Proverbs 11 (BOLCB2)
1 Bimekelo kilo ya lokuta ezali lokola makambo ya nkelena miso ya Yawe,kasi kilo ya sembo ezali elengi na miso na Ye. 2 Tango lolendo eyaka, soni mpe eyaka,kasi bwanya ezali elongo na bato oyo bamikitisaka. 3 Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango,kasi mayele mabe ya bato oyo batambolakana boyengebene te ebebisaka bango. 4 Bomengo ekolongisa ata moke tena mokolo ya kanda ya Nzambe,kasi bosembo ekangolaka na kufa. 5 Bosembo ya moto oyo atambolaka alimaekomisaka nzela na ye sembo,kasi moto mabe akokweya mpo na mabe na ye moko. 6 Bosembo ya bato oyo batambolaka alimaekangolaka bango,kasi bato oyo batambolaka na boyengebene tebakweyaka na motambo ya baposa na bango. 7 Soki moto mabe akufi, elikya na ye mpe ekufi ;boye, elikya nyonso oyo etiami na bomengo na yempe ekufi. 8 Moto ya sembo akokangolama na pasi,mpe moto mabe akomona pasina esika ya moto ya sembo. 9 Moto ya mbindo abebisaka moninga na yena maloba ya monoko na ye,kasi boyebi ekokangola bato ya sembo. 10 Tango bato ya sembo bapambolamaka,engumba esepelaka ;mpe tango moto mabe akufaka,bato bagangaka na esengo. 11 Engumba etongamaka na nzela ya mapamboliya bato ya sembo,kasi ebebisamaka na nzela ya monoko ya bato mabe. 12 Moto oyo atiolaka moninga na ye azangi mayele,kasi moto ya mayele avandaka kimia. 13 Moto oyo aswanaka abimisaka basekele,kasi moto oyo azali na molimo ya semboabombaka basekele. 14 Mpo na kozanga koyeba kokamba, ekolo ekokweya ;kasi lobiko ezali kati na motango ebele ya bapesi toli. 15 Moto oyo abetaka tolo mpo na kondimabaniongo ya mopaya akomona solo pasi,kasi moto oyo aboyaka kozwa bikateli akozala na kimia. 16 Mwasi ya malamu azwaka lokumu,mpe bato ya makasi bazwaka bomengo. 17 Moto oyo asalelaka bato bolamu amisalelaka nde bolamu,kasi moto na kanza amimonisaka pasi. 18 Moto mabe asalaka mosala na lokuta,kasi moto oyo alonaka na bosemboakozwa lifuti ya malonga. 19 Lokola bosembo ememaka na bomoi,moto oyo alandaka nzela ya mabealandaka nde nzela ya kufa. 20 Bato ya kilikili bazalaka nkele na miso ya Yawe,kasi bato oyo bazangi pamela basepelisaka Ye. 21 Moto mabe akosambisama solo,kasi bakitani ya bayengebene bakokangolama. 22 Mwasi ya kitoko, kasi azangi mayele,azali lokola lopete ya wolo na zolo ya ngulu. 23 Baposa ya moto ya sembo esukaka kaka malamu,nzokande elikya ya moto mabe ezelaka kakakanda ya Nzambe. 24 Moto oyo akabaka na motema malamuazwaka mingi koleka,mpe moto oyo abombaka kaka akomaka mobola. 25 Moto oyo akabaka akokoma na bomengo ;mpe moto oyo apesaka bato mosusu mayi,ye mpe bakopesa ye mayi. 26 Moto oyo abombaka ble, bato bakolakela ye mabe ;kasi lipamboli ezali epai na moto oyo akoteka yango. 27 Moto oyo alukaka kosala bolamu akozwa ngolu,kasi pasi ekomelaka moto oyo alukaka kosala mabe. 28 Moto oyo atiaka elikya na bomengo na ye akokweya,kasi bayengebene bakozala kitoko lokola makasa ya sika. 29 Moto oyo akotisaka mobulu kati na ndako na yeakozwa mopepe lokola libula,mpe moto oyo azangi mayeleakokoma mowumbu ya moto ya bwanya. 30 Mbuma ya moto ya sembo ezali nzete ya bomoi,mpe moto ya bwanya abengaka bato pene na ye. 31 Soki moto ya sembo azwaka litomba na ye awa na mokili,ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki ?
