Romans 16 (BOLCB2)

1 Natindeli bino Foebe, ndeko na biso ya mwasi, oyo azali mosali ya Lingomba ya Sankresi. 2 Nazali kosenga na bino ete boyamba ye kati na Nkolo na lolenge oyo ebongi na basantu mpe bosunga ye na makambo nyonso oyo akosenga bino, pamba te asungaki bato ebele penza, ngai mpe lokola. 3 Bopesa mbote na Prisika mpe Akilasi, baninga na ngai ya mosala kati na Yesu-Klisto. 4 Bandimaki ata kokufa mpo na ngai. Ngai moko kaka te nde nazali kotonda bango, kasi mpe Mangomba nyonso ya mikili ya Bapagano. 5 Bopesa mpe mbote na Lingomba oyo esanganaka na ndako na bango.Bopesa mbote na Epayineti, molingami na ngai, oyo azalaki moto ya liboso ya kondimela Klisto kati na mokili ya Azia. 6 Bopesa mbote na Mari oyo asalaki mosala makasi mpo na bino. 7 Bopesa mbote na Andronikusi mpe na Junia, bandeko na ngai mpe baninga na ngai ya boloko. Bazalaki bato ya lokumu kati na bantoma mpe bandimelaki Klisto liboso ete ngai nandimela. 8 Bopesa mbote na Ampiliatusi, molingami na ngai kati na Nkolo. 9 Bopesa mbote na Iribano, moninga na biso ya mosala kati na Klisto, mpe Sitakisi, molingami na ngai. 10 Bopesa mbote na Apelesi oyo alakisaki penza ete azalaka ya Klisto.Bopesa mbote mpe na bavandi ya ndako ya Arisitobile. 11 Bopesa mbote na Erodioni, ndeko na ngai.Bopesa mbote na bavandi ya ndako ya Narisise, oyo bazali kati na Nkolo. 12 Bopesa mbote na Trifene mpe Trifose, basi oyo basalaki mosala makasi kati na Nkolo.Bopesa mbote na Periside, mwasi molingami na ngai, oyo asalaki mosala makasi kati na Nkolo. 13 Bopesa mbote na Rifisi, moponami kati na Nkolo.Bopesa mpe mbote na mama na ye, oyo azali mpe mama na ngai. 14 Bopesa mbote na Asenkrite, na Flegoni, na Erimesi, na Patrobasi, na Erimasi, mpe na bandeko nyonso oyo bazali na bango elongo. 15 Bopesa mbote na Filologe, na Jili, na Nere mpe na Olipasi, ndeko na ye ya mwasi, elongo na basantu nyonso oyo bazali na bango elongo. 16 Bopesanaka mbote bino na bino, na beze ya bule. Mangomba nyonso ya Klisto etindeli bino mbote. 17 Bandeko, nabondeli bino : bosala keba na bato oyo bakotisaka bokabwani mpe batiaka mabaku na nzela na bino, na makambo oyo ekeseni na mateya oyo bosilaki kozwa. Bozala mosika na bango. 18 Bato ya lolenge oyo basalelaka nde mabumu na bango, kasi basalelaka Klisto, Nkolo na biso, te. Bapengwisaka makanisi ya bato ya bindima-ndima na nzela ya maloba na bango ya elengi mpe ya sukali. 19 Pamba te bato nyonso bayebi botosi na bino, mpe motema na ngai etondaka mingi na esengo mpo na bino. Kasi nalingi ete bozala bato ya bwanya mpo na kosala bolamu, mpe bato oyo bazangi mbeba mpo na oyo etali mabe. 20 Etikali moke, Nzambe ya kimia akonyata-nyata Satana na se ya matambe na bino. Tika ete ngolu ya Yesu, Nkolo na biso, ezala na bino ! 21 Timote, moninga na ngai ya mosala, elongo na Lusiusi, Jazoni mpe Sosipatere, oyo bazali bandeko na ngai, batindeli bino mbote. 22 Ngai Teritiusi oyo nakomi mokanda oyo, napesi bino mbote kati na Nkolo. 23 Gayusi, oyo ayambaki ngai mpe Lingomba mobimba kati na ndako na ye, apesi bino mpe mbote.Erasite, mobateli bomengo ya engumba, elongo na Karitisi, ndeko na biso, batindeli bino mbote. [ 24 Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala na bino nyonso ! Amen.] 25 Na Ye oyo azali na nguya ya kotelemisa bino ngwi na nzela ya Sango Malamu oyo nateyaka, mpe na nzela ya mateya ya Yesu-Klisto kolanda emoniseli ya mabombami ya Nzambe, oyo ebombama wuta kala, 26 kasi sik’oyo emonisami mpe elakisami epai ya Bapagano na nzela ya makomi ya basakoli kolanda ndenge Nzambe ya seko na seko atindaki mpo ete bikolo nyonso ekoka kondimela Ye mpe kotosa Ye, 27 na Nzambe moko kaka ya bwanya, tika ete nkembo epesamela libela na libela na nzela ya Yesu-Klisto ! Amen !

