi mpe bato nyonso oyo bazali awa bayebi ete nazali kati na boloko mpo na Klisto. 14 Mpe lisusu, kozala na ngai kati na boloko epesi na bandeko mingi kati na Nkolo molende ya kotia elikya kati na Nkolo mpe ya koteya Liloba na Nzambe, na mpiko mpe na bozangi bobangi. 15 Ezali solo ete bamoko bazali kosakola Klisto mpo na zuwa mpe kowelana na ngai, kasi bamosusu bazali kosala yango na makanisi ya malamu : 16 bazali kosala na bolingo mpo bayebi ete ezali mpo na kotatola mpo na Sango Malamu nde ngai nazali awa. 17 Kasi mpo na ba-oyo bazali kosakola Klisto mpo na posa ya kowelana, makanisi na bango ezali ya malamu te : bazali kokanisa ndenge nini bakoki kobakisa pasi na ngai, na tango oyo nazali na pasi lokola mokangami kati na boloko. 18 Ezala bongo to bongo te, eloko ya motuya ezali ete Klisto azali kosakolama, na lolenge nyonso, ezala na makanisi ya mabe to na bosolo ; mpe ngai nazali kosepela mpo na yango. Kutu, nakokoba kosepela mpo na yango. 19 Nayebi solo ete, na nzela ya mabondeli na bino mpe ya lisungi ya Molimo ya Yesu-Klisto, makambo oyo ekomeli ngai ekosuka na kokangolama na ngai. 20 Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai. 21 Mpo na ngai, kosalela Klisto, yango nde tina ya bomoi na ngai ; mpe kokufa ezali litomba. 22 Nzokande, soki kokoba na ngai kobika kati na mokili ekopesaka ngai nzela ya kobota bambuma ebele ya malamu na nzela ya mosala na ngai, nayebi te nini nasengeli kopona. 23 Makambo mibale ezali kobenda ngai ngambo na ngambo : na ngambo moko, kokufa mpo na kozala elongo na Klisto, pamba te yango nde eleki malamu ; 24 na ngambo mosusu, kowumela kati na nzoto, pamba te yango nde eleki na tina likolo na bino. 25 Lokola nandimisami na yango, nayebi malamu ete nakowumela mpe nakokoba kozala kati na bino nyonso, mpo na kosunga ete bokola mpe bosepela kati na kondima. 26 Boye, tango nakozala lisusu elongo na bino, lolendo na bino kati na Yesu-Klisto ekobakisama lisusu mpo na ngai. 27 Kasi botambola na lolenge oyo ebongi liboso ya Sango Malamu ya Klisto mpo ete, ezala nayei kotala bino to nayei te, nayoka sango ete botelemi ngwi mpe bosangani lokola moto moko, bozali kobunda elongo, na motema moko, mpo na kobatela kondima oyo Sango Malamu ememelaki bino, 28 na kolenga te liboso ya banguna na bino. Mpo na bango, ezali elembo ya libebi ; kasi mpo na bino, ezali elembo ya lobiko, mpe ewutaka na Nzambe. 29 Mpo na oyo etali Klisto, Nzambe apesaki bino ngolu kaka te ya kondimela Ye, kasi ngolu mpe ya konyokwama mpo na Ye, 30 pamba te bozali nde kobunda etumba ya lolenge moko na oyo bomonaki ngai kobunda mpe oyo bozali koyoka ete nazali lisusu kobunda sik’oyo.

