Zechariah 14 (BOLCB2)
1 Tala, mokolo ya Yawe ezali koya ; ezali mokolo oyo bakokabola bomengo ya bitumba kati na yo, Yelusalemi. 2 Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango ; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala. 3 Bongo Yawe akobima mpe akobundisa bikolo wana, ndenge asalaka na tango ya bitumba. 4 Na mokolo wana, makolo na Ye ekotelema likolo ya ngomba ya banzete ya olive oyo ezali na ngambo ya este ya Yelusalemi ; mpe ngomba ya olive ekokabwana na biteni mibale : eteni moko na ngambo ya este mpe eteni mosusu na ngambo ya weste. Lubwaku moko ya monene ekosalema : eteni moko ya ngomba ekokende na ngambo ya nor, mpe eteni mosusu, na ngambo ya sude. 5 Bokokimela kati na lubwaku ya bangomba na ngai, pamba te lubwaku ya bangomba ekokende kino na Atsali ; bokokima ndenge bokimaki tango mabele eninganaki na tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda. Bongo Yawe, Nzambe na ngai, akoya elongo na basantu na Ye nyonso. 6 Na mokolo wana, ezala pole to malili to mpe mvula, eloko moko te ekozala. 7 Ekozala mokolo ya ndenge mosusu, mokolo ezanga moyi mpe butu, mokolo oyo Ye moko kaka Yawe ayebi ; pole ekobima soki pokwa ekoki. 8 Na mokolo wana, mayi oyo etiolaka ekobimela na Yelusalemi. Ndambo moko ekokende na ebale monene ya este mpe ndambo mosusu, na ebale monene ya weste, na eleko ya malili mpe ya molunge. 9 Yawe akozala Mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo wana, Ye moko kaka nde akozala Nkolo, mpe bakosambela kaka Ye. 10 Mokili mobimba, longwa na Geba kino na Rimoni, na ngambo ya sude ya Yelusalemi, ekokoma lokola etando ya Araba ; kasi Yelusalemi ekozala kaka na likolo, ekotikala kaka na esika na yango, longwa na Ekuke ya Benjame kino na esika oyo Ekuke ya kala ezalaki, na songe ya bamir, longwa na ndako molayi ya Ananeyeli kino na bikamolelo ya mokonzi. 11 Bato bakozongela kovanda na Yelusalemi ; Yelusalemi ekobebisama lisusu te mpe ekokoma na kimia. 12 Tala etumbu oyo Yawe akopesa na bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi : Misuni ya banzoto na bango ekobanda kopola wana bazali nanu na bomoi ; miso na bango ekokufa na bilongi na bango mpe balolemo na bango ekokufa kati na minoko na bango. 13 Na mokolo wana, Yawe akosala ete mobulu ekota kati na bango, bakobetana makofi mpe bakobomana bango na bango. 14 Bato ya Yuda mpe bakobunda kati na Yelusalemi, bakokongola bomengo ya bikolo nyonso ya zingazinga : wolo, palata mpe bilamba mingi koleka. 15 Etumbu ya ndenge moko kaka ekokweya likolo ya bampunda, ya bamile, ya bashamo, ya ba-ane mpe ya banyama nyonso oyo ekozala na molako. 16 Boye, batikali kati na bikolo nyonso oyo ebundisaki Yelusalemi bakomata mibu nyonso na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mpe mpo na kosala feti ya Bandako ya kapo. 17 Soki bato ya etuka moko ya mabele bakei te na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mvula ekonoka te na mokili na bango. 18 Soki bato ya Ejipito baboyi kokende kosala feti na Yelusalemi, mvula ekonoka te na mokili na bango. Boye, Yawe akopesa bango etumbu oyo abongisa mpo na ekolo nyonso oyo ekoboya kokende kosala feti ya Bandako ya kapo. 19 Ekozala etumbu ya Ejipito mpe ya bikolo nyonso oyo ekoboya kokende kosala feti ya Bandako ya kapo. 20 Na mokolo wana, bakotia makomi na bangonga mike-mike ya bampunda : « Ebulisami mpo na Yawe ! » Banzungu ya Tempelo ya Yawe ekozala mpe bule ndenge bakopo ezalaka bule liboso ya etumbelo. 21 Banzungu nyonso kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda ekobulisama mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mpe bato nyonso oyo bakoya kopesa makabo bakozwa ndambo ya banzungu mpe bakolambela yango. Na mokolo wana, ata moto moko te ya mombongo akotikala kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.
