Psalms 78 (BOLCB2)

1 Nzembo ya Azafi.Bino, bato na ngai, boyoka malako na ngai !Bopesa matoyi na maloba ya monoko na ngai ! 2 Nakofungola monoko na ngai mpo na lisese,nakosakola makambo oyo ebombamawuta na tango ya kala. 3 Makambo oyo toyoka, oyo toyebi,oyo batata na biso bayebisa biso. 4 Tokobombela yango bakitani na bango te,kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na simankembo ya masanzoli ya Yawe,nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki. 5 Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi,atiaki mibeko kati na Isalaele,apesaki mitindo epai ya batata na bisoete bateya yango epai ya bana mibali na bango, 6 mpo ete bikeke oyo ekoya sima eyeba yango,ekeke ya bana oyo bakobotama.Tika ete batelema mpe bayebisa yangona bana na bango, 7 mpo ete batonga elikya na bango kati na Nzambe,babosana te misala ya Nzambempe babatela mibeko na Ye. 8 Boye, bakozala te lokola bakoko na bango,oyo bazalaki mito makasi mpe batomboki,oyo mitema na bango ezalaki sembo te na miso ya Nzambe,mpe milimo na bango ezangaki boyengebene epai na Ye. 9 Bato ya libota ya Efrayimi basimbaki batolotolo,kasi na mokolo ya etumba, bakimaki. 10 Babatelaki te Boyokani ya Nzambempe baboyaki kotosa mibeko na Ye ; 11 babosanaki bikamwa na Yempe makambo minene oyo atalisaki bango. 12 Na miso ya bakoko na bango,asalaki bikamwa kati na Ejipito,na etuka ya Tsoani ; 13 akabolaki ebale monene mpo na kolekisa bango,atelemisaki mayi lokola mir. 14 Na moyi, azalaki kotambolisa bangona nzela ya lipata ;mpe na butu, na nzela ya pole ya moto. 15 Apasolaki mabanga kati na esobempe amelisaki bango mayi ebele,lokola mayi ya bibale ; 16 abimisaki mayi wuta na libangampe asalaki ete etiola lokola mayi ya ebale. 17 Kasi bakobaki kaka kosala masumu liboso na Ye,kotombokela Ye-Oyo-Aleki-Likolo, kati na esobe. 18 Bamekaki Nzambe na nko,na kosenga bilei kolanda posa na bango. 19 Balobaki mabe na tina na Nzambe :« Boni, Ye Nzambe azali penza na makokiya kopesa biso bilei kati na esobe ? 20 Solo, abetaki libanga,mayi ebimaki, mpe ebimaki penza ebele.Boni, akokoka lisusu kopesa biso mapato misuni epai ya bato na Ye ? » 21 Tango Yawe ayokaki bongo,asilikaki makasi ;moto na Ye epelelaki Jakobi,mpe kanda makasi na Ye ekitelaki Isalaele, 22 pamba te batiaki elikya na Nzambe te,bandimaki te ete akoki kokangola bango. 23 Nzokande, apesaki mitindo na mapatampe afungolaki bikuke ya likolo, 24 anokiselaki bango mana lokola mvulampo na kopesa bilei,apesaki bango ble ya Likolo. 25 Moko na moko aliaki mapa ya ba-anjelu.Atindelaki bango bilei ebele penza. 26 Wuta na likolo, atindikaki mosika mopepe ya Este ;mpe na nguya na Ye, amemaki mopepe ya Sude. 27 Anokiselaki bango misuni lokola putulu,bandeke ebele lokola zelo ya ebale monene ; 28 akweyiselaki bango yango kati na molako na bango,zingazinga ya bandako na bango ya kapo. 29 Baliaki mpe batondaki makasi ;Nzambe apesaki bango bilokooyo bazalaki na yango posa. 30 Liboso ete posa na bango ekoka,wana bazalaki nanu na minoko etonda na bilei, 31 kanda ya Nzambe ekweyelaki bango,abomaki bato minene kati na bango,anyokolaki bilenge ya Isalaele. 32 Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosala masumu,bandimaki kaka te bikamwa na Ye. 33 Boye, asukisaki mikolo ya bomoi na bangolokola mopepe,mpe mibu na bango ya mbotama kati na somo. 34 Tango nyonso Nzambe azalaki koboma bango,bazalaki koluka Ye ;bazalaki komizongisa noki epai na Ye. 35 Bazalaki kozongisa na makanisi na bangoete Nzambe nde azali Libanga na bango,ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azaliMosikoli na bango. 