Proverbs 6 (BOLCB2)

1 Mwana na ngai, soki ondimi niongo ya moninga na yo,soki obeti tolo mpo na kondima niongo ya mopaya, 2 omikangi nde singa na maloba na yo,omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo. 3 Boye, mwana na ngai, sala makambo oyompo ete omikangola,pamba te omikabaki na maboko ya moninga na yo ;kende komikitisa liboso na ye mpe tingama na ye, 4 kotika te ete miso na yo elala pongi to enimba ; 5 mikangola na motambo lokola mboloko na mabokoya mobomi banyama ya zamba,mpe lokola ndeke na motambo ya mokangi bandeke. 6 Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi,tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya ! 7 Yango ezalaka na mokambi te,mokengeli te to mokonzi te ; 8 ebongisaka bilei na yango na tango ya moyi makasi,ebombaka yango na tango ya kobuka mbuma. 9 Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini ?Kino tango nini okolamuka na pongi na yo ? 10 Mwa pongi moke, mwa kopema moke,mwa kokanga maboko moke mpo na kolala 11 mpe bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela,mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi. 12 Moto oyo atambolaka na lokuta na monokoazali moto ya Beliali, moto mabe : 13 Abetaka-betaka miso,apesaka bilembo na makolo na yempe alobaka na nzela ya bilembo ya misapi ; 14 azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye,asalaka tango nyonso mabongisi ya mabempe alukaka kaka tango nyonso makelele. 15 Yango wana, pasi ekoyela ye na pwasa,akobukana mbala moko,mpe kisi ya kobikisa ye ekozala te. 16 Yawe ayinaka makambo wana motoba ;mpe makambo oyo sambo ezali mabe penza na miso na Ye~: 17 Kodongola,lolemo ya lokuta,maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te, 18 motema oyo ekanisaka mabongisi ya mabe,makolo oyo epotaka mbangu na mabe, 19 motatoli mabe oyo alobaka lokutampe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko. 20 Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yompe kosundola te mateya ya mama na yo. 21 Kanga yango tango nyonso na motema na yo,lata yango na kingo na yo. 22 Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo,ekobatela yo tango okolala pongimpe ekosolola na yo tango okolamuka. 23 Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole,makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi, 24 mpo na kobatela yo mosika ya mwasi ya ndumba,mosika ya lokuta ya lolemo ya mwasi ya mopaya. 25 Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye,mpe miso na ye ekweyisa yo. 26 Pamba te likolo ya mwasi ya ndumba,okoki kobungisa ezala eteni na yo ya lipa,mpe mwasi ya libala akoki kobebisa bomoi ya motuya. 27 Boni, moto akoki solo kozika moto,bongo bilamba na ye ezika te ? 28 Moto akoki solo kotambola na likolo ya makala ya moto,bongo makolo na ye ezika te ? 29 Boye, moto nyonso oyo akosangisa nzotona mwasi ya ndeko na yeakozanga te kozwa etumbu. 30 Kotiola moyibi te soki ayibimpo ete azali na nzala mpe azangi eloko ya kolia. 31 Kasi soki bakangi ye, akozongisa mbala sambo,akopesa biloko nyonso ya ndako na ye. 32 Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moningaazali lokola moto oyo azangi mayele ;kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ; 33 akobuka lokola mbuma : minyoko mpe kosambwa ;bongo soni na ye ekosila te. 34 Pamba te zuwa epelisaka kanda makasi kati na mobali,mpe akozala na mawa te na mokolooyo akozongisa mabe na mabe ; 35 akotikala kondima ata lifuti moko tempo ete akoka kolimbisa,mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado.