In Other Versions
Proverbs 11 in the ANGEFD
Proverbs 11 in the ANTPNG2D
Proverbs 11 in the AS21
Proverbs 11 in the BAGH
Proverbs 11 in the BBPNG
Proverbs 11 in the BBT1E
Proverbs 11 in the BDS
Proverbs 11 in the BEV
Proverbs 11 in the BHAD
Proverbs 11 in the BIB
Proverbs 11 in the BLPT
Proverbs 11 in the BNT
Proverbs 11 in the BNTABOOT
Proverbs 11 in the BNTLV
Proverbs 11 in the BOATCB
Proverbs 11 in the BOATCB2
Proverbs 11 in the BOBCV
Proverbs 11 in the BOCNT
Proverbs 11 in the BOECS
Proverbs 11 in the BOGWICC
Proverbs 11 in the BOHCB
Proverbs 11 in the BOHCV
Proverbs 11 in the BOHLNT
Proverbs 11 in the BOHNTLTAL
Proverbs 11 in the BOICB
Proverbs 11 in the BOILNTAP
Proverbs 11 in the BOITCV
Proverbs 11 in the BOKCV
Proverbs 11 in the BOKCV2
Proverbs 11 in the BOKHWOG
Proverbs 11 in the BOKSSV
Proverbs 11 in the BOLCB
Proverbs 11 in the BOMCV
Proverbs 11 in the BONAV
Proverbs 11 in the BONCB
Proverbs 11 in the BONLT
Proverbs 11 in the BONUT2
Proverbs 11 in the BOPLNT
Proverbs 11 in the BOSCB
Proverbs 11 in the BOSNC
Proverbs 11 in the BOTLNT
Proverbs 11 in the BOVCB
Proverbs 11 in the BOYCB
Proverbs 11 in the BPBB
Proverbs 11 in the BPH
Proverbs 11 in the BSB
Proverbs 11 in the CCB
Proverbs 11 in the CUV
Proverbs 11 in the CUVS
Proverbs 11 in the DBT
Proverbs 11 in the DGDNT
Proverbs 11 in the DHNT
Proverbs 11 in the DNT
Proverbs 11 in the ELBE
Proverbs 11 in the EMTV
Proverbs 11 in the ESV
Proverbs 11 in the FBV
Proverbs 11 in the FEB
Proverbs 11 in the GGMNT
Proverbs 11 in the GNT
Proverbs 11 in the HARY
Proverbs 11 in the HNT
Proverbs 11 in the IRVA
Proverbs 11 in the IRVB
Proverbs 11 in the IRVG
Proverbs 11 in the IRVH
Proverbs 11 in the IRVK
Proverbs 11 in the IRVM
Proverbs 11 in the IRVM2
Proverbs 11 in the IRVO
Proverbs 11 in the IRVP
Proverbs 11 in the IRVT
Proverbs 11 in the IRVT2
Proverbs 11 in the IRVU
Proverbs 11 in the ISVN
Proverbs 11 in the JSNT
Proverbs 11 in the KAPI
Proverbs 11 in the KBT1ETNIK
Proverbs 11 in the KBV
Proverbs 11 in the KJV
Proverbs 11 in the KNFD
Proverbs 11 in the LBA
Proverbs 11 in the LBLA
Proverbs 11 in the LNT
Proverbs 11 in the LSV
Proverbs 11 in the MAAL
Proverbs 11 in the MBV
Proverbs 11 in the MBV2
Proverbs 11 in the MHNT
Proverbs 11 in the MKNFD
Proverbs 11 in the MNG
Proverbs 11 in the MNT
Proverbs 11 in the MNT2
Proverbs 11 in the MRS1T
Proverbs 11 in the NAA
Proverbs 11 in the NASB
Proverbs 11 in the NBLA
Proverbs 11 in the NBS
Proverbs 11 in the NBVTP
Proverbs 11 in the NET2
Proverbs 11 in the NIV11
Proverbs 11 in the NNT
Proverbs 11 in the NNT2
Proverbs 11 in the NNT3
Proverbs 11 in the PDDPT
Proverbs 11 in the PFNT
Proverbs 11 in the RMNT
Proverbs 11 in the SBIAS
Proverbs 11 in the SBIBS
Proverbs 11 in the SBIBS2
Proverbs 11 in the SBICS
Proverbs 11 in the SBIDS
Proverbs 11 in the SBIGS
Proverbs 11 in the SBIHS
Proverbs 11 in the SBIIS
Proverbs 11 in the SBIIS2
Proverbs 11 in the SBIIS3
Proverbs 11 in the SBIKS
Proverbs 11 in the SBIKS2
Proverbs 11 in the SBIMS
Proverbs 11 in the SBIOS
Proverbs 11 in the SBIPS
Proverbs 11 in the SBISS
Proverbs 11 in the SBITS
Proverbs 11 in the SBITS2
Proverbs 11 in the SBITS3
Proverbs 11 in the SBITS4
Proverbs 11 in the SBIUS
Proverbs 11 in the SBIVS
Proverbs 11 in the SBT
Proverbs 11 in the SBT1E
Proverbs 11 in the SCHL
Proverbs 11 in the SNT
Proverbs 11 in the SUSU
Proverbs 11 in the SUSU2
Proverbs 11 in the SYNO
Proverbs 11 in the TBIAOTANT
Proverbs 11 in the TBT1E
Proverbs 11 in the TBT1E2
Proverbs 11 in the TFTIP
Proverbs 11 in the TFTU
Proverbs 11 in the TGNTATF3T
Proverbs 11 in the THAI
Proverbs 11 in the TNFD
Proverbs 11 in the TNT
Proverbs 11 in the TNTIK
Proverbs 11 in the TNTIL
Proverbs 11 in the TNTIN
Proverbs 11 in the TNTIP
Proverbs 11 in the TNTIZ
Proverbs 11 in the TOMA
Proverbs 11 in the TTENT
Proverbs 11 in the UBG
Proverbs 11 in the UGV
Proverbs 11 in the UGV2
Proverbs 11 in the UGV3
Proverbs 11 in the VBL
Proverbs 11 in the VDCC
Proverbs 11 in the YALU
Proverbs 11 in the YAPE
Proverbs 11 in the YBVTP
Proverbs 11 in the ZBP