36 Kasi bazalaki koloba lokuta,minoko na bango ezalaki kokosa Ye ; 37 mitema na bango ezalaki sembo tena miso na Ye,mpe bazalaki kobuka Boyokani na Ye. 38 Nzokande Ye, na mawa na Ye,azalaki kolimbisa mabe na bangona esika ya kobebisa bango ;mbala mingi, azalaki kokanga motemana esika ya kopelisela bango kanda na Ye ; 39 pamba te azalaki koyeba ete bazali kaka bato,bazali kaka lokola mopepe oyo ezali kolekampe ekozonga lisusu te. 40 Mbala mingi, batombokelaki Ye kati na esobempe bayokisaki Ye mawa kati na bisika ya kokawuka ; 41 bazalaki kozongela komeka Nzambe,koyokisa Mosantu ya Isalaele mawa. 42 Babosanaki makambo minene oyo asalakina nguya na Ye,mokolo oyo akangolaki bangowuta na maboko ya monyokoli ; 43 babosanaki bikamwa oyo asalaki kati na Ejipito,misala minene oyo asalaki kati na etuka ya Tsoani. 44 Abongolaki bibale na bango makila ;boye, bakokaki lisusu te komela na mayi na bango. 45 Atindelaki bango banzinzi oyo eswaka,mpe eliaki bango ;mpe magorodo oyo ebebisaki bango. 46 Akabaki bambuma ya bilanga na bangoepai ya mabanki,mpe mbuma ya mosala na bango epai ya mankoko. 47 Abebisaki bilanga na bango ya vinona nzela ya mvula ya mabanga,mpe banzete na bango ya sikomorina nzela ya mvula ya pembe ; 48 akabaki bameme na bangoepai ya mvula ya mabanga,mpe bibwele na bango epai ya kake. 49 Atindelaki bango kanda na Ye ya makasi lokola moto :kanda makasi, kotomboka, pasimpe ba-anjelu oyo babebisaka. 50 Apesaki na kanda na Ye nzela ya kopela,abatelaki bango te na kufa ;kasi akabaki bango na bokono oyo ebomaka. 51 Abomaki bana mibali nyonso ya libosokati na Ejipito,bambuma ya liboso ya makasi na bangona se ya bandako ya kapo ya Cham. 52 Abimisaki bato na Ye lokola etonga,amemaki bango kati na esobe lokola meme ; 53 atambolisaki bango na kimia penza,babangaki eloko te ;mpe ebale monene emelaki banguna na bango. 54 Amemaki bango na mokili na Ye ya bule,na ngomba oyo loboko na Ye ya nguya ezwaki ; 55 abenganaki bikolo liboso na bango,apesaki bango etando lokola libulampe avandisaki mabota ya Isalaelekati na bandako na bango ya kapo. 56 Kasi bamekaki Nzambe,batombokelaki Ye-Oyo-Aleki-Likolompe babatelaki te malako na Ye ; 57 bapengwaki mpe babukaki mibeko ya boyokani,ndenge batata na bango basalaki ;batengamaki lokola tolotolooyo mbanzi na yango ekeyi na mopanzi ; 58 bayokisaki Ye kanda na nzela yabisambelo na bango ya likolo ya bangomba,mpe bapelisaki zuwa na Ye na nzela yabanzambe na bango ya bikeko. 59 Nzambe ayokaki mpe asilikaki makasi,abwakaki Isalaele mobimba ; 60 asundolaki Mongombo ya Silo,ndako ya kapo oyo atelemisaki kati na bato, 61 akabaki nguya na Ye na bowumbu,mpe lokumu na Ye na maboko ya monguna ; 62 akabaki bato na Ye na mopanga,mpe asilikelaki libula na Ye. 63 Moto etumbaki bilenge mibali,mpe banzembo ya libala eyembamaki lisusu tempo na lokumu ya bilenge basi. 64 Banganga-Nzambe bakufaki na mopanga,mpe basi oyo bakufisaki mibalibalelaki te na banzembo ya matanga. 65 Nkolo alamukaki lokola moto oyoawuti na pongi,lokola moto oyo abimi na kwiti ya vino ; 66 azokisaki banguna na Ye na sima,wana bazalaki kokima,ayokisaki bango soni ya libela. 67 Asundolaki bandako ya kapo ya Jozefimpe aboyaki kopona libota ya Efrayimi ; 68 kasi aponaki libota ya Yuda,ngomba Siona oyo alingaki ; 69 atongaki Esika na Ye ya bulelokola bisika ya likolo makasi,lokola mabele oyo atia mpo na libela. 70 Aponaki Davidi, mosali na Ye,mpe azwaki ye kati na lopango ya meme ; 71 abengaki ye wuta na sima ya meme oyoazalaki kobatelampo na kokomisa Ye mobateli ya Jakobi, bato na Ye,mpe ya Isalaele, libula na Ye. 72 Davidi abatelaki bango na motema ezanga pamela,mpe akambaki bango na maboko ya mayele.