In Other Versions

Romans 16 in the ANGEFD

Romans 16 in the ANTPNG2D

Romans 16 in the AS21

Romans 16 in the BAGH

Romans 16 in the BBPNG

Romans 16 in the BBT1E

Romans 16 in the BDS

Romans 16 in the BEV

Romans 16 in the BHAD

Romans 16 in the BIB

Romans 16 in the BLPT

Romans 16 in the BNT

Romans 16 in the BNTABOOT

Romans 16 in the BNTLV

Romans 16 in the BOATCB

Romans 16 in the BOATCB2

Romans 16 in the BOBCV

Romans 16 in the BOCNT

Romans 16 in the BOECS

Romans 16 in the BOGWICC

Romans 16 in the BOHCB

Romans 16 in the BOHCV

Romans 16 in the BOHLNT

Romans 16 in the BOHNTLTAL

Romans 16 in the BOICB

Romans 16 in the BOILNTAP

Romans 16 in the BOITCV

Romans 16 in the BOKCV

Romans 16 in the BOKCV2

Romans 16 in the BOKHWOG

Romans 16 in the BOKSSV

Romans 16 in the BOLCB

Romans 16 in the BOMCV

Romans 16 in the BONAV

Romans 16 in the BONCB

Romans 16 in the BONLT

Romans 16 in the BONUT2

Romans 16 in the BOPLNT

Romans 16 in the BOSCB

Romans 16 in the BOSNC

Romans 16 in the BOTLNT

Romans 16 in the BOVCB

Romans 16 in the BOYCB

Romans 16 in the BPBB

Romans 16 in the BPH

Romans 16 in the BSB

Romans 16 in the CCB

Romans 16 in the CUV

Romans 16 in the CUVS

Romans 16 in the DBT

Romans 16 in the DGDNT

Romans 16 in the DHNT

Romans 16 in the DNT

Romans 16 in the ELBE

Romans 16 in the EMTV

Romans 16 in the ESV

Romans 16 in the FBV

Romans 16 in the FEB

Romans 16 in the GGMNT

Romans 16 in the GNT

Romans 16 in the HARY

Romans 16 in the HNT

Romans 16 in the IRVA

Romans 16 in the IRVB

Romans 16 in the IRVG

Romans 16 in the IRVH

Romans 16 in the IRVK

Romans 16 in the IRVM

Romans 16 in the IRVM2

Romans 16 in the IRVO

Romans 16 in the IRVP

Romans 16 in the IRVT

Romans 16 in the IRVT2

Romans 16 in the IRVU

Romans 16 in the ISVN

Romans 16 in the JSNT

Romans 16 in the KAPI

Romans 16 in the KBT1ETNIK

Romans 16 in the KBV

Romans 16 in the KJV

Romans 16 in the KNFD

Romans 16 in the LBA

Romans 16 in the LBLA

Romans 16 in the LNT

Romans 16 in the LSV

Romans 16 in the MAAL

Romans 16 in the MBV

Romans 16 in the MBV2

Romans 16 in the MHNT

Romans 16 in the MKNFD

Romans 16 in the MNG

Romans 16 in the MNT

Romans 16 in the MNT2

Romans 16 in the MRS1T

Romans 16 in the NAA

Romans 16 in the NASB

Romans 16 in the NBLA

Romans 16 in the NBS

Romans 16 in the NBVTP

Romans 16 in the NET2

Romans 16 in the NIV11

Romans 16 in the NNT

Romans 16 in the NNT2

Romans 16 in the NNT3

Romans 16 in the PDDPT

Romans 16 in the PFNT

Romans 16 in the RMNT

Romans 16 in the SBIAS

Romans 16 in the SBIBS

Romans 16 in the SBIBS2

Romans 16 in the SBICS

Romans 16 in the SBIDS

Romans 16 in the SBIGS

Romans 16 in the SBIHS

Romans 16 in the SBIIS

Romans 16 in the SBIIS2

Romans 16 in the SBIIS3

Romans 16 in the SBIKS

Romans 16 in the SBIKS2

Romans 16 in the SBIMS

Romans 16 in the SBIOS

Romans 16 in the SBIPS

Romans 16 in the SBISS

Romans 16 in the SBITS

Romans 16 in the SBITS2

Romans 16 in the SBITS3

Romans 16 in the SBITS4

Romans 16 in the SBIUS

Romans 16 in the SBIVS

Romans 16 in the SBT

Romans 16 in the SBT1E

Romans 16 in the SCHL

Romans 16 in the SNT

Romans 16 in the SUSU

Romans 16 in the SUSU2

Romans 16 in the SYNO

Romans 16 in the TBIAOTANT

Romans 16 in the TBT1E

Romans 16 in the TBT1E2

Romans 16 in the TFTIP

Romans 16 in the TFTU

Romans 16 in the TGNTATF3T

Romans 16 in the THAI

Romans 16 in the TNFD

Romans 16 in the TNT

Romans 16 in the TNTIK

Romans 16 in the TNTIL

Romans 16 in the TNTIN

Romans 16 in the TNTIP

Romans 16 in the TNTIZ

Romans 16 in the TOMA

Romans 16 in the TTENT

Romans 16 in the UBG

Romans 16 in the UGV

Romans 16 in the UGV2

Romans 16 in the UGV3

Romans 16 in the VBL

Romans 16 in the VDCC

Romans 16 in the YALU

Romans 16 in the YAPE

Romans 16 in the YBVTP

Romans 16 in the ZBP