In Other Versions

Philippians 1 in the ANGEFD

Philippians 1 in the ANTPNG2D

Philippians 1 in the AS21

Philippians 1 in the BAGH

Philippians 1 in the BBPNG

Philippians 1 in the BBT1E

Philippians 1 in the BDS

Philippians 1 in the BEV

Philippians 1 in the BHAD

Philippians 1 in the BIB

Philippians 1 in the BLPT

Philippians 1 in the BNT

Philippians 1 in the BNTABOOT

Philippians 1 in the BNTLV

Philippians 1 in the BOATCB

Philippians 1 in the BOATCB2

Philippians 1 in the BOBCV

Philippians 1 in the BOCNT

Philippians 1 in the BOECS

Philippians 1 in the BOGWICC

Philippians 1 in the BOHCB

Philippians 1 in the BOHCV

Philippians 1 in the BOHLNT

Philippians 1 in the BOHNTLTAL

Philippians 1 in the BOICB

Philippians 1 in the BOILNTAP

Philippians 1 in the BOITCV

Philippians 1 in the BOKCV

Philippians 1 in the BOKCV2

Philippians 1 in the BOKHWOG

Philippians 1 in the BOKSSV

Philippians 1 in the BOLCB

Philippians 1 in the BOMCV

Philippians 1 in the BONAV

Philippians 1 in the BONCB

Philippians 1 in the BONLT

Philippians 1 in the BONUT2

Philippians 1 in the BOPLNT

Philippians 1 in the BOSCB

Philippians 1 in the BOSNC

Philippians 1 in the BOTLNT

Philippians 1 in the BOVCB

Philippians 1 in the BOYCB

Philippians 1 in the BPBB

Philippians 1 in the BPH

Philippians 1 in the BSB

Philippians 1 in the CCB

Philippians 1 in the CUV

Philippians 1 in the CUVS

Philippians 1 in the DBT

Philippians 1 in the DGDNT

Philippians 1 in the DHNT

Philippians 1 in the DNT

Philippians 1 in the ELBE

Philippians 1 in the EMTV

Philippians 1 in the ESV

Philippians 1 in the FBV

Philippians 1 in the FEB

Philippians 1 in the GGMNT

Philippians 1 in the GNT

Philippians 1 in the HARY

Philippians 1 in the HNT

Philippians 1 in the IRVA

Philippians 1 in the IRVB

Philippians 1 in the IRVG

Philippians 1 in the IRVH

Philippians 1 in the IRVK

Philippians 1 in the IRVM

Philippians 1 in the IRVM2

Philippians 1 in the IRVO

Philippians 1 in the IRVP

Philippians 1 in the IRVT

Philippians 1 in the IRVT2

Philippians 1 in the IRVU

Philippians 1 in the ISVN

Philippians 1 in the JSNT

Philippians 1 in the KAPI

Philippians 1 in the KBT1ETNIK

Philippians 1 in the KBV

Philippians 1 in the KJV

Philippians 1 in the KNFD

Philippians 1 in the LBA

Philippians 1 in the LBLA

Philippians 1 in the LNT

Philippians 1 in the LSV

Philippians 1 in the MAAL

Philippians 1 in the MBV

Philippians 1 in the MBV2

Philippians 1 in the MHNT

Philippians 1 in the MKNFD

Philippians 1 in the MNG

Philippians 1 in the MNT

Philippians 1 in the MNT2

Philippians 1 in the MRS1T

Philippians 1 in the NAA

Philippians 1 in the NASB

Philippians 1 in the NBLA

Philippians 1 in the NBS

Philippians 1 in the NBVTP

Philippians 1 in the NET2

Philippians 1 in the NIV11

Philippians 1 in the NNT

Philippians 1 in the NNT2

Philippians 1 in the NNT3

Philippians 1 in the PDDPT

Philippians 1 in the PFNT

Philippians 1 in the RMNT

Philippians 1 in the SBIAS

Philippians 1 in the SBIBS

Philippians 1 in the SBIBS2

Philippians 1 in the SBICS

Philippians 1 in the SBIDS

Philippians 1 in the SBIGS

Philippians 1 in the SBIHS

Philippians 1 in the SBIIS

Philippians 1 in the SBIIS2

Philippians 1 in the SBIIS3

Philippians 1 in the SBIKS

Philippians 1 in the SBIKS2

Philippians 1 in the SBIMS

Philippians 1 in the SBIOS

Philippians 1 in the SBIPS

Philippians 1 in the SBISS

Philippians 1 in the SBITS

Philippians 1 in the SBITS2

Philippians 1 in the SBITS3

Philippians 1 in the SBITS4

Philippians 1 in the SBIUS

Philippians 1 in the SBIVS

Philippians 1 in the SBT

Philippians 1 in the SBT1E

Philippians 1 in the SCHL

Philippians 1 in the SNT

Philippians 1 in the SUSU

Philippians 1 in the SUSU2

Philippians 1 in the SYNO

Philippians 1 in the TBIAOTANT

Philippians 1 in the TBT1E

Philippians 1 in the TBT1E2

Philippians 1 in the TFTIP

Philippians 1 in the TFTU

Philippians 1 in the TGNTATF3T

Philippians 1 in the THAI

Philippians 1 in the TNFD

Philippians 1 in the TNT

Philippians 1 in the TNTIK

Philippians 1 in the TNTIL

Philippians 1 in the TNTIN

Philippians 1 in the TNTIP

Philippians 1 in the TNTIZ

Philippians 1 in the TOMA

Philippians 1 in the TTENT

Philippians 1 in the UBG

Philippians 1 in the UGV

Philippians 1 in the UGV2

Philippians 1 in the UGV3

Philippians 1 in the VBL

Philippians 1 in the VDCC

Philippians 1 in the YALU

Philippians 1 in the YAPE

Philippians 1 in the YBVTP

Philippians 1 in the ZBP