In Other Versions

Psalms 78 in the ANGEFD

Psalms 78 in the ANTPNG2D

Psalms 78 in the AS21

Psalms 78 in the BAGH

Psalms 78 in the BBPNG

Psalms 78 in the BBT1E

Psalms 78 in the BDS

Psalms 78 in the BEV

Psalms 78 in the BHAD

Psalms 78 in the BIB

Psalms 78 in the BLPT

Psalms 78 in the BNT

Psalms 78 in the BNTABOOT

Psalms 78 in the BNTLV

Psalms 78 in the BOATCB

Psalms 78 in the BOATCB2

Psalms 78 in the BOBCV

Psalms 78 in the BOCNT

Psalms 78 in the BOECS

Psalms 78 in the BOGWICC

Psalms 78 in the BOHCB

Psalms 78 in the BOHCV

Psalms 78 in the BOHLNT

Psalms 78 in the BOHNTLTAL

Psalms 78 in the BOICB

Psalms 78 in the BOILNTAP

Psalms 78 in the BOITCV

Psalms 78 in the BOKCV

Psalms 78 in the BOKCV2

Psalms 78 in the BOKHWOG

Psalms 78 in the BOKSSV

Psalms 78 in the BOLCB

Psalms 78 in the BOMCV

Psalms 78 in the BONAV

Psalms 78 in the BONCB

Psalms 78 in the BONLT

Psalms 78 in the BONUT2

Psalms 78 in the BOPLNT

Psalms 78 in the BOSCB

Psalms 78 in the BOSNC

Psalms 78 in the BOTLNT

Psalms 78 in the BOVCB

Psalms 78 in the BOYCB

Psalms 78 in the BPBB

Psalms 78 in the BPH

Psalms 78 in the BSB

Psalms 78 in the CCB

Psalms 78 in the CUV

Psalms 78 in the CUVS

Psalms 78 in the DBT

Psalms 78 in the DGDNT

Psalms 78 in the DHNT

Psalms 78 in the DNT

Psalms 78 in the ELBE

Psalms 78 in the EMTV

Psalms 78 in the ESV

Psalms 78 in the FBV

Psalms 78 in the FEB

Psalms 78 in the GGMNT

Psalms 78 in the GNT

Psalms 78 in the HARY

Psalms 78 in the HNT

Psalms 78 in the IRVA

Psalms 78 in the IRVB

Psalms 78 in the IRVG

Psalms 78 in the IRVH

Psalms 78 in the IRVK

Psalms 78 in the IRVM

Psalms 78 in the IRVM2

Psalms 78 in the IRVO

Psalms 78 in the IRVP

Psalms 78 in the IRVT

Psalms 78 in the IRVT2

Psalms 78 in the IRVU

Psalms 78 in the ISVN

Psalms 78 in the JSNT

Psalms 78 in the KAPI

Psalms 78 in the KBT1ETNIK

Psalms 78 in the KBV

Psalms 78 in the KJV

Psalms 78 in the KNFD

Psalms 78 in the LBA

Psalms 78 in the LBLA

Psalms 78 in the LNT

Psalms 78 in the LSV

Psalms 78 in the MAAL

Psalms 78 in the MBV

Psalms 78 in the MBV2

Psalms 78 in the MHNT

Psalms 78 in the MKNFD

Psalms 78 in the MNG

Psalms 78 in the MNT

Psalms 78 in the MNT2

Psalms 78 in the MRS1T

Psalms 78 in the NAA

Psalms 78 in the NASB

Psalms 78 in the NBLA

Psalms 78 in the NBS

Psalms 78 in the NBVTP

Psalms 78 in the NET2

Psalms 78 in the NIV11

Psalms 78 in the NNT

Psalms 78 in the NNT2

Psalms 78 in the NNT3

Psalms 78 in the PDDPT

Psalms 78 in the PFNT

Psalms 78 in the RMNT

Psalms 78 in the SBIAS

Psalms 78 in the SBIBS

Psalms 78 in the SBIBS2

Psalms 78 in the SBICS

Psalms 78 in the SBIDS

Psalms 78 in the SBIGS

Psalms 78 in the SBIHS

Psalms 78 in the SBIIS

Psalms 78 in the SBIIS2

Psalms 78 in the SBIIS3

Psalms 78 in the SBIKS

Psalms 78 in the SBIKS2

Psalms 78 in the SBIMS

Psalms 78 in the SBIOS

Psalms 78 in the SBIPS

Psalms 78 in the SBISS

Psalms 78 in the SBITS

Psalms 78 in the SBITS2

Psalms 78 in the SBITS3

Psalms 78 in the SBITS4

Psalms 78 in the SBIUS

Psalms 78 in the SBIVS

Psalms 78 in the SBT

Psalms 78 in the SBT1E

Psalms 78 in the SCHL

Psalms 78 in the SNT

Psalms 78 in the SUSU

Psalms 78 in the SUSU2

Psalms 78 in the SYNO

Psalms 78 in the TBIAOTANT

Psalms 78 in the TBT1E

Psalms 78 in the TBT1E2

Psalms 78 in the TFTIP

Psalms 78 in the TFTU

Psalms 78 in the TGNTATF3T

Psalms 78 in the THAI

Psalms 78 in the TNFD

Psalms 78 in the TNT

Psalms 78 in the TNTIK

Psalms 78 in the TNTIL

Psalms 78 in the TNTIN

Psalms 78 in the TNTIP

Psalms 78 in the TNTIZ

Psalms 78 in the TOMA

Psalms 78 in the TTENT

Psalms 78 in the UBG

Psalms 78 in the UGV

Psalms 78 in the UGV2

Psalms 78 in the UGV3

Psalms 78 in the VBL

Psalms 78 in the VDCC

Psalms 78 in the YALU

Psalms 78 in the YAPE

Psalms 78 in the YBVTP

Psalms 78 in the ZBP