In Other Versions

Proverbs 6 in the ANGEFD

Proverbs 6 in the ANTPNG2D

Proverbs 6 in the AS21

Proverbs 6 in the BAGH

Proverbs 6 in the BBPNG

Proverbs 6 in the BBT1E

Proverbs 6 in the BDS

Proverbs 6 in the BEV

Proverbs 6 in the BHAD

Proverbs 6 in the BIB

Proverbs 6 in the BLPT

Proverbs 6 in the BNT

Proverbs 6 in the BNTABOOT

Proverbs 6 in the BNTLV

Proverbs 6 in the BOATCB

Proverbs 6 in the BOATCB2

Proverbs 6 in the BOBCV

Proverbs 6 in the BOCNT

Proverbs 6 in the BOECS

Proverbs 6 in the BOGWICC

Proverbs 6 in the BOHCB

Proverbs 6 in the BOHCV

Proverbs 6 in the BOHLNT

Proverbs 6 in the BOHNTLTAL

Proverbs 6 in the BOICB

Proverbs 6 in the BOILNTAP

Proverbs 6 in the BOITCV

Proverbs 6 in the BOKCV

Proverbs 6 in the BOKCV2

Proverbs 6 in the BOKHWOG

Proverbs 6 in the BOKSSV

Proverbs 6 in the BOLCB

Proverbs 6 in the BOMCV

Proverbs 6 in the BONAV

Proverbs 6 in the BONCB

Proverbs 6 in the BONLT

Proverbs 6 in the BONUT2

Proverbs 6 in the BOPLNT

Proverbs 6 in the BOSCB

Proverbs 6 in the BOSNC

Proverbs 6 in the BOTLNT

Proverbs 6 in the BOVCB

Proverbs 6 in the BOYCB

Proverbs 6 in the BPBB

Proverbs 6 in the BPH

Proverbs 6 in the BSB

Proverbs 6 in the CCB

Proverbs 6 in the CUV

Proverbs 6 in the CUVS

Proverbs 6 in the DBT

Proverbs 6 in the DGDNT

Proverbs 6 in the DHNT

Proverbs 6 in the DNT

Proverbs 6 in the ELBE

Proverbs 6 in the EMTV

Proverbs 6 in the ESV

Proverbs 6 in the FBV

Proverbs 6 in the FEB

Proverbs 6 in the GGMNT

Proverbs 6 in the GNT

Proverbs 6 in the HARY

Proverbs 6 in the HNT

Proverbs 6 in the IRVA

Proverbs 6 in the IRVB

Proverbs 6 in the IRVG

Proverbs 6 in the IRVH

Proverbs 6 in the IRVK

Proverbs 6 in the IRVM

Proverbs 6 in the IRVM2

Proverbs 6 in the IRVO

Proverbs 6 in the IRVP

Proverbs 6 in the IRVT

Proverbs 6 in the IRVT2

Proverbs 6 in the IRVU

Proverbs 6 in the ISVN

Proverbs 6 in the JSNT

Proverbs 6 in the KAPI

Proverbs 6 in the KBT1ETNIK

Proverbs 6 in the KBV

Proverbs 6 in the KJV

Proverbs 6 in the KNFD

Proverbs 6 in the LBA

Proverbs 6 in the LBLA

Proverbs 6 in the LNT

Proverbs 6 in the LSV

Proverbs 6 in the MAAL

Proverbs 6 in the MBV

Proverbs 6 in the MBV2

Proverbs 6 in the MHNT

Proverbs 6 in the MKNFD

Proverbs 6 in the MNG

Proverbs 6 in the MNT

Proverbs 6 in the MNT2

Proverbs 6 in the MRS1T

Proverbs 6 in the NAA

Proverbs 6 in the NASB

Proverbs 6 in the NBLA

Proverbs 6 in the NBS

Proverbs 6 in the NBVTP

Proverbs 6 in the NET2

Proverbs 6 in the NIV11

Proverbs 6 in the NNT

Proverbs 6 in the NNT2

Proverbs 6 in the NNT3

Proverbs 6 in the PDDPT

Proverbs 6 in the PFNT

Proverbs 6 in the RMNT

Proverbs 6 in the SBIAS

Proverbs 6 in the SBIBS

Proverbs 6 in the SBIBS2

Proverbs 6 in the SBICS

Proverbs 6 in the SBIDS

Proverbs 6 in the SBIGS

Proverbs 6 in the SBIHS

Proverbs 6 in the SBIIS

Proverbs 6 in the SBIIS2

Proverbs 6 in the SBIIS3

Proverbs 6 in the SBIKS

Proverbs 6 in the SBIKS2

Proverbs 6 in the SBIMS

Proverbs 6 in the SBIOS

Proverbs 6 in the SBIPS

Proverbs 6 in the SBISS

Proverbs 6 in the SBITS

Proverbs 6 in the SBITS2

Proverbs 6 in the SBITS3

Proverbs 6 in the SBITS4

Proverbs 6 in the SBIUS

Proverbs 6 in the SBIVS

Proverbs 6 in the SBT

Proverbs 6 in the SBT1E

Proverbs 6 in the SCHL

Proverbs 6 in the SNT

Proverbs 6 in the SUSU

Proverbs 6 in the SUSU2

Proverbs 6 in the SYNO

Proverbs 6 in the TBIAOTANT

Proverbs 6 in the TBT1E

Proverbs 6 in the TBT1E2

Proverbs 6 in the TFTIP

Proverbs 6 in the TFTU

Proverbs 6 in the TGNTATF3T

Proverbs 6 in the THAI

Proverbs 6 in the TNFD

Proverbs 6 in the TNT

Proverbs 6 in the TNTIK

Proverbs 6 in the TNTIL

Proverbs 6 in the TNTIN

Proverbs 6 in the TNTIP

Proverbs 6 in the TNTIZ

Proverbs 6 in the TOMA

Proverbs 6 in the TTENT

Proverbs 6 in the UBG

Proverbs 6 in the UGV

Proverbs 6 in the UGV2

Proverbs 6 in the UGV3

Proverbs 6 in the VBL

Proverbs 6 in the VDCC

Proverbs 6 in the YALU

Proverbs 6 in the YAPE

Proverbs 6 in the YBVTP

Proverbs 6 in the ZBP