In Other Versions
Zechariah 14 in the ANGEFD
Zechariah 14 in the ANTPNG2D
Zechariah 14 in the AS21
Zechariah 14 in the BAGH
Zechariah 14 in the BBPNG
Zechariah 14 in the BBT1E
Zechariah 14 in the BDS
Zechariah 14 in the BEV
Zechariah 14 in the BHAD
Zechariah 14 in the BIB
Zechariah 14 in the BLPT
Zechariah 14 in the BNT
Zechariah 14 in the BNTABOOT
Zechariah 14 in the BNTLV
Zechariah 14 in the BOATCB
Zechariah 14 in the BOATCB2
Zechariah 14 in the BOBCV
Zechariah 14 in the BOCNT
Zechariah 14 in the BOECS
Zechariah 14 in the BOGWICC
Zechariah 14 in the BOHCB
Zechariah 14 in the BOHCV
Zechariah 14 in the BOHLNT
Zechariah 14 in the BOHNTLTAL
Zechariah 14 in the BOICB
Zechariah 14 in the BOILNTAP
Zechariah 14 in the BOITCV
Zechariah 14 in the BOKCV
Zechariah 14 in the BOKCV2
Zechariah 14 in the BOKHWOG
Zechariah 14 in the BOKSSV
Zechariah 14 in the BOLCB
Zechariah 14 in the BOMCV
Zechariah 14 in the BONAV
Zechariah 14 in the BONCB
Zechariah 14 in the BONLT
Zechariah 14 in the BONUT2
Zechariah 14 in the BOPLNT
Zechariah 14 in the BOSCB
Zechariah 14 in the BOSNC
Zechariah 14 in the BOTLNT
Zechariah 14 in the BOVCB
Zechariah 14 in the BOYCB
Zechariah 14 in the BPBB
Zechariah 14 in the BPH
Zechariah 14 in the BSB
Zechariah 14 in the CCB
Zechariah 14 in the CUV
Zechariah 14 in the CUVS
Zechariah 14 in the DBT
Zechariah 14 in the DGDNT
Zechariah 14 in the DHNT
Zechariah 14 in the DNT
Zechariah 14 in the ELBE
Zechariah 14 in the EMTV
Zechariah 14 in the ESV
Zechariah 14 in the FBV
Zechariah 14 in the FEB
Zechariah 14 in the GGMNT
Zechariah 14 in the GNT
Zechariah 14 in the HARY
Zechariah 14 in the HNT
Zechariah 14 in the IRVA
Zechariah 14 in the IRVB
Zechariah 14 in the IRVG
Zechariah 14 in the IRVH
Zechariah 14 in the IRVK
Zechariah 14 in the IRVM
Zechariah 14 in the IRVM2
Zechariah 14 in the IRVO
Zechariah 14 in the IRVP
Zechariah 14 in the IRVT
Zechariah 14 in the IRVT2
Zechariah 14 in the IRVU
Zechariah 14 in the ISVN
Zechariah 14 in the JSNT
Zechariah 14 in the KAPI
Zechariah 14 in the KBT1ETNIK
Zechariah 14 in the KBV
Zechariah 14 in the KJV
Zechariah 14 in the KNFD
Zechariah 14 in the LBA
Zechariah 14 in the LBLA
Zechariah 14 in the LNT
Zechariah 14 in the LSV
Zechariah 14 in the MAAL
Zechariah 14 in the MBV
Zechariah 14 in the MBV2
Zechariah 14 in the MHNT
Zechariah 14 in the MKNFD
Zechariah 14 in the MNG
Zechariah 14 in the MNT
Zechariah 14 in the MNT2
Zechariah 14 in the MRS1T
Zechariah 14 in the NAA
Zechariah 14 in the NASB
Zechariah 14 in the NBLA
Zechariah 14 in the NBS
Zechariah 14 in the NBVTP
Zechariah 14 in the NET2
Zechariah 14 in the NIV11
Zechariah 14 in the NNT
Zechariah 14 in the NNT2
Zechariah 14 in the NNT3
Zechariah 14 in the PDDPT
Zechariah 14 in the PFNT
Zechariah 14 in the RMNT
Zechariah 14 in the SBIAS
Zechariah 14 in the SBIBS
Zechariah 14 in the SBIBS2
Zechariah 14 in the SBICS
Zechariah 14 in the SBIDS
Zechariah 14 in the SBIGS
Zechariah 14 in the SBIHS
Zechariah 14 in the SBIIS
Zechariah 14 in the SBIIS2
Zechariah 14 in the SBIIS3
Zechariah 14 in the SBIKS
Zechariah 14 in the SBIKS2
Zechariah 14 in the SBIMS
Zechariah 14 in the SBIOS
Zechariah 14 in the SBIPS
Zechariah 14 in the SBISS
Zechariah 14 in the SBITS
Zechariah 14 in the SBITS2
Zechariah 14 in the SBITS3
Zechariah 14 in the SBITS4
Zechariah 14 in the SBIUS
Zechariah 14 in the SBIVS
Zechariah 14 in the SBT
Zechariah 14 in the SBT1E
Zechariah 14 in the SCHL
Zechariah 14 in the SNT
Zechariah 14 in the SUSU
Zechariah 14 in the SUSU2
Zechariah 14 in the SYNO
Zechariah 14 in the TBIAOTANT
Zechariah 14 in the TBT1E
Zechariah 14 in the TBT1E2
Zechariah 14 in the TFTIP
Zechariah 14 in the TFTU
Zechariah 14 in the TGNTATF3T
Zechariah 14 in the THAI
Zechariah 14 in the TNFD
Zechariah 14 in the TNT
Zechariah 14 in the TNTIK
Zechariah 14 in the TNTIL
Zechariah 14 in the TNTIN
Zechariah 14 in the TNTIP
Zechariah 14 in the TNTIZ
Zechariah 14 in the TOMA
Zechariah 14 in the TTENT
Zechariah 14 in the UBG
Zechariah 14 in the UGV
Zechariah 14 in the UGV2
Zechariah 14 in the UGV3
Zechariah 14 in the VBL
Zechariah 14 in the VDCC
Zechariah 14 in the YALU
Zechariah 14 in the YAPE
Zechariah 14 in the YBVTP
Zechariah 14 in the ZBP