Psalms 1 (BOLCB2)
1 Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe,atelemaka te na nzela ya bato ya masumu,mpe avandaka te esika moko na batioli, 2 kasi asepelaka na mibeko ya Yawempe akanisaka yango butu mpe moyi. 3 Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi,oyo ebotaka mbuma na eleko na yango,mpe makasa na yango ekawukaka te ;misala na ye nyonso etambolaka malamu. 4 Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe !Bazali lokola matiti ya kokawukaoyo mopepe epanzaka. 5 Yango wana bato mabe bakolonga tekotelema na kosambisama,mpe bato ya masumu bakowumelaka tekati na lisanga ya bato ya sembo. 6 Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo,kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.